Totalela eteni moko na moko na eloko na motuya monene euti na Nzambe—yango Biblia!
NA 1867, Schalk van Niekerk, mosali moko na elanga, ye moto wa ekolo Afrika ya Sudi, azalaki kotala bana oyo bazalaki kosakana na mabanga. Moko na mabanga yango, oyo ezalaki mpenzampenza kongenga mpe kitoko, ebendaki nde likebi na ye. Mama na bana yango alobaki na ye ete, “Okoki na yo kokamata yango soki esepelisi yo.” Van Nierkerk atindaki libanga yango epai na moto moko na mayele oyo ayebi malamu mabanga ya ntalo mpo na kotala yango soki ezali mpenza libanga ya ntalo. Bana bazalaki na likanisi te ete bazalaki nde kosakana na libanga monene ya diamant oyo ekokaki kotekama na motuya ya 500 livres sterling na eleko wana!
Ekoki kozala ete yo mpe ozali na eloko moko ya motuya kozanga ete oyeba yango? Na ndakisa, bato mingi bazali na Biblia, mpamba te yango ezali mokanda oyo eleki mikanda nyonso ya bileko nyonso, esili kobima na bankota koleka 1 900 ezala na mobimba na yango to na ndambo. Nzokande bato mingi basili naino mpenza kotanga Biblia te mpe bazali na boyebi te na ntina na makambo mazwami kati na yango.
Biblia elobi ete “epemami na Nzambe,” mpe ezali bongo Liloba na Nzambe. (2 Timote 3:16; tala 1 Batesaloniki 2:13.) Ezali mpenza eloko eleki motuya mpo na bato. Na lisalisi na yango, tozali koyekola kozala na bomoi moko kitoko mpe, likambo ya ntina lisusu koleka, ndenge nini kozwa bomoi na seko. (Yoane 17:3, 17) Eloko nini ekokaki lisusu kozala na motuya koleka?
Atako bongo, mpo na kosepela na motuya ya eloko oyo ekokani na libanga ya ntalo mpe komona eteni moko na moko na yango, esengeli koyeba yango malamu. Na ebandeli, yango ekoki kozala mwa mpasi. Na yango, Biblia ezali bongo kosangisama ya mikanda 66. Nini ezwami kati na mikanda yango? Kolandana ya mikanda yango engebene ndenge ebimaki ezali mpenza na ntina? Soki ezali ndenge yango, motindo nini tokoki kozwa mikapo oyo tosepeli na yango kati na Biblia?
Koyeba Biblia malamu ezali likambo moko monene koleka. Kasi, lokola eloko na motuya, Biblia ezali komikesenisa na bokokani na yango epai na epai mpe na ordre to molongo na yango. Mpo na kondima yango, totalela nokinoki makambo mazwami kati na yango.
Makomami na liebele masakoli koya na Klisto
Mbala mingi bazali kokabola Biblia na biteni mibale: “Kondimana ya Kala” mpe “Kondimana ya Sika.” Maloba oyo mabongi mpenza te, ezali kopesa likanisi ete “Kondimana ya Kala” esila ngala mpe ezali na motuya moke. Ebengeli Makomami na liebele ebongi mpenza mpo na kolobela eteni wana ya Makomami, mpamba te, na ebandeli, yango ekomamaki mpenza na lokota ya liebele. “Kondimana ya Sika” ekomamaki na lokota ya greke na ekeke ya liboso; ezali bongo malamu kolobela yango lokola Makomami na greke ya boklisto.
Mokanda ya liboso ya Biblia, Genese, ebandi na bileko ya kalakala na ntango Nzambe azalisi likoló mpe mabelé mpe na nsima abandi kobongisa mabelé mpo ete bato bafanda wana. Babalani ya yambo bakelami bato na kokoka; nzokande bango moko baponi nzela na lisumu, likambo oyo ekobimisa mpasi mingi likoló na bakitani na bango. Nzokande, lokola eloko na motuya monene oyo etalelami na kongengisama ya petee, Biblia ezali kopesa epai na libota na bato oyo lisili kobeba kongenga na elikya: “libota” moko oyo ekosilisa mbeba nyonso na lisumu mpe kufa. (Genese 3:15) Nani azali libota yango? Genese ebandi na koyebisa liboso kolandana ya Libota yango oyo asengeli koya na kolimbolaka sikisiki bomoi na mwa bankoko ya sembo ya Libota yango: Abrahame, Yisaka, Yakobo.
Exode ezali koyebisa sikawa kobotama ya Moïse. Bomoi na Moïse, na makambo mingi ezali mpenza esakweli ezali koyebisa bomoi na Libota oyo asengeli koya. Nsima na bolozi zomi, Yisraele esali mobembo monene na kotikaka Ezipito; na ngomba Sinaï yango ekomi libota liponami na Nzambe. Levitike, lokola emonisami na nkombo na yango, ezali koyebisa mibeko na Nzambe na ntina na bonganga ya libota ya Levi kati na Yisraele. Mituya ezali koyebisa mabaku oyo Bayisraele batangamaki (na recensement) bakisa mpe makambo maumelisaki mobembo na Yisraele kati na esobe. Nsuka na yango, Yisraele oyo ebelemi mpo na kokota na Mokili ya ndaka, ezali kozwa batoli ya nsuka ya Moïse. Yango nde ezali lisolo na Deteronome. Koyebisaka koya na Libota, Moïse azali kolendisa ekolo mobimba na ‘koyoka mosakoli oyo Jéhovah akotelemisa.’—Deteronome 18:15.
Na nsima mikanda na masolo milandi. Mingi kati na yango mityami na molongo engebene kolandana ya masolo. Yosua azali koyebisa kobotolama mpe kokabolama ya Mokili na ndaka. Basambisi bazali koyebisa makambo ya kokamwa oyo mazali komonisa mibu oyo milandi, wana Yisraele eyangelami na kokitana ya basambisi. Luta emonisi biso, kati na eleko ya Basambisi, mwasi moko oyo azali kobanga Nzambe mpe oyo akozwa libaku kitoko ya kokoma nkoko na Yesu Klisto.
Eleko na koyangela ya basambisi esili na yango. Mokanda na liboso ya Samwele ezali koyebisa boyangeli mabe ya mokonzi na liboso ya Yisraele, Saülo, oyo mosakoli Samwele amonaki. Mokanda na mibale ya Samwele mozali koyebisa boyangeli na elonga ya Davidi, mokitani ya Saülo. Mokanda na Liboso mpe na Mibale ya Mikonzi ezali komema biso na boyangeli na nkembo ya Salomo kino na boombo ya mpasi ya libota na Yisraele na Babilone na 607 liboso na ntango na biso. Mokanda na Liboso mpe na Mibale ya Ntango ezali koyebisa na mokuse lisolo yango lokola ezali komonana kati na makanisi ya libota nsima na bouti na bango na boombo. Na nsuka, Ezela, Nehemia, mpe Estere emonisi biso bozongi na Bayisraele kati na mokili na bango mpe eyebisi mwa makambo oyo malandaki na nsima.
Tala mikanda na maloba kitoko oyo mizali bongo ndambo na ba poémi kitoko oyo bato bakóma yango naino te. Yobo ezali komonisa elembo na bosembo monene kati na monyoko mpe mbano oyo yango ezali komema. Mokanda na Nzembo ezali bongo na nzembo na masanzoli mpo na Jéhovah bakisa mpe na mabondeli mpo na kosenga lilimbisi na ye mpe lisungi na ye. Lisusu, ezali na bisakweli ebele oyo ezali koyebisa biso mwa makambo likoló na Masiya oyo esengeli koya. Masese mpe Mosakoli ezali komonisa mitindo mikeseni ya mayele na Nzambe na maloba ya sikisiki mpe ya nguya, nzokande Loyembo na Salomo ezali moko na mokanda na poémi na bolingo eleki kitoko, ezali mpe na bisakweli na kati.
Mikanda 17 oyo milandi, kobanda na Yisaya kino Malaki, ezali liboso mpenza koloba mpo na bisakweli. Nyonso, longola bobele Bileli, ezali na nkombo ya mokomi na yango. Mingi na bisakweli yango bisilaki kokokisama mpenza. Mikanda yango mizali koyebisa mpe makambo ya ntina koleka, oyo masengeli kokokana ezala na eleko na biso mpe na mikolo mizali koya liboso.
Makomami na liebele mazali mpe komonisa bokeseni monene kati na lolenge na yango mpe na ekomeli na yango. Atako bongo mikanda na yango nyonso mizali na motó na likambo bobele moko. Bisakweli, mabota mpe makambo ya ntina oyo ezwami kati na yango ezali kongenga na mayele ya ntina mazali na elobeli ya peto ya esakweli.
Makomami na greke ya boklisto: Libota abimi
Mibu nkoto minei misili koleka uta moto akweaki kati na lisumu. Mpe tala sikawa Libota yango oyo bato bazalaki kozela mingi, Masiya, Yesu amonani na mokili! Makomami ya greke na boklisto mazali komonisa mosala na moto wana ya ntina ya Lisolo na bato kati na mikanda minei, mikeseni kasi mizali na boyokani moko mpe mosusu kati na nyonso, yango ebengami Evanzile. Ezali bongo Matai, Malako, Luka mpe Yoane.
Lisolo na ba Evanzile minei wana ezali na motuya monene mpo na baklisto. Ezali koyebisa bikamwiseli minene na Yesu, masese na ye ya mayele mingi, Lisolo na ye likoló na ngomba, ndakisa na ye ya komikitisa, mawa na ye mpe botosi na ye ya kokoka epai na Tata na ye, bolingo oyo azali na yango epai na “bampate” na ye, mpe mpo na kosukisa liwa na ye lokola mbeka mpe lisekwa na ye na nkembo. Ntango tozali koyekola ba Evanzile, tozali kooka bolingo mozindo mpo na Mwana na Nzambe. Kasi, likoló na nyonso, boyekoli yango ezali kobelemisa biso pene na ye oyo atindaki Klisto: Jéhovah Nzambe. Masolo yango mabongi kotangamaka mbala na mbala.
Misala na Bantóma mibandi na eleko oyo ba Evanzile esuki. Mizali koyebisa mibu mya yambo mya lisangá na boklisto, kobanda na Pantekote kino na bokangami ya Paulo na Rome na 61. Mokanda yango ezali koloba mpo na Etienne, mobomami ya liboso kati na baklisto, kobongwana ya Saul, oyo na nsima akomaki ntóma Paulo, bokoti ya bapakano na liboso kati na lisangá ya boklisto mpe mibembo kitoko ya Paulo mpo na kopalanganisa nsango malamu. Masolo wana mazali kitoko mpe kolendisa kondima.
Sikawa mikanda 21 milandi, to epistola. 14 oyo na liboso, ekomami na ntóma Paulo, ezali na nkombo na baklisto to masangá epai oyo yango etindamaki; oyo elandi ezali na nkombo na bakomi na yango: Yakobo, Petelo, Yoane mpe Yuda. Mikanda yango mizali na makebisi minene mpe bilendiseli mingi. Ezali kolobela makambo matali bindimeli na moboko to kokokisama na bisakweli. Ezali kosalisa baklisto na kokabwana na mokili mabe oyo kati na yango basengeli kofanda. Ezali kolobela makasi ntina ya kobatela bolingo na bondeko mpe masengami mosusu na Nzambe. Ezali kolimbola lolenge na kobongisama ya masangá, oyo makambami na bankulutu na elimo.
Lokola Makomami na liebele, Makomami na greke na boklisto mazali kosuka na esakweli. Emoniseli, oyo ekomamaki na ntóma Yoane na mobu 96, ezali kolobela na mokuse bisakweli nyonso mpe motó na likambo monene ya Biblia: Kobulisama ya nkombo na Jéhovah na nzela na Bokonzi ya Masiya. Kolandana na bimonaneli ezali komonisa na bosolo nyonso kobomama ya mangomba na lokuta, mampinga mpe masangá na politike oyo masali ebongiseli na biloko mabe ya Satana. Banguya yango ekitani na engumba na bokonzi na Klisto, oyo etalisi likebi na yango epai na kobatelama ya biloko na mokili. Nzambe alaki ete ‘akopangusa mpisoli nyonso mpe liwa ekozala lisusu te’ na boumeli ya boyangeli na ye.—Emoniseli 21:4.
Ntembe ezali te, Biblia ezali solo eloko na motuya monene, oyo ezali na mbeba moko te, ezali kongenga na móto ya pole na Nzambe. Soki otangi naino yango te, mpo na nini te kobanda uta sikawa? Okobendama na bokokani na yango epai na epai, miso na yo makokamwa na móto mingi na yango, okosepela na bonzenga na yango mpe motema na yo mokosimbama na nsango na yango. Ezali mpenza “likabo malamu . . . liuti na Tata na moi.”—Yakobo 1:17.
[Etanda na lokasa 28, 29]
KOLANDA YA MIKANDA NA BIBLIA
Nkombo na mokomi, esika bakwelaki mokanda date ya kosukisa mosala, eleko oyo lisolo ebandaki mpe esukaki esili koyebisama nyonso.
Tondimisami sikisiki to mpo na nkombo ya bakomi na mikanda misusu ata na oyo ya bisika bakwelaki masolo yango. Ba dans mingi azali bobele penepene na oyo ekanisami. Maloba mokuse: ns. “nsima” mpo lib.“liboso”.
Mikanda na Makomami na liebele (liboso na ntango na biso)
Mokanda Mokomi to bakomi Esika akomaki yango Nsuka
na kokoma Eleko esololami
Genese Moise Esobe 1513 “Uta ebandeli”
kino na 1657
Exode Moise Esobe 1512 1657-1512
Levitike Moise Esobe 1512 sanza 1 (1512)
Mituya Moise Esobe/
esobe na
Moabe 1473 1512-1473
Deteronome Moise esobe na
Moabe 1473 sanza 2 (1473)
Yosua Yosua Kanana pene na 1450 1473-pene na . 1450
Basambisi Samwele Yisraele pene na 1100 pene na 1450-pene na . 1120
Luta Samwele Yisraele pene na 1090 Mbula 11
ya eleko na basambisi
1 Samwele Samwele;
Gada; Nathan Yisraele pene na 1078 pene na 1180-1078
2 Samwele Gada; Nathan Yisraele pene na 1040 1077-c. 1040
1 Mikonzi Yilimia Yelusaleme/
Yuda 580 pene na 1040-911
2 Mikonzi Yilimia Yelusaleme/
Ezipito 580 pene na 920-580
2 Ntango Ezela Yelusaleme (?) pene na 460 1037-537
Ezela Ezela Yelusaleme pene na 460 537-pene 467
Nehemia Nehemia Yelusaleme pene na 443 456-ns. na 443
Estere Mardokai Suze,
Elame pene na 475 493-pene na 475
Yobo Moise Esobe pene na 1473 Mibu koleka 140
longwa na
1657 Kino 1473
Nzembo David mpe
bamosusu pene na 460
Masese Salomo;
Agula;
Lemuele Yelusaleme pene na 717
Mosakoli Salomo Yelusaleme b. lib. 1000
Loyembo na
Salomo Salomo Yelusaleme pene na 1020
Yisaya Yisaya Yelusaleme ns. 732 pene na 778-ns. 732
Yilimia Yilimia Yuda/
Ezipito 580 647-580
Bileli Yilimia Pene na
Yelusaleme 607
Ezekiele Ezekiel Babilone pene na 591 613-pene na. 591
Danyele Danyele Babilone pene na 536 618-pene na. 536
Hosea Hosea Samaria
(Distrike ya) ns. 745 lib. 804-ns. 745
Yoele Yoele Yuda pene na 820 (?)
Amosa Amosa Yuda pene na 804
Obadia Obadia pene na 607
Yona Yona pene na 844
Mika Mika Yuda lib. 717 pene na 777-717
Nahumu Nahumu Yuda lib. 632
Habakuku Habakuku Yuda pene na 628 (?)
Sofoni Sofoni Yuda lib. 648
Agai Hagai Yelusaleme 520 mikolo 112 (520)
Zakaria Zakaria Yelusaleme 518 520-518
Malaki Malaki Yelusaleme ns. 443
Mikanda na Makomami na greke na boklisto (na tango na biso)
Mokanda Mokomi Esika akomaki yango Nsuka na Kokoma
Eleko esololami
Matai Matai Palestine pene na 41 2 lib.nb.–
33 ya n.b.
Malako Malako Rome pene na 60-65 29-33 ya n.b.
Luka Luka Césarée pene na 56-58 3 lib.n.b.–
33 ya n.b.
Yoane Ntóma
Yoane Efese,
to pene wana pene na 98 Nsima na maloba
na ebandeli,
29-33 ya n.b.
Misala Luka Rome pene na 61 33-pene na.
61 ya n.b.
Baloma Paulo Kolinti pene na 56
1 Bakolinti Paulo Efese pene na 55
2 Bakolinti Paulo Makedonia pene na 55
Bagalatia Paulo Kolinti
to Antiokia
ya Sulia pene na 50-52
Baefese Paulo Rome pene na 60-61
Bafilipi Paulo Rome pene na 60-61
Bakolose Paulo Rome pene na 60-61
1 Batesaloniki
Paulo Kolinti pene na 50
2 Batesaloniki
Paulo Kolinti pene na 51
1 Timoté Paulo Makedonia pene na 61-64
2 Timoté Paulo Rome pene na 65
Tito Paulo Makedonia (?) pene na 61-64
Filemona Paulo Rome pene na 60-61
Baebele Paulo Rome pene na 61
Yakobo Yakobo
(Ndeko
na Yesu) Yelusaleme b. 62
1 Petelo Petelo Babilone pene na 62-64
2 Petelo Petelo Babilone (?) pene na 64
1 Yoane Ntóma
Yoane Efese,
to pene wana pene na 98
2 Yoane Ntóma
Yoane Efese,
to pene wana pene na 98
3 Yoane Ntóma
Yoane Efese,
to pene wana pene na 98
Yuda Jude
(Ndeko
na Yesu) Palestine (?) pene na 65
Emoniseli Ntóma
Yoane Patamo pene na 96