Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/8 nk. 15-20
  • Tosala na bosembo nyonso elongo na Jehovah

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tosala na bosembo nyonso elongo na Jehovah
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tozali kosasela nani?
  • Mosala mosalami na banguna
  • Misala mizangi ntina
  • “Misala malamu” na ntango na biso
  • Mosala oyo eleki ntina
  • Tosala elongo na lisangá
  • Kosala elongo na Nzambe epesaka esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Sepelá na mosala na yo
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Moná bolamu mpo na mosala na yo ya makasi
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/8 nk. 15-20

Tosala na bosembo nyonso elongo na Jehovah

“E Nzambe, olakisi ngai longwa na bolenge na ngai; kino sikawa nazali kosakola misala na yo na kokamwa.​—NZEMBO 71:17.

1. Mpo na nini tokoki koloba ete mosala ezali likabo euti na Jéhovah?

MOSALA ezali moko na makabo oyo Nzambe apesaki epai na moto. Jéhovah alobaki boye epai na baboti na biso ya liboso, Adam mpe Eva: “Botondisa mokili mpe botya yango na nse na bino.” Ezalaki mosala monene, kasi bazalaki na makoki ya kosala yango malamu. Makasi mpe mayele oyo basengelaki kobimisa elingaki kobakisa esengo na bango ya bomoi, esengo oyo elingaki koleka bolamu nyonso oyo banyama bazalaki elongo na bango bakokaki kooka. na efandelo na bango, na mabelé.​—Genese 1:28.

2, 3. (a) Na mikolo na biso, bato mingi bazali kotalela mosala ndenge nini mpe mpo na nini? (b) Likoki nini tosengeli kotalela oyo ezali na biso mpo na kokokisa mosala moko ya ntina?

2 Ata kati na ezalela na biso ya kozanga kokoka, “mosala makasi” oyo ekobimisa “bolamu” ezali “likabo na Nzambe”, lokola moto na mayele Salomo akomi yango. (Mosakoli 8:13). Kino sikawa moto azali na mposa ya kosalela mayele mpe makasi na ye. Moto azali komiyoka mabe soko mosala ezali te. Kasi misala minso mizali malamu te mpe mizali kopesa esengo te. Bato mingi bazali komona mosala lokola etumbu oyo basengeli kokokisa mpo na kozwa bilei.

3 Nzokande, ezali na mosala moko ya esengo oyo biso banso tobengami ete tokokisa yango. Kasi baoyo bazali kokokisa yango bazali na banguna mingi mpe basengeli kolonga mikakatano ebele. Mpo na nini ezali na ntina ete tozala na makoki ya kokokisa mosala yango? Tokokoka kosala yango ndenge nini? Liboso na koyanola na mituna oyo, totalela naino motuna oyo molandi:

Tozali kosasela nani?

4. Mosala nini ezalaki kopesa esengo mpe ezalaki kosepelisa Yesu?

4 Yesu Klisto alobaki ete: “Bilei na ngai ezali boye ete nasala mokano na Motindi na ngai mpe ete nasukisa mosala na ye.” (Yoane 4:34) Yesu azalaki kooka esengo mingi mpe asepelaki mingi na kosalela Jéhovah na bosembo nyonso. Mosala na ye epesaki ntina na bomoi na ye, mpe na nsuka ya mosala na ye ya mbula misato na ndambo, akokaki koloba na bosolo nyonso epai na Tata na ye ya makoló ete: “Ngai nasili kokumisa yo na mokili. Nasilisi mosala mopesi yo ngai ete nasala yango.” (Yoane 17:4). Bilei ya mosuni ezali kobatela moto na bomoi; ezali motindo moko na mosala oyo ezali na ntina mingi kati na elimo. Yesu amonisaki yango polele mbala mosusu ntango apesaki toli oyo elandi: “Bosalaka te mpo na bilei bikobeba kasi mpo na bilei yango bikoumela kino bomoi na seko.” (Yoane 6:27) Nzokande, mosala oyo mozali kobota mbuma te na elimo ekomema na kozanga esengo mpe na liwa.

5. Nani atemelaki mosala malamu oyo Yesu akokisaki, mpe mpo na nini?

5 “Tata na ngai azali naino kosala mosala, ngai mpe nazali kosala.” Yesu amonisaki likambo yango epai na Bayuda oyo bazalaki kotonga ye mpo ete abikisaki mobali moko azalaki na maladi uta mibu 38, na mokolo na sabata. (Yoane 5:5-17) Yesu azalaki kokokisa mosala ya Jéhovah, kasi banguna na ye bakonzi ya mangomba bazalaki kolinga kondimá likambo yango te mpe bazalaki koluka na ndenge nyonso ete bápekisa ye. Mpo na ntina nini? Mpamba te bautaki na tata na bango, ye Satan le Diable, oyo azali ntango nyonso kotemela mosala ya Jéhovah (Yoane 8:44). Mpo ete Satana akoki ‘kobongwana lokola anzelu ya pole na kosaleláká “lokuta nyonso ya bokesene”, esengeli na biso tozala na bososoli mpe pole na elimo, mpo na koyeba ndenge misala na ye mizali. Soko tosali bongo te, tokoki komikotisa na mosala oyo ezali kotemela Jéhovah.​—2 Bakolinti 11:14; 2 Batesalonike 2:9, 10.

Mosala mosalami na banguna

6. Mpo na nini bapengwi bazali “basali na bokosi”? Pesa ndakisa moko.

6 Bamoko, na ndakisa bapengwi, bamimonisi kozanga bosembo na kolukaka kokotela Satana mpo na kobebisa kondima ya basangani ya sika ya lisangá na boklisto. (2 Bakolinti 11:13) Na esika ya kosalela bobele Biblia lokola moboko na mateya na solo, bazali koluka libosoliboso ete bakweisa Biblia Les Saintes Ecritures Traduction du monde nouveau, lokola soko nde ba Témoins de Jéhovah batiki kosalela Biblia yango, bakokoka lisusu te kolongisa mateya na bango. Nzokande ezali bongo te. Na ndakisa, eteni monene na ekeke oyo, Batemwe oyo bakolobaka Lifalanse, bazalaki mingimingi kosalela mabongoli lokola oyo ya Segond mpe Bible de Crampon (1905) to libongoli ya motindo nyonso oyo ezali na monoko na bango, mpo na koyekola solo na ntina na Jéhovah mpe mikano na ye. Bazalaki kosalela mabongoli oyo na kala mpo na kosakola solo na ntina na ezalela ya bakuti, na ntina na bitelemelo bitali Nzambe mpe Mwana na ye, mpe mpo na bantina oyo bobele etuluku moke ekokenda na likoló. Bato oyo bayebi bango malamu, bayebi lisusu ete ba Témoins de Jéhovah bazali kino sikawa kosalela mabongoli mingi ya Biblia na mosala na bango ya kosakola kati na mokili mobimba. Nzokande, uta 1961 mpo na monoko na Lingelisi mpe uta 1974 mpo na Lifalanse, Batemwe bazali kosepela kosalela lisusu Traduction du monde nouveau, libongoli ya sika, oyo ezali sembo mpe polele.

7. (a) Mpo na nini Yesu ekangami bato mingi oyo balobi ete bazali kondimela ye? b) Mpo na nini ezali na ntina mpo na kolanda toli epesami kati na 1 Yoana 4:1?

7 Yesu alobaki ete akoangana bato mingi oyo bakoloba ete bazalaki kondimela ye. Alobaki polele ete bato yango bakoki kosakola, kobimisa badémo mpe ‘kosala bikamwiseli mingi’ na nkombo na ye. Kasi akobenga bango ‘bato bazali kotyola mobeko.’ (Matai 7:21-23) Mpo na nini? Mpamba te bato yango bakosala te mokano ya Tata na ye ya makoló mpe bakozala na ntina moko te na miso na Jehovah Nzambe. Na mikolo na biso, bikamwiseli minene, oyo ezali komonana lokola mirakle, ekoki ntango nyonso kouta epai na mokosi monene, Satana. Na mokanda ya liboso oyo atindaki epai na baklisto nyonso koleka mibu 60 nsima na liwa mpe lisiko na Yesu, ntoma Yoane apesaki toli oyo: ‘Bondima liloba nyonso te lipemami, kasi bomeka maloba mapemami mpo na koyeba soko mauti na Nzambe.’ Tosengeli kosala motindo moko.​—1 Yoane 4:1.

Misala mizangi ntina

8. Ndenge nini tosengeli kotalela misala ya nzoto?

8 Ata tozali kosala misala ya mabe te na elimo, molende na biso ekozala mpamba soko ntango nyonso tozali koluka kokokisa bamposa ya mosuni oyo na masumu. Ntoma Petelo alobi ete tokokisaki uta kala “mokano na mabota (bapakano) . . . na mobulu mpe na mposa mabe, komeláká vinyo mpe kozala na lokoso mpe na molangwa mpe na kosambela bikeko.” (1 Petelo 4:3, 4) Yango elingi koloba te ete baoyo nyonso bazali sikawa baklisto bamipesi na Nzambe bazalaki kosala misala yango, kasi elimboli ete baoyo bazalaki kosala yango babongolaki nokinoki makanisi na bango wana mayele na bango ya elimo ekoláki. Mokili ezali koloba mabe na ntina na kobongwana na bango; esengeli mpenza kosalama bongo. Nzokande, esengelaki na bango kobongwana mpo bakoma basali ya sembo na mosala ya Jéhovah.​—1 Bakolinti 6:9-11.

9. Toyekoli nini na ndakisa ya moklisto mwasi oyo abandaki koyekola mosala ya koyemba?

9 Jéhovah asili kopesa biso makabo mingi mpo na esengo na biso, kati na yango miziki. Kasi lokola “mokili mobimba ezali kolala na oyo mabe (Satan le Diable)”, ezali mpe bongo moko mpo na miziki. Boye te? (1 Yoane 5:19) Ya solo, miziki ekoki kozala motambo ya kobombama. Sylvana, ye oyo ayekolaki mosala ya koyemba na France, amonaki ete likambo yango ezali solo. Alobi boye: “Nazalaki na mposa mozindo ya kosalela Jéhovah. Nazalaki na esengo ya kosala mosala ya pionnier auxiliaire mpe nazalaki na elikya ya kokokisa yango elongo na mosala na ngai ya mosuni. Kasi mokakatano ya liboso nakutanaki na yango na mosala na ngai ya mosuni ezalaki pite. Na ebandeli baninga na ngai bazalaki kotyola ngai ete nafungola miso te lokola nazalaki koboya etamboli na bango mpe masolo na bango ya mabe. Na nsima, lokola nazalaki elongo na baninga mabe, nabandaki lisusu koyina mabe te, nakómaki kondima makambo oyo Jéhovah azali koboya. Moko kati na balakisi na ngai azalaki kolendisa ngai ete nakomisa koyemba lingomba na ngai. Bazalaki kolakisa ngai ndenge nini kozala nzunzu to kasakasa soko nazali koyemba mpe namimona ete naleki bayembi mosusu. Nyonso wana ezalaki kosepelisa ngai te. Na nsuka, namibongisaki mpo na momekano. Nabondelaki Jehovah mpo ete alakisa ngai polele nzela nakoki kolanda. Atako nayembaki kitoko mpenza mpe kozanga kobanga, naponamaki te. Na nsima, nayaki koyeba ntina: Nkombo ya bato oyo bazwaki na momekano ekomamaki na nkuku uta kala. Kasi nazwaki eyano ya polele na libondeli na ngai; mpe nazwaki ekateli ya kotika koyemba mpo na kopesa mateya ya koyemba na ndako.” Na nsima, Sylvana abalaki nkulutu moko kati na lisangá ya baklisto, oyo kati na yango bazali sikawa komipesa na bosembo nyonso mpo na kokólisa matomba ya Bokonzi.

10. Likanisi nini ezali kati na maloba na Yesu mazwami na Yoane 3:19-21?

10 Yesu alobaki ete: “Moto na moto oyo azali kosalaka (misala mabe) ayini moi mpe akoyaka epai na moi te ete misala na ye miyebisama te.” Nzokande “Ye oyo azali kosalaka sembo akoyaka epai na moi ete misala na ye mimonisama ete misalami kati na Nzambe.” (Yoane 3:19-21) Oyo nde bolamu mpo na kosala na boyokani na bolingo mpe na mokano ya Jéhovah! Nzokande mpo na kolonga, tosengeli ntango nyonso kotika ete misala na biso misosolama na pole ya Liloba na Nzambe. Mbula etyameli ndelo te mpe nsuka ezali te mpo na kobongwana mpe kondima libyangami ya komipesa na mosala ya Jéhovah, oyo ezali kopesa esengo mpenza.

“Misala malamu” na ntango na biso

11. “Misala malamu” nini bato mingi bazali kosala mpe mpo na nini yango ekoki kolongola esengo na bango?

11 Na mikolo na biso, mpo ete mosala epesa esengo, esengeli kokokisa bamposa oyo ezali komonana sikawa. Bato mingi ya malamu bayebi yango mpe bazali kosala oyo babengaka mingimingi “misala malamu” mpo na bolamu na bato nyonso ya mokili to mpo na ntina moko ya sikisiki. Kasi mosala motindo yango ekoki solo kolongola esengo! Na Grande-Bretagne, CAFOD (Fonds catholique pour le dévéloppement des pays d’outre-mer) elobaki maloba malandi mpo na milende na yango ya kosalisa bato bazali kokufa nzala: “Eleki mbula misato . . . tokongolaki bamilio ya sterling mpo na kosalisa bato oyo bazali na mpasi. Bato mingi babikaki. Sikawa, bobele bato yango babelemi na mpasi lisusu . . . Mpo na nini bongo? Mbeba ezali wapi?” Kati na rapport na yango, zulunalo CAFOD elimboli ete balukaki kosilisa mikakatano mikoumelaka mpe ete “mosolo nyonso oyo bazalaki kozela mpo na kobongisa bomoi na bato esalelamaki mpo na kopesa lisungi na matata (bitumba ya bana mboka)”. Na ntembe te osila koyoka nsango ya bibongiseli mpo na kosala malamu oyo emipesaki mpo na mosala motindo yango komilela na motindo oyo.

12. Wapi motindo bobele moko oyo mikakatano na mokili mikoki kosila?

12 Nzala ezali likambo esengeli kotalelama nokinoki. Kasi banani bazali kosakola ete nzala mpe bitumba ya kokamwa oyo ezali komonana na eleko na biso ezali kokokisa esakweli na Yesu mpe bizali komonisa ete tokomi na nsuka na biloko mabe na ntango oyo? (Matai 24:3, 7) Nani azali kosakola ete makambo yango makokani na bopoti mbango na bampunda minei oyo elobelami na ndenge ya kokamwa kati na Biblia, na mokapo 6 ya Emoniseli? Ba Témoins de Jéhovah bazali kosakola yango kozanga kolemba mpe na bosembo nyonso kati na zulunalo oyo. Mokano na bango ezali nini? Mpo na komonisa ete moto azali na likoki te ya kosilisa mikakatano oyo mpo na ntango molai. Yango elingi koloba te ete baklisto basengeli kotala mpamba mikakatano ya mokili. Ezali bongo te. Bazali nde koyoka mawa mpo na ezalela yango mpe bazali kosala nyonso mpo na kokitisa mpasi ya bazalani na bango. Kasi, na elimo ebongi, bazali koyeba ete kozanga Nzambe, mikakatano ya mokili mikosila soko moke te. Lokola babola, mikakatano yango mikozala ntango nyonso oyo nzela ekopesama na Satana ete ayangela mokili.​—Malako 14:7; Yoane 12:31.

Mosala oyo eleki ntina

13. Mosala nini esengeli kosalema nokinoki na mikolo na biso mpe nani azali kosala yango?

13 Mosala oyo eleki ntina na mikolo na biso, ezali oyo ya kosakola nsango malamu, kosakola ete etikali moke Bokonzi na Jéhovah Nzambe ekokitana bikonzi nyonso ya mokili mpe ekokokisa elikya ya bato nyonso bazali kobanga Nzambe. (Danyele 2:44; Matai 24:14) Mpo na Yesu Klisto kosakola Bokonzi ya makoló ezalaki mokano ya liboso kati na bomoi na ye, atako mosala na ye esukaki bobele na Palestine. Na mikolo na biso, lokola Yesu asakolaki yango, mosala yango ezali kosalema kati na mokili mobimba. (Yoane 14:12; Misala 1:8) Ezali privilege monene na kosangana na mosala ya Nzambe, ata soko tozali kosala moke. Mibali, basi, mikóló mpe bilenge oyo bandimaki te ete bakokoma basakoli ya nsango malamu bazali sikawa na molongo ya liboso kati na mosala ya kopalanganisa nsango malamu oyo ba Témoins de Jéhovah bazali kokokisa lelo oyo. Lokola Noé mpe libota na ye, na nzela na nguya oyo Nzambe azali kopesa bango, bato yango bazali kosala na bosembo nyonso mosala oyo Apesi bango, liboso na nsuka ya biloko mabe na ntango oyo.​—Bafilipi 4:13; Baebele 11:7.

14. Na ndimbola nini mosala ya kosakola ezali mosala ezali kobikisa mpe kobatela?

14 Mosala ya kotatola oyo ba Témoins de Jéhovah bazali kosala na mikolo oyo ya nsuka ezali lobiko mpo na baoyo bazali koyoka nsango malamu mpe bazali kotosa yango. (Baloma 10:11-15) Ezali mpe libateli mpo na baoyo bazali kosakola. Na kolukáká na bosembo nyonso mpo na kosalisa bato oyo bazali kokutana na mikakatano minene lokola oyo biso tozali kokutana na yango, tozali na ntango mpenza te mpo na komibanzabanza na mikakatano mikoki koyela biso. Tozali koyeba ete mokili oyo mobelemi na libebi elingi ete tolanda banzela na yango. Na boye, na kotondisaka elimo na biso na makanisi na Nzambe ntango tozali kosakola, tokolendisa te bobele kondima na biso, kasi tokosala mpe mpo na bolamu na biso. Yango wana Temwe moko alobaki boye: “Soko nakoki te kopusa bato oyo nazali kokutana na bango ete babongwana, bango nde bakoki kobenda ngai ete nabongwana!”​—Tala 2 Petelo 2:7-9.

Tosala elongo na lisangá

15. Mikumba nini epesami na babateli na mpate balandi na mikolo na biso mpe engebene 1 Timoté 3:1, bandeko mibali nyonso bazali kati na lisangá basengeli kozala na mposa ya nini?

15 Soko bato oyo bazali kosepela uta mwa ntango moke na solo babandi kosangana na biso na lisangá, bazali komitya na libateli ya Mobateli na Mpate aleki monene, Jéhovah Nzambe, mpe Mobateli na mpate aleki malamu, Yesu Klisto. (Nzembo 23:1; Yoane 10:11) Babateli yango na mpate bazali na makoló bazali komonisama awa na mabelé na babateli na mpate balandi na etonga oyo bazali sembo baponami kati na lisangá mokomoko. (1 Petelo 5:2, 3) Kokokisa mokumba yango ezali privilege monene mpenza na mikolo ya nsuka oyo tozali kobika. Mosala ya mobateli na mpate ezali mokumba monene: etali bobele te kopesa ndakisa na mosala ya kosakola, mpe na mosala ya koteya kati na lisangá, kasi etali lisusu kobatela etonga na makama na banguna na elimo mpe na mopepe mabe oyo ezali na mokili oyo tozali kobika kati na yango. Bandeko mibali oyo bazali kati na lisangá bakoki mpenza kozala na mposa ya mosala ya esengo oyo ya kokengela basangani ya lisangá ya boklisto oyo ezali kokola, bazala na kolongono malamu ya elimo.​—1 Timote 3:1; Tala Yisaya 32:1, 2.

16. Na lolenge nini baklisto oyo bazali babateli na mpate bazali kosala na elongo?

16 Tosengeli kobosana soko moke te ete babateli na mpate wana bazali mibali, oyo mokomoko kati na bango azali na bizaleli na ye mpe bolembu na ye, lokola basangani mosusu na etonga. Moko kati na bango akoki kozala na makoki mingi na likambo moko etali kobatela bampate, nzokande makabo ya mosusu ekozala na litomba mpo na lisangá na lolenge mosusu ekeseni. Misala na baklisto oyo, bankulutu, ezali kosangana esika moko mpo na kolendisa lisangá. (1 Bakolinti 12:4, 5) Basengeli soko moke te kotika ete elimo ya kowelana ekota kati na bango. Bazali kosala elongo mpo na kobatela mpe kokolisa matomba na Bokonzi, bazali kobondela Jéhovah na “kotombolaka maboko na sembo” mpe bazali koluka lipamboli na ye mpe litambwisi na ye na bikateli na bango nyonso.​—1 Timote 2:8.

17. (a) Mokumba nini tozali na yango? (b) Soko tolingi kokokisa malamu mpenza mosala na biso, likambo nini tosengeli kopengola?

17 Mosala ya kosakola esengeli sikawa kosalama nokinoki, mpamba te nsuka na boyangeli na Satana ebelemi. Biso baoyo tozali na solo ya Liloba na Jéhovah Nzambe mpe tozali Batemwe na ye, tozali na mokumba ya kopalanganisa nsango malamu na mabaku nyonso. Mosala oyo etikali mpo na kokokisa ezali mingi mpo tomipesa na yango kino nsuka. Tomitika te kopengwisama na bolukiluki ya bisengo na ndenge ya mabe, tobendama mpe te na mposa ya mosolo. Tomipesa mpe te na makanisi mazangi moboko, na kolobaloba mpambampamba, mpo ete yango ekoki kozala mosala mozangi ntina mpe kolekisa ntango mpamba. (2 Timote 2:14; Tito 1:10, 3:9) Ntango bayekoli batunaki epai na Yesu: “Nkolo, okozongisela Yisraele bokonzi na ntango oyo?”; Yesu atambwisaki makanisi na bango na mosala oyo ezalaki kozela bango, na kolobáká ete: “Bokozala batatoli na ngai kati na Yelusaleme, na Yuda mobimba, na Samaria, mpe kino nsuka na mokili.” Yango ezali mosala na biso kino lelo oyo.​—Misala 1:6-8.

18. Mpo na nini ezali likambo na esengo mpenza na kosala elongo na Jéhovah?

18 Kosala elongo na Jéhovah mpe kosakola elongo na lisangá na ye kati na mokili mobimba na mikolo na biso, ezali yango nde ekopesa yo bolamu, esengo mpe mokano ya solo kati na bomoi. Mosala yango ezali kopesa epai na moto na moto oyo azali kolinga Jéhovah likoki ya komonisa bokangami na ye mpe bosembo na ye, Na bandenge na yango ekeseni, mosala yango ekosalema se mbala moko. Kobateláká bongo elikya ya bomoi na seko, tika ete tolanda na bosembo nyonso “kosalela Nzambe na mosala na bulee . . . na nsomo mpe na botosi”, mpo na kosanzola ye mpe mpo na lobiko na biso!

​—Baebele 12:28.

Bozongeli?

◻ Mosala nini ezalaki kopesa esengo mpe bosepeli epai na Yesu?

◻ Nani azali kotemela mosala na Jehovah, mpe mpo na nini?

◻ Bokeseni nini ezali kati na “misala malamu” ya mokili mpe mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe?

[Elilingi na lokasa 18]

Yesu apesi bayekoli na ye etinda ya kokende kosakola

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto