Ndenge nini kolonga ntembe ebimisami na bobola mpo na bizaleli malamu?
“MONGANGA moko Moafriké, alobaki ete: “Bato mosusu bazali babólá mpo ete bazali bagoigoi. Engumba etondi na bato na bobólu (fainéants). Soki balingaki mpenza kosala mosala, mbele basili kozwa yango. Moto moko asengisami te na kozala mobólá lelo oyo.”
Ezali solo ete bamoko bazali bagoigoi, mpe ete goigoi ekoki komema na bobólá. Biblia elobi ete: “Mosika te mwa mpongi, mokemoke kolála, mokemoke kokanga maboko mpo na kolála, boye bobólá na yo ekoya lokola moyibi monene mpe bosenga na yo lokola moto na etumba.” (Masese 24:33, 34, MN) Nzokande, mingi na babólá bazali bagɔigɔi te. Na ndakisa, tala oyo moto moko akomaki: “Kino ntongo oyo toyoki nzala mpe mposa ya mai, tolati malamu te, tonyokwami, tozangi efandelo.” (1 Bakolinti 4:11) Mokomi na maloba oyo azalaki nde moto na goigoi? Te mpenza. Maloba oyo makomamaki na ntoma Paulo. Andimaki kozala na bomoi ya bopolo mpo ete akokisa malamu mpenza mosala na ye na boklisto. Bamposa mosusu oyo azalaki na yango ebimisamaki na makambo oyo mautaki na mokano na ye moko te, lokola monyoko na ntina losambo.
Na mikolo na biso, mingi na babólá bakotungisamaka na makambo oyo mauti na mikano na bango te; ezali mbala mosusu mpo na kozanga kotanga na kelasi, mpo na makambo na nkita, to mpo na mbongwana na makambo ya politike. Mingi bazali kosala makasi uta ntongo kino butu mpe, atako bongo, bazali bobele na bomoi malamu te. Mabaku ya kozwa mosolo na lolenge mabe ekoki bongo komonana malamu epai na bango, ata mpe komonana na ntina mingi. Yango wana bamosusu balobaka ete, Biblia epekisi te kosala mabe oyo ezangi koumela! Nsima na nyonso wana, Biblia elobi ete: “Bakotyolaka moyibi te soko akoyiba mpo na kotondisa libumu na ye wana eyoki ye nzala.” Moto moko ya mayele abondelaki boye: ‘Pesa ngai bobólá te noki nakoyiba.’—Masese 6:30, MN 30:8, 9.
Oyo Biblia elobi na ntina na kozala sembo
Mikapo wana mizali nde kolongisa ezalela ya kozanga sembo na lolenge na kobómbana? Totalela naino ba versets oyo ezali zingazinga na yango. Nsima na koloba ete bakotyolaka moyibi te soko akoyiba mpo na kotondisa libumu na ye, Masese 6:31 elandi ete: “Kasi soko amonani, akozongisa kino mbala nsambo, akobimisa biloko nyonso ya ndako na ye.” Na elobeli mosusu, ntango moyibi akangami, akokatelama bitumbu nyonso bityami na mibeko. Akofuta mpo na mabe na ye! Na yango, na esika ya kolendisa ezalela ya kozanga sembo, maloba wana mazali nde kokebisa babólá ete boyibi ekopesaka lisusu bobólá monene, ekobebisaka lokumo na bango moko mpe ya libota na bango, mpe bakozwa limemya epai na bazalani na bango te.
Kasi ezali boni mpo na libondeli ya moto na mayele? Asengi ete azala mobólá te mpo ‘ayiba te mpe abebisa nkombo ya Nzambe na ye’. (Masese 30:9) Ya solo, soki moto oyo akomilobaka ete azali mosaleli na Jéhovah asali likambo moko lizangi sembo, akobwaka nsoni likoló na nkombo ya Nzambe mpe likoló ya lisangá oyo lisalami na basaleli na Ye. Ntoma Paulo akomaki ete: “Ezali yo kosakola ete: ‘Koyiba te,’ yo moko ozali koyiba?” Soki moto moko akoyiba wana akomilobaka ete azali moklisto, ‘nkombo na Nzambe ekotukama na mabota’ mpo na libunga wana.—Baloma 2:21, 24.
Biblia elobi bongo na sembo ete: “Mobólá oyo akotambolaka na bosembo aleki mozwi oyo apengwi na nzela na ye.” (Masese 28:6, MN) Atako azalaki mbala mosusu na biloko moke mpo na kobika, ntoma Paulo alongisaki te ezalela ya kozanga sembo mpe asalelaki yango te. Na kokesene, akomaki ete: “Moyibi ayiba lisusu te, kasi tika ete asalaka mosala, asalisa moboko na ye misala ete akoka kokabela bango bazangi.”—Baefese 4:28.
Mwango malamu: kotya motema epai na Nzambe
Tokoloba boni mpo na baoyo bakosalaka mingi nde bakozwaka mingi te mpo na kokokisa bamposa ya mabota na bango? Ezalela ya kozanga sembo mpe boyibi elongisami na ntina na bango, mingi mpenza na ntango mosangani moko ya libota azwi maladi makasi, to na makambo masengeli kosilisama na lombango? Bato mosusu bakokanisaka bongo. Moafriké moko alobaki ete: “Na mboka na biso soki ozali sembo, okozala na bomoi malamu te. Soki nde olingi kobika malamu, osengeli kobuka mwa mibeko ya mboka na bino.”
Nzokande, na Afrika, bato bakokomaka maloba oyo ete “Tya motema epai na Nzambe” na mituka, na bitutu ya ndako, na papiers minene mpe na papiers mike mpo na kobamba yango. Biblia yango moko elobi ete: “Talela Jéhovah na motema na yo mobimba.” (Masese 3:5) Ezalela ya kozanga sembo eyokani soko moke te na elendiseli wana ya Biblia. Kasi ebongi mpenza na kotya motema epai na Nzambe mpo na kolonga ntembe ebimisami na bobola mpo na bizaleli malamu?
Totalela lisusu likambo ya Paulo, ye oyo akutanaki na mikakatano lokola ‘nzala, mposa na mai, kozanga bilei, mpio mpe bolumbu.’ (2 Bakolinti 11:27) Ezali solo ete Paulo amitunaki soko akobika ndenge nini. Kasi, nsima wana asalelaki boklisto pene na mibu 25, Paulo akomaki ete: “Nayebi kozala mobólà, nayebi mpe kozala mozwi. Na likambo na likambo, ee na makambo nyonso nalakisami nzela na kotonda mpe koyoka nzala, kozala na biloko mingi mpe na kozanga. Nayebi kosala makambo nyonso kati na ye oyo akokembisaka ngai na nguya.” (Bafilipi 4:12, 13) Na ntembe te, Paulo atyaki motema epai na Nzambe.
Paulo ayebaki ete mitinda ya Makomami mizali na ntina mingi mpe ebongi kondima yango. Ezali nde malako mazali kouta na Nzambe ya bomoi, ye oyo alingi kosalisa baoyo bazali koluka kotosa yango. Mosakoli moko ya kala alobaki ete: “Mpo na oyo etali Jéhovah, miso na ye ekotambolaka mokili mobimba, mpo na komonisa nguya na ye mpo na baoyo bamipesi na ye na motema mobimba.”—2 Ntango 16:9, MN.
Bapambolami mpo batyaki motema na bango epai na Nzambe
Mpo na nini mingi na bato bakomonaka mpasi na kotya motema epai na Nzambe? Na ntembe te, ezali mpo ete mangomba na bango eyebisi bango mpenza te bantina oyo basengeli kosala yango. Mangomba masili kobungisa nkombo ya Nzambe, mamonisi Nzambe lokola nguya ezangi komonana, ete azali moto te, mpe bososoli ya bato ekoki te mpo na koyeba ye. Nzokande, na nzela na boyekoli ya Biblia, ba Témoins de Jéhovah bazali kotalela Nzambe lokola nguya ezangi komonana te, kasi lokola Moto oyo azali na nkombo. (Nzembo 83:18; Baebele 9:24) Basili koyeba ete azali na bizaleli bibongi na kotyela ye motema. Na ndakisa, engebene Exode 34:6, Jéhovah azali “Nzambe atondi na mawa mpe na ngolu, akoyokaka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo”. Batemwe bazali kotya motema epai na Nzambe mpe bayebi ete ‘atondi na solo’. Longwa na yango nde bazali na elikya makasi na elaka na ye ya kosala mokili ya sika oyo bobólá bomonani lelo epai na bato mingi, ekozala te.—2 Petelo 3:13.
Bamilió na ba Témoins de Jéhovah bazali bongo komonisa bilembo ete ebongi mpenza na kotya motema epai na Nzambe. Na ndakisa, na Sierra Lione, Rosaline, ya Témoin de Jéhovah, azali kosala mingi uta ngonga ya mitano ya ntongo kino na butu mpenza mpo ete akoka kozwa bilei, bilamba mpo na ye moko mpe mpo na bana na ye motoba. Alobaki ete: “Mingi bakolobaka ete moto te akoki kozala sembo, kasi ngai nandimisami ete yango ekoki kosalema. Ntango mosusu, nakutanaka na mikakatano oyo nakokaka kosilisa te. Kasi nayebi ete soki natikali sembo, makambo na ngai manso makotambola malamu. Na yango, nazali kosala milende ya solo mpo nazanga kosepelisa Jéhovah te.”
Mokomi moko alobaki ete: “Libumu oyo lizali na nzala litondi na mposa ya makanisi mpamba koleka mposa ya limpa.” Ya solo, bolembu mpe konyokwama makasi ekoki kozala mpasi mpo na koyikela yango mpiko koleka nzala. Nzokande, ye oyo azali koyekola mpo na koyeba Nzambe akozanga elikya te. Rosaline abakisi ete, “Sikawa nazali kosala mingi, kasi nazali na esengo, mpamba te nayebi ete ntango esili kobelema oyo nakonyokwama lisusu motindo oyo te. Lelo, nazali kosala mpo na komileisa, ngai mpe libota na ngai, kasi kati na mokili ya sika molakami na Jéhovah, bilei bikozala mingi mpenza. Na yango, sikawa nazali na esengo mpe na elikya oyo nazalaki na yango te liboso ete nayeba Jéhovah.”—Tala Yisaya 25:6; Emoniseli 21:3, 4.
Solo mpenza, baoyo bakotyaka motema epai na Nzambe bakoki mpe kokutana na mikakatano mitali bosenga ya mosolo lokola oyo ntoma Paulo akutanaki na yango. Kasi bakoki kobuka mibeko na Nzambe te mpo na koluka kobika. Davidi, mokomi na Nzembo, alobaki ete: “Nazalaki elenge mpe nakomi mobangé, nde naino namoni moyengebene te oyo atikami, to mwana na ye oyo akolombaka limpa.” (Nzembo 37:25) Ya solo, Jéhovah azali kobatela baoyo bakotyaka matomba na ye na esika ya liboso kati na bomoi na bango, mpe azali kopambola bango.—Matai 6:25-33.
Yango wana, soki ozali mobólá, “kotika te na kosala oyo ezali sembo.” (2 Batesaloniki 3:13, MN) Kobuka soko moke te mitinda ya bizaleli malamu. Zala na boyokani malamu elongo na Jehovah mpe tya elikya na yo epai na ye mpo olonga mikakatano ya bomoi. Elendiseli oyo epesami na baoyo bazali kosalela Jéhovah mpe bakotyaka mitema na bango epai na ye kozanga kotika, ete: “Bomisokisa na nsé na loboko na nguya ya Nzambe, ete atombola bino na elaka esili ye kopona. Bakitisa mitungisi na bino nyonso likoló na ye, mpo ete ye akobatelaka bino.”—1 Petelo 5:6, 7, MN.