Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye
“Oyo azalaki solo Mwana na Nzambe”
UTA mwa ntango, Yesu azali likoló na nzete, wana na midi, molili na kokamwa mokozipa mboka mobimba na boumeli na ngonga misato. Ekoki kozala te mpo na kozipama na moi (eclipse solaire), mpamba te yango ekosalemaka bobele na eleko na kobima na sanza, nzokande Pasiká ekosalemaka na eleko oyo sanza engali makasi (pleine lune). Lisusu, kozipama wana na moi ekosalemaka bobele na boumeli ya mwa ba minutes. Molili oyo mouti nde na Nzambe! Na ntembe te, likambo oyo na kokamwa lizali kosenga ete baoyo basekaki Yesu basosola, nkutu batiki koseka.
Soki molili oyo mobimaki liboso ete mosali na mabe apamela moninga na ye mosusu mpe liboso na kosenga na Yesu ete akanisa ye, mbala mosusu likambo oyo na kokamwa likoki kozala moko na makambo oyo matindaki mosali na mabe ete abongwana. Ekoki kozala mpenza ete na eleko wana ya molili nde basi minei, mama na Yesu elongo na Salomé ndeko na ye ya mwasi, Marie Madeleni mpe Marie, mama na Yakobo, babelemi na nzete ya mpasi Yoane, ntoma oyo Yesu alingaki, azali elongo na bango.
Mama na Yesu ‘aoki mpasi mingi’ na motema na komonáká mwana oyo ye amelisaki mabele mpe abokolaki, likoló na nzete yango kati na mpasi monene. Kasi Yesu azali komitungisa te ezala mpo na mpasi na ye moko to mpo na oyo ekokómela mama na ye. Na kosaláká milende mpenza, atali Yoane mpe alakisi na mama na ye na motó ete: “Mwasi, tala mwana na yo.” Abongwani epai na Marie mpe alobi na Yoane ete: “Tala mama na yo.”
Yesu atiki mama na ye, oyo amonani lokola ete azali mokufeli-mobali, epai na ntoma oyo ye alingi mingi mpenza. Aponi Yoane mpamba te bandeko na ye bamonisi naino bondimi te epai na ye. Na bongo, atiki ndakisa malamu mpo na oyo etali kotalela bobele bamposa ya mosuni te mpo na mama na ye, kasi lisusu bamposa ya elimo.
Pene na ngonga ya misato na nsima na midi, Yesu alobi ete: “Nazali na mposa ya komela.” Amiyoki lokola soko ete Tata na ye alongoli libateli oyo ye azalaki kozwa liboso, mpo ete bosembo na ye botyama mpenza na komekama Angangi bongo na mongongo makasi ete: “Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo nani otiki ngai boye?” Na koyokáká maloba na ye wana, bamosusu oyo bazali wana balobi ete: “Boyoka, azali kobenga Eliya.” Moko na bango akei mbangu kopesa ye komela, kotyáká na nsonge na nzete moko, eteni na elamba oyo epolisami na mai na ngài. Kasi bamosusu balobi ete: “Tika ye! Totala soko Eliya akoya kolongola ye.”
Ntango Yesu ameli mai wana na ngài, angangi ete: “Yango ekokani” Ee, asilisi mosala nyonso oyo Tata na ye apesaki ye na kotindáká ye awa na mabelé. Mpo na kosukisa alobi ete: “Tata, natiki elimo na ngai na maboko na yo.” Na maloba oyo, Yesu azongisi elimo to bokasi na ye ya bomoi epai na Nzambe, kondimisamáká ete akozongisela ye yango. Bongo, alalisi motó mpe akufi.
Na ntango oyo mpema na Yesu ebimi, koningana makasi ya mabelé esalemi kino kopasola mabangá minene. Koningana wana ezali monene kino kobuka nkunda oyo ezali libanda ya Yelusaleme mpe bibembe bibimi. Baleki nzela bamoni bibembe mpe, wana bakoti na engumba, bayebisi makambo oyo bauti komona.
Bobele na ntango oyo na liwa na Yesu, likambo mosusu lisalemi, ya mbala oyo kati na temple ya Nzambe: elamba monene oyo ezali kokabola Esika Mosantu mpe Esika-eleki-Mosantu, epasuki na ndambo mibale, longwa likoló kino nsé. Elamba wana kitoko etondi na langi mingi, ezalaki na bolai ya bametele 18 mpe ezali kilo mingi! Na ekamwiseli oyo, Nzambe amonisi bobele nkanda na ye te epai na babomi na Mwana na ye, kasi lisusu ete likoki ya kokóta na Esika-eleki-Mosantu, elingi koloba likoló, epesameli ndingisa na nzela na liwa na Yesu.
Bato oyo bamonaki koningana ya mabelé mpe makambo mosusu, babandi kobanga. Mokonzi na basoda oyo azalaki kokengela kobomama wana akumisi Nzambe. Alobi ete: “Ya solo, oyo azalaki Mwana na Nzambe.” Na ntembe te azalaki ntango Bayuda bafundaki Yesu liboso na Pilato ete, amikómisaki mwana na Nzambe. Sikawa andimisami ete Yesu azali solo Mwana na Nzambe, ee, solo mpenza, azali moto oyo aleki bato nyonso.
Komonáká makambo yango ya kokamwisa, bamosusu mpe bazali kotungisama mpe, lokola elembo ya mpasi mpe ya nsoni oyo bazali na yango, babongoli mitema na kobetáká ntólo. Basi bayekoli na Yesu, batelemi mosika mpe bazali kotala na nsomo makasi, makambo yango minene. Ntoma Yoane azali wana. Matai 27:45-56; Malako 15:33-41; Luka 23:44-49; 2:34, 35; Yoane 19:25-30.
◆ Mpo na nini tokoki koloba te ete molili oyo mobimaki na boumeli na ngonga misato, ezalaki nde kozipama na moi?
◆ Liboso na kokufa ndakisa nini malamu Yesu atikaki mpo na baoyo bazali na baboti basili kokóma mibangé?
◆ Maloba minei nini ya nsuka Yesu abimisi liboso na kokufa?
◆ Koningana ya mabelé ebimisi makambo nini, mpe kopasuka ya elamba ya temple na ndambo mibale elimboli nini?
◆ Makamwisi oyo mabimi mazali na bopusi nini epai na mokonzi na basoda oyo azalaki kokengela mosala na koboma?