Jehovah apambolaki ekateli na ngai
LISOLO YA RICHARD WUTIKE
Ndeko na ngai William alobaki na ngai ete: “Otikali bobele na sanza misato ya bomoi!” Natuni ye ete: ‘Olingi koloba nini mpenza?’ Alobi na ngai: “Ezali yango nde monganga oyo okendeki kotala na Assis ayebisaki ngai.”
NZOKANDE nalingaki kozala na bomoi, kasi kokufa te. Mpo na mbala ya yambo, nabondelaki Jéhovah asalisa ngai. Likambo ya esengo mpenza, mbula 46 na nsima, nakoki koloba ete, ata soko monganga amonisaki ngai mpasi oyo nazalaki na yango, diagnostic na ye ezalaki mabe. Na kokesena, kobanga etindaki ngai ete nasosola likolo ya ntina na bomoi mpe likolo na mposa ya kosalela Mozalisi.
Libota oyo ezali ntango nyonso koyengayenga
Ntango nabotamaki na le 11 Novembre 1921, baboti na ngai bazalaki kofanda na Grosen, engumba moke na Est ya Alemanye. Bango moko babotamaki na Russie, nde bazalaki bato ya Alemanye. Kasi ntango révolution ya bolchevique (basangani na likita oyo litambwisamaki na Lenine) etyaki communisme na 1917, babenganaki bango elongo na bato mosusu ya mboka Alemanye mpe babungisaki biloko na bango nyonso. Nsima na mobembo molai kati na engunduka ezalaki komema biloko ya koteka, baboti na ngai mpe bana na bango baoyo bazalaki mike, bakómaki na ndelo mpo na kokota na mboka Alemanye. Kasi baboyisaki bango nzela mpe esengelaki na bango ete bazonga na Russie. Kuna, babenganaki bango lisusu, mpe bazongaki na Alemanye. Nsima na basanza mingi ya mpasi, bandimaki bango na mboka.
Tata na ngai akufaki wana nazalaki na mibu zomi. Mbula mibale na nsima, na 1933, Hitler akómaki mokonzi mpe batindaki ngai na makasi ete nasangana na bilenge basoda ya Hitler. Na nse na boyangeli wana, bato ya Alemanye baoyo babotamaki na bamboka mosusu bazalaki na mikakatano mingi mpe eyaki komonana nsima ete Alemanye ezalaki komibongisa mpo na etumba mosusu. Ntango tolendisamaki na baoyo basila kokóma na mboka Brésil, tozwaki ekateli ya kokende kofanda kuna. Bongo tokomaki na Santos na mai 1936.
Nsima na kosala mwa basanza na kompanyi moko ya kafé, tosombaki ferme moke na mboka moko ekobotisaka milona malamu, pene na Maracai, na mokili ya São Paulo. Ntango tozalaki kotonga ndako na biso, tofandaki epai na Pasteur moko ya misioni. Alendisaki biso na kosangana na lingomba na ye, kasi totikaki ntango ye, mpe molandi na ye, babandaki kolobela makambo ya politike kati na masolo na bango.
Mbala ya yambo na koyoka solo ya Biblia
Ezalaki bobele pene na eleko oyo ndeko na ngai ayebisaki eyano ya monganga Nakendeki bongo na São Paulo mpo na kozwa eyano ya mibale. Na ntango yango mpe libota epai kuna nazalaki kofanda bazwaki vizite ya moninga na bango moko, na nkombo Otto Erbert. Azalaki Témoin de Jéhovah mpe abandaki kopesa biso litatoli. Kasi basangani ya libota wana basepelaki te na makambo oyo azalaki koloba, mpe babimaki na esika yango, moko nsima na mosusu, kotikáká bobele ngai ná mopaya.
Otto asololaki na ngai pene na boumeli ya ngonga mibale, na ntina na lifelo ya móto, na molimo ekufaka te, na Nzambe ya solo Jéhovah, mpo na Bokonzi na ye, mpe mpo na elikya ya kozala na bomoi ya seko kati na paradis na mabelé. Amonisaki ngai mpenza avenire kitoko. Ezalaki mpenza kokesene na oyo lingomba ya misioni eteyaki ngai. Na nsuka, Otto atunaki ngai ete: “Ondimi nde mateya na lokuta ya boklisto ya mokili oyo to ozali kondima Biblia?”
Nayanolaki ete: “Nazali kondima Biblia.”
Alobaki mbangombango ete, “boye, yekola yango”. Mpe abakisaki ete: “Soki olingi koyeba mingi, yaka epai na ngai.” Makambo nayokaki esepelisaki ngai mingi, mingi mpenza mpo na oyo etali bomoi ya seko na mabelé; bongo mokolo molandaki nakendeki kotala Otto. Lisolo oyo ya mibale endimisaki ngai ete nasili komona ‘solo oyo ezali kosikola bato.’ (Yoane 8:32) Nazongaki na brochure Sante’ et vie mpe babengisaki ngai mpo na kosangana na boyekoli moko ya Biblia na Alemanye.
Nakokisi mposa na ngai ya motema
Katikati wana, nazwaki lisalisi malamu na lopitalo mpe nakokaki kozonga na mboka na ngai. Otto Erbert akendeki na ngai elongo mpo na bopemi. Mama na ngai asepelaki mingi ete nayekola Biblia, mokanda oyo mozalaki ntango nyonso likolo na mesa, kasi tozalaki kotanga te. Nsima wana Otto azongaki na São Paulo, nasalaki makasi ete nayekola Biblia elongo na libota na ngai pene na bampokwa nyonso. Nasepelaki mingi mpenza wana mama na ngai, Robert ndeko na ngai ya mobali mpe Olga ndeko ngai ya mwasi bandimaki solo. Ndako na biso etondaki na baninga, kasi pene na sanza mibale ya litatoli na nsima, moto moko te azalaki lisusu koya. Moko na bato oyo bazalaki koya epai na biso alobaki ete: “Soki bolandi bobele nzela wana, bokotikala bino moko!”
Atako bongo, mposa na ngai ezalaki se kokóla. Namisombelaki mikanda mosusu. Nazalaki kotanga yango na butu mpenza. Kasi nyonso ezalaki na monoko ya Alemanye mpe nasosolaki ete mpo nakende koteya bato mosusu, esengelaki na ngai koyekola monoko ya Portugal. Bongo nalongwaki na lisanga wana na 1945 mpo nakende koyekola monoko yango. Nafandaki epai ya Otto Erbert, ye oyo na nsima ayaki kobala Olga ndeko ngai ya mwasi.
Nabandaki kosangana na makita elongo na bato mosusu koleka ntuku-mitano kati na Salle du Royaume bobele moko ya São Paulo. Lisangá ya ntango wana ekolaki kino ete engumba wana ezali sika na masangá 510 mpe na basakoli ya Bokonzi koleka 50 000. Na le 6 Janvier 1946, nazwaki batisimo lokola elembo ete namipesi mpo na kokokisa mokano na Nzambe. Bobele na mobu yango, nasanganaki mpo na mbala na ngai ya yambo na assemblée monene ya teokratike, “Mabota na esengo”, na São Paulo. Ezalaki likambo ya esengo mpenza na komona bato koleka 1700 esika yango mokolo na eyenga. Kuna, nakutanaki na Otto Estelmann, ye oyo alendisaki ngai na kolobáká ete: “Richard, ozali elenge. Ozali na nzoto kolongono. Kómá pionnier.”
Liboso nasilaki kokanisa mpo na mosala ya pionnier, kasi mbala oyo nakanisaki lisusu malamu mpenza mpo na yango. Namityelaki mokano ya kobanda yango elongo na ba Témoins mosusu mibale mpo na sanza motoba. Wana ntango ekokaki, natunaki bango ete: “Bosili komibongisa?” Ata moko kati na bango amibongisaki te. Nalobaki na bango ete, mpo na ngai, nabandi yango. Balobaki na ngai ete, “ekozala mpasi”. Kasi nabatelaki ekateli na ngai. Na le 24 Mai 1947, naponamaki lokola pionnier permanent.
Mikumba ya sika mpo na mosala
Teritware na ngai ezalaki monene mingi; kati na yango ezalaki na bakartyé oyo bato bafandi mpe bakartyé ya mombongo ya São Paulo. Sanza na sanza, nazalaki kokabola bankámá ya mikanda mpe ba brochures. Na ntongo moko, nakotaki na eteni na ndako moko monene epai kuna mibali mingi bazalaki kosala. Nakendeki epai na mobali ya liboso mpe nalakisaki ye mokanda “La vérité vous affranchira.”
Atunaki ngai ete, “mikanda boni ozali na yango kati na saki na yo?”
Nayanolaki ete, “koleka ntuku—mibale”. Azwaki yango nyonso mpe akabolaki yango na mibali nyonso oyo bazalaki wana. Ezalaki bongo na hotel de ville!
Kasi esengo na ngai monene ezalaki nde ya kotambwisa boyekoli na Biblia na bandako. Na boumeli ya mbula minei, na lisalisi ya Jéhovah, bato 38 baoyo nazalaki koyekola na bango bazwaki batisimo. Mingi kati na bango bakotaki na mosala ya pionnier. Na ndakisa Afonso Grigalhunas, ye oyo azalaki pionnier auxiliaire kino liwa na ye na 1988, atako azalaki kotambola na likolo oyo batyaki ye. Ezalaki lisusu na libota ya Ciuffa. Moko na bana mibali na bango, Francisco, azalaki mokengeli ya zongazonga na boumeli ya bambula mingi, mpe Angela, ndeko na ye ya mwasi, azali pionnier kino sikawa.
Na 1951, nabengamaki mpo nakóma mokengeli ya zongazonga Teritware na ngai ezwaki bituka minene nyonso ya mikili ya Rio Grande do Sul mpe oyo ya Santa Cartana. Bankoto na bato ya mpotó bafandaki na bituka ezalaki na ngele ya Brésil. Nazalaki kotala bato to bituluku ya bato bizalaki mosika na lisangá, mpamba te ezalaki bobele na masangá moke na eleko wana. Bibale mingi bizalaki, nde bitalaka (pont) bizalaki bobele moke, oyo elimboli ete nasengelaki kokatisa bamai ya mike na makolo elongo na valise na ngai na mokongo, masini na ngai ya kobeta mikanda mpe sakosi na ngai na maboko. Banzela ebongisamaki te, etondaki na mabulu. Nabakisaki zambala moko likolo mpo na kobatela bilamba na putulu, oyo epesaki na bamosusu likanisi ete nazalaki sango na bango ya sika, mpe balingaki kopesa ngai mbote ya loboko.
Nakoteli matomba ya Bokonzi
Mpo natika te ete mikakatano milembisa ngai, nazalaki na likanisi oyo lilandi ete: Soki bato bakoki kofanda na bingumba ya mosika mpenza, kotambola na nzela wana mpe kokatisa bibale wana, mpo na nini ngai nakosala mpe bongo te, na ntina mpenza ya nsango ya motuya motindo oyo mpo na koyebisa yango?
Mikakatano ya lolenge mosusu ezalaki kouta mbala na mbala na bingumba ya mike. Na ndakisa, mokolo moko, tosalaki ebongiseli ya kosala likita kati na eteyelo ya mboka moko, oyo ezalaki pene na parke moko. Na ngambo mosusu ya parke ezalaki na bar (esika ya komele masangá) moko mpe ndako-nzambe moko ya katolike. Lokola molakisi ayaki te mpo na kofungola eteyelo, nazwaki ekateli ya kosala diskur na parke. Nsima mwa moke na ebandeli, bato motoba babimaki longwa na báále mpe babandaki konganga mpe kosilika. Nsima toyaki koyeba ete, ezalaki sangó nde afutaki bango mpo na yango.
Nakomaki koloba makasi mpenza, na kotaláká epai bazalaki. Batelemaki mpe moko na bango alobaki ete: “Azali koloba mpo na Nzambe. Ndenge nini sangó alobaki ete azali motindami ya Diable?” Ntango sangó amonaki ete bato yango bazalaki kopanza likita te, amataki na jeep na ye mpe atambolaki zingazinga ya parke kongangáká: “Mokatolike moko te asengeli kosangana na likita.” Moto moko te abimaki, mpe diskur elandaki kosalema na kimya nyonso.
Na Mirante do Paranapanema, na Mokili ya São Paulo, nakendeki epai na mokonzi ya la police mpo na kolimbola ye mosala na biso mpe kotuna ye ete tosalela salle moko mpo na diskur piblike. Asalaki nyonso mpo ete tozwa salle moko. Toyebisaki ye ete tokosala mpe ba invitations mpo na diskur yango. Atunaki ete, “bokokabola yango na eteni nini ya engumba?” Ntango toyebisaki ye yango, asengaki ndambo mosusu mpo na kokabola na quartier mosusu. Mokolo na eyenga, ayaki na diskur elongo na bapolisyé mibale mpo na “kopekisa mobulu,” lokola ye moko alobaki yango.
Atunaki ngai ete: “Nakoki kobanda lisolo na yo?”
Nayanolaki ete, “ezali malamu, kasi tika nalakisa yo lolenge nini osengeli kosala.” Nsima na komonisa ngai, atikalaki likoló na estrade, afandaki mpe alandaki lisolo. Bayangani balandaki diskur na likebi mpenza. Tozwaki ata mobulu moko te, lokola tozalaki mpe elongo na bapolisyé mibale na porte mpe mokonzi na bango likoló na estrade!
Na mars 1956, naponamaki lokola mokengeli ya distrike mpe nasalaki ba assemblées na Brésil mobimba. Esengelaki na ngai kotambola mingi. Mbala mosusu, esengelaki na ngai kosala mikolo misato mpo na koleka na assemblée moko nsima na mosusu. Na nord ya mboka, mibembo mizalaki kosalema mbala mosusu na mituka mike, mizangi maninisa kasi mizalaki kokotisa mopepe, oyo ezalaki likambo malamu, mpamba te bansoso mpe bangulu ezalaki na kati wana.
Galaad elendisi lisusu ekateli na ngai
Oyo elendiseli bobele kosangana na malako ya Galaad, Eteyelo ya la Société Watchtower! Kopesama ya ba diplomes asalemaki na eleko ya elanga, na assemblée ya Yankee Stadium mpe na Polo Grounds, epai kuna bato 253 922 oyo bautaki na mikili 123 basanganaki na diskur piblike. Ezalaki kitoko. Na nsima, nazongaki na Brésil, na ekateli makasi mpo na kolanda kosakola Bokonzi na Jéhovah.
Na 1962, nabalaki Ruth Honemann, ye oyo azalaki misionere na Brésil uta koleka mibu motoba. Nsima ya libala na biso, nazalaki na esengo ya kozwa mabaku malamu mosusu ya mosala, lokola oyo ya kotangisa na Eteyelo mpo na mosala ya Bokonzi mpe Eteyelo ya ba pionniers, to mpe lisusu na kotambwisa bibongiseli ya ba assemblées nationales mpe internationales mpe oyo ya kotongama ya Salle ya liboso mpo na ba assemblées na São Paulo.
Lelo oyo, tozali kosepela na libaku malamu ya mosala na biso mpo na Nzambe mpo na bomoi na biso mobimba: kozala basangani na libota ya Béthel na Brésil. Na kokanisáká na mibu koleka 40 na mosala ya ntango nyonso oyo nasili kolekisa, oyo 35 lokola mokengeli ya zongazonga, nakoki koloba ete etondaki nyonso na misala ya esengo mpe ezalaki na ntina. (Masese 10:22) Nayekoli makambo mingi na lisalisi ya lisangá na Jéhovah, kati na yango ntina ya komitya na esika ya bamosusu, ya komimonisa na boninga kasi lokola mokonzi na bamosusu te, mpe kozala te na misala mingi koleka mpo na kozala na likebi na bamposa ya bamosusu. Mpo na kosukisa, nalingi koloba mpenzampenza epai na bilenge mpo na kozongela bango maloba oyo ndeko Estelman alobaki na ngai, esili koleka bambula mingi, ete: “Bozali bilenge, bozali na nzoto kolongono. Bokóma ba pionniers.”
[Elilingi na lokasa 29]
Béthel ya Brésil, epai kuna tofandi lelo