Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/8 nk. 10-14
  • Bilenge ya esengo bazali kosalela Jehovah

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilenge ya esengo bazali kosalela Jehovah
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kondima na yo moko
  • Zwa boyebi
  • Kolisa botondi na yo
  • Kende liboso na mosala ya Nzambe
  • Salá ete mokano na yo ezala ya kosalela Nzambe libela
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Bilenge—Bókolisa mposa na bino ya kosalela Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Elenge: Omibongisi mpo na kozwa batisimo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Bilenge, bópona kosalela Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/8 nk. 10-14

Bilenge ya esengo bazali kosalela Jehovah

“Ata mwana ayebani na misala na ye, soko mosala na ye ezali na mpeto mpe soko ezali sembo.’’​—MASESE 20:11.

1. Tanga mwa makambo ya polele oyo Biblia eyebisi biso na ntina na Samwele.

ELENGE Samwele azalaki mbala mosusu bobele katikati na mibu misato kino mitano ntango abandaki ‘kosala’ na tabernakle ya Jéhovah, na Silo. Moko na mikumba na ye ezalaki kofungola “bikuke na ndako na Jéhovah”. Biblia elobi ete, “Samwele akolaki mpe amonanaki na ngolu mingi liboso na Jéhovah mpe liboso na bato.” Ntango akomaki mokolo, alendisaki losambo na solo na Yisraele. Asalelaki Nzambe “mikolo nyonso na bomoi na ye”. Ata ntango “anunaki mpe akomaki na nsuki mpembe”, azalaki ntango nyonso kolendisa bato ete ‘babanga Jéhovah’ mpe “basalela ye na solo”. Ekozala esengo te ete basala makumisi ya motindo moko boye mpe mpo na yo?​—1 Samwele 1:24; 2:18, 26; 3:15; 7:2-4, 15; 12:2, 24.

2. Makambo nini bana bazali koyekola na makita oyo masalemi na mikolo na biso epai na libota na Jéhovah?

2 Soki ozali Temoin de Jéhovah to ozali koyangana na makita ya boklisto oyo mabongisami na Batemwe, tala zingazinga na yo kati na Salle du Royaume epai lisolo oyo ezali koyekolama. Ozali komona bato ya mibu nyonso. Bamosusu basili mpenza kokoma “mibange”, Ezali mpe na baboti, bana mike, bilenge mpe ata ba bébés oyo bazwami na maboko ya ba mama na bango. Bana mike basili kobanda koyekola mwa makambo kati na Salle du Royaume? Ee. Ekoki na yo kotuna motuna epai na baklisto oyo baboti na bango bazalaki kokumba bango na makita wana ezalaki naino bango bana mike. Bakoyebisa yo na bosembo nyonso ete uta bolenge na bango bayekolaki komemya Nzambe, kolinga libota na ye mpe kosepela na bisika oyo bazali kosambela ye. Nsima na bambula, bana bazali koyekola makambo mingi kitoko mpe ya solo. Nsima na kozwa boyebi mingi mpe kokoma na botondi mingi, mingi bazali kati na ‘bilenge, baseka mpe banunu mpe bana oyo mokomi na nzembo azali kosenga ete ‘basanzola Jéhovah, mpamba te bobele nkombo na ye (nde) eleki likoló.​—Nzembo 148:12, 13.

3. Ndenge nini ezali kosalema ete bilenge oyo bayebi Biblia bazali kotalela bomoi na lolenge ekeseni na baoyo bayebi yango te?

3 Soki ozali elenge mpe baboti na yo bazali komema yo mbala na mbala na makita ya boklisto, oyo nde libaku kitoko ozali na yango! Ebele na bilenge mosusu bazali kotungisama na mikakatano oyo mizali kotungisa bato ya mokili. Bamosusu bazali kobanga ete bato bakoboma mokili. Kasi yo, oyebi ete Nzambe akopesa nzela na likambo yango te, ete akotika bato te balanda kobebisa etando na biso oyo kitoko. Nzokande, Biblia elobi ete “akoboma baoyo bazali kobebisa mokili”. Lokola oyebi yango, Biblia elaki ete mosika te mokili ya sika mpe ya boyengene ya Nzambe ekoya.​—Emoniseli 11:18; Nzembo 37:29; 2 Petelo 3:13.

Kondima na yo moko

4. Mokumba nini ezali epai na bilenge oyo bayebi banzela na Nzambe, mpe ndakisa nini malamu elenge Samwele apesaki na ntina yango?

4 Mpo na mbala ya liboso, nzela na solo ezalaki mbala mosusu likambo litali bobele baboti na yo. Ekoki kozala ete ozalaki koya na makita ya boklisto mpo ete bazalaki komema yo mpe ozalaki kosangana na mosala ya Nzambe mpo ete bango bazalaki kosala yango. Kasi, nsima na bambula, yo moko oyaki kooka esengo ya kosalela Jéhovah mpe ya kotosa ye. Elenge Samwele atyamaki na nzela malamu na mama na ye, kasi na nsima ye moko alandaki kotambola kati na yango. Yango wana tozali kotanga: “Ata mwana ayebani na misala na ye, soko mosala na ye ezali na mpeto mpe soko ezali sembo.”​—Masese 20:11.

5. (a) Nini ezali kokomisa Biblia mokanda moko kitoko? (b) Paulo alobaki nini na Timoté mpo na oyo etali ntina ya Liloba likomami ya Nzambe?

5 Makomami mazali koyebisa biso likambo oyo Nzambe azali kozela epai na biso. Ezali koyebisa biso polele ndenge nini tokoki kosepelisa ye mpe ezali kopesa ebele na batoli oyo ekoki kosalisa biso mpenza. Ntoma Paulo alobáká epai na elenge Timoté oyo azalaki kosunga ye ete: “Makomi nyonso mapemami na elimo na Nzambe, makoki kopesa litomba na mateya, na mpamela, mpo na kosembola mpe mpo na kobokoia, kati na boyengebene, ete moto na Nzambe azala mobongi, oyo aselingwi mpo na misala nyonso malamu.”​—2 Timoté 3:16, 17.

6. Mokanda na Masese elobi nini mpo na oyo etali ntina ya boyebi mpe mayele oyo eyokani na mokano na Nzambe?

6 Biblia elobi na biso lisusu ete: “Yoka mayele mpe kolakisama, Ezali kosenga biso ete ‘tobomba malamu’ malako na Nzambe, ete ‘toluka boyebi’ mpe ‘tolanda koluka’ bososoli lokola tokoki koluka biloko na motuya bibombami. Soki olandi toli oyo, na bongo ‘okososola botosi na kotosa Jéhovah mpe okozwana na boyebi na koyeba Nzambe’. Tozali mpe kozwa toli mosusu oyo na Biblia: “Boye, bino bana yokamela ngai; mpo baoyo bakobatela nzela na ngai bakopambolama Yoka mayele mpe kolakisama, zala na mayele, boya yango te. Mapamboli epai na moto oyo akoyoka ngai . . .! Mpamba te ye oyo akozwana na ngai akomona bomoi; akopambolama na Jéhovah.” Opesaka motuya ya boye epai na Biblia mpe osalaka milende ya lolenge wana mpo na koyekola makambo oyo Biblia ezali koloba?​—Masese 2:1-5; 8:32-35.

Zwa boyebi

7. Makambo nini ya ntina tosengeli koyekola?

7 Bilenge mosusu bayebaka ba résultats nyonso ya masano to mpe bayebaka mpenza makambo nyonso oyo matali etuluku moko ya miziki oyo bango balingaka. Makambo yango mazalaka mpasi te mpo na bango na koyeba yango mpe na kosimba yango mpamba te basepelaka na yango. Kasi motuna ya ntina mozali oyo: Likambo nini bayebi na ntina na Nzambe? Kanisa bobele na oyo Nzambe asalaki. Akelaki molongo. Asilaki koyebisa bambula mingi liboso makambo oyo bato bakosala mpe makambo oyo makobima nsima. Biblia ezali koyebisa biso bobele te soki Nzambe azali nani, kasi ezali lisusu koyebisa biso ndenge nini tokoki kosepelisa ye. Ezali komonisa biso ndenge nini kozala na bomoi ya esengo uta sikawa mpe kozwa bomoi ya seko kati na mokili ya sika mpe ya sembo oyo Nzambe akosala. Oyo ezali makambo ya ntina mingi na esika ya koluka koyeba soki nani alongi match boye to match boye to mpe koyeba nkombo ya babeti na miziki oyo mosika mingi te bato bakobosana bango nokinoki.​—Yisaya 42:5, 9; 46:9, 10; Amosa 3:7.

8. Yosia mpe Yesu bapesaki ndakisa nini malamu?

8 Ntango ekomaki ye na mibu 15, mokonzi Yosia “abandaki koluka Nzambe na Davidi, tata na ye”. Na mibu 12, bakutaki Yesu na temple ya Jéhovah, “katikati na bateyi koyokaka bango mpe kotunaka bango mituna”.a Ata mbula na yo ezali nini, esilaki kokolisa, lokola Yosia mpe Yesu, mposa ya solo ya koyekola makambo oyo Nzambe asalaki mpe akosala lisusu?​—2 Ntango 34:3: Luka 2:46.

9. (a) Likambo nini ebele na bilenge bazali na nkaka mpo na kosala yango? (b) Nini ezali kopesa nzela na kotanga mpe koyekola kozanga nkaka? Omekaki yango yo moko?

9 Kasi mbala mosusu ozali koloba: ‘Nakokoka koyekola te.’ Bato mingi, bilenge mpe mikolo, naino batanga mingi te mpo na kokoma batangi malamu. Soki ozali kotanga mingi, okozala mpe na nkaka te mpo na kotanga. Soki mpe okoyekola mingi, okoyeba makambo mingi kozanga nkaka. Okokangisa makanisi ya sika na oyo osila koyeba kala, na boye okoyeba yango malamu koleka mpe ekosimba yango.

10. (a) Ndenge nini tokoki kozwa matomba mingi na makita ya boklisto? (b) Yo moko omonaki nini kati na likambo yango?

10 Nini ekoki kosalisa yo na koyeba makambo mingi na ntina na Nzambe? Mbala mosusu ekosengela na yo koyanganaka mbala na mbala na makita ya boklisto. Okoki komibongisa mpo na makita yango mpe kosangana na yango mpenza? Na ndakisa, okanisi te ete okoki kobakisa boyebi na yo na lisalisi ya lisolo oyo na kotangaka mikapo nyonso ya Biblia oyo mipesami na kati? Okomaki liloba moko to mibale na pembeni mpo omikundola likanisi oyo moko moko na mikapo yango ezali kobakisa na paragrafe to na lisolo? Ozalaka na momeseno ya kokotisa ata moko ya mikapo yango na bakomantere oyo ezali komonisa motuya oyo ozali kopesa na boyekoli ya lisolo wana ya Biblia? Nkulutu moko oyo ayanganaka mbala na mbala na makita alobaki: “Ezalaka mpasi mpo na ngai na kotya makanisi na ngai nyonso na boyekoli moko oyo nabongisaki yango liboso te. Nzokande, nasepelaka mingi mpenza mpo na kolanda oyo nabongisaki.”

11. Ndenge nini tokoki kozwa matomba mingi na badiskur ya Biblia, mpe mpo na nini ezali na ntina koleka?

11 Ntango ozali koyoka diskur moko ya Biblia, ozwaka mwa banote mpo okoka kososola ntina na yango mpenza mpe mpo ete makanisi na yo mapengwa te? Yesu alobaki kati na libondeli moko: “Oyo ezali bomoi na seko ete bayeba yo Nzambe moko na solo mpe motindami na yo, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Boyebi oyo bozali komema na bomoi ezali nde boyebi malamu oyo okoki kozwa, boye te? Tala oyo Biblia elobi na ntina yango: “Mpo ete Jéhovah akopesaka mayele; boyebi mpe bososoli ekoutaka na monoko na ye. Boye mayele ekokota na motema na yo mpe ekoyokama malamu na molimo na yo; mayele ekobatela yo mpe bososoli ekosunga yo.”​—Masese 2:6, 10, 11.

Kolisa botondi na yo

12. Tanga mwa bamoko na makambo ya polele oyo Nzambe asalaki mpo na biso?

12 Tosepelaka mpenza na oyo Nzambe asalaki mpo na biso? Akelaki mabelé kitoko mpe abongisaki yango mpo ete ekoka koyamba bomoi. Akelaki baboti na biso ya liboso, likambo oyo epesaki biso nzela ete tobotama. Abongisaki ete tosepela na lisalisi ya libota mpe ya lisangá epai kuna bolingo ezali mingi. (Genese 1:27, 28; Yoane 13:35; Baebele 10:25) Atindaki Mwana na ye mobotami na liboso awa na mabelé mpo na koteya biso makambo mingi koleka na ntina na Ye moko mpe kopesa mbeka oyo ekofungola nzela na bomoi ya seko. Oyokaka botondi ya solo mpo na makabo kitoko wana? Etindaka yo na kondima libyangami na ye oyo etali koyekola koyeba ye mpe kosalela ye?​—Matai 20:28; Yoane 1:18; Baloma 5:21.

13. Nini ezali kopesa yo likanisi ete Nzambe azali kosepela na bato?

13 Mozalisi ya molongo azali kosepela na bato. Abengaki Abrahame “moninga na ngai”, mpe alobaki na Moise: “Ngai nayebi yo na nkombo.” (Yisaya 41:8; Exode 33:12) Mokanda na Emoniseli ezali koyebisa ete Nzambe azali na “buku ya bomoi” ya elilingi esika ekomami bankombo ya basaleli na ye ya sembo “longwa na bozalisi na mokili”. Nkombo na yo ekokomama na kati?​—Emoniseli 3:5; 17:8; 2 Timoté 2:19.

14. Ndenge nini kotosa mitinda na Nzambe ekoki kobongisa bomoi na yo?

14 Mitinda na Nzambe mizali malamu. Soki moto atosi yango, akobatelama na makama mingi lokola pité, bangi, molangwa, zemi ezangi kokanelama, bokono oyo bokozwamaka na nzela ya bosangisi nzoto, mobulu, koboma mpe mabe mingi mosusu. Kolanda banzela na Nzambe ekosalisa mpe yo na kozwa baninga ya solo mpe kozala na esengo mingi. Esengeli kosala milende mpenza mpo na kozwa mbano, boye te? (1 Bakolinti 6:9-11) Ata elenge oyo asili kozwa ekateli ya kotosa mitinda na Nzambe akoki kobakisa nguya na ye mpo na kosala oyo ezali sembo. Biblia elobi: ‘Epai na moto na sembo okomimonisa na sembo.’ Elobi na biso lisusu ete “akobatela bayengebeni na ye” mpe ‘akoboya bato na ye te’.​—Nzembo 18:25; 37:28; 94:14; Yisaya 40:29-31.

Kende liboso na mosala ya Nzambe

15. Toli nini epemami na Nzambe Salomo apesaki epai na bilenge?

15 Mikano na yo mitongami likoló na mokili oyo enuni to likoló na mokili ya sika mpe ya sembo oyo ezali koya? Oyokaka Nzambe to bato, oyo bazali bato na mayele liboso na bato ya mokili, kasi bazali kotemela Nzambe? Opesaka motuya mingi na masano, na kelasi milai to na mosala moko oyo ezali kozwa yo ngonga nyonso na esika ete osala bongo mpo na Nzambe mpe mpo na mosala na ye? Mokonzi na mayele Salomo akomaki mokanda moko mobimba na Biblia, mokanda ya Mosakoli, mpo na komonisa eloko oyo esengeli kozwa esika ya liboso kati na bomoi na biso. Tala bosukisi na ye: “Kanisa Mozalisi na yo monene na mikolo na bolenge na yo, naino mikolo mabe miyei te, naino bilanga ekomi te wana okolobaka ete, Nazali na esengo na yango te, Toyoka nsuka na likambo mobimba: Tosa Nzambe mpe batela mibeko na ye; yango ezali lisengami epai na moto nyonso.”​—Mosakoli 12:1, 13.

16. Ndenge nini bilenge bakoki komonisa ete bazali kosepela na mikumba minene?

16 Baklisto nyonso mikolo oyo oyebi bankulutu, ba pionniers, mokengeli ya circonscription na bino mpe oyo ya distrike na bino bazalaki mpe bana. Nini epesaki bango bisengo oyo bazali na yango lelo? Bazalaki kolinga Nzambe mpe bazalaki na mposa ya kosalela ye. Na bolenge na bango, mingi kati na bango basalelaki ntango na bango ya libre mpo na kozwa boyebi mpe ekspérianse. Bazalaki koyekola mpe bazalaki koyangana na makita. Bazalaki kosangana na mosala ya koteya mpe bazalaki kosepela na mikumba minene lokola mosala ya pionnier, mosala ya Béthel to misala misusu ya kopesa mapamboli mingi. Bazalaki ‘bato baleki mayele te’; bazalaki na mikano mpe na makanisi oyo ezalaka na moto nyonso, lokola yo. Nzokande, balandaki toli oyo: “Soko bozali kosala nini, botya mitema na kosala bongo; lokola mpo na kosalela bato te, kasi kosalela Jéhovah.”​—Bakolose 3:23; tala Luka 10:27; 2 Timote 2:15.

17. Nini ekoki kosalisa bilenge na kokoka kati na mosala ya Nzambe?

17 Bongo yo? Osepelaka mpenza na makambo oyo matali Nzambe? Oponaka baninga na yo kati na baoyo bazali kotya makambo na elimo na esika ya liboso? Olendisaka bamosusu na kosangana elongo na yo kati na mosala ya boklisto? Osanganaka na mosala ya boklisto elongo na mikóló mpe na baoyo bazali na ekspérianse koleka yo, mpo ete oyekola epai na bango, mpo na kozwa esengo lokola bango mpe okoka kolendisama na misala na bango malamu? Moklisto mwasi moko azali komikundola lisusu mokolo oyo, esili bongo koleka mibu soko ntuku mibale, mosakoli mwasi moko ya mokóló abyangaki ye na esengo nyonso mpo na kokende kosakola elongo na ye. Alobi ete ezalaki mbongwana monene kati na bomoi na ye: “Mpo na mbala ya liboso, nakendaki kosakola na likanisi na ngai moko, kasi ezali te mpo ete baboti na ngai bamemaki ngai elongo na bango.”

18. Osengeli kokanisa na likambo nini liboso ya kosenga ete bapesa yo batisimo?

18 Soki ozali kosala bokoli mpo na oyo etali kotosa mitinda na Nzambe, mbala mosusu okokanisa na batisimo mpo na mikolo mizali koya. Ezali na ntina na komikundola ete batisimo ezali molulu te oyo ezali kokomisa mwana elenge moko mokóló. Ezali mpe elembo te ete ozali kokola, soko mpe eloko oyo esengeli na yo kosala yango mpamba te baninga na yo basali yango. Liboso ya kosenga ete babatisa yo, osengeli kozala na boyebi ya solo mpe koyokanisa bomoi na yo na Liloba na Nzambe. Osengeli kozala na mwa ekspérianse kati na mosala etali koteya boyebi yango na bazalani mpe koyeba ete ezali bongo eteni ya liboso ya losambo na solo. (Matai 24:14; 28:19, 20) Esengeli na yo koyeba lisusu ete ntango okosala litambe wana ya ntina bakozela epai na yo ete otosa mitinda ya solo ya Biblia mpo na oyo etali bizaleli malamu’.b Kati na motema na yo, osengeli kokaba bomoi na yo epai na Tata na yo ya likoló, oyo alingi yo mingi.​—Tala Nzembo 40:8, 9.

19. Ntango nini moto asengeli kozwa batisimo?

19 Batisimo ezali litambe oyo moto azali koleka ntango azwi mpenza ekateli makasi ya kosalela Nzambe ata likambo nini esengeli kobima, mpo na mikolo ya bomoi na ye oyo mitikali. Yango ezali elembo ya polele ete moto asili komipesa mobimba epai na Jéhovah, na nsima na Yesu Klisto, mpo na kosala mokano na ye. Nkulutu moko azali komikundola mokolo oyo, esili bongo koleka pene na mibu ntuku mitano, ntango alobaki: “Ezali ngai nde nasengeli kozwa ekateli!” Michelle elenge mwasi moko moklisto, oyo abatisamaki na Newcastle (Angleterre) esili bongo koleka mwa mibu, alobi: “Na mibu 13, nayebaki ete nasengeli kopesa bomoi na ngai epai na Nzambe mpe kozwa batisimo; eloko moko te ezalaki kosepelisa ngai koleka kosalela Nzambe.”

20. (a) Ndakisa nini ebele na bankoto ya bilenge basili mpenza kopesa? (b) Ndenge nini tosengeli kotalela batisimo?

20 Ebele na bilenge basili kobatisama kala mingi te. Bayekolaki Liloba na Nzambe mpe bayekolaki banzela na ye, mpe, na kozwaka batisimo kati na mai, bayaki kosangana na esengo nyonso na ebele na mikóló mpo na komonisa polele liboso na bato nyonso likabo ya bomoto na bango epai na Nzambe. Bayebi ete batisimo ezali nsuka ya makambo nyonso te, kasi bobele ebandeli ya bomoi oyo epesami mobimba na Jéhovah oyo bazwi ekateli ya kosalela ye libela na libela.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Tala lisolo “Bilenge basaleli na Nzambe na ntango na kala”, lokasa 4.

b Yango elimboli te ete lokola ozwi naino batisimo te ozali bongo na lotomo ya kobuka mibeko na Nzambe. Uta ntango toyebi makambo oyo Nzambe azali kosenga tozali bongo na mokumba ya kotosa ye.- Yakobo 4:17.

Bozongeli

◻ Mpo na nini boyebi ya Liloba na Nzambe ezali na ntina monene?

◻ Ndenge nini tokoki kozwa matomba mingi koleka kati na makita ya boklisto?

◻ Matomba nini mauti na Nzambe masengeli kotinda biso na kotosa ye?

◻ Ndenge nini tokoki kokende liboso kati na mosala ya Nzambe?

◻ Ntango nini moto asengeli kozwa batisimo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto