Bato bazali koluka Nzambe
MPO na nini biso ba Témoins de Jéhovah tozwaki “monoko na peto”? Ezali te ete tobómba yango mpo na biso moko. Ezali mpe te mpo na kopesa biso nzela ete tozala na bomoi malamu oyo bokobenda miyokani mabe mpe etamboli mabe oyo ya boklisto ya lokuta. Na kokesena, tozwaki yango mpo ete nyonso “babelela nkombo na Jéhovah mpe basalela ye na motema moko.” (Sofoni 3:9, MN) Na ntembe te, kozwama ya monoko yango ya peto ezali kopusa biso na kosala elongo na bamilió ya bandeko na biso mibali mpe basi baklisto oyo bauti na mposo nyonso, mabota nyonso mpe minoko nyonso, na kosakoláká na bosembo mpenza, nsango malamu liboso ete nsuka eya.—Malako 13:10; Baloma 13:11; Emoniseli 14:6, 7.
Mbala mosusu mosala ya kosakola ekobimisaka mikakatano oyo tomeseni na yango te. Yango nini? Na boumeli ya ekeke ya ntuku mibale, yikiyiki monene ebimaki likoló na bitumba, na makambo ya mpasi, na makambo na nkita to mpo na bantina mosusu. Na yango, bato ya minoko mosusu mpe ya mangomba mosusu bakendeki kofanda na mikili misusu oyo mizalaki na makambo ya bomoi makeseni na oyo na bango. Yango wana ebele ya ba Hindous, Babuda mpe ba musulmans bakendeki kofanda na mikili epai moi mokolalaka. Tokokutanaka na bato yango wana ekokendeke biso ndako na ndako mpo na koyebisa monoko na peto. Mbala mosusu, tokakatanaka wana eyebi biso bobele makambo moke na ntina na mangomba na bango. Tokoki kosala nini mpo na kolónga yango?—Tala Misala 2:5-11.
Ndenge nini koyebisa solo epai na musulman moko to epai na moyuda moko? Na likambo nini bakeseni na bamosusu? Bindimeli ya ba Hindous ezali nini? Mpo na nini bato na lingomba ya Sikh bakotalaka ekoti? Mokanda na bulee na bango ezali nini? Eloko nini ezali kokesenisa ba Hindous mpe Babuda? Kondima ya Bajaponé ezali nini na ntina na Shinto? Bato ya lingomba ya Tao to lingomba ya confucius na Chine, bandimaka Nzambe? Na likambo nini bindimeli ya moyuda na lingomba orthodoxe ekeseni na bindimeli ya moyuda ya lingomba ya mbongwana (réforme) to mpe ya moyuda oyo azali kolanda lingomba ya kala? Soki tolingi kosolola na bato yango bauti na bipai bikeseni, esengeli na biso koyeba liboso makanisi na bango mpe koyeba kokamba bango na bobóto mpe na mayele epai na Nzambe ya solo, Jéhovah.—Misala 17:22, 23; 1 Bakolinti 9:19-23; Bakolose 4:6.
Mpo na kosalisa biso ete toyeba mangomba mosusu, mateya mpe ebandeli na yango, la Société Watch Tower asili kobimisa mokanda moko na titre oyo ete L’humanité à la recherche de Dieu (Bato bazali koluka Nzambe), na ba assemblées “monoko na peto” oyo esalemaki na mokili mobimba na 1990. Mokanda yango mokosalisa biso na kosakola malamu mpenza epai na bato ya mangomba ya boklisto ya lokuta mpe na mikili oyo bazali baklisto te.
Mokanda moko malamu
Mokanda yango mozali na nkasa 384 mpe mokabolami na mikapo 16, mozali komonisa bolukiluki oyo bato basili kosala na boumeli ya mibu nkóto motoba mpo na komona Nzambe. Ezali koyanola na mituna oyo mitaleli mangomba ya mokili mobimba. Tala bamoko na yango: Makambo nini mazali komonisa lingomba ya moto na moto? Mpo na nini mabe mazali te na kotalela bindimeli ya bato mosusu? Boyokani nini bozali kati na lingomba ya katolike mpe Buda? Mpo na nini bato mingi bakondimaka maji, bondoki mpe kotalela minzoto? Mpo na nini ba Hindous bakosambelaka ebele na banzambe mibali mpe banzambe basi? Na likambo nini ba Sikh bakeseni na ba Hindous? Buda azalaki nani mpe ateyaki nini? Mpo na nini Shinto ezali lingomba ya ntina mingi na Japon? Mpo na nini Bayuda bazali mbala moko kolanda mibeko na bonkɔkɔ mpe Mibeko na Moĩse? Bilembeteli nini tozali na yango oyo bimonisi ete Yesu azali moto ya lisapo mpamba te? Eloko nini ekesenisi coran mpe Biblia? Mpo na nini bakatolike bakondimaka ete Petelo azalaki pape ya yambo? Mpo na nini Luther, sángó katolike, alongwaki na lingomba ya Rome?
Mituna yango mizali mingi mpenza. Nzokande mokanda yango mozali na biyano oyo bikosalisa biso na kosakola malamu mpenza epai na bato ya mangomba makeseni. Ezali kolakisa ete bato mingi bazali na mangomba na bango mpe ete lingomba ezali likambo litali moto na moto. Nzokande, tozali kotanga na lokasa 8 ete: “Uta ebendeli, baboti na biso mpe bandeko na biso basili kolona kati na elimo na biso, makanisi na bango mpo na bizaleli to mpe losambo. Na yango, tomeseni kolanda bobele bizaleli ya mangomba ya baboti na biso mpe bandeko na biso basili kolona kati na elimo na biso, makanisi na bango mpo na losambo.Na yango, tomeseni kolanda bobele bizaleli ya mangomba ya baboti ba na biso mpe oyo bankoko na biso.” Emonanaka “mbala mingi ete, mangomba na biso maponamaki na bato mosusu, na kotalela eleko mpe esika oyo tobotami.”—Tala Bafilipi 3:4-6.
Mokanda yango motuni bongo motuna oyo ya koyeba soki “lingomba oyo baponelaki biso ntango tobotamaki, esengeli bobele kozala solo na mobimba na yango.” Basengi na motangi ete atalela mangomba mosusu na elimo ya kozanga koponapona. Tozali kotanga na lokasa 10 ete: “Moto oyo ayebi makanisi ya mangomba ya bato mosusu, akoki mpenza kososola elongo na bato ya mangomba nyonso mpe kokabola makanisi malamu.” Totangi mwa liboso kuna: “Tokoki mpenza koboya endimeli oyo to mosusu, kasi nzela epesami te ete toyina moto moko bobele mpo azali na makanisi makeseni na oyo na biso.”—Matai 5:43, 44.
Motuna moko monene motunami mbala na mbala kati na mokanda yango ete: Moto azali na molimo mozangi kokufa, ekendeke kofanda esika moko nsima na liwa? Na lolenge moko to mosusu, pene na mangomba nyonso mazali koteya likanisi oyo. Na lokasa 52 ya L’humanité à la recherche de Dieu, totangi ete: “Ezali bango koluka Nzambe, bato bamikotisi na esika nyonso oyo bakutanaki na yango. Bamikósaki na likanisi mpamba, oyo ya kozanga kokufa. . . . Endimeli oyo ete molimo ekufaka te mpe makanisi na yango mosusu esili koumela bambula mingi liboso ete bayebisa biso yango.” Masoló mosusu mpe matalelami: Ezali na lifelo ya móto epai kuna milimo mizali konyokwama? Tokoki kozala na elikya nini malamu mpo na bakufa? Nzambe azali bobele moko to mpe banzambe bazali mingi?—Genese 2:7; Ezekiele 18:4.
Mokanda mpo na kotambwisa boyekoli na Biblia
Mokanda yango mozali kolobela kokóla na mangomba minene ya mokili, na kolandáká na likebi nyonso lisoló ya kala mpo na kobima na yango: Hindou, Buda, Tao, confucius, Shinto, lingomba ya Bayuda, boklisto, mangomba na boklisto ya lokuta mpe lslam. Mokapo mokomoko ya mokanda yango mozali kotanga mwa maloba ya mikanda na bosantu ya mangomba yango, eloko oyo ezali kopesa nzela na bandimi ya motema sembo ete batalela maloba yango makeseni. Mabongoli minei ya coran na lifalansé, masalelami kati na mokapo oyo molobeli lslam. Mokapo oyo molobeli lingomba ya Bayuda ezali mingi mpenza kotanga maloba ya libongoli la Bible du Rabbinat français, oyo ebongolamaki na litambwisi ya Mokonzi monene ya lingomba ya Bayuda, Zadoc Kahn.—Tala Misala 17:28; Tite 1:12.
Mokanda yango mozali mpe kolobela bato oyo bandimaka te ete Nzambe azali mpe baoyo bakondimaka bobele makambo mazali bango komona? Mokapo 14 mozali kolobela likanisi oyo bato bazali na yango lelo ete Nzambe azali te mpe ezali kolimbola mpo na nini ba Témoins de Jéhovah bazali kondima ete Nzambe azali. Mokapo moko nsima na mosusu, ezali kotinda motangi kati na Biblia. Na yango, na lisalisi ya mokanda L’humanité à la recherche de Dieu, tozali na makoki mpo na kobanda boyekoli na Biblia elongo na bato ya mangomba manso mpe elongo na baoyo bazali ata na endimeli moko te. Ezali kolobela lingomba moko na moko na lolenge na mayele mpe na limemya na kobimisáká mituna mibongi mpo na komema moto na solo mpe na boyebi ya Jéhovah. Mokanda yango mokozala lipamboli monene mpo na baoyo bazali koluka Nzambe na motema sembo.—Nzembo 83:18; Yoane 8:31, 32; 2 Timoté 3:16, 17.
Ba encadrés ya maloba kitoko mpo na koteya ezali kati na mokapo moko na moko. Na ndakisa, encadré moko ezali na nkasa 226 mpe 227, na titre “Lingomba ya Bayuda—Lingomba oyo likabwani na biteni mingi,” ezali komonisa bopusi makasi ya lingomba ya Bayuda. Na nkasa 116 mpe 117, na sous-titre “Mwa ndambo na banzambe mibali mpe banzambe-basi ya ba Hindous,” etangi mwa ndambo na banzambe kati na bamilio 330 oyo esambelamaki na ba Hindous. Babuda bazali kondima Nzambe lokola ezali likanisi ya bato ya Occident? Encadré oyo ezali na titre “Babuda mpe Nzambe,” na lokasa 145, ezali kopesa eyano. Mokanda yango mozali lisusu na index malamu oyo ezali kopesa nzela na kozwa nokinoki makanisi ya ntina. Bankombo ya mikanda oyo mitangamaki ezali mpe kotinda motangi oyo alingi koyeba makambo mingi ete atala makanisi mazali na kati.
Mokanda yango mozali lisusu na bililingi mingi mpo ete ezali na bafoto 200 mpe bililingi mosusu oyo ntina na yango ezali bobele mpo na kotala mpamba te. Moko na moko na yango ezali komonisa na lolenge malamu mpenza lingomba oyo yango ezali kolobela. Yango wana lokasa 238 ezali na bafotó oyo eezali komonisa masese na Yesu. Mokanda yango mpe ezali na bililingi mitano oyo bizali komonisa bandenge ekeseni ya mosala na Klisto: bikamwiseli na ye, ebongwaneli na ye, liwa na ye lokola mbeka mpe mosala oyo apesaki epai na bayekoli na ye ete basakola na mokili mobimba.
Lokasa 289 ezali na bililingi mingi oyo bikosepelisa ba musulmans. Ezali komema makanisi ya motangi na La Mecque, mpe na katikati ya mosquée monene oyo ezali na Kaaba, mpe ezali komonisa Libánga ya moïndo oyo ba musulmans basambelaka. Bandenge mingi ya losambo na Buda emonisami na lokasa 157. Mposa ya ba Hindous ekolamuka na lokasa 117, na lisalisi ya bililingi ya Ganesha mpe Krishna, banzambe mibale kati na banzambe na bango ya lokumu.
Mpo na koyeba makambo oyo na sikisiki, totunaki epai na baklisto ya makoki ya mikili mikeseni likoló na moko na moko na mangomba minene. Makanisi kitoko oyo mazali kati na mikapo oyo mizali kolobela lingomba ya Bayuda mpe kondima ya Baha’i. Ba Témoins oyo bafandi na mikili oyo ya ba musulmans, babongisaki malamu mpenza mokapo oyo molobeli lslam. Makanisi ya ntina mautaki longwa na lnde likoló ya lingomba ya ba Hindous, ba Sikh mpe ba Jaïna. Na mikili ya Moyen—Orient, baklisto bapesaki makanisi ya sikisiki mpenza likoló na mokapo oyo molobeli Shinto mpe bapesaki lisusu makanisi likoló na Buda, Tao mpe Confucius.
Mokanda oyo mozali kolobela lingomba moko na moko na bozindo, ekosalisa baoyo bazali na yango na minoko na bango ete babanda boyekoli na Biblia likoló na mokapo oyo motaleli lingomba ya balobani na bango. Na nsima, ekoki mbala mosusu koleka na mokapo oyo mozali kolobela kobotama na boklisto ya ebandeli mpe oyo ezali komonisa bantina ya kondima ete Klisto azali solo Momonisi na Nzambe, ye oyo asengeli kokamba bato epai na Nzambe. Mikapo misusu mizali kolimbola lolenge nini lipengwi ebimaki, epai mangomba mikemike ya boklisto ya lokuta ebimaki. Mikapo mibale ya nsuka mizali komonisa lolenge nini losambo ya solo lozongisamaki lisusu na mikolo oyo ya nsuka mpe makambo oyo mosika te makoyela Babilone monene, lisangá ya mokili mobimba na mangomba ya lokuta oyo matambwisami na Satana. Na nsima, elobeli mingi mokili ya sika mpe elikya ya Biblia mpo na lisekwa.—Yoane 5:28, 29; 12:44-46; Emoniseli 21:1-4.
Mokanda yango mokosalisa mpenza ebele na bato na kobelema na Nzambe, lokola oyo Yakobo alobaki na mokapo 4 na mokanda na ye, verset 8 (MN) ete: “Bobelema epai na Nzambe mpe ye akobelema epai na bino. Bosukola maboko, bino basumuki, mpe bopetola mitema na bino, bato na mitema na kokakatana.” Lolenge moko Yisaya alobi yango ete, “boluka Jéhovah naino akoki komonana Bobyanga ye naino abelemi penepene.”—Yisaya 55:6; Yoane 6:44, 65.
Biso banso tolanda nzela malamu, epai na Nkolo Moyangeli na molóngó, Jéhovah Nzambe. Na lisalisi ya mokanda oyo ya sika, L’humanité à la recherche de Dieu, tosalisa lisusu ebele na bato ete basambela Jéhovah “na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:23, 24) Tolendendela kati na bolukiluki na biso ya baoyo bazali na mposa ya koyeba solo na kolakisáká bango Nzambe ya solo, mpamba te, na solo, likoki ezali mpo na kozwa ye.
[Maloba na nse ya lokasa]
Bililingi na lokasa 17
Moto azali Koluka Nzambe na mitindo mingi
[Elilingi]
Bakatolike ya molende bakobondelaka Marie
[Elilingi]
Ba Hindous ba kosambelaka ebale Gange
[Eutelo ya bafɔtɔ]Harry Burdich, Transglobe Agency, Hamburg
[Elilingi]Bamoko na Bayuda ya molende bakotalaka filakateli
[Eutelo ya bafɔtɔ]
GPO, Jerusalem
[Elilingi]
Bamuzulma bakendaka mbula nyonso kosambela na La Mecque Bato
[Elilingi]
Mingi bazali kosambela Buda
[Bililingi na lokasa 18]
Yesu asalelaki masese mpo na kosalisa bato ete bayeba Nzambe ya solo