‘Nalónaki na mpisoli, nabuki na kongánga na esengo’
Lisoló ya Miyo ldei
“Nakufi e! Nakufi e! Boya ee!” Ezali bongo nde tata na ngai angangáki kati na mpasi monene. Angangáki makasi mpenza kati na ndako wana ezalaki ngai kobima mbango na libandá. Ezalaki na katikati na butu, mpe tata na ngai abɛlaki makasi mpenza na maladi ya motema. Nakendaki mbango epai na noko na ngai, oyo azalaki kofanda penepene wana, kasi na ntango tokómaki, motema ya papa etikaki kobɛta.
YANGO esalemaki na mokolo ya 14 Décembre 1918. Nakómaki etiké wana ezalaki ngai na mibu 13; mama na ngai akufaki wana ezalaki ngai na mbula nsambo. Lokola nakufelaki baboti na ngai naino nazalaki mwana moke, na bandaki komituna ete: “Mpo na nini tokufaka? Tokendaka wapi nsima na liwa?”
Nsima na kozwa lipɔlɔmi na ngai ya molakisi-mwasi, natangisaki na Tokyo, na école primaire ya Shinagawa. Mokolo mosusu, moko na baninga na ngai alakisaki ngai epai na elenge mobali moko, Motohiro, oyo tobalanaki na ye wana nakokisaki mibu 22. Ekoki mibu 64 sikawa, tozali kokabola bampasi mpe bisengo ya bomoi elongo na ye. Mosika te, nsima na libala, tokendaki na Taiwan, mboka oyo eyangelamaki na Japon. Na ntango yango, nayebaki soko moke te ete nakozwa bantina na kongánga na esengo kati na mboka yango.
Nayambi solo
Na ebandeli ya mobu 1932, wana tozalaki kofanda na etuka ya Chiai, na ntéi ya Taiwan, mobali moko nkombo na ye Saburo Ochiai, ayaki kotala biso. Ateyaki biso ete elaká ya lisekwa ezali moko na bisakweli ya Biblia. (Yoane 5:28, 29) Oyo nde elikya kitoko! Nazalaki na mposa mingi mpenza ete namonana lisusu na mama na ngai mpe na tata na ngai! Na makanisi mabongisamaki, na bandimbola ya mayele mpe na bilembeteli ya sikisiki na Biblia oyo ye azalaki kosakola, tokangaki ntina ya solo kati na makambo oyo azalaki koloba. Tolekisaki mokolo mobimba na kosolola na ntina na Biblia, kozanga koyeba ete ngonga ezalaki koleka. Nakómaki kosepela mingi mpenza na mokanda yango.
Nsima mwa moke, M. Ochiai alongwaki na engumba wana, mpe atikelaki biso mikanda lokola création, La Harpe de Dieu, Gouvernement, Prophétie, Lumière et Réconciliation, oyo ebimisamaki na la Société Watch Tower. Natangaki mingi mpenza mikanda yango, mpe mokemoke naokaki makasi ya koyebisa bato mosusu makambo nazalaki kotanga. Mpo ete Yesu abandaki mosala na ye kati na engumba epai kuna akólaki, ngai mpe nabandaki na esika nazalaki kofanda. Nakendaki bongo kotala moninga na ngai ya penepene. Moto moko te alakisaki ngai lolenge ya kosakola; nakendaki bongo kosakola ndako na ndako elongo na Biblia na ngai mpe na mikanda oyo nazalaki kotanga; nasakolaki na makoki na ngai nyonso. Bato basepelaki mpe bazwaki mikanda. Nasengaki na Todaisha (ezali motindo wana nde bazalaki kobenga la Société Watch Tower na Japon) ete batindela ngai 150 ekzamplere ya brochure Le Royaume, l’espérance du monde, mpe nakabolaki yango na mosala ya kosakola.
Mokolo mosusu, moto moko oyo natikelaki ye mikanda alobaki na ngai ete bapolisié bakendaki epai na ye nsima wana nautaki kobima, mpe babotolaki ye mikanda. Nsima mwa moke, bapolisié minei bayaki epai na ngai mpe babotolaki mikanda na ngai nyonso mpe bazulunalo na ngai nyonso. Batikelaki ngai bobele Biblia. Na boumeli ya mbula mitano, nazalaki kokutana ata na Témoin de Jéhovah moko te, kasi solo ezalaki ntango nyonso kopɛla kati na motema na ngai lokola mɔtɔ.
Tokómaki na sanza ya Décembre 1937! Ba colporteurs mibale bautaki Japon, bayaki kotala biso. Natunaki bango na kokamwa nyonso ete: “Ndenge nini boyebaki ete biso tozali awa?” Bayanoli ete: ’’Tozali na nkombo na bino awa.” Jéhovah akaniselaki biso! Ba Témoins wana mibale, Yoriichi Oe mpe Yoshiuchi Kosaka, basalaki soko mobémbo ya bakilometele 240 na velo na bango oyo ekómaki ya kala mpe bamemaki biloko na bango na nsima na yango, longwa na Taipei kino na mboka chiai. Wana ezalaki bango koloba, nazalaki na mayoki motindo moko na oyo ya mokubé Moetiopia, oyo alobaki ete: “Likambo nini likopekisa ngai kobatisama?” (Misala 8:36) Bobele na mpokwa wana, ngai mpe mobali na ngai tozwaki batisimo.
Nasungi bandeko oyo bakangamaki
Na 1939, bakangaki ba Témoins de Jéhovah bipai binso na mboka Japon. Minyoko wana minene mikómaki kino na Taiwan. Na sanza ya Avril, ndeko Oe mpe ndeko Kosaka bakangamaki. Sanza mibale na nsima, bakangaki biso. Lokola nazalaki molakisi, babimisaki ngai na boloko na mokolo molandaki, kasi mobali na ngai atikalaki na boloko na boumeli ya sanza minei. Nsima na kobima na ye, tokendaki kofanda na Taipei. Ezalaki likambo malamu mpenza, mpamba te tokómaki pene na boloko epai bandeko bakangamaki.
Boloko ya Taipei ezalaki na bakengeli makasi. Nazwaki bilamba mpe bilei, bongo nakendaki kotala bandeko. Oyo namonaki liboso, ezalaki ndeko Kosaka; ayaki kozwa ngai, ye na mokengeli moko elongo na polisié moko; mpe atelemaki nsima na lilusu moko lizalaki na ntaká ya santimetele 30 na mipanzi nyonso. Elongi na ye ezalaki na mawa, mpe mbebu na ye motane makasi. Azwaki maladi ya ntólo.
Na nsima, ndeko Oe ayaki wana ezalaki ye koseka; alobaki na esengo nyonso ete: “Nasepeli mingi lokola oyei.” Lokola elongi na ye etelaki mpe evimbaki, namitungisaki mingi mpo na kolongono na ye ya nzoto. Alobaki na ngai ete: “Nazali malamu. Esika oyo ezali malamu mpenza. Ezali na misoso (punaises) te, ata nsili (poux) mpe te. Nakoki ata kolya mikaté na ngai. Tozali lokola bato oyo bafandi na ndako na mokonzi!” Polisié mpe mokengeli basekaki mpe balobaki ete: “Oyo wana akotika te!”
Tokangami lisusu
Na mokolo ya 30 Novembre 1941, pene na katikati na butu, mwa mikolo nsima na mibémbo oyo nazalaki kokende kotala bandeko, toyokaki bato kobeta ekuke makasi. Longwa na talatala ya ekuke, namonaki bililingi ya bato mineneminene balati bikɔti. Natangaki bango soko bato mwambe. Ezalaki bapolisié. Bakɔtaki na makasi kati na ndako na biso mpe balukaki bipai binso, nde bakutaki eloko te. Nsima na ngonga moko, wana esilisaki bango kopanzapanza biloko nyonso, bakamataki bityelo ya bafoto na biso mpe balobaki ete tolanda bango. Namikundolaki ete Yesu akangamaki na katikati na butu. (Matai 26:31, 55-57; Yoane 18:3-12) Wana nakanisaki mpo na bato mwambe oyo bayaki bobele mpo na biso mibale, naokaki mposa ya koseka.
Bamemaki biso kati na ndako moko monene ya molili, oyo naino tomona yango liboso te. Na nsima toyaki koyeba ete, ezalaki boloko ya Hichisei ya Taipei. Bafandisaki biso liboso na mesa moko monene mpe babandaki kosambisa biso. Bazongelaki kotuna biso mbala na mbala ete: “Bino boyebi nani?” mpe moko na moko kati na biso ayanolaki ete: “Nayebi moto te.” Ndenge nini tokokaki koyeba ba Témoins de Jéhovah ya Japon? Toyebaki bobele ndeko Oe mpe ndeko Kosaka; kasi nkombo mosusu oyo batangaki na ntango wana, tolobelaki yango te.
Na ngonga ya mitano na ntɔngɔ, bapolisié mibale bamemaki ngai na eteni na ndako epai nasengelaki kofanda. Esengelaki mwa ntango mpo na komesena na esika wana ya sika. Ezalaki mbala na ngai ya liboso ete namona binsekwa. Banyama wana mike, oyo elingaka mingi koswa bato ya sika, batikaki basi mibale mosusu oyo bazalaki na eteni na ndako wana mpe baswaki ngai mingi, atako milende nasalaki mpo na koboma oyo ezalaki koya epai nazalaki Na nsuka, nalembaki, mpe natikaki yango ete eswa ngai.
Bazalaki kopesa biso saani ya loso oyo ebelaki malamu te, kasi eyokanaki na monoko lokola loso oyo naino balambi yango te. Elongo na loso wana, bazalaki kopesa biso nkasa ya daikon (ndunda oyo ebengami radis du Japon) etyamaki mongwa nde ezalaki na zelo, mpamba te esukolamaki te. Na ebandeli, nazalaki kokoka kolya yango te, mpo ete bilei yango bizalaki na nsolo mabe; bakangami mosusu nde bazalaki kolya yango. Na boumeli ya ntango, esengelaki bobele komesena ete nabikisa bomoi na ngai.
Boloko ezalaki na makambo ya nsɔmɔ mingi. Mbala mosusu, nayokaki mobali moko kongánga mokolo na mokolo kati na monyoko, mpamba te bamonaki lokola ete azalaki monɔngi. Mokolo mosusu, na eteni na ndako oyo ezalaki pene na biso, namonaki moto moko akómaki pene na kokufa. Makambo nyonso wana mazalaki kosalema na miso na ngai, epesaki ngai endimeli makasi ete ebongiseli na biloko oyo esili konuna, esengeli mpenza kozwa nsuka na yango, mpe kondima na ngai kati na bilaka na Nzambe ekómaki makasi mingi mpenza.
Kosambisama
Nasalaki soko mbula moko na boloko, mpe nasambisamaki mbala mitano. Mokolo oyo procureur ayaki mpo na mbala ya liboso, bamemaki ngai na ndako moko moke ya esambiselo. Likambo ya liboso atunaki ezalaki oyo ete: “Nani aleki monene kati na Amaterasu Omikami [nzambe mwasi ya moi ] mpe Jéhovah? Yanola!” Nakanisaki na oyo nasengelaki koloba.
Azalaki kotala ngai na nkanda makasi, mpe alobaki ete: “Yebisa ngai nani aleki monene, soki te, na.kobeta yo!”
Nayanolaki na kimya nyonso ete: “Na ebandeli ya Biblia, ekomami ete: ‘Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mokili.’ ” Namonaki ntina ya kobakisa likambo mosusu te. Atalaki ngai na elongi, nde alobaki eloko te mpe alobelaki likambo mosusu.
Kasi, mpo na nini bakangisaki ngai na boloko? Bapesaki rapport ete: “Tozali kobanga noki akozimbisa bato na maloba na ye mpe na misala na ye.” Wana ezali ntina oyo nakangamaki kozanga ete basambisa ngai.
Na mimekamo nyonso wana, Jéhovah azalaki ntango nyonso pene na ngai. Na malamu na ye, nazwaki ebimeli ya moke ya Makomami na greke na boklisto. Mokolo mosusu, polisié moko abwakaki yango na eteni na ndako oyo tozalaki, mpe alobaki ete: “Zwa yango, ezali mpo na yo.” Nazalaki kotanga yango mokolo na mokolo, kino nayebaki mikapo misusu na motó. Bandakisa ya molende na baklisto ya ekeke ya liboso, oyo eyebisami kati na mokanda ya Misala, eyikisaki ngai mpiko mingi. Mikanda 14 ya Paulo mizalaki mpe elendiseli monene. Paulo anyokwamaki mingi, kasi azwaki ntango nyonso lisungi ya elimo santu. Mikanda motindo wana mizalaki kolendisa ngai.
Nakɔndaki mingi mpe nakómaki moke; kasi Jéhovah asungaki ngai na lolenge oyo namizelaki na yango te. Mokolo moko ya lomingo, polisié moko oyo namonaki ye naino te, ayaki na liboke moko lilingamaki na litambála. Afungolaki eteni na ndako epai nazalaki mpe amemaki ngai na libándá. Ntango tokómaki na nsé na nzete moko, afungolaki liboké yango. Oyo nde libaku kitoko! Kati na yango ezalaki na bitabe mpe mikaté misalemi na mabɛlɛ! Alobaki na ngai ete nalya yango, mpe abakisaki ete: “Bino nyonso bozali bato malamu mpenza. Kasi tosengisami na konyokola bino. Mosika te, nakotika mosala oyo.” Na nsima, bakengeli mpe bapolisié bamimonisaki na boboto epai na ngai. Batyelaki ngai motema, batikaki ngai kosukola ndako na bango mpe bapesaki ngai misala mosusu oyo bazalaki kopesa bobele na baoyo basepelaki na bango.
Na nsuka ya mobu 1942, babyangaki ngai na moko na bapolisié oyo bakangaki biso. Alobaki ete: “Atako esengelaki na yo kozwa etumbu ya kufa, kasi lelo okobima na boloko.” Mobali na ngai azongaki na ndako soko sanza moko liboso ete ngai nabima na boloko.
Nazongeli lisusu koyokana elongo na ba Témoins
Na boumeli ya bokangami na biso, Japon emikɔtisaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Mpe, na 1945, toyokaki ete Japon elongaki etumba te, mpe totangaki kati na bazulunalo ete baoyo bakangami mpo na makambo ya politike basengelaki kobima. Toyebaki ete ndeko Kosaka akufaki na boloko mpo na maladi oyo azwaki, kasi natindaki mikanda nokinoki na boloko ya Taipei, ya Hsinchu mpe ya bingumba mosusu, mpo na koyeba nsango ya ndeko Oe. Kasi, nazwaki eyano moko te. Na nsima, nazwaki nsango ete ndeko Oe abomamaki.
Na 1948, tokamwaki wana tozwaki mokanda moko moutaki Shanghai. Ezalaki ndeko Stanley Jones nde akomelaki biso; Galaad, eteyelo ya bamisionere oyo eutaki kosalema na ba Témoins de Jéhovah, etindaki ye na chine. Jéhovah akaniselaki biso lisusu! Natondaki na esengo wana ezalaki ngai lisusu na boyokani elongo na lisangá ya Nzambe. Mbula nsambo esilaki koleka uta tosololaki elongo ndeko Oe mpo na mbala ya nsuka. Atako nazalaki lisusu kozwa nsango ya bandeko te na eleko wana, kasi natikaki te mpo na kolobela nsango malamu.
Mbala ya liboso oyo ndeko Jones ayaki kotala biso, tosepelaki mingi mpenza. Amonisaki boninga mingi. Atako naino toyebanaki na ye te, kasi tomonaki lokola ete toyambaki moninga na biso ya penepene. Nsima mwa moke, ndeko Jones akendaki na mboka T’ai-tung, na ngámbo na ngomba, elongo na mobali na ngai oyo azalaki kosalisa ye lokola mobongoli na masoló na ye. Basalaki soki poso moko mpe, na boumeli ya ntango wana, basalaki assemblée ya mokolo moko mpe soko bato 300 na libota ya Amis, oyo bazali na ngambo na Est, bazwaki batisimo.
Koya ya ndeko Jones eyikisaki biso mpiko mpo na ntina mosusu. Kino ntango wana, nazalaki kosakola bobele ngai moko. Kasi na boumeli ya ntango oyo ndeko Jones alekisaki elongo na biso, babalani mibale, oyo mobali azalaki nkolo ya ndako oyo tozalaki kofutela, bazwaki batisimo. Uta ntango wana, esengo ya kozalisa bayekoli ezali sé kobakisama likoló na esengo ya kolobela Bokonzi. Na nsima, tokendaki kofanda na Hsinchu, epai kuna ndeko Jones ayaki kotala biso mbala misato, oyo alekisaki poso mibale na mbala mokomoko. Nalingaki mpenza boninga na ye oyo ezalaki kolendisa Mbala ya nsuka oyo ayaki kotala biso, alobaki ete: “Mbala ekoya, nakomema Harold King, moninga na ngai ya mosala Kasi bayaki te, mpamba te mwa ntango moke nsima na bozongi na ye na Chine, bango nyonso mibale bakangamaki mpe bakɔtisamaki na boloko.
Na 1949, Joseph Mcgrath mpe cyril Charles, bamisionere na kelasi ya 11 ya Galaad, bakómaki na Taiwan. Bapalanganisaki mosala ya kosakola kati na esanga, na kosaleláká ndako na biso lokola ntéi ya mosala na bango. Ndakisa na bango elendisaki ngai mingi. Kasi, ezalela ya makambo ya politike esɛngisaki bango ete bakenda na mboka Hong—Kong. Nalelaki wana namonaki bango kokende elongo na polisié moko. Joe alobaki ete: “Kolela te, Miyo.” Abakisaki ete: “Natɔndi yo,” mpe apesaki ngai eloko moko mpo na kokanisa ye: bike oyo azalaki kosalela yango mingi.
Nabɔkɔli mwana
Ngai mpe mobali na ngai tozalaki na mwana te; yango wana tobɔkɔlaki mwana ya ndeko ya mobali na ngai oyo azalaki naino na sanza minei. Bomoi ya mama na mwana wana ezalaki na likámá, mpamba te abɛlaki maladi oyo babengi ete asthme.
Na 1952, ndeko Lloyd Barry, oyo azalaki misionere na Japon, ayaki na Taiwan mpo na komeka koluka nzela ete mosala ya ba Témoins de Jéhovah endimama na Leta. Afandaki na ndako na biso mpe alendisaki biso mingi. Na eleko wana, mwana na biso ya mwasi akómaki na sanza 18. Amemaki ye na mabɔkɔ na ye mpe atunaki ye ete: “Nkombo na Nzambe ezali nani?” Nakamwaki mpe natunaki ye ete: “Olingi koloba ete, tosengeli kolakisa ye naino azali mwana moke boye?” Ayanolaki kozanga kokakatana ete: “Ee.” Mpe alimbolaki ngai ntina ya kolakisa mwana uta na bomwana na ye. Maloba oyo abimisaki ete, “ye [mwana ] azali likabo na Jéhovah mpo na kolendisa yo,” etikalaki libela kati na makanisi na ngai.
Nabandaki nokinoki kolakisa Akemi, mwana na ngai ya mwasi; nalakisaki ye koyeba mpe kolinga Jéhovah, mpe lolenge nini kokóma moko na basaleli na ye. Nalakisaki ye makomi na koyekola kotanga, nabandaki na e, ho mpe ba, makomi oyo masali liloba “Ehoba, ” to Jéhovah na monoko ya Japon. Nsima na mbula mibale, akómaki na makoki ya kokanga ntina na oyo ezalaki ngai koloba na ye. Bongo, na mpokwa nyonso liboso ete alala, nazalaki kobɛtɛla ye masolo ya Biblia. Azalaki koyoka yango na likebi nyonso mpe azalaki kosimba yango.
Wana akómaki na mibu misato na ndambo, ndeko Barry ayaki lisusu kotala biso mpe apesaki Akemi Biblia moko ekomami na monoko na Japonais na elobeli ya polele. Atambolaki epai na epai kati na ndako kolobáká ete: “Biblia ya Akemi! Biblia ya Akemi!” Nsima na mwa minutes, alobaki na mongóngo makasi ete: “Biblia ya Akemi ezali na nkombo na Jéhovah te! Nalingi yango te!” Mpe abwakaki yango na nsé. Nakamwaki mpe nalingaki kotala soko ezali bongo. Nafungolaki libosoliboso na Yisaya mokapo 42, verset 8. Bakitanyaki liloba “Nkolo” na esika ya nkombo na Jéhovah. Natalaki na mikapo misusu, kasi nakutaki nkombo ya Jéhovah Nzambe te. Akemi akitisaki motema na ntango nalakisaki ye nkombo na Jéhovah kati na Biblia ya kala, oyo ekomamaki na monoko na Japonais ya kalakala.
Tozongi na mboka Japon
Tozongaki na Japon na 1958, mpe tosanganaki na lisangá ya engumba Sannomiya, na mboka Kobe. Nazalaki mpenza na bantina mingi ya komonisa botɔndi na ngai epai na Jéhovah mpe nalingaki komonisa yango na kokómáká pionniere, elingi koloba Témoin de jéhovah oyo azali mosali na ntango nyonso. Namipesaki mingi mpenza na mosala wana. Na yango, natambwisaki boyekoli mingi na Biblia, mpe nazwaki esengo ya kosalisa bato 70 kino 80 baoyo bayebaki solo. Na eleko moko, nazwaki nkutu libaku ya kosala lokola pionnière spéciale, kokokisáká soko bangonga koleka 150 sanza nyonso kati na mosala ya kosakola, mpe kosala mpo na mobali na ngai mpe mwana na ngai ya mwasi.
Lokola toumelaki mibu 30 na Taïwan, kofanda na Japon ezalaki libongwani monene, mpe nalekisaki bileko mingi ya mpasi makasi. Na bantango wana, Akemi azalaki koyikisa ngai mpiko mpe azalaki kosunga ngai, lokola yango ndeko Barry alobaki na ngai bambula mingi liboso. Na ntango nanyokwamaki na makanisi, Akemi azalaki koloba na ngai ete: “Kanga motema, mama. Jéhovah akobongisa ekimelo na yango.” Nazalaki koyanola ye ete: “Ee, ezali solo,” mpe nazalaki kosimba ye makasi mpenza. Azalaki elendiseli monene mpo na ngai. Nakotɔnda Jéhovah te boni?
Nakabi mwana na ngai ya mwasi epai na Jéhovah
Akemi akómaki mosakoli wana azalaki na mibu nsambo mpe azwaki batisimo na elanga ya mobu 1963, na ntango akómaki na mibu 12. Nasalaki milende ya kolekisa ntango mingi elongo na ye. (Deteronome 6:6, 7) Akutanaki na mikakatano na bolenge na ye, kasi na lisalisi ya bandakisa malamu mpe na bilendiseli ya ba pionniers spéciaux oyo batindamaki na lisangá na biso, Akemi amityelaki mokano ya kokóma pionniere na bateritware ya sika.
Na assemblée ya distrike oyo esalemaki na 1968, asalaki mokumba ya mwana na Yefeta na drame elobeli lisoló moko na Biblia. Na kolandáká drame wana, nazwaki ekateli ya kokabela Jéhovah, mwana na ngai bobele moko ya mwasi oyo nalingaki mingi—lokola Yefeta asalaki yango—ete akóma pionnière. Bomoi na ngai esengelaki kozala lolenge nini wana mwana na ngai ya mwasi oyo alingaki kolongwa pene na ngai? Esengelaki kozala mpasi, mpamba te nakómaki na mibu koleka 60.
Na 1970, ntango ekokaki ete mwana na biso akoka kotika biso, Mobali na ngai atindaki ye na mboka Kyoto epai kuna asengelaki kosala lokola pionnière. Esosolaki ye mayoki na biso, aoki mpasi mingi na ntango alingaki kokende. Natangelaki ye mokapo ya Nzembo 126:5, 6 ete: “Baoyo bakokonaka na mpisoli bakobuka na konganga na esengo. Ye oyo abimi na kolela mpe atondisi libenga na ye na nkóna, akozonga solo na kongánga na esengo, komema maboké na mbuma na ye,” Ngai moko nalendisamaki na mokapo wana.
Na nsima, Akemi abalaki mpe alandaki mosala ya pionnier special elongo na mobali na ye. Uta 1977, date oyo mobali na ye aponamaki lokola mokengeli ya circonscription, bazali komipesa kati na mosala ya zongazonga. Mbala na mbala nazalaka kofungola karte mpe nazalaka kotala bamboka oyo ezali kati na yango lokola ete nazali kosala mobembo elongo na mwana na ngai ya mwasi. Nazalaki na esengo mingi na koyoka ye wana azalaka koyebisa ngai makanisi na ye kati na mosala mpe na koyeba ebele na bandeko basi na nzela na ye.
Sikawa nakokisi mibu 86. Nazali komona makambo nyonso oyo nakutanaki na yango lokola nde esalemaki lobi loleki. Nakoki kosala lokola na liboso te, kasi mosala ya kosakola ezali ntango nyonso kopesa ngai esengo. Wana ezali ngai kokanisa mpo na mibu 60 oyo esili koleka uta nayambaki solo, elaká na kolendisa oyo Nzambe apesaki biso ezali kotonda na motema. Ee, Jéhovah akosalaka na bosembo epai na baoyo bazali sembo mpe azali kopesa biso nzela ya kozwa esengo mingi.—Nzembo 18:25.