Bazali koluka ebongiseli ya sika mpo na mokili mobimba
“TOZALI ata na karte moko te ekoki kokamba biso epai tozali kokende, na mokili ya sika oyo tozali kosala. Awa bato bazali kotalela mikolo oyo mileki, bambula mingi oyo esili koleka kati na bitumba, na koswana mpe na kobánga, totalela sikawa mikolo mizali liboso: epai na ekeke ya sika, mpe na mbula nkɔto ya sika, ya kimya, ya bonsomi mpe ya bozwi.”
Wana ezali maloba oyo George Bush, prezidá ya Etats-Unis, alobaki yango na mokolo ya 1er Janvier 1990. Lolenge moko, Mikhaïl Gorbatchev, prezidá ya Union soviétique, alobaki ete bato bakosalana elongo na bambula 1990 mpo na kolongola “mokili ya bobangi mpe na kozanga kotyelana motema, kolongola bibundeli bizangi ntina, makanisi ya politike mpe mateya ya basodá mazangi ntina, kolongola bandelo mpamba oyo ezali kokabola mabota mpe bikólo.”—Maloba matangamaki na zulunalo moko ya Japon, Mainichi Daily News na mokolo ya 3 Janvier 1990.
Na ndenge emonani, bato bakómaki na bilikya mingi. Nsima na mobu moko, makambo mabongwanaki te. Kati na maloba na ye na mokolo ya 29 Janvier 1991, likoló na ezalela ya lisangá oyo basalaki, prezidá Bush alobelaki etumba ya ebale monene oyo babengi Golfe persique, ete: “Eloko oyo tokozwa ezali monene koleka mwa ekólo moke oyo [Koweït]; yango ezali mpenza monene: ebongiseli ya sika mpo na mokili mobimba epai kuna mabota nyonso makozala na bomoko kati likanisi moko mpo na kokokisa bamposa nyonso ya bato: kimya mpe libateli, bonsomi mpe limemya ya lotomo na moto.”
Bolukiluki kati na ezalela ya yikiyiki
Mikakatano mingi miyei kopekisa bato kati na bolukiluki na bango ya ebongiseli ya sika mpo na mokili mobimba. Matáta kati na basodá ezali epekiseli monene. Zulunalo Time na mokolo ya 28 Janvier 1991 elobelaki matáta oyo mabimaki na lraq mpe na Koweït, nde alobaki ete: “Wana ba bombes ezalaki kokwea mpe ba missiles ezalaki kolekaleka likoló, elikya ya ebongiseli ya sika mpo na mokili mobimba ebungaki na matata wana.” Tokoki kotanga mwa liboso ete: “Moto moko te azali na makanisi mpamba ete ebongiseli ya sika mpo na mokili mobimba oyo elobelami mingi, esili kotyama to ebelemi.”
Boyokani kati na mikili naino esalemi te, mpe yango ezali kolongola milende oyo bato bazali na yango mpo na kotya ebongiseli ya sika mpo na mokili mobimba. Kati na lisoló moko libimaki na zulunalo The World & l (Janvier 1991), bato na mayele basili kotalela “mayele ya sika ya banguya minene mpe bopusi na yango likoló na ebongiseli ya sika mpo na mokili mobimba.” Lisoló lisuki boye: “Lisoló na bato limonisi ete, likambo limonani mingi ezali oyo ete, ndelo kati na bitumba mpe kimya ezali moke mpenza. Boyokani kati na mikili, mingi mpenza kati na banguya minene, ezali likambo ya ntina mpo na oyo etali kotika koswana kati na mikili kino kosala ebongiseli ya sika mpo na mokili mobimba.”
Makambo matali kobebisa zámba mpe banyama ezali epekiseli mosusu mpo na kosala ebongiseli yango ya sika mpo na mokili mobimba oyo bato mingi bazali kokanisa yango. Zulunalo Ezalela ya mokili 1991 (rapport ebimisami na Lingelesi na lnstitut Worldwatch) ezali na maloba oyo ya Lester Brown, ete: “Moto moko te akoki koloba na sikisiki lolenge oyo ebongiseli ya sika mpo na mokili mobimba ekozala. Nzokande soki tolingi kotonga avenire kitoko mpo na libota oyo likoya nsima, esengeli milende makasi mpo nakolongola myango oyo ya kobebisa etando na biso, oyo ezali kosalema mingi mpenza kati na mikili uta bambula mingi.” Rapport emonisaki ete kobebisama ya mopepe esili “kobimisa makámá mpo na kolongono ya nzoto kati na bingumba mingi, mpe esili kobebisa milóna mingi ya mboka.” Mpe ebakisi ete: “Kobakisama na motuya ya bafandi na etando na biso, emonani na kokita ya motuya na mitindo na banzete mpe mitindo na banyama. Kobebisama ya zámba ezali kokitisa motuya na mitindo na nzete mpe banyama. Kobakisama ya molungé mpe kobebisama ya ozone (eboke ya mopepe oyo ekopekisaka moi ete engala koleka te likoló na mabelé) ekoki lisusu kokitisa motuya yango koleka.”
Yango esali ete moto azwa mikakatano mingi kati na bolukiluki na ye na ebongiseli ya sika mpo na mokili mobimba. Bolukiluki yango ekolónga? Tokoki koloba ete mokili ya sika mobelemi? Mpe soki ezali bongo, lolenge nini yango ekosalema?