Botya Nzambe na esika ya liboso kati na bomoi ya libota na bino
ROBERT MPE JEANINE, babalani oyo tolobelaki kati na lisoló ya liboso, babomaki libala te. Basololaki nde elongo na moklisto mosakoli moko na ntina na mikakatano na bango. Moklisto yango asosolaki nokinoki ete mikakatano na bango miutaki libosoliboso, mpo ete babokwamaki na motindo moko te.
Na ndakisa, lokola Robert auti na libota ya bato na mombongo mpe ye moko azalaki moto na misala makasi, azalaki kolinga ete alya mingi na ntongo. Jeanine, ye oyo autaki na libota ya bato batangi mingi, azalaki kopesa ye bobele café mpe mwa mampa. Ezali bongo nde koswana na ntina na bilei bya ntongo ebimisaki etumba monene.
Esengelaki ete Robert mpe Jeanine bakóma na boyokani malamu. Nzokande, ntina ya kobeba na boyokani na bango ezalaki mpenza mozindo. Moklisto oyo azalaki kosolola elongo na bango atunaki bango ete, “Bozali komitalela moko na mosusu lokola oyo ekomami na 1 Bakolinti 13:4?” Mokapo wana ya Biblia elobi ete: “Bolingo ezali na motema petee mpe na boboto. Bolingo ezali na zuwa te, ekomikumisaka te, mpe ezali na lolendo te.” Totangi na verset elandi ete, bolingo “ekosalaka na nsoni te, ekolukaka malamu na yango moko te, ezali na nkanda te. Ekobombaka mabe na motema te.” Jeanine mpe Robert, bango nyonso mibale bandimaki kosalela maloba wana na bomoi na bango ya libota.
Mikakatano ya babalani wana esengaki libosoliboso lisalisi na nzela ya elimo. Robert mpe Jeanine balingaki kobatela boyokani na bango malamu elongo na Nzambe, basengelaki bongo kosalela libosoliboso mitinda ya Biblia mpe kososola ete “soki ezali Jéhovah te oyo akotonga ndako, batongi bakosala wana bobele mpamba.” (Nzembo 127:1) Verset 3 kino verset 5 elobeli lolenge libota ekoki kolendisama. Mpo ete bolamu bozala kati na libota, ezali ntina mpenza na kotya Nzambe na esika ya liboso.—Baefese 3:14, 15.
Ndimbola ya kotya Nzambe na esika ya liboso
Kotya Nzambe na esika ya liboso kati na bomoi na yo ya libota elimboli mingi koleka likambo oyo likolobamaka ete “libota ya bandimi ezali libota ya bomoko.” Soki tokondima zulunalo Family Relations, mingi bakanisaka ete “lingomba ezali kopesa nzela na masoló ekoki kotonga mpe oyo ya malamu, mpe ezali kokólisa esengo ya basangani na yango mpo ma kozala na bomoi.” Kotya Nzambe na esika ya liboso esuki te bobele na kozala mondimi na lingomba moko. Bato mingi bazali kokóta na mangomba lokola elembo mpamba mpo ete ezali momeseno ya libota na bango, to mpe na ntina na matomba oyo bakoki komizwela na yango. Nzambe azali bobele na bopusi moke likoló na bomoi na bango ya mokolo na mokolo. Kasi likambo ya ntina mingi lisengeli kotalelama ezali ete, mangomba nyonso mazali te “losambo na peto mpe lobongi epai na Nzambe Tata na biso.”—Yakobo 1:27.
Kotya Nzambe na esika ya liboso kati na bomoi na biso elimboli kosambela Jéhovah, “Oyo—Aleki—Likoló na mokili mobimba” engebene masengami na ye, elongo na baoyo tolingaka. (Nzembo 83:18) Yesu Klisto, Mwana na Nzambe, alobaki ete: “Ntango ekoya, ee esili koya, oyo basambeli na solo bakosambela Tata na elimo mpe na solo, mpo ete Tata akolukaka motindo na basambeli oyo. Nzambe azali Elimo, mpe baoyo bakosambela ye basengeli kosambela na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:23, 24, MN) Mpo na kosambela Jéhovah ’’ na elimo,” esengeli ete losambo na bulee oyo tozali kopesa epai na ye euta na motema matondi na bolingo mpe na kondima. (Malako 12:28-31; Bagalatia 2:16) Mpo na kosambela Nzambe na “solo,” tosengeli kobwaka mateya na lokuta ya mangomba mpe kozala na boyokani elongo na mokano na ye, lokola asili komonisa yango kati na Biblia. Tokoki te kotya Jéhovah Nzambe na esika ya liboso soki lingomba na biso ezali kokokisa te masengami na ye.a Wapi mwa masengami yango? Mpe bolamu nini libota na yo ekoki kozwa na yango soki nde bomiyokanisi na yango?
Mobali oyo azali kotya Nzambe na esika ya liboso
Na 1 Bakolinti 11:3, Biblia Liloba lya Nzambe elobi ete: “Mokonzi wa mobáli ndé Kristu, mokonzi wa mwasi ndé mobáli, mpe mokonzi wa Kristu ndé Nzámbe.’’ Ezali libosoliboso, epai na yo mobali, nde Nzambe apesi mokumba ya kozwa makatami mpo na libota. Kasi yango etindi yo soko moke te na kozala monyokoli to mokonzi oyo akookisaka mpasi.
Biblia ezali kolendisa mibali na kotalela mayoki ya basi na bango wana ezali bango kozwa makatami oyo mataleli bango nyonso. (Tala Genese 21:9-14.) Na yango, Biblia etindi biso na ‘kotala bobele makambo na biso te, kasi makambo na bamosusu lokola.’ (Bafilipi 2:2-4) Soki yango ekobebisa etinda na Biblia te, mobali akoluka ntango nyonso kondima bamposa ya mwasi na ye. Mpe akomonisela ye bolingo na kosenzeláká ete amema te mikumba oyo mileki na bozito mingi. Na ndakisa, akosalisa ye mbala mosusu na misala ya ndako, mingimingi soko azali na mosala.
Ntoma Paulo akomaki ete: “Ekoki na babali ete balinga basi na bango lokola nzoto na bango mpenza. Ye oyo alingi mwasi na ye, akomilingaka ye moko. Mpamba te, moto te akoyina mosuni na ye moko, kasi akoleisa yango mpe akobatela yango pelamoko Klisto epai na lisangá.” (Baefese 5:28, 29) Yesu Klisto azali kotalela basangani ya lisangá na bolinga.
Ezali mpe na ntina na kobómba toli oyo ya ntoma Petelo, ete: “Bino mibali lokola, bozalana na basi na bino na bososoli, kopesáká bango lokumu lokola mbeki na motau, mpo ete bakozwa libulu ya bomoi elongo na bino; boye mabondeli na bino makopekisama te.” (1 Petelo 3:7, MN) Soki mobali azalani na bolingo te elongo na mwasi na ye, mabondeli na bango makoki kopekisama. Yango ezali likambo ya kososola. Boye te? Na yango, mobali oyo alingi ete Nzambe ayoka mabondeli na ye mpe andima yango, asengeli kobatela mwasi na ye na bolingo.
Kotya Nzambe na esika ya liboso etaleli mpe boyokani kati na tata mpe bana na ye. Tata asengeli komibanzabanza mpenza mpo na bolamu na bango ya elimo. Nzokande, na Etats-unis, engebene ankete oyo na ntina mingi, bobele ndambo na bato nde bandimi ete “kosangana na boyekoli moko ya Makomami Mosantu to na masolo na Biblia na etuluku,” ezali ‘na ntina mingi mpenza mpo na bokóli ya libota na elimo.’ Bato mosusu batangaki misala lokola “kolanda misa ya mangomba na nzela na televizyo to na radio” to mpe ‘komipesa nakokanisa likoló na ndimbola ya bomoi.’
Nzokande Biblia ezali kosenga epai na batata ya mabota ete: “Bino batata mpe boyokisa bana na bino nkanda te, kasi bobokola bango na mateya mpe na mpambela na Jéhovah.” (Baefese 6:4) Epai na ba Témoins de Jéhovah, ezali batata nde bazali na mokumba ya kobongisa losambo na libota. Bakotambwisaka boyekoli ya Biblia mbala na mbala kati na libota, bazali koyangana na makita ya lisangá mpe bazali kokokisa masengami mosusu ya Biblia; mibali wana bazali bongo kotya Nzambe na esika ya liboso kati na bomoi ya libota na bango.
Mwasi oyo azali kotya Nzambe na esika ya liboso
Mwasi akoki kotya Nzambe na esika ya liboso na kosungáká mobali na ye kati na mokumba na ye ya tata ya libota. Biblia elobi ete: “Bino basi, botosaka mibali na bino, lokola ebongi kati na Nkolo.” (Bakolose 3:18) Mbala mosusu yango ekozala petee te soki mobali azali kosala milende te ya kosolola malamu elongo na libota to soki azali komonisa te mposa ya kobongisa losambo na libota. Ata nini ekosalema, soki mwasi azali mbala na mbala kobenda likebi likoló na mabungá ya mobali na ye to, oyo eleki mpenza mabe, soki azali kotemela bokonzi na ye, akobakisa bobele matáta oyo mazali kati na libota.
Masese 14:1 elobi ete: “Mwasi na mayele akotonga ndako na ye, nde oyo na zoba akobuka yango na maboko na ye mpenza. ” Mpo na mwasi na libala oyo na mayele mpenza, moko na lolenge na kotya Nzambe na esika ya liboso mpe ya ‘kotonga ndako na ye,’ ezali nde kotosa mobali na ye. (1 Bakolinti 11:3) Mpo ete ‘mibeko na boboto mizali kati na lolemo na ye,’ azali kosala na motindo boye ete aloba mabe te na ntina na mobali na ye. (Masese 31:26) Azali mpe kosala nyonso ekoki na ye mpo ete makatami ya mobali na ye mazwa elónga.
Mwasi na libala azali lisusu kotya Nzambe na esika ya liboso na kozaláká mwasi oyo akokokisaka misala na ye. Soki asalaka, mbala mosusu akozwa ntango te, ata makasi mpe te mpo na kobongisa ndako na ye lokola elingi ye. Kasi akoki kosala milende mpo na kokokana na “mwasi malamu” oyo Biblia elobi na ntina na ye ete: “Akotalaka malamu makambo ya ndako na ye; akolyaka kwanga na goigoi te.”—Masese 31:10, 27.
Kasi, oyo eleki nyonso, mwasi asengeli kotya losambo na esika ya liboso kati na bomoi na ye. Bato mingi oyo bakokendaka mpo na mbala ya yambo na Salle du Royaume ya ba Témoins de Jéhovah, bakolobaka malamu mpenza likoló na lolenge oyo bana bazali kolata kitoko. Mosala oyo mwasi azali kokokisa na likambo wana, ezali malamu mingi. Nzokande, asengeli kosala makasi mpo na kobatela elimo na ye na kobondeláka, na koyekoláká mpe na kosaleláká Nzambe.
Bilenge oyo bazali kotya Nzambe na esika ya liboso
Zulunalo Adolescent counselor elobi ete: “Bana basili kolóna bizaleli mpe makanisi oyo epesi bango nzela na kozala na nguya likoló na baboti na bango. . . . Bilenge wana basili kotyama liboso na mokili oyo mozali kokumisa lolenge ya kozwa mbongo nokinoki mpe bozwi mingi na mosuni; tala mpo na nini bazali na mposa ya kozwa ‘nyonso nokinoki.’ ” Yo elenge mobali to elenge mwasi, ezali wana ezalela ya elimo na yo?
Totangi na Bakolose 3:20 ete: “Bino bana, botosaka baboti na bino na makambo nyonso, mpo ekoki bongo kati na Nkolo.” Elenge oyo akotalela botosi wana lokola lisengami na Nzambe, akoyokana malamu elongo na baboti na ye. Na ndakisa, na nkuku, akozanga botósi te na kotamboláká elongo na baninga ya kelasi oyo bandimami te na baboti na ye; akomeka mpe te kosalela mayele mabe epai na tata na ye to mama na ye, mpo na kozwa eloko azali na yango mposa. (Masese 3:32) Kasi, elenge oyo azali kotya Nzambe na esika ya liboso kati na bomoi na ye, akotósa litambwisi na bolingo ya baboti na ye.
Tya Nzambe na esika ya liboso
Ata esika nini tozali na yango kati na libota, esengeli na biso kotya Nzambe na esika ya liboso kati na bomoi na biso mpe kotikala na boyokani malamu elongo na ye. Ezali yango nde bozali kosala, yo mpe libota na yo?
Na “mikolo ya nsuka” oyo tozali kobika kati na yango, tozali kokutana na “ntango ya mpasi.” (2 Timoté 3:1-5) Kasi, likoki ezali na kozala malamu na elimo mpe kobika na nsuka na biloko ya ntango oyo. (Matai 24:3-14) Zala na boyokani elongo na boyebi ya solo na Biblia; boye, yo mpe libota na yo bokoki kozala na elikya na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis. (Luka 23:43; Yoane 17:3; Emoniseli 21:3, 4) Ee, bilaká wana bikokokisama na yo soki okotya Nzambe na esika ya liboso kati na bomoi ya libota yo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala mokapo 22 ya mokanda okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York. lnc.
[Elilingi na lokasa 5]
Mwasi malamu akokumisamaka mingi
[Elilingi na lokasa 7]
Bibia elendisi mibali na kobongisa losambo kati na libota