Yesu bomoi na ye mpe mosala na ye
Ndenge nini kozala na boyokani malamu
NSIMA na elambo na Nkolo, Yesu auti kolendisa bantoma na ye na kosololaka na bango na polele nyonso mpe na bosembo nyonso. Mbala mosusu tosili koleka minuit. Yango wana Yesu alobi: “Botelema, tolongwa awa.” Kasi, liboso ete bakenda, na bolingo oyo azali na yango epai na bango, alandi koloba na bango na kopesaka bango elakiseli moko malamu mpenza.
Na maloba na ebandeli, alobi boye: “Ngai nazali mowiti na solo mpe Tata na ngai azali mobongisi”. Moloni monene, Jéhovah Nzambe, alonaki mowiti yango ya elilingi ntango apakolaki Yesu na elimo santu, na ntango azwaki batisimo, na automne na mobu 29 na ntango na biso. Kasi Yesu amonisi na nsima ete mowiti elimboli bobele ye moko te, na kolobaka ete:
“Etape na etape kati na ngai oyo ekobotaka mbuma te, akolongolaka yango; mpe etape na etape oyo ekobotaka mbuma, akopetola yango, mpo ete ebota mbuma mosusu . . . Lokola etape ekoki kobota mbuma yango mpenza te soko ekoumela na mowiti te, bino mpe bokoki te soko bokoumela kati na ngai te. Ngai mowiti na solo, bino bitape.”
Mikolo 51 nsima na Pantekote, bantoma mpe baklisto mosusu bakomaki bitape na mowiti ntango elimo santu esopamaki likoló na bango. Na nsuka na yango, bato 144 000 bakómaki bitape ya mowiti na elilingi. Elongo na mobimbi na mowiti, Yesu Klisto, bakómaki mowiti na elilingi oyo ezali kobimisa mbuma na Bokonzi na Nzambe.
Yesu alimboli ndenge nini kobota mbuma: “Ye oyo aumeli kati na ngai lokola ngai naumeli kati na ye, akobota mbuma mingi mpamba te bokoki kosala likambo longwa na ngai te.” Kasi, Yesu alobi na ntina na ye oyo abimisi mbuma te ete: “Akobwakama lokola etape mpe akokauka; bato bakolokota yango mpe bakobwaka yango na móto mpe ekozikisama.” Epai mosusu, Yesu apesaki elaka oyo elandi: “Soko bokoumela kati na ngai mpe maloba na ngai makoumela kati na bino, bolomba likambo nini mingi bino mpe ekosalamela bino.”
Na nsima Yesu amonisi epai na bantóma likambo oyo ezali kokumisa Tata, alobi: “Bobolaka mbuma mingi mpe bokóma bayekoli na ngai.” Mbuma oyo Nzambe alingi ete bitape bibota yango ezali bongo bizaleli bikokani na oyo ya Klisto, mpe mingimingi bolingo. Epai mosusu, lokola Yesu azalaki mosakoli na Bokonzi na Nzambe, mbuma yango ya malamu esangisi mpe mosala oyo ya kozalisa bayekoli lokola Klisto asalaki yango.
Sikawa Yesu apesi bango etinda oyo ete “Boumela kati na bolingo na ngai.” Kasi, bantóma na ye bakoumela kati na bolingo na ye ndenge nini? Alobi ete: “Soko bokotosa malako na ngai, bokoumela kati na bolingo na ngai.” Mpe alobi lisusu boye: “Lilako na ngai ezali boye ete bolingana lokola ngai nasili kolinga bino. Moto te azali na bolingo boleki oyo ete moto asopa bomoi na ye mpo na baninga na ye.”
Nsima na mwa ntango, Yesu amonisaki bolingo yango eleki monene na kopesáká bomoi na ye mpo na bantoma na ye, mpe mpo na baoyo nyonso bakondimela ye. Ndakisa na ye esengeli kopusa bayekoli na ye na komonisa kati na bango, bolingo yango oyo ezali komema kino na komipesa mpo na bamosusu. Yango ekozala elembo ekokesenisa bango lokola Yesu alobaki yango mwa liboso: “Bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.”
Komonisáká banani bazali baninga na ye, Yesu alobi ete: “Bino bozali baninga na ngai soko bokosalaka yango esili ngai kolakela bino. Nakobyanga bino lisusu baombo te, mpamba te moombo ayebi yango ekosalaka nkolo na ye te. Nde nasili kobyanga bino baninga, mpamba te nayebisi bino makambo nyonso mayoki ngai epai na Tata na ngai.”
Oyo nde libaku malamu boye: kozala baninga ya motema na Yesu! Kasi mpo na kozala na boyokani na ye. bayekoli basengeli “kobota mbuma” ntango nyonso. Yesu alobi na bango ete, soko bozali kosala bongo. “likambo nyonso ekolomba bino epai na Tata na nkombo na ngai, (akopesa) bino yango.” Ya solo, ekozala mpenza mbano monene mpo bamemaki mbuma na Bokonzi!
Nsima na kolendisa bantoma ete bazala na bolingo kati na bango’, Yesu alimboli bango ete mokili ekoyina bango. Kasi, alendisi bango na maloba malandi: “Soko bamokili bazali koyina bino, boyeba ete basili koyina ngai liboso naino bayinaki bino te.” Nsima na yango apesi ntina oyo bamokili bakoyinela bayekoli na ye, na kolobáká: “Nde awa (bozali bato) na mokili te, kasi nasili kopona bino longwa na mokili, bongo bamokili bazali koyina bino.”
Kolimbolaka lisusu na mozindo mpo na nini mokili ekoyina bango, abakisi boye: “Bakosalela bino makambo oyo nyonso mpo na nkombo na ngai, mpamba te bayebi Motindi (Jéhovah Nzambe) na ngai te.” Na yango, bikamwiseli oyo Yesu azali kosala emonisi ete bato oyo bazali koyina ye bazali kosala mabe. Amonisi yango na maloba oyo: “Soko nasali kati na bango te misala misalaki moto mosusu te, nde bazalaki na masumu te. Sikawa, basili komona mpe koyina na ngai mpe Tata na ngai lokola.” Na yango lokola Yesu alobi yango, liloba likomami lisili kokokana: “Bayinaki ngai na ntina te.”
Lokola asalaki yango na liboso, Yesu alendisi bantóma na ye mpe apesi bango elaka ete akotindela bango mosungi, yango elimo santu, elingi koloba bokasi na Nzambe oyo ekosalaka misala, “Yango ekotatola mpo na ngai mpe bino bokotatola.” Yoane 14:31 kino 15:27; 13:3, 35; Bagalatia 6:16; Nzembo 35:19; 69:4.
▪ Na eleko nini jéhovah alonaki mowiti na elilingi. mpe ntango nini mpe ndenge nini bato mosusu babandaki kokóma bitape na mowiti yango?
▪ Na nsuka mpenza, mowiti na elilingi ekómaki na bitape boni?
▪ Mbuma nini Nzambe alingi ete ebima na bitape?
▪ Ndenge nini tokoki kokóma baninga na Yesu?
▪ Mpo na nini mokili ezali koyina bayekoli na Yesu?