Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/9 lok. 26
  • ‘Bomimeka soko bozali kati na kondima’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Bomimeka soko bozali kati na kondima’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tosalela Nzambe na kobundisa
  • Tomipetola mpenza na mbindo nyonso mpe tozala bakabi
  • Tomimeka ntango nyonso
  • Tongengisa nkembo na Jehovah:
  • Mokanda ya Biblia nimero 47—2 Bakolinti
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Na kati ya 2 Bakorinti
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Mokanda ya Biblia nimero 46—1 Bakolinti
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Oyo ezali mokolo ya lobiko!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/9 lok. 26

‘Bomimeka soko bozali kati na kondima’

Ndimbola na ntina na mokanda ya mibale epai na Bakolinti

NTOMA Paulo azalaki komibanzabanza mingi mpo na baklisto ya Kolinti. Bakondima nde batoli oyo apesaki bango kati na mokanda na ye ya liboso? Wana ezalaki ye na Masekwane, Tite ememelaki ye nsango malamu: mokanda na ye mopesaki mawa epai na Bakolinti mpe mopusaki bango na kobongola motema. Oyo nde esengo mpo na Paulo! ​—2 Bakolinti 7:8-13.

Paulo akomaki mokanda na ye ya mibale epai na Bakolinti wana ezalaki ye na Masedwane, mbala mosusu nsima na eteni ya mibale ya mobu 55. Kati na yango, alimbolaki makambo oyo basengelaki kosala mpo na kobatela bopeto ya lisangá alamwisi bango mposa mpo batinda makabo epai ya bandimi na Yudea baoyo bazalaki na bosenga mpe alobelaki mosala na ye ya bontoma. Maloba mingi na Paulo makoki kosalisa biso na ‘komimeka soko tozali mpenza ntango nyonso kati na kondima.’ (13:5) Mateya nini tokoki bongo kozua na mokanda yango?

Tosalela Nzambe na kobundisa

Ntoma amonisi ete, lokola Nzambe azali kobundisa biso kaki na bampasi na biso, tosengeli mpe kobondisa bamosusu mpe kobondela mpo na bango. (1:1–2:11) Paulo elongo na baninga na ye ya mosala bamonaki mpasi makasi kasi Nzambe asalisaki bango. Nzokande, Bakolinti bakokaki mpe kosalisa bango na kobondelaka mpo na bango, bobele bongo biso mpe tosengeli kobondela mpo na baoyo bazali koyamba kondima ya solo. Kasi, ezalaki boni mpo na mobali oyo asalaki pite oyo alobami na 1 Bakolinti mokapo 5? Ezali komonana ete abimisamaki na lisangá kasi abongolaki motema. Abondisamaki mpenza ntango Bakolinti balimbisaki ye, mpe bazongisaki ye kati na bango bolingo nyonso.

Maloba na Paulo mazali kobakisa motuya oyo tozali kopesa na mosala na boklisto mpe kolendisa bokangami na biso na kondima ya solo. (2:12 kino 6:10) Ba ministres na kondimana ya sika bazali na libaku malamu ya kozala kati na ’’molongo na bato na elonga’’ oyo Nzambe azali kokamba Paulo na baninga na ye ya mosala bazalaki na mosala oyo eleki motuya mpo na mawa oyo emonisamaki mpo na bango. Lokola bango, baklisto bapakolami bazali na mosala na koyokanisa na ntango na biso. Nzokande, ba Témoins de jéhovah nyonso bazali koyeisa bazalani na bango bazwi na nzela ya mosala na bango.

Tomipetola mpenza na mbindo nyonso mpe tozala bakabi

Paulo amonisi biso ete ba ministres baklisto basengeli komipetola mpenza na mbindo nyonso kati na nsomo na Jéhovah (6:11 kino 7:16) Mpo na kotelema ngwi kati na kondima tosengeli koboya kozala na ekanganelo moko elongo na bato bazangi kondima mpe tosengeli komipetola na mbindo nyonso na nzoto mpe na elimo. Bakolinti bazwaki mwango moko mpo na komipetola: babimisaki na lisangá mobali oyo asalaki pite, mpe Paulo asepelaki lokola mokanda na ye ya liboso epesaki bango mawa kino babongolaki mitema mpo na lobiko.

Tozali mpe koyekola ete ezaleli ya bokabi ya ba ministres oyo bazali kobanga Nzambe ezali na litomba. (8:1 kino 9:15) Mpo na makabo epai na “babulami” oyo bazalaki na bosenga Paulo atangi ndakisa malamu ya baklisto ya Masedwane. Bamimonisaki bakabi koleka makoki na bango, mpe ntoma azali kolikya komona ete Bakolinti bamonisa ezaleli na bokabi motindo moko. Makabo na bango mpe oyo ya biso masengeli kopesama na motema malamu, mpamba te “Nzambe alingi ye oyo akopesaka na esengo,” mpe ye akopesaka bozwi na basaleli na ye na mitindo nyonso ya bokabi.

Paulo: ntoma na boboto

Wana lokola ba ministres baklisto, tozali kokokisa eloko moko kati na mosala na jéhovah komikumisa kati na ye, kasi kati na biso moko te. (10:1 kino 12:13) Soki totali malamu ezali na nzela ya bibundeli na elimo “na nguya na Nzambe” nde tozali na makoki ya kokweisa makanisi na lokuta. Ba “super-apotres“ (bantoma ya lokuta) baoyo bazalaki kati na Bakolinti bayikaki mpiko te na mimekamo lokola Paulo kati na mosala na ye ya ministre ya Klisto. Kasi, mpo ete ntoma amikumisa koleka te, Nzambe alongolaki “monzube kati na nzoto’ na ye te, yango ezalaki mbala mosusu miso ezalaki komona malamu te to mpe botemeli na bantoma yango ya lokuta. Kasi Paulo akokaki nde komikumisa kati na bolembu na ye, mpo ete “nguya na Klisto” etanda likoló na ye lokola hema. Mobali yango oyo atelemaki ngwi kati na kondima amimonisaki te moke epai na bantoma ya lokuta (super-apotres). Bakolinti bamonaki bilembeteli ya mosala na ye lokola ntoma, bamonaki bilembeteli oyo abimisaki kati na bango “na etingya nyonso, na bilembo mpe na bikamwiseli mpe na misala na nguya.”

Paulo, oyo azalaki ministre mpe ntoma, azalaki komibanzabanza mpe na matomba ya elimo ya baninga na ye; biso mpe tosengeli kosala bongo. (12:14 kino 13:14) Azalaki komilengela na ‘komipesa mobimba mpo na milimo na bango.’ Kobangaka ete ntango akokoma na Kolinti akuta baklisto oyo babongolaki mitema te mpo na misala ya nzoto, Paulo apesaki toli epai na bango nyonso ete bakoka komimeka soko bazalaki mpenza kati na kondima mpe kosala yango ntango nyonso, mpe abondelaki mpo ete ‘basala mabe te.’ Na nsuka, alendisaki bango na kozala na esengo, na komibongisa na komibondisa, na koloba motindo moko mpe na kofanda na kimya. Oyo nde toli malamu mpo na biso!

Tomimeka ntango nyonso

Mokanda na mibale ya Paulo epai na Bakolinti mozali bongo komonisa biso myango mikeseni oyo tokoki kosalela mpo na komimeka soko tozali kati na kondima mpe na kosala yango ntango nyonso. Maloba na ntoma bakoki mpenza kopusa biso na kobondisa baninga na biso, lokola Nzambe mpe azali kobondisa biso kati na bolozi na biso. Oyo alobi mpo na mosala ya boklisto esengeli kopusa biso kokokisa mosala yango na bosembo nyonso na komipetolaka mpenza na mbindo nyonso kati na nsomo na Jehovah.

Na kolandaka batoli ya Paulo, ekoki kosalisa biso ete tozala bakabi koleka mpe komibanzabanza mingi mpo na bato mosusu. Nzokande, tika ete maloba na ye mapusa biso na komikumisa kati na jéhovah kasi kati na biso moko te, mpe na komibanzabanza mingi mpo na baninga na biso baklisto! Ntembe ezali te, makanisi oyo, mpe mosusu, mazwami na mokanda ya mibale: epai na Bakolinti, makoki kosalisa biso na ‘komimeka soko tozali mpenza kati na kondima mpe na kosala yango ntango nyonso.’

Tongengisa nkembo na Jehovah:

Ntango Moise akitaki na ngomba Sinai na mabanga na Litatoli, elongi na ye ezalaki kongenga mpamba te Nzambe asololaki na ye. (Exode 34:29, 30) Nsima na kokundola likambo yango, Paulo alobi: “Mpe biso nyonso na bilongi bisili kozipwa, kokengengisa nkembo na Jéhovah lokola talatala; tokobongwanaka kino motindo na ye longwa nkembo na motindo moko kino motindo mosusu na nkembo. Oyo euti na Jéhovah, ye Elimo.” (2 Bakolinti 3:7-18) Talatala ya kala esalamaki na bibende lokola bronze to kwivre, mpe eyemamaki malamu mpo ekoka komonisa malamu. Lokola talatala, baklisto bapakolami bazali kongengisa nkembo na Nzambe oyo azali kongengisa bango na nzela na Yesu Klisto mpe, na mokemoke, azali ‘kobongola bango kino motindo’ longwa Mwana na Jéhovah, oyo azali komonisa nkembo na Ye. (2 Bakolinti 4:6; Baefese 5:1) Na nzela ya elimo santu mpe na Makomami, Nzambe azali kosala ‘bomoto ya sika’ kati na bango, yango ekamwisaka bizaleli na ye mpenza. (Baefese 4:24; Bakolose 3:10) Ezala ete elikya na biso ezali ya kozala na bomoi na likoló to na mabelé, tolata bomoto yango mpe kosepela na privilege na biso ya kongengisa to komonisa nkembo na Nzambe kati na mosala na biso.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 26]

‘BIBUNDEU NA BOYENGEBENE’: Kati na makambo mosusu, Paulo mpe baninga na ye ya mosala bazalaki komilobela bango moko lokola ba ministres na Nzambe ‘na bibundeli na boyengebene mpo na loboko na mobali mpe mpo na loboko na mwasi.’ (2 Bakolimi 6:3-7) Loboko na mobali ezalaki kosimba mopanga, mpe loboko na mwasi ezalaki kosimba nguba. Atako babundisamaki bipai binso, Paulo mpe baninga na ye bazalaki na bibundeli mpo na kobunda etumba na elimo. Abundaki na bateyi ya lokuta mpe ba “super-apotres” (bantoma ya lokula), mpo na kopekisa bango kokabola lisangá ya kolinti na Klisto. Paulo azalaki kosalela bibundeli ya mosuni na masumu te: lokola mayele mabe, lokuta to bokosi. (2 Bakolimi 10:8-10; 11:3, 12-14; 12:11, 16) Te, “bibundeli” oyo asalelaki ezalaki sembo; ezalaki myango mpo na kokolisa losambo ya solo atako makaneli mabe mpo na ye. Na mikolo na biso, ba Temoins de Jéhovah bazali kosalela ‘bibundeli na boyengebene’ yango mpo na mokano bobele moko.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto