Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/8 nk. 15-20
  • Ozali na botondi mpo na oyo Nzambe asalaki?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali na botondi mpo na oyo Nzambe asalaki?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kondima mpe misala
  • Botondi oyo ezali komonana kati na bomoi na biso
  • Silisa mikakatano oyo mizali kotemela batisimo
  • Bozwi ya mosuni
  • Tosalela Nzambe na kosengaka lisalisi epai na ye
  • Tosengeli kosala nini mpo ete tóbikisama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Kondima
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Tokoki kotángama bato ya sembo na nzela ya kondima mpe misala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Monisá kondima na bilaka ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/8 nk. 15-20

Ozali na botondi mpo na oyo Nzambe asalaki?

“Soko moto moko azali na mposa na kotambola nsima na ngai, tika amiboya ye mpenza, mpe akamata nzete na ye ya mpasi mokolo na makolo mpe alandaka ngai ntango nyonso.”​—LUKA 9;23, MN.

1. Tanga mwa makabo kitoko oyo Nzambe apesaki biso.

Bomoi na biso tozwi yango epai na Nzambe. Soki akelaki moto te, mbele tokokaki kobotama te. Kasi Nzambe apesaki biso bobele bomoi te. Akelaki biso na motindo ete tokoka kozwa litomba na ebele na biloko, lokola elengi ya bilei, molungé ya moi, mongongo ya miziki, malili na mokolo na moi makasi, bolingo. Oyo eleki lisusu, Nzambe apesaki biso boongó mpe alonaki kati na biso mposa ya koyekola koyeba ye. Apemisaki Biblia, oyo ezali kopesa biso litambwisi kitoko, ezali kolakisa ndenge nini kozala na bomoi boleki kitoko mpe ezali kopesa biso elikya ya kofanda libela kati na mokili ya sika oyo akosala Nzambe azali kopesa biso lisusu elimo santu na ye, lisungi ya lisangá, bakisa mpe baninga mibali mpe baninga basi bakembi, batondi na bolingo, oyo bakoki kosalisa biso na kozala ntango nyonso makasi kati na mosala na ye.​—Genese 1:1, 26-28; 2 Timote 3:15-17; Baebele 10:24, 25; Yakobo 5:14, 15.

2. (a) Eloko nini ya ntina monene koleka Nzambe asalaki mpo na biso? (b) Tokoki kozwa lobiko na nzela na misala na biso?

2 Likoló na nyonso, Nzambe atindaki Mwana na ye mpenza mobotami ya liboso mpo na koteya biso makambo mingi lisusu na ntina na oyo ye, Tata, azali kozela epai na biso mpe mpo na “kosikola” baoyo nyonso bakondima ebongiseli yango. (Baefese 1:7; Baloma 5:18) Mwana yango, Yesu Klisto, alobaki: “Mpo ete Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi Mwana na ye bobele moko ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi na seko.” (Yoane 3:16) Lobiko oyo epesameli nzela mpo na lisiko yango ezali na motuya mingi koleka, na boye likoki ezali te ya kozwa lobiko yango na nzela na misala, mpe mpenza te na nzela na misala oyo mikokisamaki kala na nse na Mibeko ya Moise. Yango wana Paulo akomaki: “Nde toyebi ete moto akolonga na nzela na mibeko te kasi na nzela na kondima Klisto Yesu.”​—Bagalatia 2:16; Baloma 3:20-24.

Kondima mpe misala

3. Yakobo alobi nini na ntina na kondima mpe misala?

3 Lobiko eutaka na kondima, kasi kondima mpe botondi mpo na nyonso oyo Nzambe asalaki esengeli kotinda biso na kosala eloko. Tosengeli komiyoka ete topusami na komonisa yango na misala. Yakobo, ndeko mobali na Yesu, akomaki: “Bongo na kondima, soko ezangi misala, esili kokufa kati na yango mpenza.” Alobi lisusu: “Monisa ngai kondima na yo oyo ezangi misala, ngai nakomonisa yo kondima na ngai kati na misala na ngai.” Lokola Yakobo amonisi yango, ata bilimu mabe “bakondimaka mpe bakolengaka”, kasi emonani polele ete bakosalaka te misala oyo mizali na boyokani na mokano na Nzambe. Nzokande, Abrahame azalaki na kondima mpe na misala.a “Kondima na ye esalaki mosala esika moko na misala ye, mpe kondima na ye ebongaki kati na misala na ye ”. Yakobo azongeli lisusu: “Kondima oyo ezangi misala esili kokufa lokola.”​—Yakobo 2:17-26.

4. Lokola Yesu ayebisaki yango, butu oyo balingi kolanda ye basengeli kosala nini?

4 Yesu mpe amonisaki ntina ya misala malamu na kolobaka ete: “Bongo, tika ete moi na bino engenga liboso na bato ete bamona misala na bino malamu mpe ete bakumisa Tata na bino oyo azali na likoló”. “Soko moto azali na mposa na kotambola nsima na ngai, tika amiboya ye mpenza, mpe akamata nzete na ye ya mpasi mokolo na mokolo mpe alandaka ngai ntango nyonso. Soki ‘tomiboyi’ biso moko, tokotika makambo mingi oyo mazali kosepelisa biso mpenza. Koyebaka ete tozwi biloko nyonso uta na Nzambe, tozali komipesa epai na ye mpo na kozala baombo na ye, mpe tozali koluka koyekola mpe kosala mokano na ye, na ndakisa na Yesu.​—Matai 5:16; Luka 9:23; Yoane 6:38.

Botondi oyo ezali komonana kati na bomoi na biso

5. (a) Engebene Petelo, likambo nini esengeli komonana polele kati na makambo nyonso ya bomoi na biso? (b) Misala nini kitoko azali kotinda?

5 petelo amonisi ete “makila (na Klisto) maleki nyonso na motuya”, oyo epesamaki mpo na biso, ezali mpenza na motuya mingi ete botondi na biso mpo na makila yango esengeli komonana polele kati na makambo nyonso ya bomoi na biso mobimba. Ntoma azali kotanga ebele na makambo oyo botondi na biso esengeli kotinda biso na kosala. Apesi toli ete, “bobwaka mabe nyonso”. “Boyoka mposa na mabele sembo na elimo.” ‘Boyebisa malamu na oyo abyangi bino kobima na molili kokota na moi na ye na kokamwisa.’ ‘Bopengwa longwa na mabe mpe bosala malamu.’ ‘Boselingwa mikolo nyonso mpo na kozongisa monoko na moto oyo akotuna bino mpo na ntina na elikya ezali kati na bino.’ ‘Bolekisa ntango etikali na bino na nzoto mpo na mposa mabe na bato lisusu te kasi mpo na mokano na Nzambe.’​—1 Petelo 1:19; 2:1, 2, 9; 3:11, 15; 4:2.

6. (a) Ndenge nini baklisto ya ekeke na liboso bamonisaki kondima na bango? (b) Ndakisa nini kitoko batikaki bongo mpo na biso?

6 Baklisto ya ekeke na liboso bazalaki komonisa kondima na bango. Kondima ezalaki kobongola lolenge na bango ya komonela makambo mpe bomoto na bango, ezalaki kotinda bango na koyokanisa bomoi na bango na mokano na Nzambe. Basepelaki kotika mboka na bango, kobetama mabanga, kobetama fimbo, kokangama mpe ata kobomama na esika ya kowangana kondima na bango. (Misala 7:58-60; 8:1; 14:19; 16:22; 1 Bakolinti 6:9-11; Baefese 4:22-24; Bakolose 4:3; Filemona 9, 10) Tacite, mokomi na masolo na bato oyo ayebani mingi koleka, ye moromé abotami pene na 56 ya ntango na biso, azali koloba ete baklisto “bazalaki kotumbama na butu, mpo na kongengisa mboka”. Kasi bazalaki kowangana kondima na bango te! Annales, mokanda xv, paragrafe 44.

7. Bato mosusu bazali kati na ezalela nini?

7 Tozali kokuta kati na masanga mosusu bato oyo bazali koyangana na makita uta bambula mingi. Bazali kosepela na lisangá ya Jéhovah, bazali kokanisa ete basangani na yango bazali bato baleki malamu oyo bamona epai mosusu te, bazali kokumisa solo mpe bazali kokotela yango liboso na bato oyo bazali ba Témoins de Jéhovah te. Kasi likambo moko ezali kosimba bango, kokanga bango. Naino basala te litambe kitoko oyo bato 3 000 basalaki na mokolo ya Pantekote, oyo Moetiopia mondimi asengaki kosala yango mpe oyo Ananias ayebisaki Paulo na kosala uta ntango monyokoli wana ya kala ayebaki ete Yesu Klisto azalaki mpenza Masiya. (Misala 2:41; 8:36; 22:16) Eloko nini ezali kozanga bango? Mpo na nini baleki te litambe oyo Biblia ezali kobenga “kosenga epai na Nzambe mpo na kozwa lisosoli malamu”? (1 Petelo 3:21, MN.) Soki yo mpe ozali kati na ezalela oyo soki oyebi solo, kasi ozali kokakatana mpo na kozwa ekateli yekola lisolo oyo; ebongisami na bolingo nyonso mpo na bino mpenza.

Silisa mikakatano oyo mizali kotemela batisimo

8. Soki naino osepela na boyekoli te, likambo nini ezali mayele na kosala yango kozanga koumela?

8 likambo nini ekoki kozala mokakatano mpo na yo? Lisolo lileki limonisaki ete bato mosusu bazali na nkaka mpo na koyekola bango moko, Nzambe apesaki biso boongó moko ya kokamwisa, mpe azali kozela ete tosalela yango mpo na kosalela ye. Bato oyo kala bayebaki kotanga te bamipesaki na likambo yango mpo na kozwa boyebi mingi koleka na ntina na Nzambe mpe na ntina na mikano na ye. Bongo yo? Soki oyebi kotanga, oyekolaka mpenza, lokola bato na Beloya, ‘kotangaka Makomami mokolo na mokolo’ mpo na komona soki ezali mpenza ndenge yango? Omekaka “monene mpe molai mpe bozindo” na solo? Otimolaka na mozindo mpenza kati na Liloba na Nzambe? Osili komona boni ezali kitoko? Osili kokolisa mposa ya solo ya koyeba mokano na Nzambe? Ozali mpenza na nzala ya solo?​—Misala 17:10, 11; Baefese 3:18.

9. Osengeli kosala nini soki ozali na likambo elongo na moto moko kati na lisangá?

9 Bamisusu bazali kokakatana mpo na matata moko ya solo to oyo bamikaniseli bango moko, oyo bazwanaki elongo na mosangani moko ya lisangá. Moto moko asalelaki yo mpenza mabe? Na bongo, landa etinda oyo ebimi kati na maloba oyo na Yesu: “Kenda koloba na ye mpo na libunga na ye, bino na ye esika moko.” (Matai 18:15) Mbala mosusu okokamwa na komona ete moto yango ayebi ata nkutu te ete yo otungisamaki. Kasi, ata ezali bongo te, okoki ‘kozwa ndeko na yo’, lokola Yesu alobaki yango. Okoki mpe kosalisa ye mpo ete abetisa moto mosusu libaku te. Lisusu, kanisa: Ozali kosalela nani: moto yango to Nzambe? Bolingo na yo mpo na Nzambe ezali mpenza moke mingi mpo ete otika libunga moko oyo moto ya kozanga kokoka asali ete ekweisa yango?

10, 11. Osengeli kosala nini soki lisumu moko oyo eyambolami te ezali kopekisa yo na kokola?

10 Mbala mosusu ezali lisumu ezangi koyambolama nde ezali kokanga moto mpo na kozwa batisimo. Ekoki kozala libunga moko ya kala, to ezalela moko mabe oyo ekotela ye mingi. Soki ozali kokutana na mokakatano ya lolenge wana, oyo ezali mpenza ntango ya kosilisa yango. (1 Bakolinti 7:29-31) Basaleli mingi ya Jéhovah basalaki mbongwana kati na bomoi na bango. Biblia elobi: “Na bongo, bongola mitema, mpe butwa ete bopetwa na masumu ete ntango na kopema euta na Jéhovah.”​—Misala 3:19.

11 Ezala lisumu nini oyo osalaki na ntango eleki, okoki kobongola motema, kobongola ezalela na yo, mpe kosenga lilimbisi epai na Nzambe. “Bongo, boboma bizaleli na bino biuti na nse: pite, mbindo, mposa na nzoto, mposa mabe . . . Bobwaka moto na kala na misala na ye nyonso, mpe bolata moto na sika oyo azalisami na sika mpo na boyebi, kino ekozwa ye motindo na Mozalisi na ye.” Okoki koyokanisa bomoi na yo na mitinda na Nzambe, kozala na lisosoli ya peto mpe kozala na elikya ya kofanda libela na libela kati na mokili ya sika mpe ya sembo oyo alaki. Ata milende nini oyo osengeli kosala mpo na kolonga, yango ezali mpenza na ntina. Boye te?​—Bakolose 3:5-10; Yisaya 1:16, 18; 1 Bakolinti 6:9-11; Baebele 9:14.

12. Osengeli kosala nini soki likaya, molangwa to bangi ezali kopekisa yo na kozala na lisosoli ya mpeto?

12 Ezali bongo likaya, molangwa to bangi nde ezali kopekisa yo mpo na kozala na lisosoli ya mpeto? Misala mabe wana mizali komonisa kozanga limemya mpo na likabo kitoko ya bomoi oyo Nzambe apesaki biso. Soki ezali mokakatano mpo na yo, oyo ezali mpenza ntango ya kotika yango. Ezali mpenza na motuya koleka bomoi na yo? Paulo alobi: “Tomipetola na mbindo nyonso na nzoto mpe na elimo mpe tokokisa ezaleli na biso na bulee kati na nsomo na Nzambe.” Osepelaka mpenza na banzela ya mpeto mpe ya sembo ya Nzambe mpo na kosala bongo?​—2 Bakolinti 7:1.b

Bozwi ya mosuni

13, 14. (a) Makomami mazali koloba nini na ntina na mikano mitali bozwi ya mosuni? (b) Mpo na nini ezali na ntina na kotya na esika ya liboso biloko ya likoló?

13 mokili ya lelo ezali kotya bolongi mpe “kolakisa bozwi” liboso na makambo nyonso. Kasi Yesu akokanisaki “bitungiseli na makambo na mokili, mpe bozimbisi na misolo”, lokola “nzube” oyo ezali kokangisa liloba na Nzambe. Abimisaki mpe motuna oyo: “Moto akozala na litomba nini, soko akozwa mokili mobimba nde akobongisa bomoi na ye?”​—1 Yoane 2:16; Malako 4:2-8, 18, 19; Matai 16:26.

14 Yesu amonisaki ete Nzambe azali kosenzela na boye ete bandeke bazwa bilei mpe matiti na esobe malatisama na bafelele kitoko. Na nsima alobaki ete: “Bino boleki motuya na bandeke mingi! . . . Bongo (nzambe) akoleka kolatisa bino te!” Mpe, na mayele nyonso, Yesu apesaki biso toli oyo: “Bomitungisa” mpo na biloko ya mosuni te. Alobaki: “Bolukaka nde liboso bokonzi (na Nzambe), mpe biloko oyo nyonso ekobakisamela bino.” Amonisaki ete tosengeli kotya biloko ya likoló na esika ya liboso, mpamba te, alobi, ‘esika ezali biloko na yo na motuya, motema na yo ekozala wana lokola’.​—Luka 12:22-31; Matai 6:20, 21.

Tosalela Nzambe na kosengaka lisalisi epai na ye

15. Elendiseli nini kitoko ndakisa na baklisto ya ekeke na liboso ezali kopesa biso?

15 Ezalaka na yo nkaka mpo na kopesa litatoli epai na mozalani? Ezalela ya nsoninsoni ezali kopekisa yo? Soki ee, kanisa ete baklisto ya ekeke na liboso bazalaki kooka mayoki ya motindo moko lokola biso. Nzambe aponaki bato mingi te ya mayele mpe ya nguya, kasi “biloko na bolembu kati na mokili ete ayokisa biloko na nguya nsoni”. (1 Bakolinti 1:26-29.) Bakonzi na mangomba batemelaki bato wana “bamesani na mikanda te” mpe bapekisaki bango ete batika kosakola Baklisto basalaki nini na likambo yango? Basambelaki. Basengaki epai na Nzambe ete apesa bango molende, mpe Nzambe apesaki bango yango. Mpo na yango, nsango na bango etondisaki Yelusaleme mobimba, mpe eningisaki mokili mobimba!​—Misala 4:1-4, 13, 17, 23, 24, 29-31; 5:28, 29; Bakolose 1:23.

16. “Lipata monene na batatoli” oyo bayebisami kati na Baebele mokapo 11 ezali koteya biso nini?

16 Na yango, kobanga bato esengeli te kopekisa biso na kosalela Nzambe. Kati na Baebele mokapo 11, balobeli mpo na “lipata monene ya batatoli” oyo babangaki Nzambe, kasi bato te. Tosengeli komonisa kondima ya motindo moko lokola bango. Ntoma Paulo akomi: “Na bongo mpo na biso, awa ezingelami biso na lipata monene boye na batatoli, tolongola bipekiseli nyonso mpe masumu mazali kokanga biso, topota na etingia na emekaneli na mbangu etiami liboso na biso.”​—Baebele 12:1.

17. Elendiseli nini Nzambe azali kopesa na nsima na Yisaya?

17 Nzambe akoki kopesa epai na basaleli na ye lisalisi kitoko. Mozalisi na molongo alobaki na Yisaya: “Nde baoyo bakozelaka Jéhovah, bakozwa nguya na sika, bakopumbwa likoló na mapapu lokola mpongo, bakopota mbango nde bakolemba te, bakotambola nde bakosenzwa te.”​—Yisaya 40:31.

18. Soki ezalela ya nsoninsoni nde ezali kokanga yo mpo na kosangana na mosala ya kosakola Bokonzi, ndenge nini okoki kolonga yango?

18 Batemwe na mpiko mpe na esengo oyo ozali komona kati na lisangá ya mboka na bino bazali bobele mwa ndambo moke ya ba milió misato na ndambo ya mibali mpe basi oyo bazali kosalela Nzambe na molende kati na mokili mobimba. Bazali kosepela mpo na kosangana na mosala oyo Yesu Klisto ye moko asakolaki na maloba oyo: “Mpe nsango malamu oyo na bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” Soki ozali kokakatana mpo na kosangana na mosala ya kosakola Bokonzi, wana ezali yo kokokisa masengami mpo na kosala yango, mpo na nini te kosenga epai na Temwe moko oyo azali kozwa matomba malamu kati na mosala ya Nzambe soki akoki kobima na yo kati na mosala ya kosakola? Nzambe azali mpenza kopesa “nguya oyo eleki nguya na bomoto”, mpe mbala mosusu okokamwa na komona esengo oyo mosala wana mpo na Nzambe ezali kopesa.​—Matai 24:14; 2 Bakolinti 4:7; tala lisusu Nzembo 56:11; Matai 5:11, 12; Bafilipi 4:13.

19. Mosala nini ya koteya Yesu atindaki epai na bayekoli na ye ete bakokisa yango?

19 yesu azali kozela epai na baoyo bazali kosepela na nsango ya Bokonzi ete bazwa mpenza ekateli. Alobaki: “Boye bokenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo na Tata mpe na Mwana mpe na elimo santu, kolakisaka mpe bango ete batosa nyonso esili ngai kolaka bino.”​—Matai 28:19, 20.

20. Soki ozali kokola kati na elimo, motuna nini mbala mosusu okolinga kotuna yango mosika te?

20 Botondi na yo mpo na bolamu oyo bouti na Nzambe, mpo na “makila (na Yesu) oyo maleki nyonso na motuya” mpe mpo na elikya kitoko ya bomoi na seko ezali kotinda yo na kosala eloko? (1 Petelo 1:19) Osili koyokanisa bomoi na yo na mitinda na sembo ya Nzambe? Ozali kosangana ntango nyonso kati na mosala etali kozalisa bayekoli? Osili komiboya yo moko mpe osili kokaba bomoi na yo epai na Nzambe? Soki oyanoli kozanga kokakatana na kondimaka ee na mituna nyonso oyo, mbala mosusu ekozala ntango ya kotuna epai na nkulutu moko kati na bankulutu ya lisangá oyo ozali koyangana motuna moko oyo mondimi Moétiopia atunaki na Filipi: “Likambo nini ekopekisa ngai kobatisama?”​—Misala 8:36.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na kozwa makanisi ya sikisiki likoló na lolenge ya kotika bizaleli wana, tala La Tour de Garde ya 1er Mai 1981, pages 3 kino 12; ya ler Septembre 1973, pages 528 kino 535; Réveillez-vous! ya 8 Octobre 1982, pages 3 kino 12; ya 22 Août 1981, pages 3 kino 11. Mbala mosusu bazulunalo oyo ezali kati na biblioteke ya Salle du Royaume ya ba Témoins de Jéhovah ya mboka na bino.

b Libongoli ya Synodale ebongoli ete: “Amiboya ye moko.” La parole vivante (libongoli ya Kuen) ekomi: “atika balotomo na ye nyonso.” Biblia ya Pierre de Beaumont elobi: “Atika moyimi na ye.”

Bozongeli

◻ Bantina nini ya sikisiki mpenza tozali na yango mpo na kozala na botondi epai na Nzambe?

◻ Kondima na biso.mpe botondi na biso esengeli kotinda biso na kosala nini?

◻ Makambo nini makoki kopekisa moto na kotosa Nzambe, mpe ndenge nini tokoki kosilisa yango?

◻ Mituna nini bato oyo bazwi naino batisimo te basengeli komituna?

[Etanda na lokasa 18]

’lolenge nini ya ’’mabele’’ ngai nazali?’

Yesu apesaki elakiseli moko oyo ezalaki komonisa moto moko oyo abimi mpo na kolona. Milona mikweaki pembeni na nzela, mpe bandeke balyaki yango. Misusu mikweaki na bisika ya mabanga bisika oyo ezalaki na mabelé mingi te. Yango ebimaki, kasi ntango moi makasi ebimi, ezikisi yango mpe ekufaki. Milona misusu mpe mikweaki katikati na nzube mpe ekufaki Yesu amonisaki likambo oyo biteni misato wana ezalaki komonisa: ya liboso, moto oyo “ayoki liloba na bokonzi, kasi akangi ntina na yango te”; ya mibale, moto oyo andimi liloba kasi “komekama to monyoko” epengwisi ye; mpe, ya misato, moto oyo epai na ye “makambo na mokili mpe mposa na mosolo ebomi liloba”.

Kasi Yesu alobaki lisusu mpo na mboto mosusu, oyo ekweaki likoló na mabelé kitoko. Alobi: “Azali ye oyo ayoki liloba mpe akangi ntina; ye aboti mbuma.”​—Matai 13:3-8, 18-23.

Ekozala malamu mpenza na komituna: “Mabele” ‘ya lolenge nini ngai nazali’?

[Etanda na lokasa 19]

Bakufaki mpo na kondima na bango

Oyebi bato oyo bazalaki kokufa na esika ete báwangana ’ kondima na bango? Bankoto na ba Témoins de Jéhovah basalaki yango. kati na mokanda na ye L‘Etat nazi et les nouvelles religions: Etude portant sur cinq cas de non-conformisme (angl.), christine king akomi: “Temwe moko ya allemand kati na mibale akangamaki na boloko, moko kati na minei abungisaki bomoi na ye.

Na 1945, ntango nsomo ya ba camps esilaki, ’’Batemwe basilaki kobakisama kozanga kowangana kondima na bango ata moke’’. kati na mokanda La persécution des Églises par les nazis (angl), J. conway alobaki mpo na Batemwe: ”lingomba mosusu te emonisaki etelemelo ya motindo moko liboso na nguya makasi ya koboma ya Gestapo.”

Ba Témoins de Jéhovah banyokwamaki te mpo na makambo ya politike to ya kokabola bamposo. Te, banyokwamaki bobele na ntina na bolingo na bango mpo na Nzambe mpe mpo na koboya na bango ya kobebisa lisosoli na bango oyo eteyami na Biblia.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto