Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/8 nk. 4-7
  • Kolongono ya nzoto mpe bolamu​—olenge nini kozwa yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kolongono ya nzoto mpe bolamu​—olenge nini kozwa yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Masolo mosusu
  • Kolongono ya nzoto mpe bolamu​—okoki mpenza kozwa yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Ndenge ya kozwa esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Bato bazali koluka bomoi ya esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Epai wapi bolamu ya solosolo ekoki kozwama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/8 nk. 4-7

Kolongono ya nzoto mpe bolamu​—lolenge nini kozwa yango?

UTA kala, moto asili kokanga ntina ya boyokani makasi oyo bozali kati na kolongono ya nzoto mpe bolamu. Hippocrate, ye oyo atalelami lokola “tata na mosala ya monganga,” alobaki ete: “Moto na mayele asengeli kotalela kolongono ya nzoto ete ezali moko na bolamu monene mpo na moto.” Filozofe Arthur Schopenhauer ye moto na Alemanye alobaki boye: “Mpasi mpe mitungisi ezali banguna mibale ya bolamu na moto.”

Tozali kokuta kati na mokanda Analyse d’une maladie vue par le malade (angl.), lisoló lilobeli milende oyo misalamaki na Norman cousins mpo na koluka kosilisa maladi mabe oyo azalaki kobɛla, na nzela na koseka. Alobi ete, kobika na ye ezwamaki epai mosusu na lolenge oyo azalaki kosɛka mingi wana ezalaki ye kotala bafilime ya kosekisa. Minganga ya lokumu bayekolaki bongo lisalisi malamu yango liuti na biloko mosusu ya nzoto bibengami endorphines, biye bikobimaka longwa na nzoto na ntango tosekaka. Tokoki bongo kotalela mayele ya lisese oyo lipemami na Nzambe, ete: “Motema na esengo ekosalaka malamu lokola nkisi.”​—Masese 17:22.

Nzokande, bato na mayele bazali komona ete kolongono malamu ya nzoto ezali mpenza ndanga te mpo na bolamu, mpamba te bato mingi ya nzoto kolongono bazali na mawa. Jonathan Freedman akambaki boyekoli moko botalelaki biyano, na maloba to na mikanda ya bato koleka 100 000. Na nsuka akamwaki na komona ete koleka ndambo na motuya na bato oyo bazalaki komitungisa mpo na bomoi, ezalaki baoyo bakokaki kobengama ete bazali na kolongono malamu na nzoto.

Ndimbola na bokuse ya kolongono ya nzoto mpe bolamu

Epai na nani, to epai wapi tosengeli kobaluka mpo na kozwa kolongono ya nzoto mpe bolamu na mbala moko? Esili koleka bikeke mingi, Confucius amonisaki boyokani malamu na likambo yango, ete: “Soki baoyo bafandi pene na mikonzi bazali kosepela, soki baoyo bazali mosika bamiyeli bango moko, boye boyangeli bozali malamu.” Kala mingi te, na eleko na biso, Thomas Jefferson, ye mokonzi monene ya Leta, ayebisaki ete mosala ya bokonzi ezali na mokano bobele moko ya “kopesa bolamu mingi epai na bato mingi.”

Na yango, ntango tokotalela yango penepene, eyano na bilikya ya bato mpo na kolongono ya nzoto mpe bolamu ekangisami mpenza na likambo ya boyangeli.

Na boumeli ya bikeke, bato bamizelaki ete biyangeli bikoka kopesa bango bolamu. Lokola ndakisa, tozali kotanga kati na Maloba na lokumu ya lipandá ya Etats-Unis, ete: “Tozali kotalela na bosolo nyonso, na polele, basolo oyo elandi: bato banso bazalisamaki lolenge moko, Mozalisi na bango asilaki kopesa bango lotómo oyo ekoki kolongolama te; kati na yango bomoi, bonsomi mpe boluki ya bolamu.” Simba likambo oyo ete, boyangeli oyo bakanaki kosala na eleko wana elakaki epai na bato na yango bobele likoki ya koluka bolamu. Mpo na oyo etali kolongono ya nzoto, tokoki nde kopesa longonya na ntina na bibongiseli oyo biyangeli mingi bizali kosala mpo na kobongisa kolongono ya nzoto ya bato ya mikili na bango. Nzokande ezali bobele ndoto mpamba mpo na kolaka kopesa kolongono ya nzoto epai na ebele na bato.

Tokoloba boni sikawa mpo na boyangeli moko oyo ekolaka kopesa makambo mingi koleka epai na bato na yango? Okomiyoka motindo nini soki balaki yo bobele bolukiluki ya bolamu te, kasi bolamu yango moko? Okoloba boni soki balaki yo, bobele kobikisama mpamba na maladi te, kasi balaki yo kolongono ya nzoto yango moko? Okozala na esengo te mpo na komona ete bamposa na bato mpo na kolongono ya nzoto mpe bolamu ekokokisama na nzela na boyangeli wana?

Bato mingi bakoki kokanisa ete wana ezali bobele ndoto mpamba, nzokande boyangeli yango ezali mpenza kosakolama, mpe mwa bandimbola esili kopesamela biso na ntina na yango. Boyangeli yango ezali Bokonzi na Masiya na Nzambe, oyo na ntina na yango tozali kokuta bandimbola ya solo kati na Biblia Mosantu.

Bokonzi, to Boyangeli, na Nzambe

Mbala mingi Biblia ezali kolobela “bokonzi na Nzambe.” Yango ezali mpenza nini? Diksionere na nkombo Grand Robert epesi ndimbola oyo mpo na liloba “bokonzi’’ ete: “Mboka, Ekolo eyangelami na mokonzi moko.” Na maloba mosusu, Bokonzi na Nzambe ezali boyangeli na bokonzi oyo bokambami na Yesu Klisto, Mwana na Nzambe, oyo ye aponaki lokola Mokonzi. Bokonzi wana bozali na ntina nini kati na mokano na Nzambe? Totika Yesu apesa eyano: ‘Bolukaka nde liboso bokonzi na Nzambe . . . Nsango malamu oyo na bokonzi ekosakolama na mokili mobimba . . . Ekoki na ngai kosakola nsango malamu na bokonzi na Nzambe . . . mpo ete natindami mpo na yango. Bokonzi na Nzambe ezali kosakolama mpe bato nyonso bakoti na yango na makasi.’​—Matai 6:33; 24:14; Luka 4:43; 16:16.

Liloba “bokonzi” lisalelami koleka mbala nkama kati na lisolo oyo ba Evanzile elobeli bomoi na Yesu, mbala mosusu na boyokani mpenza na kolongono ya nzoto mpe bolamu. Talela mokapo ya Matai 9:35: “Mpe Yesu atamboli na mboka minene mpe na mboka mike nyonso, wana ezalaki ye kolakisa na biyanganelo na bango mpe kosakola nsango malamu na bokonzi mpe kobikisa mpasi nyonso mpe maladi nyonso.” Atako Yesu akɔtisaki misala ya kobikisa bato kati na mateya na ye na ntina na Bokonzi, kasi tosengeli koyeba ete misala na ye ya kobikisa ezalaki bobele na esika ya mibale na kotalela mosala na ye ya kosakola mpe ya koteya. Yesu abengamaki “Molakisi” kasi “Mobikisi na maladi” te. (Matai 26:18; Malako 14:14; Yoane 1:38) Amipesaki mpenzampenza te na kobikisa bato to na kopesa nkisi na bato na bokono. Mokumba na ye ya liboso ezalaki Bokonzi. Na kobikisaka bato, Yesu amonisaki mawa na ye monene mpe amonisaki ete azalaki kozwa lisungi ya Nzambe.

Kobikisama oyo esalamaki na Yesu epesaki mpe mwa elembo moke mpo na lolenge oyo akobikisa bato ntango Bokonzi na Nzambe ekosalela nguya na yango nyonso na mabelé. Kobikisama oyo bato bazwaki ezali ndanga epesameli biso lisusu kati na emonaneli oyo eyebisami na Emoniseli 22:1, 2, ete: “Atalisi ngai ebale na mai na bomoi, kitoko lokola kulusatala, kobima na kiti na bokonzi na Nzambe mpe na Mwana na Mpate. Na kati na balabala na yango, mpe na ebale na bipai nyonso mibale, ezalaki nzeté na bomoi kobotaka mbuma na mitindo zomi na mibale, sanza na sanza kobotaka mbuma na sanza, mbuma na sanza. Nkasa na nzeté ezali mpo na kobikisa bato na mabota.”

Kasi yango ekosalema wapi? Kobikisama motindo wana ekoki kotalelama lokola ndoto mpamba mpo moto akoka kolikya kozala na bomoi awa na mabelé. Kasi kanisa maloba oyo na Yesu, oyo yo moko mbala mosusu osila kozongela yango kati na mabondeli na yo: “Tika bokonzi na yo eya! Tika mokano na yo esalema na nse pelamoko na likoló!”​—Matai 6:10.

Bobele Bokonzi ya masiya na Nzambe nde ekoki mpenza kokokisa bamposa na biso, mpo tozwa kolongono ya nzoto mpe bolamu na mikolo mizali koya. Kasi motuna moko motikali.

Tokoki nde kozala na kolongono ya nzoto mpe bolamu uta sikawa?

Botósi na mitinda na Biblia ezali kopesa biso libaku ya kozala na kolongono ya nzoto mpe bolamu mingi uta sika. Lokola zulunalo oyo ekomonisaka yango mbala mingi, baoyo bazali kosalela Biblia kati na bomoi na bango bazali mpenza komibatela na makambo oyo makobebisaka kolongono ya nzoto mpo na pité, na komela makaya, na komela masanga mingi mpe komela bangi to drogue. Bazali mpe lisusu kozwa bolamu oyo bouti na bomoi ya kimya mpe na boyokani malamu elongo na bazalani na bango.

Atako bongo, touti komona ete kolongono ya nzoto ezali mpenza ndanga ya bolamu te. Likambo nini lisengeli na yo mpo ete ozala na esengo mingi?

Jonathan Freedman atalelaki likambo yango na mozindo kati na boyekoli oyo toutaki kolobela mwa liboso. Atalelaki makambo lokola “Bolingo mpe bosangisi nzoto kati na mwasi mpe mobali,” “Bolenge mpe bonunu,” “Mosolo mpe kotanga kelasi,” mpe ata “Engumba mpe zamba.” Akómaki kino na bosukisi oyo malamu ete: makambo oyo mazali bobele na bopusi moke likoló na oyo tokoki kobenga ete bolamu. Na ndakisa, atangi likambo ya bato oyo bazali na bozwi mingi na mosuni nzokande bazali mpe na mawa, mpe asukisi ete: “Tokamwaki na komona ete, ezala mosolo soko kotanga kelasi, nyonso ekopesaka mpenza bolamu te.”

Bosukisi na ye ezali koyokana na likanisi ya ntóma Paulo, oyo alobaki na mayele nyonso ete: “Nayekoli ete nasepela na lolenge nini lozali na ngai.” (Bafilipi 4:11) Kanisa lisusu maloba oyo na Yesu, ete: “Keba mpe senzela na ntina na lokoso nyonso, mpo ete bomoi na moto ezali kati na motuya na biloko bizali na ye te.”​—Luka 12:15.

Na yango, profesere Freedman amonisaki likambo oyo ete: “Mbala nyonso oyo tozali kotalela maloba na bato oyo bazali na mawa nzokande bamonani lokola ete bazali na biloko oyo bazali na yango mposa, tozalaka na makanisi mingi likoló na bomoi na bango oyo bozangi ntina to libonza.” Abakisaki ete: “Natatabanaka na kotalela mingi likambo yango, kasi emonani polele ete makambo na elimo mazali na bopusi kitoko likoló na lolenge na biso ya komonela makambo, nzokande kozanga makambo yango ezali kobebisa to koboma mosala na biso nyonso.”

Na mikolo na biso tozali komona bosolo ya maloba oyo. Tala zingazinga na yo. Omoni te ete penepene na bato nyonso, bamoko babólá, bamosusu bazwi, bazali mpenza koluka bolamu nde bazali kozwa yango te? Soki bamosusu basili kotika mpe bazali komonisa te ezaleli na bango ya kozanga elikya, mingi bazali na bomoi ya yikiyiki, bazali ntango nyonso kolukaluka eloko moko kozanga ete bazwa yango. Mpo na kozwa esengo, bamoko bazali kobala, nzokande baninga na bango ya pene bazali koboma mabala mpo na ntina bobele moko wana. Ezali na baoyo bazali koboma nzoto na mosala, nzokande bamosusu bazali kotika misala na bango mpo na mibembo milai mpe mbala mosusu ba congés oyo ezali kosenga mosolo mingi. Bato nyonso wana bazali koluka bobele eloko moko oyo ezali kokima bango: kolongono ya nzoto mpe bolamu. Bazali nde kolonga kozwa yango? Yo moko osili kozwa yango?

Kolongono na yo ya nzoto, bolamu na yo

Ya solo, na motindo mosusu, okoki mpenza kosala eloko mpo na kolongono na yo ya nzoto mpe na bolamu na yo. Ndenge nini?

Ezali mpenza likambo na mayele mpo na yo na kosenzela kolongono na yo ya nzoto na lolenge lobongi, na kosaleláká batoli malamu oyo epesami na Biblia. Nkutu, eyebisami ete esengeli kozala na makanisi ya kolonga. Yango elimboli ete tosengeli koyeba ete nzoto na biso ya kozanga kokoka ebatelami na maladi te; na yango, tokomitungisa mingi te ntango yango ekozwa biso. Mbala mosusu ekosenga na biso milende mpo na kozala na likanisi ya kolonga mpe kotelemisa elimo na biso likoló na elaka ya mokili na sika oyo ezali liboso, epai kuna tokosepela na kolongono na nzoto ya kokoka.

Mpo na kotala soki ozali mpenza na esengo uta sikawa, omituna mituna miye: (1) Nazali mpenza nkolo ya bomoi na ngai? (2) Nazali mpenza na kimya elongo na ngai moko mpe na baninga na ngai? (3) Nazali na bosepeli mpenza kati na Bomoi na ngai mobimba, kati na misala na ngai, na kotalela oyo Biblia ezali koloba mpo na yango? (4) Libota na ngai mpe ngai tozali mpenza na esengo na kosalela Nzambe?

Mingi mpenza, ezali yo nde osengeli kopona. Mpo na mingi, mbala mosusu tozali na kolongono malamu ya nzoto, mpe likoki ezali na biso ya kobakisa bolamu. Na bongo yango elimboli ete tomityela mikano kati na makambo ya elimo mpe tosala milende ete tokokisa yango. Kanisa maloba oyo na Yesu: “Esika biloko na yo na motuya bizali, motema na yo ekozala wana lokola.” (Matai 6:21) Tozali mpe na ntina euti na Biblia mpo na kozela na esengo nyonso kolongono ya nzoto mpe bolamu ya kokoka, na nsé na boyangeli ya kokoka ya Bokonzi na Masiya. Na ntango wana, kolongono ya nzoto mpe bolamu ya kokoka ekopesamela biso.

[Elilingi na lokasa 7]

Bato na esengo bazali kosepela na kokabola elikya na bango ya kolongono malamu ya nzoto

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto