Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/9 nk. 18-23
  • Ozali koluka mokumba?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali koluka mokumba?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makámá oyo mazali liboso na bankulutu
  • Nzambe azali kopesa mposa ya kosala
  • Tosalela Jéhovah na esengo nyonso lokola ye alingi yango
  • Totya miso epai na avenire
  • Bandeko mibali—Bólona mpo na elimo mpe bóluka kozwa mikumba!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Tósalisa bandeko mibali báluka kozwa mikumba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Ozali koluka mikumba?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Okokisi masengami mpo na kozwa mokumba?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/9 nk. 18-23

Ozali koluka mokumba?

“Soko motu alingi ete asala mosala na mokengeli, azali na mposa na mosala malamu.”​—1 TIMOTE 3:1.

1. Mokano nini ba Témoins de Jéhovah bazali kotya na esika ya liboso mpo na kolanda?

BA Témoins de Jéhovah bazali na mikano malamu mpe bazali kokokisa yango na lolenge oyo ezali kosepelisa Nzambe. Ntina ya kokamwa ezali te, mpamba te Nzambe ye moko azali na mikano kitoko mpe azali ntango nyonso kokokisa mikano na ye. (Yisaya 55:8-11) Basaleli na Jéhovah basengeli te kokokana na bato oyo bazangi mikano malamu mpe baoyo bazali na bomoi moko ya moimi, na kosaláká eloko moko te mpo na bazalani na bango. Ba Témoins de Jéhovah bazali komona malamu na kokokisa liboso mokumba kitoko oyo etali bongo kosakola nsango ya Bokonzi mpe kolakisa epai na bazalani na bango boyebi ya Liloba na Nzambe oyo ezali kopesa bomoi.​—Nzembo 119:105; Malako 13:10: Yoane 17:3.

2. Mokano nini epesameli baklisto oyo Paulo ayebisi kati na 1 Timoté 3:1?

2 Mikano misusu ya kitoko mizali kopesamela basangani ya lisangá na Nzambe. Ntoma Paulo atangi moko na yango wana akomaki ete: “Liloba oyo ezali sembo ete, Soko moto alingi ete asala mosala na mokengeli, azali na mposa na mosala malamu.” Moto motindo wana alingi kosala eloko mpo na bazalani na ye. Azali na mposa ya “mosala malamu”, kasi alingi bomoi na petee te to mpe lokumu te. Libongoli moko ya Biblia ebongoli mokapo yango boye: “‘Ye oyo azali koluka mokumba kati na lisangá azali na mokano kitoko.’ Liloba yango ezali solo.” 1 Timoté 3:1, Kuen.

Makámá oyo mazali liboso na bankulutu

3, 4. Mpo na nini moto oyo azali na mposa ya kokóma mokengeli asengeli kobatela motema na ye?

3 Na ndimbola nini moto oyo azali na mposa ya kokóma mokengeli moklisto azali na “mokano kitoko”? Mokano ezali mposa makasi ya kokokisa likambo moko. Ezali solo ete ekoki kozala ya kitoko to ya mabe engebene mposa na yango. Kasi soko moto moko alingi kokokisa mokumba ya mokengeli na komikitisa nyonso mpamba te alingi kosalela bamosusu, azali kosala mosala na ye na makanisi malamu mpe akoki kopesa matomba ya elimo epai na baninga mosusu. Esengeli na ye ntango nyonso kobatela motema na ye.​—Masese 4:23.

4 Bato mosusu ya lolendo balukaka lokumu. Bamosusu balingi koyangela baninga na bango. Mposa makasi ya lokumu to ya bokonzi ekokani na mosisa epola oyo ekoki kokweisa nzete, atako yango ezali komonana malamu. Motindo moko, moklisto akoki kokwea na lolendo oyo euti na mikano mabe. (Masese 16:18) Ntoma Yoane alobaki ete, “Nakomaki mwa mokanda epai na lisangá. Kasi Diotelefe, oyo asepeli kozala moto na liboso na bango, (oyo alingaka komitya liboso ya bato mosusu lokola mokonzi, Kondimana ya Sika), alingi koyamba makambo na biso na limemya te. Na bongo, soko nakoya, nakokanisa makambo makosalaka ye, awa ezali ye kolobaloba makambo mabe na ntina na biso. Akosuka mpe na makambo yango te; ye moko akoyambaka bandeko te nde akopekisaka baoyo balingi koyamba bango mpe akobimisaka bango na lisangá.” (3 Yoane 9, 10) Makanisi ya Diotelefe mazalaki ya moklisto te. Lolendo mpe boluki makasi ya bokonzi ezali na esika te kati na bayekoli na solo ya Yesu.​—Masese 21:4.

5. Na elimo ya motindo nini bakengeli basengeli kokokisa mikumba na bango?

5 Bakengeli baklisto oyo bazali kokokisa mikumba na bango na makanisi malamu bazali koluka lokumu te. Bazali kotalela mosala kitoko ya bakengeli baklisto lokola libaku malamu epesameli bango na Nzambe oyo bazali kobatela etonga na ye, “mpo na kopusama te, kasi na mitema malamu, na mposa na kozwa lifuti te kasi mpo na kopesa mpamba; lokola mpo na kozala mikonzi likoló na baoyo bazali likabo na Nzambe te kasi lokola bilakiseli na etonga”. (1 Petelo 5:2, 3) Ee, bakengeli basengeli kokeba ete bakóma na lolendo te mpe basalela bokonzi na bango na lolenge mabe te.

6. Mpo na nini nkulutu asengeli kozala lokola kapita te kati na basaleli na Nzambe?

6 Nkulutu asengeli te kozala lokola kapita likoló na baklisto mosusu, mpamba te ye azali mosalani elongo na bango mpe ‘azali na bokonzi te likoló na kondima na bango.’ (2 Bakolinti 1:24) Yesu alobaki epai na bantoma mosusu oyo bazalaki koluka komitya na esika ya liboso ete: “Boyebi ete mikóló na bapakano bazali mikonzi likoló na bango mpe bato minene bakonyokola bango na makasi. Nde kati na bino ezala bongo te. Ye oyo alingi kozala moto na liboso na bino, azala moombo na bino. Lokola Mwana na moto ayei mpo na kosungama te kasi mpo na kosunga mpe kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na mingi.” (Matai 20:20-28) Nkulutu azali Mobateli na mpate mokonzi te, kasi azali nde mobateli na mpate oyo azali kosala na nse na Mobateli na mpate aleki monene. Soki azali kotambwisa etonga lokola kapita, ekomonana bongo ete azali na lolendo. Ezalela na ye mbele ekosala mabe mingi soki azali kosenga baklisto mosusu ete balanda ye kati na makanisi na ye wana ya lolendo. Lisese moko elobi boye: “Mitema nyonso na lolendo miboyami na Jéhovah; ata loboko ekangami na loboko, akokima etumbu te.”​—Masese 16:5.

7, 8. (a) Mpo na nini ebongi ete bankulutu bazala na komikitisa? (b) Tanga ndakisa ya nkulutu moko azalaki na komikitisa?

7 Na bongo, bankulutu basengeli ‘komisokisa (komikitisa) na nse na loboko makasi na Nzambe’. Lolendo ekangaka nzela mpo ete moto akoka kozala na ntina kati na elimo, mpamba te bobele basokemi nde bazali na motema malamu mpe elimo malamu mpo na kosala mokano na Nzambe. “Nzambe akotemelaka bato na lolendo, nde akopesaka basokemi ngolu.” (1 Petelo 5:5, 6) Ya solo, Jéhovah azali kopambola baoyo bazali na elimo ya komikitisa. Kati na lisangá ya boklisto, ezali kati na bango nde mibali oyo bakokisi masengami bazali koponama bankulutu.

8 Lisolo ya ba Témoins de Jéhovah na ntango na biso ezali na bato ya sembo oyo bakokisaki mosala na bango na bopolo. Tokamata na ndakisa lisolo ya W. Thorn, moto na komikitisa mingi mpenza oyo azaláká pèlerin, to mokengeli ya zongazonga, mpe asalaki mibu mingi na Béthel. Moklisto mwasi moko, alobaki boye na ntina na ye ete: “Nakobosana soko moke te toli ya frère Thorn oyo ezali kosalisa ngai kino sikawa. Mokolo moko alobaki ete: ‘Ntango ekomelaka ngai ete namitalela lokola moto ya ntina mingi, nazongelaka makanisi na ngai mpe namilobelaka ete: “Eh! yo, mwa mbuma na putulu oyo, ozali mpenza na ntina ya kozala na lolendo?”’ Oyo nde ezalela ebongi mpenza mpo na bankulutu mpe baklisto mosusu! Tobosana te ete “litomba na komikitisa mpe na kobanga Jéhovah, ezali bozwi, mpe lokumu, mpe bomoi.”​—Masese 22:4, MN.

Nzambe azali kopesa mposa ya kosala

9. Mpo na nini tokoki koloba ete mposa ya kozala mokengeli ezali kouta epai na Nzambe?

9 Ezali Nzambe nde azali kopesa mposa ya kozala mokengeli? Ee, mpamba te na nzela na elimo na ye Jéhovah azali kopesa epai na basaleli na ye mposa, molende mpe nguya oyo bazali na yango mposa mpo na kosalela ye mosala na bulee. Na ndakisa, bayekoli na Yesu, ntango banyokwamaki, babondelaki mpo na kozwa molende ya kosakola. Likambo nini esalemaki na nsima? “Esika ezalaki bango eninganaki. Bango nyonso batondaki na elimo santu, mpe basakolaki liloba na Nzambe na molende.” (Misala 4:27-31) Lokola elimo santu ebimisaki matomba motindo wana kati na libaku wana, ekoki mpe kotinda moto ete asepela na mokumba ya mokengeli.

10. (a) Nini ekoki kopekisa moklisto moko ete aluka mokumba ya mokengeli te? (b) Soki Nzambe apesi biso mokumba moko, likambo nini akozanga te na kosala?

10 Likambo nini ekoki kopekisa moklisto oyo ateli na elimo na koluka mokumba ya mokengeli? Atako azali na bizaleli ya elimo, mbala mosusu akoki kokanisa ete abongi te mpo na mokumba yango. (1 Bakolinti 2:14, 15) Ya solo, moto na moto kati na biso asengeli komitalela na bopolo mpe koyeba ndelo ya makoki na ye. (Mika 6:8) Na esika ete tomitalela na lolendo nyonso ete tokoki mpenza mpo na kokokisa mokumba moko, ezali malamu tomikundola ete “mayele ezali epai na basokemi”. (Masese 11:2) Kasi tosengeli mpe koyeba ete soki Nzambe apesi biso libaku moko ya mosala, akopesa biso mpe nguya esengeli mpo na kokokisa yango. Yango wana Paulo alobaki boye ete: “Nayebi kosala makambo nyonso kati na ye oyo akokembisaka ngai na nguya.”​—Bafilipi 4:13.

11. Moklisto oyo azali kokanisa ete abongi te na kondima mokumba ya mokengeli mpo akanisi ete azangi mayele mpo na kopesa batoli, esengeli kosala nini?

11 Ekoki kozala ete moklisto moko azali koluka mokumba ya mokengeli te mpo azali kokanisa ete azali na mayele te mpo na kopesa batoli. Soki ezali boye, akoki kozwa mayele mingi na koyekoláká Liloba na Nzambe na etingya. Asengeli mpe kobondela mpo na kozwa ezaleli yango. Yakobo akomaki ete: “Soko moko na bino azangi mayele, alómba Nzambe oyo akopesaka na bato nyonso na kopesa malamu, oyo mpe akopamelaka te. Bongo akozwa yango. Kasi alómba na kondima, abeta ntembe te mpo ete ye oyo akobetaka ntembe azali lokola mbonge na mai kopusama na mopepe mpe kotambolatambola epai na epai. Moto na motindo yango abanza te ete akozwa eloko epai na Jéhovah; ye mobali na mitema mibale na kolemalema na bitambweli na ye nyonso.” (Yakobo 1:5-8) Nzambe ayokaki libondeli ya Salomo na kopesáká ye “motema na mayele” oyo ezalaki kosalisa ye na kososola malamu mpe mabe kati na kosambisa. (1 Mikonzi 3:9-14) Ya solo, likambo ya Salomo ekeseni mpenza, kasi na nzela na boyekoli na etingya mpe na lisalisi ya Nzambe, mibali oyo bazali na mikumba kati na lisangá bakoki kopesa batoli epai na baninga na bango na bosembo nyonso. “Mpo ete Jéhovah akopesaka mayele; boyebi mpe bososoli ekoutaka na monoko na ye.”​—Masese 2:6.

12. Soki moto moko azali na mposa ya mokumba na mokengeli te na ntina na motungisi moko, nini ekoki kosalisa ye?

12 Ekoki mpe kozala ete mokakatano moko ezali kopekisa moto na koluka mokumba ya mokengeli. Mbala mosusu azali komimona ete abongi te mpo na kokokisa mokumba monene ya kozala nkulutu. Paulo ye moko alobaki ete: “Pembeni na makambo oyo nyonso, mokolo na mokolo bozito na mitungisi na ngai mpo na masangá ekámoli ngai.” (2 Bakolinti 11:28) Kasi ntoma ayebaki likambo nini asengelaki kosala ntango atungisamaki, mpamba te akomaki boye: “Bomitungisa mpo na likambo moko te nde kati na makambo nyonso tika ete bisengeli na bino biyebana epai na Nzambe na mabondeli mpe na malombo mpe na matondi. Mpe kimya na Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekosenzela mitema na bino mpe bikaniseli na bino kati na Klisto Yesu.” (Bafilipi 4:6, 7) Ya solo, libondeli mpe elikya epai na Nzambe ekoki kosalisa na kobengana motungisi.

13. Libondeli nini moto akoki kosala soki azali kokakatana mpo na koluka mokumba ya mokengeli?

13 Ata bongo, soki nde azali bobele kooka mwa motungisi, moto oyo azali kokakatana akoki kosala libondeli motindo moko lokola Davidi ete: “Meka ngai, e Nzambe, mpe yeba motema na ngai; sosola ngai mpe yeba kobanza na ngai. Tala soko nazali kotambola na nzela mabe, mpe kamba ngai na nzela na seko.” (Nzembo 139:23, 24) Ata nini ezali ntina ya “mitungisi” na biso, mpe “mabanzo” na biso, Nzambe akoki kosalisa biso na kosilisa yango na motindo boye ete tosala bokóli kati na elimo. Ezali yango nde nzembo mosusu ezali koloba mpenza na maloba oyo boye: “Wana elobaki ngai ete, Litambe na ngai ezali kolenga, e Jéhovah, boboto na yo esimbaki ngai. Wana ezali ebele na makanisi kati na ngai, mabandi na yo ekosepelisaka molimo na ngai.”​—Nzembo 94:18, 19.

Tosalela Jéhovah na esengo nyonso lokola ye alingi yango

14. Mpo na nini moto oyo azali kooka mposa na mokumba ya mokengeli te asengeli kobondela mpo na kozwa elimo santu ya Nzambe?

14 Soki, na ntina na motungisi moko, mpo na kozanga makoki to mpo na kozanga mposa moklisto moko azali koluka mokumba ya mokengeli te, ebongi malamu ete abondela mpo na kozwa elimo na Nzambe. Yesu alobaki ete: “Na bongo, soki bino bato mabe boyebi kopesa bana na bino makabo malamu, Tata na bino na likoló akoleka kopesa elimo santu na bango balombi ye te?” (Luka 11:13) Lokola kimya mpe komipekisa ezali kati na bambuma ya elimo, elimo yango ekoki kosalisa biso na kolonga motungisi to liyoki ya komimona ete tozali na makoki te.​—Bagalatia 5:22, 23.

15. Libondeli ya motindo nini ekoki kosalisa baoyo bazangi elendiseli esengeli na komipesa mpo na komema mikumba?

15 Tokoloba boni mpo na kozanga mposa? Biso baoyo tozali baklisto babatisami tosengeli kobondela Nzambe ete abenda biso na kosala oyo ye alingi. Davidi asengáká ete: “E Jéhovah, yebisa ngai banzela na yo! . . . Tambolisa ngai kati na solo na yo mpe lakisa ngai.” (Nzembo 25:4, 5) Libondeli ya motindo oyo ekosalisa biso ete tomikotisa kati na nzela mabe te, mpe tokoki kosala libondeli motindo oyo epai na Nzambe soki tozali kooka mposa te mpo na koluka mokumba ya mokengeli. Tosenga Jéhovah ete apesa biso mposa ya kondima mikumba ya mosala. Na yango, soki tozali kobondela mpo na kozwa elimo santu na Nzambe mpe soki tozali kotosa litambwisi na ye, tokoboya mpenza te ntango mikumba mikopesamela biso. Baoyo bazali kosalela Nzambe balingi ata moke te kotemela elimo na ye.​—Baefese 4:30.

16. Ezaleli nini ezali kopesa elendiseli makasi mpo na koluka mokumba kati na lisangá?

16 Mpo ete tozali na “makanisi na Klisto”, tozali kosepela na kokokisa mokano na Nzambe. (1 Bakolinti 2:16) Yesu azalaki na makanisi motindo moko na mokomi na nzembo, oyo alobaki ete: “Nasepeli kosala mokano na yo, e Nzambe na ngai; mibeko na yo mizali kati na motema na ngai.” (Nzembo 40:8) Klisto alobaki ete: “Tala nayei kosala mokano na yo”, mpe andimaki kino kokufa likoló na nzete ya mpasi. (Baebele 10:9, 10) Mposa ya kosala mingi kati na mosala ya Jéhovah ezali kopesa elendiseli makasi mpo na koluka mokumba kati na lisangá.

Totya miso epai na avenire

17. (a) Mpo na nini bato oyo bazali na makoki lisusu te ya kosalela lisangá lokola na kala basengeli kolemba te? (b) Mokumba nini monene eleki ntina?

17 Na ntina na maladi to mikakatano misusu, baklisto oyo bazaláká na mikumba minene kala kati na lisangá bazali lisusu na mikumba yango te lelo oyo. Likambo yango esengeli kolembisa bango te. Toyebi ete bato mingi ya sembo oyo bakoki lisusu kosala mingi te lokola liboso bazali ntango nyonso kobatela bosembo na bango. (Nzembo 25:21) Na yango, baklisto basokemi baoyo bazali bankulutu uta mibu mingi bakoki kokoba na kopesa nzela epai na baninga na bango ete bazwa litomba na ekspérianse na bango na kotikeláká basangani na college ya bankulutu. Atako bazali lisusu na makoki te mpo na mibu na bango mingi to mpo na likama moko ezwaki bango, basengeli komilongola te na mikumba na bango. Tika ete Témoin de Jéhovah nyonso asepela na libaku monene oyo eleki nyonso, oyo ya ‘kosakola nkembo na bokonzi na Nzambe’ na kolongisa nkombo na Ye mosantu.​—Nzembo 145:10-13.

18. (a) Soki nkulutu moko to mosaleli moko na misala akitisami mikumba, eloko nini ekosengela na ye kosala mbala mosusu? (b) Elimo nini ya malamu nkulutu moko oyo akitisamaki mikumba amonisaki?

18 Soki ozalaki nkulutu to mpe mosaleli na misala, nde sikawa ozali lisusu na molongo yango te, okoki kozala na elikya ete Nzambe azali ntango nyonso kosepela na yo mpe ete mbala mosusu akopesa yo mikumba oyo ozali komizela na yango te. (1 Petelo 5:6, 7) Soki esengeli na yo kosala mwa mbongwana, zala pene na kondima yango mpe na komisembola na nzela na lisalisi na Nzambe. Bankulutu mosusu oyo basili kokitisama mikumba bazali komonisa elimo ya botomboki, mpe mwa bamoko basili kokóma ba inactifs to basili kotika solo. Kasi eleki malamu komekola baoyo bamonisaki elimo ya kozanga botomboki. Na ndakisa, nsima na kokitisama mikumba, nkulutu moko oyo asalaki na boumeli ya mibu mingi na Amérike ya katikati alobaki boye: “Nazali kooka mawa makasi mpo nabungisi mokumba na ngai oyo nalingaki mingi uta kala. Kasi nakosala milende makasi kati na misala nyonso oyo bandeko bakosepela kopesa ngai, mpe komisembola mpo nazongela mikumba na ngai ya mosala.” Nsima na bambula, moklisto wana azwaki libaku malamu ya kozala lisusu nkulutu.

19. Batoli nini ya kitoko epesami epai na moklisto nyonso oyo alongolamaki na molongo ya bankulutu to ya basaleli na misala?

19 Na bongo soki balongolaki yo na molongo ya bankulutu to ya basaleli na misala, zala ntango nyonso na komikitisa. Bwaka bizaleli nyonso ya mabe mpe botomboki oyo ekoki kopekisa yo kozongela lisusu mikumba na yo na mikolo mizali liboso. Elimo malamu oyo eyokani na ezalela ya kobanga Nzambe ekobendela yo limemya epai na bamosusu. Na esika ya kolemba, kanisa na motindo oyo Jéhovah azali kopambola mosala na yo to ndako na yo mobimba. Lendisa libota na yo kati na elimo, kenda kotala bato bazali kobela mpe lendisa baoyo bazali na bolembu. Likoló na nyonso, sepela na libaku malamu ozali na yango ya kokumisa Nzambe mpe ya kosakola nsango malamu lokola Témoin de Jéhovah.​—Nzembo 145:1, 2; Yisaya 43:10-12.

20. Ndenge nini lisangani ya bankulutu ekoki kosalisa moklisto moko oyo azalaki mokengeli to mosaleli na misala?

20 Lisangani ya bankulutu basengeli koyeba ete kokitisama mikumba ekoki kopesa mpasi epai na moklisto oyo azalaki nkulutu to mosaleli na misala, ata soki ye moko nde atiki mokumba na ye. Soki abimisami na lisangá te, mpe bankulutu bamoni ete alembi, basengeli kopesa ye na bolingo nyonso lisalisi ya elimo. (1 Batesalonike 5:14) Basengeli kosalisa ye na koyeba ete bazali na mposa na ye kati na lisangá. Ata soki bapesaki ye toli makasi, moto na bopolo mpe na botondi mbala mosusu asengeli koumela ntango molai te mpo na kozwa lisusu mikumba kati na lisangá.

21. Bato nini kati na Biblia bazalaki naino liboso ete bazwa mikumba, mpe batoli nini epesami epai na baoyo bazali kozela mikumba lelo?

21 Soki ozali koluka mokumba ya mokengeli, osengeli mbala mosusu kozela liboso ete ozwa mikumba minene. Kolemba te. Moise azelaki mibu 40 liboso ete Nzambe asalela ye mpo na kobimisa Bayisraele na boombo na Ezipito. (Misala 7:23-36) Liboso ete akoka koponama lokola mokitani na Moise, Yosua asalaki ntango molai lokola mosungi na ye. (Exode 33:11; Mituya 27:15-23) Davidi azelaki mwa bambula liboso ete amata na kiti ya bokonzi na Yisraele. (2 Samwele 2:7; 5:3) Emonani mpe lokola ete Petelo mpe Yoane Malako balekisaki ntango mpo na kobongisama. (Matai 26:69-75; Yoane 21:15-19; Misala 13:13; 15:36-41; Bakolose 4:10) Na bongo, soki sikawa ozali na mikumba te kati na lisangá, ekoki kozala mbala mosusu ete Jéhovah azali kotikela yo ntango mpo ete ebongisama mpe ozwa ekspérianse mingi koleka. Atako nini ezali likambo na yo, luka lisalisi na Nzambe na kozaláká na mposa ya kozwa mokumba ya mokengeli, mpe mbala mosusu akopambola yo na kopesáká yo mikumba misusu minene. Na kozeláká yango, sala nyonso ete okokisa masengami mpo na kozwa mikumba kati na lisangá mpe monisa elimo motindo moko na Davidi, oyo alobaki ete: “Monoko na ngai ekosanzola Jéhovah; tika mpe mosuni nyonso esanzola nkombo na ye na bulee, lobiko na lobiko!”​—Nzembo 145:21.

Bozongeli?

◻ Bankulutu basengeli kokeba na makáma nini?

◻ Nini ekoki kosalisa baoyo bazali koluka mokumba ya mokengeli te, na ntina na motungisi moko to liyoki moko ya komitalela ete babongi te?

◻ Nini ekoki kopesa bopusi epai na moklisto moko mpo ete amema mikumba kati na lisangá?

◻ Na elimo ya motindo nini baklisto oyo bazalaki bankulutu to basaleli na misala basengeli kotalela avenir?

[Elilingi na lokasa 19]

W. Thorn azaláki nkulutu moko ya ndakisa mpo na komikitisa

[Elilingi na lokasa 21]

Omilengeli na kosala mingi kati na mosala ya Jehovah lokola Yesu asalaki yango?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto