Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/4 nk. 8-9
  • Na libéké ya Galilai

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Na libéké ya Galilai
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Masolo mosusu
  • Na libeke ya Galilai
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Na libongo ya Mbu ya Galile
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu abimeli mibali oyo bazalaki koboma mbisi
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Alongaki kobanga mpe ntembe
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/4 nk. 8-9

Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye

Na libéké ya Galilai

KOTÓSÁKÁ lilako oyo Yesu apesaki bango liboso, bantóma bazongi sikawa na Galilai. Nzokande, bayebi te soki basengeli kosala nini. Na nsima na mwa ntango, Petelo alobi na Toma, na Natanaele, na Yakobo mpe na ndeko na ye Yoane, mpe na bantóma mibale mosusu ete: “Nakei koboma mbisi.”

Baninga mosusu motoba balobi na ye ete, “Biso mpe tokei na yo.”

Bazwi eloko te butu mobimba. Nzokande, na ntongontongo, Yesu abimeli bango na libongo, kasi bantóma bazali koyeba te ete ezali ye. Yesu abengi bango: ’’Bana, bozali na eloko na kolya te?”

Bayanoli uta na bwato ete “Ezali te!”Yesu alobi ete, “Bobwaka monyámá na loboko mobali na bwato mpe bokozwa.” Ezali yango nde bantóma basali, mpe bazali kokoka te kobimisa monyámá na bango mpo ete esili kotonda na mbisi. Yoane angangi ete: “Ezali Nkolo!” Petelo alati elamba na ye ya likoló, amibwaki na mai, mpe abandi kokata mai na bolai ya metele ntuku libwa kino na libongo. Bantóma mosusu balandi ye na bwato, bazali kobenda nsima na bango monyama motondi na mbisi.

Ekiti bango na mabelé, bakuti móto ya makala, elongo na mbisi etyami likoló na yango, mpe mampa. Yesu alobi na bango ete, “Boya na mwa ndambo na mbisi oyo bouti kozwa.” Petelo amati na bwako mpe abendi monyama na libongo. Na kati ezali na mbisi minene 153!

Yesu alobi na bango ete, “Boya kolya.”Moko te kati na bango azali na molende ya kotuna ye ete: “Yo nani?” Mpamba te bayebi ete ezali Yesu. Oyo ezali mbala ya nsambo mpo na komonana na ye uta lisekwa na ye, mpe ya misato liboso na bantóma mingi na mbala moko. Sikawa, azali kokabola bilei ya ntongo, kopesaka na moto na moto limpa mpe mbisi.

Ntango bango nyonso basilisi kolya, mbala mosusu Yesu alakisi na motó ebele na mbisi oyo bauti kozwa, mpe atuni Petelo ete: “Simona, mwana na Yoane, olingi ngai koleka baoyo?” To mpe, na maloba mosusu: Ozali na bolingo mingi epai na misala na yo ya mobomi mbisi koleka mosala oyo mpo na yango nasili kobongisa yo?

Petelo ayanoli ete, “Yo oyebi ete nazali na bolingo mingi mpo na yo.”

Yesu alobi ete, “Leisa bampate na ngai.”Mpo na mbala ya mibale, atuni lisusu: “Simona, mwana na Yoane, olingi nde ngai?”

Petelo ayanoli ete, “Ee, Nkolo, oyebi ete nazali na bolingo mingi mpo na yo.”

Yesu alobi na ye lisusu, “Leisa bampate na ngai.”

Na nsima, mpo na mbala ya misato, atuni ete: “Simona, mwana na Yoane, olingi nde ngai?”

Mbala oyo Petelo atungisami kati na motema. Mbala mosusu amituni soki Yesu azali na ntembe mpo na bosembo na ye. Mpamba te, kala mingi te, wana bazalaki naino kosambisa Yesu mpo na koboma ye, Petelo awanganaki ye mbala misato ete ayebi ye te. Na bongo Petelo alobi ete: “Nkolo, yo oyebi makambo nyonso, yo oyebi ete ngai nazali na bolingo mingi mpo na yo.”

Mpo na mbala ya misato, Yesu alobi na ye ete, “Leisa bampate na ngai.”

Yesu alobi boye bobele mpo na Petelo ye moko te, kasi mpo na bantóma mosusu mpe lokola: Yesu alingi kobenda likebi na bango likoló na mosala oyo alingi komona bango kokokisa yango. Lokola mosika te akotika mokili, Yesu alingi ete bakamata makambo nyonso na maboko mpo na kosunga baoyo bakobendama kati na lopango na Nzambe.

Yesu ayebisi sikawa ete, lokola ye moko akangamaki mpe abomamaki mpo azalaki kosala mosala oyo Nzambe atindaki ye, Petelo akokutana na mikakatano motindo moko. Alobi na ye ete, “Ezalaki yo elenge, omikangaki loketo mpe otambolaki epai ezalaki na yo mposa. Nde ekokoma yo mobange, okosembola maboko na yo mpe mosusu akokanga yo loketo mpe akomema yo esika ezali yo na mposa te.” Atako liwa ya martire ezali kozela Petelo, Yesu alendisi ye ete: “Landa ngai.”

Petelo abongwani nsima mpe amoni Yoane; bongo atuni ete: ”Nkolo, oyo kuna akosala nini?”

“Soko nalingi ete aumela kino ekoya ngai, etali yo na nini? Yo, landa ngai.”

Maloba oyo na Yesu mapusaki bayekoli mingi na kondima ete ntóma Yoane akokufa lisusu te. Nzokande, lokola Yoane ayebisaki yango sikisiki na nsima, Yesu alobaki te ete ntóma akokufa te; alobaki bobele ete: “Soki nalingi ete aumela kino ekoya ngai, yango etali yo na nini?” Yoane 21:1-25; Matai 26:32; 28:7, 10.

◆ Nini emonisi ete bantoma bayebi le likambo nini basengeli kosala na Galilai?

◆ Ndenge nini bantoma bayebi Yesu na libóngo ya libéke ya Galilai?

◆ uta lisekwa na ye, Yesu asili komimonisa mbala boni?

◆ Ndenge nini Yesu amonisi polele mosala oyo alingi ete bantoma basala yango?

◆ Ndenge nini Yesu amonisi motindo nini Petelo akokufa?

◆ Maloba nini Yesu alobi na ntina Yoane bato mingi basimbaki ntina na yango te?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto