Landá kolóna na ntembe te, Jéhovah akokólisa
LISOLÓ YA FRED METCALFE
NA EBANDELI ya mobu 1948, wana ezalaki ngai na mosala ya kosakola ndako na ndako na Sud ya lrlande, nakendeki kotala ferme moko moke ezalaki pene na mboka cork. Ntango nalimbolaki mosala na ngai epai na molóni na elanga, aokaki nkanda. Asilikaki na kongangáká ete nazali communiste, mpe akendeki mbango mpo na koluka kanya na ye ya bilanga. Kozanga kotuna makambo mosusu, nabimaki noki na ferme mpe namataki likoló na velo oyo natikaki pembeni ya balabala. Lokola nkiteli ya nzela ezalaki mabe, nakitaki na lombango mpenza kozanga kotala nsima, kokanisáká ete nkóló ferme azalaki kolanda ngai na nsima na kobwakáká kanya na ye lokola nde ezalaki mosiki (javelot).
NA 1946, natikaki Angleterre mpo na kokende na mboka lrlande lokola pionnier spécial. Na boumeli ya mbula mibale, namesanaki na botemeli ya lolenge wana. Etuluku ya basakoli oyo nasanganaki na yango, tozalaki soko bato 24, ekutanaki na botemeli makasi mpe na matongi. Kasi nandimisamaki ete elimo na Jéhovah ekobimisa matomba na nsima.—Bagalatia 6:8, 9.
Na yango, liboso ete nayebisa bino lolenge makambo malekaki, nalingi naino kosolola na bino moke mpo na bomwana na ngai mpe formation oyo ezalaki na ntina mingi mpo na ngaí, na ntango wana ya mpasi.
Ndakisa malamu ya baboti mpe formation
Tata na ngai ayambaki solo na ebandeli ya mobu 1914. Wana autaki kotala lisano ya ndembó na Sheffield, na Angleterre, atangaki tract moko ezalaki kolimbola ezalela ya bakufi. Azwaki biyano na mangomba mingi mpo na mituna na ye, kasi esepelisaki ye mpenza te. Oyo ye atangaki mokolo wana kati na tract yango, esepelisaki ye mingi. Asengaki ba volumes motoba ya mokanda Etudes des Ecritures oyo elobelamaki na tract yango, mpe atangaki yango mbala mingi kino na ntongóntongó. Nokinoki, papa ayebaki solo.
Mwa liboso, asanganaki na lisangá ya ba Témoins de Jéhovah na esika wana, likambo oyo atikaki kosala yango te na boumeli ya mibu 40. Mpo na mingi kati na bambula wana, asalaki lokola mokengeli—mokambi. Mpo na esengo ya tata na ngai, bandeko na ye mibali mibale, mpe bandeko na ye ya basi misato bandimaki solo. Moko kati na bandeko na ye ya mibali ateyaki elenge mwasi moko motekisi. Elenge yango mpe ndeko na ye ya mwasi bakómaki baklisto bamipesi na Nzambe, bapakolami na elimo. Tata na ngai mpe ndeko na ye mobali babalaki bango.
Nabotami na bandeko mibali minei mpe tobɔkwamaki ’‘na mpamela mpe na mateya na Jéhovah.” (Baefese 6:4) Nazali na esengo lokola baboti na ngai basalaki milende mingi mpo na kolona solo kati na mitema na biso. Na ntango wana, ezalaki te na mikanda oyo mibongisamaki mpenzampenza mpo na kosalisa baboti na koteya solo ya Biblia epai na bana na bango. Kasi, mbala mibale na poso, biso tozalaki kosala boyekoli ya Biblia ya libota na lisalisi ya mokanda La Harpe de Dieu, mpe tozalaki kotalela makomami mokolo na mokolo.—Deteronome 6:6, 7; 2 Timoté 3:14, 15.
Baboti na biso bazalaki kopesa motuya monene na makita mpe bazalaki na molende kati na mosala ya kosakola; yango ezalaki ndakisa malamu mpo na biso. Tata na ngai asangisaki ezaleli ya kosekisa bato mpe bizaleli na ye kitoko ya elimo, ezaleli oyo apesaki yango mpe epai na bana na ye. Mosala makasi ya baboti na biso esili kobimisa matomba malamu. Bana na bango minei, baoyo bazali sikawa na mibu koleka ntuku motoba, bazali ntango nyonso kosalela Jéhovah na esengo.
Ebandeli kati na mosala ya pionnier
Na Avril 1939, na mibu 16, nasilisaki kelasi mpe nakómaki pionnier permanent. Tata na ngai asanganaki na ngai kati na mosala yango mpe apesaki ngai formation malamu. Kotamboláká na vélo, tosalaki teritware na bozindo mpenza na ntaka ya bakilometele 11 zingazinga na ndako na biso. Mikolo nyonso, moto na moto azalaki komema 50 brochures, mpe tozalaki kozonga bobele nsima na kosilisa kokabola yango nyonso.
Mbula mibale na nsima, nazwaki libaku kitoko ya kozala kati na ba pionniers spéciaux ya yambo baoyo baponamaki na Grande-Bretagne. Ezalaki esengo mpenza na kozwa lipamboli wana, kasi ezalaki na ngai mpasi mpo na kotika kimya kitoko ya libota na boklisto. Na boumeli ya ntango mpe na lisalisi ya Jéhovah, namesanaki na ezalela wana.
Mosala na ngai ya pionnier ekatamaki na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, wana nakangamaki na boloko elongo na bilenge baklisto mosusu na ntina na ezaleli ya koboya kokóta kati na makambo ya politike. Na boloko ya Durham, natyamaki na molongó ya YP (Young Prisoner, to elenge mokangami). Nasengelaki kolata kupé, likambo oyo lizalaki malamu mpenza te na ntango na malili. Kanisa naino Wilf Gooch (oyo azali sikawa coordinateur na filiale ya Grande—Bretagne), Peter Ellis (mosangani ya comité de filiale ya Grande—Bretagne), Fred Adams mpe ngai, banso tozali na molai ya 1, 80 metele, tolataki kupé lokola bana kelasi.
Teritware oyo epesamelaki ngai: lrlande
Nsima wana nabimaki na boloko, nasalaki lokola pionnier na bituka ya Angleterre na boumeli ya mbula misato. Nde natindamaki na teritware oyo emonanaki lokola ete ezalaki mpasi, kasi ezalaki na matomba mingi: lrlande. Eloko moko nayebaki mpo na lrlande ya Ngele, ezalaki ete bato mingi bazalaki bakatolike. Kasi nandimaki te maloba ya bamosusu oyo bazalaki komonisa elimo ya kozanga kolónga, mpe nakakatánáki te mpo na kondima liponi na ngai. Ezalaki mpenza eleko oyo losambo na peto ezalaki kokóla, mpe nandimisamaki ete, na nzela na elimo santu na ye, Jéhovah akosunga ngai.
Ba Témoins mingi ya mboka lrlande bazalaki kofanda na kapitale, Dublin; bobele moko to mibale nde bafandaki epai mosusu. Bato mingi bamonaki naino Témoin de Jéhovah moko te. Elongo na ba pionniers spéciaux mosusu misato, nabandaki kosakola na Cork. Kasi, ezalaki petee te mpo na kokutana na moto oyo azali na mposa ya koyoka malamu. Na misa na bango, basángó bazalaki ntango nyonso kokebisa bato na ntina na biso, kolobáká ete biso tozalaki ba “communistes,” basaleli ya Diable. Bazulunalo ya bapanzi nsango ezalaki mpe kotyola mosala na biso.
Mokolo moko, mokati-nsuki moko azalaki kolongola ngai nsuki ezali pembenipembeni na motó. Kati na lisoló, atunaki ngai mosala oyo nazalaki kosala na Cork. Ntango nayanolaki ye, asilikaki mpe akómaki kofinga ngai. Loboko na ye ezalaki kolenga mpo na nkanda, mpe namimonaki lokola ete nakobima epai na ye na nsoni! Nasepelaki mingi wana nabimaki na esika ya bokatisi nsuki kozanga likámá.
Mobulu ya ebele na bato
Mbala mosusu tozalaki kokutana na mobulu ya ebele na bato. Na ndakisa, mokolo moko, na sanza ya Mars 1948, tozalaki kosakola ndako na ndako wana ebele na bato balandaki moninga na ngai, Fred Chaffin. Ntango elandamaki na ebele na bato, Fred akimaki na esika bakomataka bus mpo na kosenga lisalisi epai na sofele mpe moto oyo akotalaka batiké ya bus. Kasi bango mpe babenganaki ye. Fred alandaki kokima lisusu, mpe akendeki kobombana nsima na efelo moko molai na lopango ya basángó.
Na ntango wana, nakendeki kozwa vélo na ngai. Mpo na kozonga na ville, nalekaki na balabala mosusu, kasi ebimaki ngai na balabala monene, ebele bazalaki kozela ngai. Mibali mibale babotolaki sakosi na ngai mpe bapanzaki biloko bizalaki kati na yango. Babetaki ngai makófi mpe batutaki ngai na makolo na bango. Na pwasa, moto moko akómaki. Azalaki polisié, kasi alataki bilamba ya mosala te; ye nde asukisaki mobulu wana na komemáká biso banso na la police.
Mobulu wana ezalaki nzela mpo na “kolobela mpe kotambolisa nsango malamu.” (Bafilipi 1:7) Ntango basambisi batalelaki likambo yango, polisié oyo asalisaki ngai, ye mpe mokatolike, atatolaki, mpe bato motoba bakweisamaki na esambiselo mpo na kobeta mpe bampóta oyo bazokisaki ngai. Ekateli wana emonisaki ete, tozalaki na lotómo ya kosakola ndako na ndako, mpe yango elembisaki baoyo bazalaki kosala mobulu.
Na ebandeli, emonanaki ete, kotinda bandeko basi lokola ba pionniers na bamboka lokola cork, ezalaki likámá mpenza. Nzokande, mbala mingi emonanaki malamu ete bandeko basi batalaka basi oyo bazalaki kosepela na solo. Mpo na yango, la Société atindaki ba pionniers mibale ya basi na cork, mwa ntango liboso ete mobulu wana mosalema. Bandeko basi yango bazalaki mpenza malamu. Moko na bango, Evelyn Macfarlane oyo, na nsima akómaki misionere mpe akokisaki mosala malamu na mboka Chili. Mosusu, Caroline Francis, ye oyo atekaki ndako na ye na Londres mpo na kokóma pionnier na lrlande, akómaki mwasi na ngai.
Mbótó ya solo ebandi kobóta
Tokanisaki ete tozalaki bobele kolekisa ntango na biso mpamba na kolónáká mboto ya solo ya Bokonzi kati na ezalela motindo wana. Kasi tomonaki solo kokola epai na epai, likambo oyo lilendisaki endimiseli na biso ete, Jéhovah azali na nguya ya kokólisa. Bongo, mokolo moko, la Société atindelaki biso adresse ya mobali moko oyo asengaki mokanda Que Dieu soit reconnu pour vrai! Mobali yango azalaki kofanda na Fermoy, engumba moke etangwi na cork soko na bakilometele 35. Na ntóngó ya mokolo moko na eyenga, nazwaki vélo mpo na koluka moto yango.
Ntango nakómaki Fermoy, natunaki mobali moko soki nakómaki pene na esika nazalaki kokende. Alobaki na ngai ete: “Etikali lisusu bakilometele 14 mpo na kokóma.” Mpe nalandaki lisusu mobembo kino nakómaki na ferme moko ezalaki na nsuka ya mboka. Elenge mobali oyo asengaki mokanda, atelemaki na porte ya ndako. Ntango namimonisaki epai na ye, alobaki ete: “Mokanda oyo mozali na motuya mingi!” Tosololaki mpenza malamu, na boye ete bakilometele soko 50 oyo natambolaki, emonanaki na ngai lisusu mingi te. Mibu 40 na nsima, nazali na esengo mingi ya komonáká lisusu “elenge” mobali yango, na ba assemblées. Lelo oyo, ezali na masangá zomi na etuka ya Cork.
Na bambula 50, caroline mpe ngai, topalanganisaki mbótó ya solo na ntéi (centre) ya lrlande. Na 1951, tolendisamaki na kolendendela wana tomonaki bato ya bopóló, lokola “Granny” Hamilton mpe mwasi ya mwana na ye. kozwa etelemelo nokinoki mpo na solo. “Granny” Hamilton akómaki mosakoli ya liboso oyo azwaki batisimo na etuka ya Longford.—1 Batesaloniki 2:13.
Tozalaki na mikakatano mpo na koumela na ndako moko. Soko batemeli batombokeli nkóló na ndako, ye azalaki kosenga biso ete tobima na ndako na ye. Nsima na kosanzé ndako mbala misato elandani, tosombaki hema moko, litokó moko mpe bolangeti, oyo tozalaki komema kati na Ford Y. Na mpokwa, nsima na mosala ya kosakola, tozalaki koluka esika malamu mpo na kotelemisa héma na biso. Na nsima. tokómaki kolala na esika oyo babéngi ete caravane (ndako oyo ekobéndamaka na motuka), oyo ezalaki na molai ya bametele minei. Ezalaki moke mpe ezalaki kitoko mingi te (tosengelaki kotambola na ntaká ya bametele 400 mpo na kozwa mai ya malamu), mpe ezalaki te na biloko oyo bikokaki kobatela biso na malili to na molungé. Kasi biso tomonaki yango ete ezalaki lipombó (luxueuse). Mokolo moko, ezaleli na ngai ya kosekisa bato etyamaki na komekama, wana naselemwaki ntango nanyataki mposo ya mbuma moko oyo epolaki na mai, kino nakendeki kokwea kati na libulu moko moke. Nabikaki mpo ete mai mazalaki mpenza mozindo te. Ezalaki na caravane yango nde tozalaki koyamba mokengeli ya zongazonga mpe mwasi na ye, wana bazalaki koya kotala biso.
Mbala mosusu bato bazalaki komimonisela biso boboto. Na ndakisa, na 1958, tokendeki na Sligo, na Ouest ya lrlande, epai kuna, mbula mwambe liboso, babenganaki babalani mibale oyo bazalaki ba pionniers. Tosengaki Jéhovah asalisa biso ete tozwa esika ya kotya caravane. Nsima na kolekisa ngonga mingi mpo na koluka, tokatisaki esika monene oyo liboso bazalaki kotimola mabángá. Na nsé na esika yango, mobali moko azalaki kobatela etonga ya ngombe. Alobaki na biso ete esika yango ezalaki mpo na libota na ye. Totunaki ye ete: “Tokoki kofanda awa?” kolobáká na sikisiki mpenza ete tozalaki bamonisi ya lingomba moko. Andimaki.
Nsima na mwa ntango moke, atunaki biso ete: “Bozali na lingomba nini?” Tobangaki mwa moke. Toyanolaki ye ete tozalaki ba Témoins de Jéhovah. Tosepelaki mingi mpo ete azalaki sé komonisa bobóto. Mwa baposo na nsima, apesaki biso mokanda ya bofuteli esika wana mpo na mbula moko. Mpe alobaki ete, “biso tolingi mbongo te, kasi toyebi ete bino bozali kokutana na botemeli. Bongo, soki moto moko atuni bino soki na lotómo nini bofandi na esika oyo, bokoki kolakisa ye mokanda oyo.”
Na boumeli ya ntango oyo bolekisaki na Sligo, toyokaki nsango ya mobali moko, ye moto wa mombóngo na lokumu mpe mobeti na ndembó, oyo mwa ntango moke liboso, asepelaki na nsango malamu wana ba pionniers ya liboso bazalaki na engumba yango. Uta mibu mwambe, azalaki kokutana lisusu te na ba Témoins de Jéhovah; tolingaki komona ezaleli na ye. Esengo oyo Mattie Burn azalaki na yango ntango namimonisaki epai na ye, endimisaki ngai. Mbótó ya solo oyo elónamaki esili koleka bambula mingi, ebebaki te. Kino lelo, Mattie azali bobele na lisangá moke ye molende mingi na Sligo.
Makanisi na bato mabóngwani
Likambo oyo lisalemaki na engumba ya Athlone limonisi malamu ezaleli ya botemeli oyo bato mingi bazalaki komonisela biso. Na ntango mosala ya kosakola ndako na ndako ebandaki na bambula 50, basángó basengaki na bafandi ya kartyé moko ete batya maboko na mokanda moko mozalaki koloba ete, balingaki te komona ba Témoins de Jéhovah liboso na bikuke na bango. Batindaki yango na Letá, likambo oyo lisalaki ete mosala ya kosakola ekóma na mpasi mingi na boumeli ya bambula mingi, na Athlone. Mokolo mosusu, etuluku moko ya bilenge bayebaki ete nazalaki Témoin de Jéhovah, mpe babambáki ngai mabángá. Lokola natelemaki liboso na etaláka ya magazini oyo esalemaki na talatála, moto wa mombóngo akotisaki ngai—asalaki bongo mingimingi mpo na kobatela etáláká na ye esalemi na talatála, kasi mpo na ngai mpenza te—mpe abimisaki ngai na nzela na nsima ya ndako.
Nzokande, kala mingi te, na Août 1989, ntango nakendaki kosala diskur ya ebembe ya moko na bandeko na biso na sembo, nasepelaki mingi wana namonaki lolenge oyo Jéhovah akólisaki mosala kati na engumba wana. Ntango diskur ya ebembe esalemaki kati na Salle du Royaume kitoko etongamaki na bandeko, bato koleka ntuku mitano bayokaki yango na limemya mpenza elongo na basangani ya lisangá wana.
Formation sipesiale na Eteyelo ya Galaad
Na 1961, nabyangamaki mpo na kokóta na kelasi na boumeli ya sanza zomi na Galaad, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower. Kelasi wana ya sipesiale, etalelaki bobele bandeko mibali; caroline mpe ngai, tososolaki bongo kati na libondeli na ntina na libyangi wana. Uta mibu 12, tokabwana naino te. Lisusu, mwasi na ngai alembaki mingi mpenza lokola abongisamaki te, mpamba te azalaki na mposa mingi mpo na kokóta na Eteyelo ya Galaad mpe kokóma misionere. Kasi, na kopusamáká na mayoki malamu, atyaki matomba ya Bokonzi na esika ya liboso mpe andimaki ete nakende. Kokóta na kelasi wana ezalaki libaku kitoko mpo na ngai. Nzokande, ezalaki nde esengo ya kozonga lisusu na mboka na ngai mpo na kosala na filiale ya la Société, ete nalendisa koleka ba Témoins 200 baoyo bazalaki kolona mpe komwangisa mai na lrlande na ebandeli ya bambula 60.
Mwa bambula na nsima, na 1979, caroline mpe ngai tokendaki na biro monene ekotambwisaka mosala ya ba Témoins de Jéhovah na mokili mobimba, na New York, epai kuna nakótaki na kelasi ya sipesiale ya Eteyelo ya Galaad, oyo ebongisami mpo na basangani ya ba comités de filiale. Yango ezalaki likambo ya nsuka oyo emonanaki lokola nsuka ya bomoi na ye. Akufaki nsima ya mibu mibale. Na boumeli ya bambula 32 oyo tolekisaki elongo kati na mosala ya pionnier, caroline abungisaki molende na ye te mpo na mosala ya Jéhovah; azalaki sé kolikya ete Jéhovah akokolisa yango.
Kufa na ye epesaki ngai mpasi mingi. Moko na makambo oyo masalisaki ngai, ezalaki lisoló moko libimaki na eleko yango kati na Réveillez-vous!, na titre ete “comment surmonter la mort de son conjoint.” (8 Mai 1981) Ntango nyonso oyo nazalaki kokanisa moninga na ngai ya mosala oyo asilaki kokufa, mpisoli ezalaki kotonda ngai na miso, kasi nasalelaki makanisi oyo mapesamaki na lisoló yango mpe nalandaki kokokisa mosala na Jéhovah na malamu.
Jéhovah azali kolanda kopambola
Mobu moko liboso, na Avril 1980, nazalaki ntango ndeko Lyman Swingle, mosangani ya college central, asalaki bofungoli ya ndako na sika ya filiale ya Dublin. Oyo nde esengo monene na komona basakoli 1 854 bazali kosangana na mosala ya kosakola kati na teritware oyo uta ntango wana, esangisaki mpe lrlande du Nord! Mpe lelo oyo, mibu zomi na nsima, Annuaire eyebisi motuya ya basakoli 3 451 na 1990.
Na ntango wana, nazwaki mpe esengo mosusu. Wana nazalaki molakisi na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi, nakutanaki na Evelyn Halford, ndeko mwasi ya malamu mpe ya molende, oyo akendaki kofanda na lrlande mpo na kosala epai kuna mposa ya basakoli ezalaki mingi. Tobalanaki na ye na Mai 1986, mpe uta ntango wana, azali lisungi kati na misala na ngai nyonso ya teokratike.
Mibu 51 oyo nasili kolekisa kati na mosala ya pionnier uta nasilisaki kelasi na ngai, 44 ezalaki na lrlande. Nazali na esengo ya komona bato oyo nasalisaki na koyeba solo kolanda kosalela Jéhovah, bamoko lokola bankulutu to basaleli na misala. Nakoki koloba kozanga kokakatana ete moko na bisengo minene oyo tokoki kozala na yango, ezali ya kosalisa moto moko na nzela oyo ezali komema na bomoi.
Kondima na ngai elendisamaki na komona bokoli ya losambo na peto na lrlande, na esika moko nsima na mosusu, mpe yango kati na botemeli makasi. Lelo, soko basakoli 3 500 bakabolami na koleka na masangá 90 na mboka yango. Ndelo ezali mpenza te mpo na oyo Jéhovah akoki kosala. Soko tokolanda kolóna mpe komwangisa mai na molende, na ntembe te, ye akokólisa. (1 Bakolinti 3:6, 7) Nandimisami mpo na yango. Nasili komona kokokisama na yango awa na lrlande.
Kati na nimero ekolanda
Tya Nzambe na esika ya liboso kati na bomoi na yo ya libota
Tozala na motema molai epai na bato banso
Okoki nde kozala na misala mingi mpe kozala na esengo?