Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/8 nk. 4-7
  • Mokolo na kosambisama​—Eleko ya elikya!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokolo na kosambisama​—Eleko ya elikya!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Moboko na Mokolo na kosambisama
  • Mokolo na Kosambisama
  • Ekosalema ntango nini?
  • Nani akosambisama?
  • Kosambisama
  • Mokolo na Kosambisama: Eleko ya elikya
  • Mokolo ya kosambisama ezali nini?
    Lamuká!—2010
  • Mokolo ya Kosambisama ezali nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Nini ekosalema na Mokolo ya Kosambisama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/8 nk. 4-7

Mokolo na kosambisama​—Eleko ya elikya!

KANISI mpamba ya mokolo na kosambisama, ebangisaka yo? Soki bongo, mpo na nini te kotalela oyo elobami na Biblia? Na ndakisa, ezali solo ete, Nzambe akosambisaka basali na masumu mpe azali kobwaka bango na mɔtɔ ya lifelo?

Na yango, kosambisama ya yambo oyo Nzambe asalaki esalemaki na ebandeli ya lisoló na moto. Adam na Eva bazalaki na likoki ya kozala na bomoi ya seko na paradis ya mabelé. (Genese 1:26-28; 2:7-9, 15-25) Kasi basalaki lisumu, likambo oyo likweisaki bango epai na Nzambe. Na yango, Nzambe abotolaki bango likabo ya bomoi. Na elobeli mosusu, bakufaki. Nzambe alobaki na Adam ete: “Na molungé ya elongi na yo okolya limpa, kino ntango ekozonga yo kati na mabelé, mpo ete okamatamaki na yango, mpo ete ozali mputulu, mpe okozonga kati na mputulu.”​—Genese 3:16-19.

Kosambisama wana ezalaki makasi kasi na sembo. Mpe yango etalelaki mpasi na lifelo te. Wana Adam mpe Eva bakufaki, bazongaki na mputulu. Bazalaki lisusu na bomoi te. Biblia elakisi soki moke te ete, ndambo na nzoto na Adam, to oyo ya moto mosusu, etikalaki na bomoi nsima na liwa mpo na konyokwama libela na libela kati na esika moko. Nzokande, tozali kotanga ete: “Bato na bomoi bayebi ete bakokufa, nde bakufi bayebi likambo te.”​—Mosakoli 9:5.

Oyebaki ete Biblia elobi bongo? Bobele likanisi yango moko, oyebaki ete Biblia ezali te kosalela liloba “molimo mozangi kufa”? Nzokande, elobi ete: “Molimo oyo mosali lisumu, ye akokufa.” (Ezekiele 18:4) Yango eyokani mpenza na etinda na Biblia oyo elandi ete: “Masumu makofuta mbongo, mbongo na yango bobele kufa.” (Baloma 6:23) Mobeko yango mozali mpo na biso banso. Tozali bakitani ya Adam, mosumuki mpe, na yango, biso banso tozali kosala masumu mpe tozali kozwa lifuti ya lisumu, liwa. Na yango tozali kotanga kati na Biblia, ete: “Na yango, lisumu likɔtaki na mokili mpo na moto moko, mpe kufa ekɔtaki mpo na lisumu. Kufa mpe epalangani epai na bato banso mpo ete bato banso basali lisumu.” (Baloma 5:12, MN) Mokolo na Kosambisama ezali likambo ya ntina kati na bibongiseli oyo Nzambe akamataki mpo na kobikisa biso na ezalela oyo.

Moboko na Mokolo na kosambisama

Engebene Biblia, ekoki soko mibu 2 000 uta Nzambe atyaki moboko ya makambo oyo makosalema na Mokolo na Kosambisama. Yango esalemaki na ntango Yesu ayaki na mabelé mpe wana apesaki bomoi na ye ya moto na kokoka lokola lisiko mpo na biso. Yesu ye moko alimbolaki ete: “Nzambe alingaki mokili na boye ete apesi Mwana na ye bobele moko, mpo ete moto na moto oyo akondima ye, abebisama te kasi azala na bomoi ya seko.”​—Yoane 3: 16, MN.

Soki tondimeli Yesu, tozali uta sikawa kozwa litomba ya mbeka na ye na ndimbola ya elimo. Nzambe azali kolimbisa masumu na biso mpe azali kopesa biso nzela ete tobelema epai na ye. (Yoane 14:6; 1 Yoane 2:1, 2) Kasi tozali bobele bato tozangi kokoka mpe na masumu, mpe mpo na yango, tozali kobɛla kino kokufa. Naino tozwi bomoi ya seko te oyo Yesu alakaki. Yango ekosalema bobele na nzela na Mokolo na Kosambisama.

Mokolo na Kosambisama

Ntoma Yoane azwaki emonaneli ya Mokolo na Kosambisama mpe amonisi yango boye: “Namonaki kiti na bokonzi mpɛmbɛ monene, mpe mofandi na yango. Mabelé mpe likoló ekimaki elongi na ye, mpe emonani lisusu te. Mpe namoni bakufi, minene na mike, batelemi liboso na kiti na bokonzi. Mpe mikanda mifungolami, mpe mokanda mosusu mofungolami, yango mokanda na bomoi. Bakufi basambisami na makambo oyo masili kokomama kati na mikanda yango, engebene misala na bango.”​—Emoniseli 20:11, 12, MN.

Ee, engebene emonaneli na Yoane, ezali Nzambe ye moko nde akokamba Mokolo na Kosambisama. Kasi moto mosusu akosala yango. Ntoma Paulo alimboli ete: “Mpo ete asili kopona mokolo oyo ye akosambisa mokili na sembo, mpe akosambisa bango na moto oyo asili kopona.” (Misala 17:31) Moto yango nani? Ezali Yesu, oyo alobaki ye moko ete: “Tata azali kosambisa moto te, kasi asili kopesa kosambisa nyonso epai na Mwana.” (Yoane 5:22) Na yango, na Mokolo na Kosambisama, Yesu akozala Mosambisi oyo atyami na Nzambe.

Wana ezali nsango malamu mpo na bato. Mikanda ya nsango malamu mizali komonisa Yesu lokola moto oyo atondi na motema mawa. Azali na lolendo te to mpe na makambo makasi te, kasi azali “na bopɔlɔ mpe na motema mosokɛmi.” (Matai 11:29: 14:14: 20:34) Tozali na esengo na kosambisama na mosambisi motindo wana.

Ekosalema ntango nini?

Mokolo na Kosambisama yango ekosalema ntango nini? Emoniseli, to Apocalypse, elobi ete yango ekosalema na ntango ‘mabelé mpe likoló ekokima.’ Yango ezali kokundwela biso maloba oyo na ntoma Petelo ete: “Makoló mpe mabelé ya ntango oyo ebómbami mpo na kozikisama na mɔtɔ mpe ebatelami mpo na mokolo na kosambisama mpe na kobomama na bato mabe.” (2 Petelo 3:7, MN) Mabelé masengeli nde kozikisama? Te, Biblia ezali koloba polele likoló na likambo oyo. Mabelé, na ndimbola ya polele, ekobomama te. “Mabelé . . . makoningana te.” (Nzembo 104:5) Ba versets ya zingazinga ya maloba na Petelo ezali komonisa ete ebongiseli ya mokili mobimba ya biloko ya ntango oyo, ebongiseli mabe, ekobomama. Ezali bato mabe nde bakolimwa, kasi etando na biso te.​—Yoane 12:31; 14:30; 1 Yoane 5:19.

Bato mabe wana bakobomama na ntango oyo Biblia ebengi yango ete, etumba ya Armagedon, etumba oyo ekosalema na mikolo mizali koya, na motindo oyo Mosenzeli asili komonisa yango mbala na mbala. (Emoniseli 16:14, 16) Na nsima, Satana akobwakama na libulu mozindo mpe akosenginya lisusu bato te na boumeli ya mbula nkɔto, boumeli ya Mokolo na Kosambisama. (Emoniseli 19:17 kino 20:3) Likambo nini likokómela basembwi na ntango bato mabe bakobomama na Armagedon? Bakobika mpe bakokɔta na Mokolo na Kosambisama. Totangi ete: “Basembwi bakofanda na [mabelé]. Kasi bato mabe bakolongolama na [mabelé].​—Masese 2:21, 22, MN.

Mpo na kondimisa likanisi oyo, Biblia elobeli “ebele monene oyo moto te akoki kotanga motuya na bango, bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bibolo nyonso mpe na minoko nyonso” oyo ekozala na mabelé liboso na Armagedon. Bato yango “babimi na bolozi monene”: na maloba mosusu, bakobika na nsuka na mokili mabe ya ntango oyo, lokola Noa abikaki na nsuka na mokili ya eleko na ye. (Emoniseli 7:9-17; 2 Petelo 2:5) Oyebaki ete ebele monene ya baklisto na molende wana bauti na mabota nyonso uta sikawa? Bato wana bazali na elikya ya kobika na bolozi monene mpo na kozala na bomoi ya seko na mabelé. Komonana na ebele monene wana, ezali elembeteli ete Mokolo na Kosambisama mobelemi.

Nani akosambisama?

Ebele monene wana ekosambisama na boumeli ya Mokolo na Kosambisama. Kasi bakozala bobele bango moko te. Lisoló na Yoane limonisi lisusu ete: “Mai monene mazongisi bakufi kati na yango; kufa mpe lifelo ezongisi bakufi kati na yango, mpe basambisami moto na moto engebene misala na ye.” (Apocalypse 20:13, Buzy) Awa tozali lisusu na elembeteli mosusu ete bato bakonyokwamaka libela te kati na lifelo. Soki lifelo ezali kozongisa bakufi oyo bazali kati na yango, ndenge nini moto akoki bongo kozala kati na esika wana libela na libela? Ya solo, kati na Biblia, lifelo emonisi nkunda epai kuna bato banso bakokendeke, mpe epai bazali kozela kosekwisama na kozanga koyeba likambo. Na boumeli ya Mokolo na Kosambisama, bakufi nyonso bazali kati na lifelo basengeli kosekwa.​—Mosakoli 9:10.

Nani akosekwa kati na bakufi na boumeli ya Mokolo na Kosambisama? Ntoma Paulo alobaki ete: “Lisekwa likozala mpo na bato na sembo mpe na bato na sembo te.” (Misala 24:15) Na bongo, basaleli na sembo na Nzambe, “bato na sembo,” bakosekwa. Kasi ekozala bobele bongo mpo na ebele na bato mosusu oyo ete, “bato na sembo te.” Na ndenge emonani, lisekwa likozala mpo na bato banso oyo basili kokufa nde bazali naino kati na nkunda, longola bobele baoyo masumu na bango mazalaki minene kino Nzambe asambisaki bango libela ete babongi na bomoi te.​—Matai 12:31.

Kosambisama

Likambo nini likokómela ebele monene ya babiki mpe na basekwi na Mokolo na Kosambisama? Biblia elobi ete: “Bakufi bakosambisama na makambo oyo masili kokomama kati na mikanda yango, engebene misala na bango.” Ekozala eleko na komekama. Baoyo bakomiyokanisa na makambo oyo “masili kokomama kati na mikanda yango,” malako oyo Nzambe akopesa na ntango wana epai na bato, nkombo na bango ekokomama kati na “buku na bomoi.” (Emoniseli 20:12) Bakotambola na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko.

Na nsuka, liwa oyo Klisto akufaki lokola mbeka ekopesa bolamu kati na mosuni. Bato oyo nkombo na bango ekokomama kati na buku na bomoi, bakonyokwama lisusu te mpo na kobela mpe kokufa. Nzokande, bakomemama mokemoke kino na ezalela ya bato na kokoka mpe kozwa bomoi ya seko bolakami epai na baoyo bazali kondima Yesu. Oyo nde elikya kitoko! Na ntembe te, bato mosusu bakoboya kotósa makambo oyo “masili kokomama kati na mikanda yango.” Likambo nini likokómela bango? Bakozwa bomoi ya seko te. Mpamba te Biblia elobi ete: “Moto nani oyo nkombo na ye ekomami na buku na bomoi te, abwakami kati na libéké na mɔtɔ.”​—Emoniseli 20:15, MN.

Verset oyo ezali kopesa likanisi ya mɔtɔ ya lifelo elobelami na boklisto ya lokutá? Te, mpamba te totangi kati na verset ezali liboso ete: “Kufa mpe lifelo ebwakami kati na libéké na mɔtɔ. Ezali bongo kufa na mibale, libéké na mɔtɔ.” (Apocalypse 20:14, Buzy) Soki lifelo esengeli kobwakama kati na libéké na mɔtɔ, boye libéké yango ekoki te komonisa mɔtɔ ya lifelo. Lisusu, kufa ezali eloko oyo ekoki kosimbama te mpo na kobwaka yango na esika moko. Libéké, to etima na mɔtɔ, esengeli bongo kozala na elilingi. Yango emonisi nini? Biblia elobi ete: “Ezali kufa ya mibale.” Na ntango kufa mpe Ewelo babwakami kati na etima na mɔtɔ, yango “ekufaki,” ezalaki lisusu te. Bobele bongo, batomboki oyo bakobwakama na etima na mɔtɔ bakokufa, to bakozala lisusu na bomoi te. Ezali kufa na mibale, oyo ezangi elikya ya lisekwa.

Mokolo na Kosambisama: Eleko ya elikya

Wana ezali biso kokanisa Mokolo na Kosambisama, tosengeli kobanga te to kotomboka mpe te. Mokolo na Kosambisama ezali eleko ya elikya, eleko oyo bato bakozwa bomoi ya seko oyo Adam abungisaki. Totalela bolamu oyo bokozwama na baoyo bakotalelama sembo: “Tala efandelo na Nzambe ezali esika moko na bato. Akofanda elongo na bango, mpe bakozala bato na ye, mpe Nzambe ye moko akozala elongo na bango. Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.”​—Emoniseli 21:3, 4.

Na nsuka na Mokolo na Kosambisama ya mbula nkɔto, bato na sembo ya mabelé mobimba bakokóma na ezalela ya kokoka. ‘Bakozonga lisusu na bomoi’ na ndimbola ya solo, mpe na bongo, Mokolo na Kosambisama ekokokisa mokano na yango. (Emoniseli 20:5) Bíblia elakisi ete nzela ekopesama na Satana ete abundisa bato mpo na mbala ya nsuka. (Emoniseli 20:3, 7-10) Baoyo bakotɛmɛla ye na komekama na ye wana monene, bakozwa esengo na kokokana mobimba ya elaka oyo na Biblia ete: “Bayengebene bakosangola mokili, mpe bakofanda wana libela.”​—Nzembo 37:29.

Mokolo na Kosambisama ezali ebongiseli moko kitoko! Ezali na ntina mpenza ete tomibongisa uta sikawa mpo na mokolo yango, na koyekoláká Biblia, na koyekoláká mokano na Nzambe mpe na koyokanisa bomoi na biso elongo na yango. Ezali likambo na kokamwa te ete mokomi na nzembo alobaki na esengo na ntina na Mokolo na Kosambisama, ete: “Tika ete likoló esepela, mokili mpe eyoka esengo; tika ete mai monene manguluma mpe biloko bizali kati na yango. Tika ete bilanga bisepela mpe biloko binso bizali kati na yango, wana nzete na zamba ekonganga na esengo liboso na Jéhovah; mpamba te asili koya; asili koya mpo na kosambisa mokili.”​—Nzembo 96:11-13.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto