Kosolola na kati ya libota mpe na kati ya lisangá
“Tika ete maloba na bino mazala ntango nyonso na ngolu mpe na elengi na mongwa!”—BAKOLOSE 4:6.
1. Adam alobaki nini na ntango Nzambe alakisaki ye Eva?
Esili koleka bikeke mingi, mokomi moko oyo azalaki kotala makambo mazali koleka na mokili, alobaki ete: “Moto moko te azali esanga . . . Moto nyonso azali ndambo na mboka.” Na maloba oyo, alandaki bobele likanisi oyo Mozalisi alobaki mokolo moko na ntina na Adam ete: “Ezali malamu te ete moto azala ye moko.” Adam azalaki koloba, mpamba te apesaki nkombo epai na nyama nyonso. Kasi moto mosusu azalaki te oyo akokaki kosolola na ye. Ezali likambo na kokamwa te ete na ntango Nzambe apesaki ye Eva, oyo azalaki kitoko mpenza ete azala mwasi na ye, Adam angángaki ete: “Oyo azali mokwa na mikwa na ngai, mpe mosuni na misuni na ngai.” Bongo, wana ebandaki libota na bato ya yambo, Adam akómaki kosolola elongo na moto mosusu.—Genese 2:18, 23.
2. Na likambo nini kozanga bokatikati mpo na kotala televizyo ekoki kozala likámá?
2 Libota ezali esika ebongi mpenza mpo na kosolola; mpe tokoki koloba ete kolonga ya bomoi na libota etaleli likambo yango. Nzokande, kosolola ekosengaka ntango mpe milende. Lelo oyo, televizyo ezali moko na miyibi minene ya ntango. Eloko yango ekoki kobimisa makámá soko na mitindo mibale. Libosoliboso, na kobendáká likebi ya basangani nyonso na libota na motindo boye ete bakoki kolekisa libaku te mpo na kotala yango, likambo oyo lizali mpenza kobebisa nzela ya kosolola. Lisusu, na kolukáká nzela ya kopengola kosolola na ntango tosiliki to na ntango toswani. Na esika na kosilisa matáta, babalani bamonaka malamu kotika kolobana mpe babongwani kotala televizyo. Na bongo, ekoki mpenza kozala ete televizyo ezali kopekisa bosololi, oyo tolobi ete ezali ntina monene ya kobeba ya libala. Baoyo bazali na mpasi mpo na kotya televizyo na esika ya mibale bakoki komituna soki basengeli te kolongola eloko yango na ndako na bango.—Matai 5:29; 18:9.
3. Bolamu nini bozwami na baoyo bakotalaka televizyo mingimingi te?
3 Mpo na koloba solo, bato mingi oyo bazali kotala lisusu televizyo mingimingi te, to mpe batiki kotala yango, bazali kolobela bolamu oyo basili kozwa na mbongwana oyo na esengo nyonso. Libota moko bakomaki ete: “Tozali kosolola mingi . . . , tozali kosala bolukiluki mingi kati na Biblia . . . Tosakanaka esika moko . . . Mosala na biso ya kosakola esili kokóla na mitindo na yango nyonso.” Nsima na kozwa ekateli ya kotika kotala televizyo, libota mosusu balobaki ete: “Tokómi kobómba mwa mosolo na biso [bazalaki na abonemá na televizyo moko], mpe boyokani na biso ekómi mpenza makasi, mpo tosili kozwa makambo kitoko na kosala. Tozali kotungisama soko moke te.’’
Kotala, koloba mpe koyoka
4. Lolenge nini mobali mpe mwasi bakoki komonisana bolingo?
4 Kati na libota, tokoki kosolola na mitindo mikeseni. Mpe mbala mosusu kozanga maloba. Na ntango bato mibale batalani, tokoki koloba ete basololi na elembo yango. Na likambo oyo ete bafandi esika moko, bazali koyebisana mayoki na bango: bolingo bazali na yango moko epai na mosusu. Babalani basengeli te kokabwana na boumeli ya ntango molai, bobele soki likambo moko lisengisi bango kosala bongo. Mobali mpe mwasi bakoki kozala mpenza na esengo na kosepeláká na boninga makasi bosalemi na libala. Soki bamonisani bolingo liboso na bato nyonso ata kati na bango moko, mpe soki bamimonisi na limemya moko epai na mosusu, soki bazali kolata mpe bazali na etamboli ebongi, bakoki mpenza komonisana bolingo mozindo ata na kozanga maloba: yango mpe ezali kosolola. Salomo, mokonzi na mayele alobelaki likanisi yango na maloba oyo‘ete: “Tika ete mai na yo mapambolama; sepela na mwasi na bolenge na yo.”—Masese 5:18.
5, 6. Mpo na nini mobali asengeli kosenzela mpo na kosolola elongo na mwasi na ye?
5 Kosolola esengi lisusu kolobana, elimboli koloba na kotyáká likebi na eyano ya molobani na yo. Basi mosusu bakomonisaka mayoki na bango noki koleka mibali, kasi yango esengeli kotinda mibali te ete baluka komilongisa mpo na koboya kosolola. Mobali moklisto asengeli koyeba ete kozanga kosolola ezali likambo monene oyo lizali kati na mabala mingi mpe, na yango, asengeli kosala milende nyonso mpo na kopesa nzela na kosolola, likambo oyo akolonga mpenza kosala yango soki ye mpe mwasi na ye bazali kolanda batoli kitoko oyo ntoma Paulo apesaki na Baefese 5:25-33. Mobali oyo azali kotalela bobele makambo na ye moko te, kasi bolamu ya mwasi na ye lokola, akomonisa ete alingi ye lokola nzoto na ye moko. Mpo na yango, kosolola ezali na ntina monene.”
6 Mobali asengeli te komiloba ete mwasi na ye aluka koyeba to akanisa ye moko ete alingi ye. Mwasi azali na mposa ya kondimisama na likambo yango. Mobali akoki komonisa na mitindo mingi ete mwasi na ye azali na motuya mingi mpo na ye: kosalela ye makambo na bolingo, kopesa ye makabo amizelaki na yango te; lisusu, na koyebisáká ye makambo oyo makoki kotalela ye. Likambo mosusu oyo lisengeli kotalelama malamu: mobali asengeli kopesa longonya epai na mwasi na ye mpo na milende oyo asali; yango ekoki kotalela lolenge oyo abongisi nzoto na ye, na mosala makasi oyo asali mpo na libota, to na lisungi monene oyo azali kosunga ye kati na misala ya elimo. Lisusu, mpo na kolanda toli oyo ntoma Petelo apesi na 1 Petelo 3:7, na ntina etali ‘kozalana na mwasi na ye na bososoli,’ mobali asengeli koyeba komitya na esika ya mwasi na ye mpe kosolola elongo na ye likoló na makambo oyo matali bango mibale, na kopesáká ye lokumu lokola mbeki na motau.—Masese 31:28, 29.
7. Mikumba nini mwasi azali na yango mpo na oyo etali kosolola elongo na mobali na ye?
7 Bobele bongo, mpo na kolanda toli ya Baefese 5:22-24 na ntina etali kotósa, mwasi asengeli kosenzela ete apesa nzela na kosolola malamu elongo na mobali na ye. Asengeli komonisa “botósi mozindo” epai na mobali na ye, ezala na maloba to mpe na etamboli na ye. Akoki soko moke te kozala na elimo ya lipandá to kosala makambo kozanga kotuna mobali na ye. (Baefese 5:33) Asengeli kozala ntango nyonso na momeseno ya kosolola makambo na nkuku elongo na mobali na ye.Tala Masese 15:22.
8. Na likambo nini basi basengeli kozala pene mpo na kopesa nzela na kosolola malamu?
8 Mwasi asengeli te kobómba likambo oyo lizali kopesa ye mpasi na motema na komonisáká bobele ezaleli na monyokwami. Soki likambo lizali, asengeli koluka ntango malamu mpo na koloba yango. Ee, alanda ndakisa ya Estere, mwasi ya mokonzi. Estere alingaki kosolola likambo litalaki bomoi to kufa elongo na mobali na ye. Kosaláká yango na lombango, na bwanya mpe na mayele, abikisaki Bayuda. Soki tozokisami na motema to yango ekómelaki biso mwa liboso, biso moko tosengeli kosolola elongo na mobalani na biso. Elobeli na mayele mpe ezaleli ya kosekisa eyokani na ezaleli ya kobanga Nzambe, ekoki koyeisa nzela pɛtɛɛ mpo na kosolola.—Estere 4:15 kino 5:8.
9. Kozala moyoki malamu ezali na ntina nini kati na bosololi?
9 Ye oyo akolobaka na mokano ya kopesa nzela na kosolola malamu, asengeli mpenza koyoka makambo oyo moto mosusu azali koloba mpe kosala makasi mpo na kososola makambo oyo moto yango alobi te. Yango esengi ete toyokamela moto oyo azali koloba na likebi mpenza. Tosengeli kososola bobele makanisi mabimisami te, kasi lisusu motindo oyo yango elobami, mpe mayoki oyo mazali komonana na yango. Wana ezali likambo oyo mbala mingi mibali babosanaka yango. Basi bakoki kotungisama na likambo oyo ete mibali na bango bazali koyokamela bango te. Nzokande, bango mpe basengeli koyokamela mibali na bango na likebi nyonso mpe kopengola kosukisa makambo mbangombango. “Moto na mayele akoyoka mpe akofulukisa mayele.”—Masese 1:5.
Kosolola kati na baboti mpe bana na bango
10. Na likambo nini baboti basengeli kozala pene mpo na kosolola malamu elongo na bana na bango?
10 Ekoki mpe kozala ete baboti bazali na mikakatano mpo na kosolola elongo na bana na bango. Soki olingi ‘kobɔkɔlo mwana na nzela ekoki na ye,’ ebongi bongo kopesa nzela na kosolola malamu. Bongo, “ata wana ekokóma ye mobangé, akopengwa na yango te.” (Masese 22:6, MN) Soki bana ya baboti mosusu bazali kokende na mokili, mbala mosusu ezali mpo ete libulu moko lisila kotimolama uta bolenge, yango kozanga kosolola. Baboti basengeli kotika te mpo na kosolola elongo na bana na bango, lokola tokoki kotanga yango na Deteronome 6:6, 7, ete: “Maloba oyo malakeli ngai yo, makozala na motema na yo, mpe okolakisa yango na etingya na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekotambola yo na nzela, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotelema yo.”‘Na yango, baboti basengeli kolekisa ntango mingi elongo na bana na bango mpe kotika pembeni makambo mosusu oyo balingaka, mpo na matomba ya bana na bango.
11. Wapi mwa makambo oyo baboti basengeli kolimbwela bana na bango?
11 Baboti, bolimbola na bana na bino ete Jéhovah alingi bango mpe ete, bino bolingi bango. (Masese 4:1-4) Bomonisa bango ete bozali pene na kotika pembeni bolamu na bino mpe esengo na bino mpo ete bango bakóla malamu na nzoto, na makanisi, na bolingo mpe na elimo. Mpo na kosala yango, esengeli ete baboti bamitya na esika ya bana na bango, ete basala milende ya komonela makambo lokola bango. Na komonisáká bolingo bozangi moïmi, bino baboti, bokoki kotonga boyokani malamu elongo na bana na bino, likambo oyo likolendisa bango na kotyela bino motema na esika ete bakenda kosolola makambo na bango elongo na baninga na bango.—Bakolose 3:14.
12. Mpo na nini bilenge basengeli kosolola polele mpenza elongo na baboti na bango?
12 Mpo na bino, bilenge, bozali na lisengami ya kosolola elongo na baboti na bino. Bokanisa naino na nyonso oyo basili kosala mpo na bino; yango ekosalisa bino na kotyela bango motema. Bozali na mposa ya lisalisi mpe lisungi ya baboti na bino, mpe ekozala pɛtɛɛ mpo na bango ete basalisa bino soki nde bozali kosolola malamu mpenza elongo na bango. Epai mosusu, mpo na nini bokotalela baninga na bino lokola basungi na bino na liboso? Basali bobele makambo moke soko tokokokanisa bango na baboti na bino. Bayebi makambo na bomoi mingi te koleka bino, mpe soki bazali basangani ya lisangá na boklisto te, bakolinga bolamu na bino te.
Kosolola kati na lisangá
13, 14. Mitinda nini na Bíblia mizali komonisa ntina oyo kosolola ezali na yango mpo na moklisto?
13 Ezali na esika mosusu oyo tosengeli mpenza kopesa nzela na kosolola malamu: na kati ya lisangá. Makomami mapesi biso etinda oyo ete “totika koyangana elongo moko te.’’ Mpo na nini tokoyanganaka? “Mpo na kolingana mpe kosalaka misala malamu,” likambo oyo lisengi kosolola. (Baebele 10:24, 25) Tokotika te koyangana na makita na ntina ete moto moko azokisi biso na motema. Toluka nzela na kosolola na kokanisáká toli na Yesu oyo ezwa mi na Matai 18:15-17. Soki ozali na likambo na ndeko moko, kenda koloba na ye.
14 Soki tozali na matáta elongo na moko na bandeko na biso, tolanda toli na Biblia oyo ezali na Bakolose 3:13, ete: “Soko moto moko azali na moto mosusu likambo, boyikanaka mpiko, bolimbisanaka. Lokola Jéhovah alimbisi bino, bino mpe bosala bongo.” Mpo na yango, esengeli na biso kosolola na ndeko na biso, kasi tokoboya kolobisa ye te. Soki sikawa tozali komona lokola ete moto moko azali mpiɔ epai na biso, tolanda toli oyo ezali na Matai 5:23, 24. Tosolola, mpe tomeka kotya kimya elongo na ndeko na biso. Esengeli na biso kozala na bolingo mpe na komikitisa, kasi tozali na mokumba epai na biso moko mpe epai na ndeko na biso na kolanda toli na Yesu.
Batoli mpe bilendiseli
15. Mpo na nini baklisto basengeli kosolola na kopesáká batoli, na ntango bazali na likoki ya kosala yango?
15 Mokumba ya kosolola emonisami lisusu na toli oyo Paulo apesi na Bagalatia 6:1(MN) ete: “Bandeko, soko moto anyati litambe mabe, naino ye moko asosoli yango te, bino bato bozali na makoki na elimo, bomeka kosembola moto motindo wana kati na elimo ya bopolo. Omikengela yo moko ete yo mpe omekama te.” Ezaleli na bopɔlɔ esengeli kopusa biso na kondima toli oyo ekopesamela biso mpo na libunga tosali na maloba na biso to na misala na biso. Ya solo, biso banso tosengeli kozala na elimo motindo oyo Davidi, mokomi na nzembo azalaki na yango, wana akomaki ete: ’’Soki moyengebene akobeta ngai, ekozala nde motema malamu; mpe soki akopamela ngai, ekozala lokola mafuta malamu oyo motó na ngai ekoboya yango te’’ (Nzembo 141:5, MN) Bankulutu, mpenzampenza basengeli kozala bandakisa malamu ya komikitisa na kolukáká te ete bandimisa makanisi na bango moko, mpe na kozaláká pene na kondima mbongwana, komikundoláká ete mpota ezokisami na ye oyo akolingaka, ezali sembo.”—Masese 27:6, MN.
16. Lolenge na kosolola nini oyo bilenge balobi basengeli koluka yango?
16 Bilenge bakomonisa mayele mpe bopɔlɔ na kolukáká toli mpe litambwisi epai na baklisto bateli, baoyo, na ntembe te bazali na eloko moko malamu mpo na kopesa bango. Ata bankulutu mpe basengeli kolanda kosala motindo moko. Na yango, mokolo mosusu, nkulutu moko asalaki diskur mpe alobaki ete mapamboli oyo malobami na Emoniseli 7:16, 17 ebombami mpo na ebele monene na ntango bakozala na mokili ya sika, nde esika bakozala lisusu na nzala te ata mposa na mai mpe te. Nzokande, esili komonisama ete mokano wana mozali kokokana mingi mpenza na eleko na biso. (Tala Révélation: le grand dénouement est proche! pages 126 kino 128.) Nkulutu moko oyo azalaki kati na bayangani azwaki ekateli ya kosolola na molobi mpo na likambo yango. Kasi, liboso na kokenda kotala ye, molobi abengaki ye na telefone mpo na kotuna ye soki lolenge nini akokaki kobongisa lisusu diskur na ye. Ee, toyeisa makambo pɛtɛɛ mpo na baoyo balingi kosalisa biso na koyebisáká bango mposa na biso ya kozwa toli. Toboya ezaleli ya kozokisama noki na motema to oyo ya kozala na mayoki maleki ndelo.
17. Lolenge nini kosolola ekoki kolendisa bandeko na biso?
17 Mokonzi Salomo apesaki etinda oyo ekoki kosalelama na likambo oyo tozali kotalela. Alobaki ete: “Boya te kosala malamu epai na baoyo bakoki kozwa yango, wana loboko na yo ezwi nzela na kosala bongo.” (Masese 3:27) Tosengeli kolinga bandeko na biso. Na yango, Paulo alobaki ete: “Bozala na nyongo epai na moto moko te, bobele nyongo ya kolingana. Mpo ete ye oyo akolingaka mozalani na ye, asili kokokisa Mibeko.” (Baloma 13:8) Yango wana, tozangisaka maloba na kolendisa te. Elenge moko, ye mosaleli na misala, asali nde diskur piblike na ye ya yambo? Topesa ye longonya. Ndeko mwasi moko asali nde milende makasi na Eteyelo mpo na mosala na Nzambe to mpe asali lisoló moko kitoko? Toloba boni tosepelaki mpo na mosala na ye malamu. Tokoki koloba ete bandeko na biso mibali mpe basi, bazali kosala oyo ekoki na bango mpe bakolendisama soko nde tokopesa bango longonya na bolingo.
18. Lolenge nini tokoki komonisa boboto epai na moto oyo azali komimona na motuya mingi?
18 Epai mosusu, ekoki komonana ete elenge moko azali na makoki ya molobi malamu, kasi mpo na mbula na ye, akómi komimona na motuya mingi. Motindo nini mobongi mpo na kosolola na ye na likambo wana? Nkulutu oyo atɛli akomonisa boboto soki akokende kopesa ye longonya na lolenge malamu oyo asali lisoló na ye, na kolakisáká ye na kimya mpenza lolenge oyo akoki kolóna bopɔlɔ na mbaki ekoya. Ye oyo akosolola motindo oyo akomonisa bolingo ya bandeko mpe akosalisa bilenge baklisto na kotika nokinoki mbébá nyonso oyo ekoki kolónama na mitema na bango.
19. Mpo na nini bankulutu mpe batata ya mabota basengeli kozala na basololi malamu?
19 Bankulutu bakosololaka bango moko mpe elongo na lisangá likoló na makambo oyo makoki kopesa litomba, kozanga ete babimisa makambo na nkuku lokola oyo elekaki na esambiselo Nzokande soki bakómi kobómbabomba makambo nyonso ete mazali sɛkɛlɛ, bandeko bakozanga kotyela bango motema mpe bakolɛmba, mpe yango ekobebisa esengo ya lisangá to ya mabota na bango. Moto nyonso alingaka kozwa nsango ekolendisaka. Lokola ntoma Paulo azalaki na mposa makasi ya kokaba makabo na elimo, bobele bongo bankulutu basengeli kozala na mposa monene ya kosolola makambo na kolendisa elongo na bandeko. masese 15:30; 25:25; Baloma 1:11, 12.
20. Motindo nini na kosolola oyo ekotalelama na lisoló lilandi?
20 Ee, mpo na moklisto, kosolola ezali na ntina mingi ezala kati na lisangá to kati na libota na ye. Kasi, ezali ntina mingi lisusu kati na likambo mosusu. Yango nini? Kati na mosala ya kosakola. Lisoló lilandi likotalela mitindo oyo tokoki kobongisa lolenge na biso ya kosolola kati na mosala ya ntina mingi.
Bozongeli
◻ lolenge nino tokoki kolonga epekiseli oyo ezali kobebisa kosolola katti na mabota?
◻ Lolenge nini mobali mpe mwasi bakoki kopesa nzele na kosolola?
◻ Baboti mpe bana bakoki kosala nini mpo na kopengola kozanga kosolola?
◻ Lolenge nini tokoki kosala mpo ete kosolola kati na lisangá mpe kati libota ezala ya kolendisa?
[Elilingi na lokasa 23]
Kosolola malamu ekopesaka bolamu na libota