Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/7 nk. 8-9
  • Yesu bomoi na ye mpe mosala na ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu bomoi na ye mpe mosala na ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Masolo mosusu
  • Kowelana ebimi
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Bawelani mpo na koyeba nani aleki baninga
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu abongisi bantóma liboso na kokende na ye
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Alingi bana mike
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/7 nk. 8-9

Yesu bomoi na ye mpe mosala na ye

Kowelana ebimi

MWA BANGONGA liboso mpenza na mpokwa, Yesu apesaki liteya kitoko ya komikitisa na kosukolaka makolo ya bantoma na ye. Nsima na yango, asalaki Ekaniseli ya liwa na ye, oyo ekomaki penepene Sikawa, mingi mpenza mpo na ntina na likambo oyo euti koleka, matata moko ya kokamwisa ebimi. Bantoma babandaki kowelana makasi mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki bamosusu. Emonani lokola ete matata wana ezali likambo ya sika te.

Tokanisa lisusu ete nsima na kobongwana na Yesu likoló na ngomba, bantoma bawelanaki mpo na koyeba nani kati na bango alekaki bamosusu Lisusu, Yakobo mpe Yoane basengaki mpo na kozwa bisika bileki lokumu kati na Bokonzi, kobendaka bongo matata mosusu kati na bantoma Sikawa, lokola ezali butu ya nsuka oyo azali kolekisa elongo na bango, Yesu asengeli kozala na mawa mingi na komona bango lisusu koswana Asalaki nini?

Na esika ete apamela bantoma mpo na ezalela na bango, mbala oyo lisusu Yesu asosoli elongo na bango na kimya nyonso na maloba oyo: “Mikonzi na mabota bakoyangelaka bango na nguya, mpe baoyo bazali na bokonzi liboso na bango bakobiangama basali na boboto. Nde bino bokosala bongo te. . . . Nani aleki monene, oyo afandi na mesa soko oyo apesi biloko? Oyo afandi na mesa te?” Mpe, kolimbolelaka bango ndakisa oyo apesaki bango, alobi: “Nde ngai nazali kati na bino lokota mosaleli.”

Atako bazalaki na bolembu na mina na kozanga kokoka na bango, bantoma baumelaki na Yesu kati na bampasi na ye. Alobi na bango lisusu: “Nasali kondimana elongo na bino, pelamoko Tata na ngai asalaki kondimana elongo na ngai, mpo na bokonzi (MN)” Boyokani wana kati na Yesu mpe bayekoli na ye ya sembo esangisi bango elongo na ye mpo na koyangela esika moko. Bobele bato 144 000, motuya etyameli ndelo nde, bakokoka kokota kati na boyokani wana mpo na Bokonzi.

Atako bantoma bapesameli libaku kitoko ya koyangela esika moko na Klisto, sikawa bazali kati na ezalela ya bolembu kati na elimo. Yesu alobi ete: “Bino nyonso (bokokwea, MN) mpo na ngai na butu oyo.” Koyebisaka na Petelo ete abondelaki mpo na ye, Yesu apesi ye toli oyo: “Wana esili yo kobutwa, lendisa bandeko na yo.”

“Bana mike, nazali naino na bino mwa ntango moke. Bokoluka ngai, nde pelamoko elobaki ngai na Bayuda: ‘Esika ekokenda ngai, bino bokoki koya te; boye mpe nazali koloba na bino sasaipi. Nazali kopesa bino lilako na sika ete, bolinganaka; bolinganaka lokola ngai nalingi bino. Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.”

Petelo atuni: ’’Nkolo okokenda wapi?’’

Yesu alobi: ’’Esika ekokenda ngai, okoki kolanda ngai sikawa te, nde okolanda ngai nsima.’’

Petelo atungisami, mpe atuni boye: ’’Nkolo mpo na nini nakoki kolanda yo sikawa te? Nakosopa bomoi na ngai mpo na yo.’’

Yesu atuni: “okosopa bomoi na yo na mpo na ngai? Solo solo nazali koloba na yo ete: naino nsoso eleli te, okowangana ngai mbala misato.”

“Petelo azongisi monoko makasi ete, soko ekokoka na ngai kokufa na yo elongo, nakowangana yo te. Bantoma nyonso balobi bobele bongo. Wana Petelo azalaki komikumisa na kolobaka: “Soko bango nyonso (bakokwea) mpo na yo, ngai (nakokwea) soko moke te!”

Kolobelaka eleko oyo na ntango atindaka bayekoli na ye kokende kosakola kati na Galilée mobimba, kozanga mosolo na libenga to kozanga liboke na biloko na kolya, Yesu atuni bango: “Bozangaki eloko moko?”

Bazongisi eyano ete “Te!”’.

“Kasi sikawa oyo azali na libenga akamata yango, na liboke pelamoko; oyo mpe azangi yango aleka elamba na ye mpe asomba mopanga. Mpo ete nalobi na bino ete ekoki ete yango esili kokomama ekokisama kati na ngai ete: ‘Atangamaki kati na bato na (kotyola mibeko).’ Mpo ete yango elobamaki na ntina na ngai ezali kokokisama.”

Na maloba wana, Yesu azali koyebisa ntango oyo akotyama likoló na nzete elongo na bato mabe, na elobeli mosusu bato oyo bazali kotyola mibeko. Azali koyebisa lisusu ete, na nsima, bayekoli na ye bakokutana na minyoko makasi. Bantoma balobi, “Nkolo, tala, awa mipanga mibale”.

Yesu ayanoli bango ete, ’’ekoki’’. Lokola tokomona yango, mosika te mipanga mikopesa nzela na Yesu ete apesa liteya mosusu ya sika ya ntina mingi koleka. Matai 26:31-35; Malako 14:27-31; Luka 22:24-38; Yoane 13:31-38; Emoniseli 14:1-3.

◆ Mpo na nini kowelana kati na bantoma ezali likambo na kokamwa mingi

◆ Ndenge nini Yesu asilisi matata yango?

◆ Boyokani oyo Yesu asali elongo na bayekoli na ye epesi nzela na kokokisa likambo nini?

◆ Lilako nini ya sika Yesu apesi, mpe na meko nini yango ezali na ntina mingi koleka?

◆ Ndenge nini Petelo azali komimonisa ete akoki na makambo nyonso, mpe Yesu alobi na ye nini?

◆ Mpo na nini malako na Yesu matali mosolo na libenga mpe liboke na bilei ekeseni na oyo apesaki liboso?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto