Jéhovah akoyokaka mabondeli na biso ya sembo mpo na kozwa lisalisi
MOSALI na ndako na mokonzi azalaki na mposa monene ya lisalisi. Yango emonanaki na elongi na ye oyo ezalaki na mawa. Wana batunaki ye na ntina na likambo oyo azalaki kooka mpasi mpo na yango, mosali na ndako na mokonzi ayebisaki mpasi na ye, ete: engumba na Yelusaleme mpe lopango na yango ebebisamaki. Mpe batunaki ye ete: “Yo ozali kolɔmba nini?” Nehemia, mosali na ndako na mokonzi akomaki na nsima ete: “Nokinoki, nabondelaki epai na Nzambe na lola.” Ezalaki wana libondeli ya mokuse mpe ya sembo oyo litindamaki epai na Jéhovah na mongongo na nsé, mpo na kozwa lisalisi. Ezwaki litomba nini? Bobele na ntango wana, Artaxerxès, mokonzi ya Perse, apesaki nzela na Nehemia mpo na kotonga lopango na Yelusaleme.—Nehemia 2:1-6.
Ee, Nzambe akoyokaka malɔmbo ya sembo ya baoyo balingi ye. (Nzembo 65:2) Soki momekamo moko emonani lokola ete eleki makasi na yo, okoki kobondela motindo moko na mokomi na nzembo Davidi, na Nzembo 70, wana ezalaki ye nokinoki na mposa ya lisalisi na Nzambe. Motó na nzembo wana elobi ntina na yango na sikisiki ete, ezali mpo na “kokanisela.” Longola bobele mwa mabongwani mikemike, nzembo wana ezali nde kozongelama ya Nzembo 40:13-17. Kasi na makambo nini Nzembo 70 ekoki kozala na ntina epai na basaleli na Jéhovah?
Lilɔmbo mpo na kobikisama ya nokinoki
Davidi abandi na lilɔmbo oyo ete: “ɛ Nzambe, bikisa ngai, ɛ Jéhovah, yaka noki mpo na kosunga ngai.” (Nzembo 70:1) Wana tozwi mpasi, tokoki kobondela Nzambe ete asunga biso nokinoki. Jéhovah akomekaka biso na mabe te; mpe, “ayebi kobikisa bango bakosambelaka ye wana ezali bango kati na komekama.” (2 Petelo 2:9; Yakobo 1:13) Kasi, tosengeli kosala nini soki apesi nzela na momekamo moko ete eumela, mbala mosusu mpo na koteya biso na likambo moko? Na yango, tokoki kosenga ya mayele mabongi mpo na kolónga yango. Soki tokosenga mayele elongo na kondima, akopesa biso yango. (Yakobo 1:5-8) Nzambe azali mpe kopesa biso makasi oyo tozali na yango mposa mpo na koyika mpiko na mimekamo. Ezali motindo wana nde azali ‘kosunga biso na mbeto na mpasi.’—Nzembo 41:1-3; Baebele 10:36.
Lisumu oyo lizali kati na biso, komekama ntango nyonso na mabe mpe milende oyo Satan le Diable azali kosala mpo na kobebisa boyokani na biso elongo na Jéhovah, nyonso wana esengeli kopusa biso na kosenga na Nzambe mokolo na mokolo ete asalisa biso. (Nzembo 51: 1-5; Baloma 5:12; 12:12) Ebongi mpenza na kosimba maloba ya libondeli ya elakiseli oyo Yesu apesaki biso, ete: “Kendisa biso na komekama te, kasi bikisa biso na oyo mabe.” (Matai 6:13) Ee, tokoki kosenga na Nzambe na kopesa nzela te ete tokwea wana tokomekama mpo na kozanga kotósa ye, kasi apekisa Satana, ’’oyo mabe,” ete alónga biso te. Kasi, soko tokosenga kobikisama epai na ye, biso mpe tosengeli kosenzela na kopengola makambo oyo makomema biso mpambampamba na komekama mpe na mitambo na Satana.—2 Bakolinti 2:11.
Baoyo bazali koseka ete, “Aha! Aha!”
Ekoki kokóma ete tozwa komekama makasi wana banguna bazali koloba na biso mabe mpo ete tozali na kondima. Soki ozali kati na ezaleli oyo, kanisa likoló na maloba oyo na Davidi: “Tika ete baoyo bakolukaka bomoi na ngai bayoka nsoni mpe babulungana, baoyo basepeli kosalela ngai mabe bazonga nsima mpe bakóma eloko mpamba. Tika ete baoyo bazali koseka ete, Aha! Aha! bazonga nsima mpo na nsoni na bango.” (Nzembo 70:2, 3) Banguna na Davidi balingaki ete akufa; ‘bazalaki koluka molimo na ye,’ to bomoi na ye. Kasi, na esika ete azongisela bango mabe, atyaki kondima epai na Nzambe: Ye nde akokaki kookisa bango nsoni. Davidi abondelaki mpo ete banguna na ye bayoka “nsoni mpe babulungana,” elingi koloba bakakatana, babunga nzela, batatabana, bayeba kolóngisa te mikano na bango mabe. Asengaki ete baoyo bazalaki koluka mawa na ye mpe bazalaki kosepela na mpasi na ye, babulungana mpe batyolama.
Soki ekómeli biso na kosepela mpo na mawa ya monguna na biso, tosengeli koyebisa Nzambe na ntina na lisumu na biso. (Masese 17:5; 24:17, 18) Kasi, na ntango banguna bazali koloba mabe na Nzambe mpe basaleli na ye, tokoki kobondela mpo ete, na ntina na nkombo na ye, Jéhovah ‘azongisa bango nsima mpe akómisa bango biloko mpamba’ liboso na bato oyo bango batyelaki motema. (Nzembo 106:8) Kobukanisa ezali mpo na Jéhovah, mpe akoki kobulunganisa mpe kokitisa banguna na ye mpe baoyo na biso. (Deteronome 32:35) Na ndakisa, Adolf Hitler, mokonzi ya boyangeli mabe ya Nazi, akanaki kosilisa ba Témoins de Jéhovah nyonso ya Allemagne. Alóngaki soko moke te, mpamba te bankóto na ba Témoins bazali lelo kosakola nsango malamu kati na mokili yango.
Mpo na kotyola biso, banguna na biso bazali mbala mosusu koloba ete: “Aha! Aha!” Mpo ete basali wana na masumu bazali kotumola Nzambe mpe libota na ye, “tika ete bazonga nsima mpo na nsoni na bango,” tika ete batyolama. Wana ezali biso kolobela likambo wana kati na mabondeli na biso, totikala sembo mpe tosepelisa motema na Jéhovah, mpo ete ayanola Satana to bato mosusu oyo bazali kopamela ye. (Masese 27:11) Tosengeli te kobanga banguna na lolendo, mpamba te “ye oyo akotalela Jéhovah, akobatelama.” (Masese 29:25) Nebukadanezare, moto na lolendo, ye mokonzi na Babilone oyo amemaki basaleli na Nzambe na boombo, atyolamaki mpe andimaki ete ‘Mokonzi na makoló akoki kokitisa baoyo bazali kotambola na lolendo.’—Danyele 4:37.
“Nzambe akumisama!”
Ata soki banguna bazali kobimisela biso mikakatano, totika te kokumisa Jéhovah elongo na baninga na biso. Na esika na komitika kolóngama na mpasi kino kobosana kokumisa Nzambe, Davidi alobaki ete: “Tika ete baoyo bakolukaka yo bayoka esengo mpe basepela mpo na yo; mpe tika ete baoyo balingi lobiko na yo, baloba ntango nyonso ete: ‘Nzambe akumisama!’ ” (Nzembo 70:4) Basaleli na Jéhovah bazali na esengo mpo ete bazali “koyoka esengo mpe bazali kosepela” kati na ye. Mpo ete basili komipesa epai na ye, basili kozwa batisimo mpe bazali ba Témoins na ye, bazali na esengo monene oyo euti na boyokani malamu oyo bazali na yango elongo ma Jéhovah. (Nzembo 25:14) Mpe, tokoki koloba ete bazali koluka Nzambe na komitikisa nyonso. Bazali na kondima epai na Nzambe, bazali kobatela mibeko na ye mpe bazali kolanda koluka boyebi malamu ya Mozalisi na bongo mpe ya Liloba na ye.—Mosakoli 3:11; 12:13, 14; Yisaya 54:13.
Wana ezali ba Témoins de Jéhovah kosakola nsango malamu, ezali lokola nde bazali koloba ete: “Nzambe akumisama!” Bazali kosanzola Jéhovah, kozwáká ye na motuya mingi. Bazali kosalisa bato oyo bazali koluka solo ete bayeba Nzambe mpe bakumisa ye. Na likeseni elongo na bato ya ntango oyo, baoyo bakolingaka malamu na bango mpenza, basaleli na Jéhovah ‘balingi lobiko na ye.’ (2 Timoté 3:1-5) Koyebáká lisumu lizali kati na bango, bazali na botondi ya mozindo epai na Jéhovah na lolenge oyo azwaki bibongiseli bitondi na bolingo na ntina na lobiko mpo na bomoi na seko, lobiko oyo lopesameli nzela na mbeka na lisiko na Mwana molingami na ye, Yesu Klisto. (Yoane 3:16; Baloma 5:8; 1 Yoane 2:1, 2) Osanzolaka Nzambe na kosaleláká losambo ya solo ete okumisa ye mpe na komonisa ete ‘olingi lobiko na ye’?—Yoane 4:23, 24.
Totya motema epai na Ye oyo akosikolaka
Ntango Davidi asalaki nzembo oyo, azalaki mpenza kati na ezalela moko ya mpasi kino alobaki ete: “Nde ngai nazali mobóla mpe na kozanga; ɛ Nzambe, yaka noki epai na ngai; yo ozali mosungi na ngai mpe Ye mosikoli na ngai. Ɛ Jéhovah, umela te.” (Nzembo 70:5) Tokoki komonana lokola ‘babóla’ wana ezali biso konyokwama na mimekamo oyo mizali kobimela bandimi, lokola minyoko, masenginya mpe matumoli ya Satana. Atako tozali mpenza babóla te na mosuni, tomonani lokola ete tozangi nguya ya kotemela banguna oyo na lolendo mingi. Nzokande, tokoki kozala na elikya ete Jéhovah akoki kobikisa biso solo, mpo ete tozali basaleli na ye ya sembo.—Nzembo 9:17-20.
Jéhovah azali ‘Ye oyo akosikolaka’ na ntango yango esengeli na biso. Bosenga na biso esili mbala mosusu kokótisa biso kati na ezalela moko ya mpasi. Kasi soki ‘bolema nde ebebisaki nzela na biso,’ totika te ete motema na biso ‘motombotokela Jéhovah.’ (Masese 19:3) Ye azali na mokumba wana te; nzokande, ye azali pene na kosalisa biso soki nde tozali kobondela ye na kondima. (Nzembo 37:5) Tosengeli kosala nini soki tozali kobunda mpo ete tosala lisumu te? Tolobela yango na sikisiki kati na mabondeli na biso mpe tosenga Nzambe mpo na kolanda kosala oyo ezali malamu. (Matai 5:6; Baloma 7:21-25) Nzambe akondima mabondeli na biso mauti na motema sembo mpe tokozala na esengo na meko oyo tokomitika kotambwisama na elimo santu.—Nzembo 51:17; Baefese 4:30.
Na ntango kondima na biso emekami, tokoki kozala na mayoki ya kozanga koyika mpiko na boumeli ya ntango molai. Mpo ete nzoto na biso ya masumu ezali na bolembu, tokolinga mbala mosusu ete tozwa lisungi nokinoki. (Malako 14:38) Tokoki bongo kosala libondeli oyo ete: “Ɛ jéhovah, umela te.” Soki totyé likebi mingi mpo na lolenge oyo bato bazali koseka nkomb na Nzambe, tokoki kopusama na kobondela lokola mosakoli Danyele ete: “Ɛ Jéhovah, yoka! Ɛ Jéhovah, limbisa! Ɛ Jéhovah, yoka mpe sala Ɛ Nzambe na ngai, zelisa te na ntina na yo mpenza, mpo na mboka na yo mpe bato batangami na nkombo na yo.” (Danyele 9:19) To zala na elikya ete Tata na biso ya likoló akoumela mingi te, mpamba te Paulo apesaki endimiseli oyo ete: “Tobelema na molende epai na kiti na bokonzi na ngolu ete tozwa motema mawa mpe tomona ngolu, mpo na kozwa lisungi na ntango na bosengá.’’—.Baebele 4:16.
Tobosana te ete Jéhovah azali Ye oyo akosikolaka. Ezali malamu mpo na basaleli na ye ete bamikundola mpe bakanisaka lisusu likoló na mayoki oyo mamonisami na libondeli ya Nzembo 70. Na ntango moko to mosusu, ekosengela na biso kobondela mbala na mbala na ntina na likambo oyo litaleli biso mpenza. (1 Batesaloniki 5:17) Tokoki mbala mosusu kozala na mayoki ya kozanga koyeba ata nzela moko te mpo na kosilisa likambo moko ya sikisiki, ata mwango moko te mpo tomilongola na mokakatano moko. Kasi Tata na biso na likoló, oyo na bolingo mingi akolendisa biso mpe akopesa nzela te ete tomekama na koleka nguya na biso. Bongo, totika te na kobelema liboso na kiti na Mokonzi na seko, na nzela na mabondeli ya sembo. (1 Bakolinti 10:13; Bafilipi 4:6, 7, 13; Emoniseli 15:3) Tobondelaka na kondima, mpe tozala mpenza na elikya epai na Jéhovah, mpamba te akoyokaka mabondeli na biso ya sembo mpo na kozwa lisalisi.