“Topota mbango na mpiko nyonso”
“Tópota mbango na mpiko nyonso na emekaneli elyami liboso na biso”—BAEBELE 12:1, MN.
1. (a) Eloko nini etyami liboso na moto oyo amipesi epai na Jehovah Nzambe? (b) Moklisto asengeli komibongisa na motindo nini na emekaneli na mbango?
Na NTANGO tomipesaki epai na ye na nzela na Yesu Klisto, na elobeli ya elilingi, Nzambe asili kotyela biso emekaneli na mbango. Baoyo nyonso bakopota na lolenge lobongi kino na nsuka na emekaneli na mbango, bakopesamela libonza. Libonza yango ezali nini? Bomoi ya seko. Soki alingi kolónga na emekaneli na myango wana, moklisto asengeli komibongisa; mpo na kopota nokinoki te lokola nde emekaneli yango ezali na ntáká mokuse, kasi mpo na momekamo molai, oyo esɛngi mpiko. Wana nde ezaleli oyo asengeli kolóna. Na yango asengeli koyika mpiko na bolɛmbu bouti na emekaneli, mpe na mikakatano akokutana na yango na boumeli ya emekaneli.
2, 3. (a) Eloko nini ekosalisa biso na kokóma kino nsuka na emekaneli na mbangu na boklisto? (b) Kati na likambo nini esengo esalisaki Yesu mpo na kopota mbango na mpiko nyonso?
2 Eloko nini ekosalisa biso na kokóma kino nsuka na emekaneli? Na ntembe te ezali eloko oyo esalisaki Yesu na koyika mpiko na ntango azalaki awa na mabelé. Na yango, ezaleli oyo ete esengo elendisaki motema na ye. Totangi na Baebele 12:1-3 (MN) ete: “Na bongo, awa ezingami biso na lipata monene na batatoli, tobwaka bozito nyonso mpe masumu mazali kokanga biso, mpe tópota mbango na mpiko nyonso na emekaneli etyami liboso na biso, na kotala Yesu, Mosaleli na liboso na kondima, ye oyo azali kokokisa yango. Mpo na esengo etyamaki liboso na ye, ayikelaki nzeté na mpasi mpiko, kotyoláká nsoni na yango mpe afandi na lobɔkɔ na mobali na kiti na bokonzi na Nzambe. Ee, botalela ye oyo ayikaki mpiko na bonguna nyonso ya bato na masumu baoyo batɛmɛlaki ye ete bolɛmbu te mpe bosɛnzwa kati na mitema na bino te.”
3 Soki Yesu alɛmbaki soko moke te na boumeli na emekaneli na mbango na mosala na ye ya kosakola, ezali mpo na esengo na Jéhovah. (Tala Nehemia 8:10.) Esengo na ye esalisaki ye na koyika mpiko kino na liwa ya nsoni likoló na nzeté na mpasi; nsima na yango nde azwaki esengo eleki monene ya kosekwisama longwa na bakufi mpe komata na likoló, na lobɔkɔ na mobali na Tata na ye mpo na kokokisa mosala na Ye. Mpiko ya moto na Nzambe wana epesaki ye nzela na kobatela lotómo na ye ya kozwa bomoi ya seko. Mpo na yango, totangi na Luka 21:19 ete: “Na mpiko na bino, bokozwa milimo na bino.”
4. Ndakisa nini Yesu asili kotikela baninga na ye kati na emekaneli wana na mbango, mpe biso tosengeli kotya makanisi na biso likoló na eloko nini?
4 Na emekaneli oyo, Yesu asili kotika ndakisa eleki kitoko mpo na baninga na ye, likambo oyo lizali kondimisa ete, biso mpe tokoki kozwa libonza. (1 Petelo 2:21) Oyo Yesu azali kosɛnga biso ete tosala, tokosala yango. Lokola ye, tokoki koyika mpiko. Na komekoláká ye na etingya, tosengeli kotya makanisi na biso likoló na bantina oyo tozali na yango mpo na kozala na esengo. (Yoane 15:11, 20, 21) Esengo ekopesa biso makasi ya kolanda kopota mbango na emekaneli kati na mosala na Jéhovah, kino tokozwa libonza yango monene: bomoi ya seko,—Bakolose 1:10, 11.
5. Lolenge nini tokoki kozala na esengo mpe kokembisama kati na emekaneli na mbango oyo etyami liboso na biso?
5 Mpo na kosalisa biso na kolendendela kati na emekaneli yango na mbango, Jéhovah azali kopesa biso nguya oyo eleki nguya na bato. Na ntango tozwi minyoko, tokembisami na nguya wana mpe na likanisi oyo ete toyebi ntina oyo tozwi libaku ya konyokwama. (2 Bakolinti 4:7-9) Mpasi nyonso tozali kozwa mpo ete tolingi kokumisa nkombo na Nzambe mpe tolingi kokɔtela boyangeli na ye, ezali kopesa biso esengo oyo moto te ekoki kolongola biso yango. (Yoane 16:22) Yango emonisi ntina oyo bantoma basepelaki mpo “batangami ete babongi na kotyolama mpo na nkombo na ye.” (Misala 5:41, 42) Ya solo, esengo na bango eutaki na minyoko te, kasi na kosepela na motema wana bayebaki ete bandimamaki epai na Jéhovah mpe Yesu.
6, 7. Mpo na nini baklisto bapoti mbango bakoki kozala na esengo ata kati na bolózi, mpe yango ekopesaka litomba nini?
6 Elikya oyo Nzambe azali kopesa biso, ezali mpe lisungi mpo na biso. “Tózala na kimya elongo na Nzambe na biso kati na Nkolo na biso Yesu Klisto, na nzela na ye nde tozwi ngolu oyo tozali na yango sikawa mpo na kondima; mpe tozali kosepela mpo na elikya na nkembo na Nzambe. Bobele yango te, kasi tosepela lisusu kati na bolózi, awa eyebi biso ete bolózi ekoyeisaka mpiko, mpe mpiko ekoyeisaka ezaleli endimami, mpe ezaleli endimami ekopesaka elikya; mpe elikya ekookisaka nsoni te.”—Baloma 5:1-5, MN.
7 Bolózi yango moko ezali likambo na esengo te; kasi mbuma na kimya oyo yango ekobotaka na nsima, ekopesaka esengo. Mbuma yango ezali bongo mpiko, ezaleli endimami, elikya mpe kokokisama na elikya yango. Tokondimama na Nzambe mpo na mpiko na biso. Wana tondimami epai na Nzambe, tokoki kolikya ete bilaká na ye bikokokisama. Elikya wana ezali kosalisa biso na kolanda kopota mbango na emekaneli etyami liboso na biso mpe ezali koyikisa biso mpiko kati na bolózi kino yango ekokokisama.—2 Bakolinti 4:16-18.
Esengo na baoyo bazali koyika mpiko
8. Mpo na nini eleko oyo touti kozela ezali mpamba te mpo na biso?
8 Tozali sé komibongisa malamu awa ezali biso kozela ntango oyo nzambe akokabola mabonza epai ya bato elimo. Bokoli na elimo oyo tozali kosala awa ezali biso kolonga mimekano, ezali kozwila biso ngolu monene na nzambe. Ezali komonisa lolenge na bato biso libaku ya kosalela bizaleli kitoko ye basembwi ne ntango na kala, mingi mpenza Yesu Klisto, Ndakisa na biso.Moyekoli Yakobo elobaki ete: “Bandeko ne ngai, wana bokokutana na mimekamo ndenge na ndenge, botalela yango lokola esengo monene, koyebáká ete komekama na kondima na bino ekoyeisa mpiko. Kasi, tika ete mpiko ekokisa mosala na yango, mpo ete bozala bato bakoki mpe baoyo babongi na makambo nyonso mpe bazangi eloko te.” (Yakobo 1:2-4, MN) Mbala mosusu tokokutana na mimekamo,kasi yango ekosalisa biso na kolónga ntango nyonso bizaleli ya ntina. Na bongo tokomonisa ete, atako Bipekiseli nini tokokutana na yango, tokolanda kopota na emekaneli na mbango kino tokozwa libonza.
9, 10. (a) Mpo na nini baoyo bazali koyika mpiko na mimekamo bazali bato na esengo, mpe lolenge nini tosengeli koluka kolónga mimekamo? (b) Banani bazali bato na esengo ya ntango na kala, mpe tosengeli kosala nini mpo na kotangama kati na bato na esengo?
9 Tozali kokamwa te wana ezali biso kotanga maloba oyo Yakobo akomaki ete: “Esengo na moto oyo akoyikaka mpiko kati na komekama mpo ete, wana akolónga, akozwa motole na bomoi oyo Jéhovah asili kolaka baoyo balingi ye. ”(Yakobo 1:12) Tozwa ekateli makasi ya kondima mimekamo, kozaláká na bizaleli na Nzambe oyo bikopesa biso bokasi na kolonga yango.—2 Petelo 1:5-8.
10 Lolenge oyo ezali kosalela biso ezali ya sika te. “Lipata na batatoli” na kala ba oyo bamonisaki bosembo na bango epai na na nzambe, basalelamaki motindo moko. (Baebele 12:1) Liloba na ye limonisi ete Nzambe andimaki bango , mpe tozali kotanga bango ete bazali bato na esengo mpo ete batelemaki ngwi liboso na mimekamo. Yakobo alobi ete: “Bandeko, na ntina na koyika mpiko na mabe mpe na kozala na motema petee, Bolanda ndakisa na basakoli baoyo balobaki na nkombo na jehova. Tala, totangi baoyo bayikaki mpiko ete bazali bato na esengo. bosili koyoka nsango na mpiko na Yobo mpe boyebi lolenge nini Jéhovah asukisaki makambo na ye, mpe bosili komona ete Jéhovah atondi na bolingo mpe na motema mawa.” (Yakobo 5:10, 11, MN) Engebene basakoli, na mikolo na nsuka oyo tozali kobika na yango, mikolo oyo na mpasi, bato mosusu bakosalela Jéhovah na bosembo lokola basakoli wana basalaki yango na bikeke bileki. Tozali na esengo te ya kotangama na molongo ya bato yango?—Danyele 12:3; Emoniseli 7:9.
Tozwa litomba na maloba na kolendisa na Jéhovah
11. Lolenge nini Liloba na Nzambe ekoki kosalisa biso na koyika mpiko, mpe mpo na nini tosengeli kokokana te na mabelé na mabangá oyo malobelami na lisese na Yesu?
11 Ntoma Paulo akomaki ete: “Tozwa elikya mpo na mpiko na biso mpe na libɔndisi liuti na Makomami.” (Baloma 15:4, MN) Wana nde lisalisi mosusu oyo tozali na yango mpo na koyika mpiko. Mpo ete tosala ntango nyonso na motindo mobongi, esengeli ete solo oyo ezali bongo Liloba na Nzambe, ezwa misisa kati na mitema na biso. Soki tomikokanisi na mabelé na mabanga oyo Yesu alobelaki kati na lisese na mokoni bilanga, tokozwa eloko moko te. Alobaki ete: “Baoyo bakonami likoló na mabanga wana ekoyokaka bango liloba, bakoyambaka yango noki na esengo. Bazali na misisa kati na bango mpenza te, kasi bakoumela moke, na nsima wana ekobima mpasi mpe minyoko, na ntina na liloba, bakobɛtaka libaku nokinoki.”(Malako 4:16, 17) Epai na bango, solo ezwi misisa mpenza te; mpe, na ntango bazali kokutana na bolózi, bazali na makoki te ya kozwa litomba na liziba wana ya makasi mpe ya elikya.
12. Likambo nini bosengeli koyeba na ntango toyambi solo, kozanga komisalela makanisi mpamba?
12 Moto na moto oyo ayambi nsango malamu na Bokonzi asengeli koyeba likambo oyo lizali kozela ye, boye akoki komisalela makanisi na mpamba te. Lolenge na bomoi oyo amikɔtisi kati na yango, ekomemela ye bolózi to minyoko. (2 Timoté 3:12) Kasi, yango esengeli kozala “esengo monene” mpo na ye mpe libaku kitoko lokola azwi mimekamo ndenge na ndenge mpo ete atikali sembo na Liloba na Nzambe mpe azali kolobela yango epai na bato mosusu.—Yakobo 1:2, 3.
13. Na maloba nini ntoma Paulo amonisaki esengo oyo azalaki na yango mpo na baklisto ya Tesaloniki, mpe eloko nini ezalaki kopesa esengo wana?
13 Na ekeke ya liboso, na Tesaloniki, batɛmɛli babimisaki yikiyiki na ntina na nsango oyo Paulo azalaki kosakola. Na ntango Paulo akendaki na Beloya, banyokoli wana balandaki ye ete basala lisusu mobulu koleka. Ntoma Paulo oyo anyokwamaki, akomelaki basembwi oyo batikalaki na mboka Tesaloniki, ete: “Bandeko, esengeli na biso ntango nyonso kotɔndo Nzambe mpo na bino. Ekoki bongo mpo ete, kondima na bino ezali mpenza kokola mpe bolingo ya moko na moko kati na bino banso ezali koyikana mpo na bamosusu. Yango wana tozali na esengo mpo na bino kati na masangá na Nzambe, mpo na mpiko na bino mpe kondima na bino kati na minyoko nyonso bomoni mpe kati na bolózi oyo bozali na yango. Wana ezali elembo ya ekateli na sembo na Nzambe ete bozala bato babongi na bokonzi na Nzambe oyo bozali kooka mpasi mpo na yango.” (2 Batesaloniki 1:3-5, MN) Atako mpasi oyo banguna bazalaki kobimisela bango, Batesaloniki bakómaki mingi mpe bakólaki kati na boklisto. Lolenge nini yango esalemaki? Mpo ete bazwaki makasi mpe bilendiseli kati na Liloba na Nzambe. Bazalaki kotósa mitinda ya Nkolo mpe bazalaki kopota mbango na mpiko nyonso.—2 Batesaloniki 2:13-17.
Mpo ete bamosusu babika
14. (a) Mpo na bantina nini tozali kolanda kokokisa mosala na biso na esengo atako mimekamo mizali? (b) Tozali kobondela na ntina na likambo nini, mpe mpo na nini?
14 Ezali libosoliboso mpo na kokumisa Nzambe nde tozali koyika mpiko na sembo nyonso mpe kozanga komilela na mimekamo mpe minyoko. Nzokande, tozali mpe koyika mpiko mpo na ntina mosusu monene: mpo na koyebisa nsango malamu, ete basakoli mingi na Bokonzi na Nzambe basala“ eyambweli mpo na lobiko.” (Baloma 10:10 MN) Esengami na baoyo bazali kokokisa mosala na Nzambe ete babondela Nkolo na elanga ete apambola mosala na bango na koyeisa ebele na basakoli na Bokonzi. (Matai 9:38) Paulo akomelaki Timoté ete: “Makambo masili yo koyoka epai na ngai liboso na batatoli mingi, opesa yango na bato na sembo, baoyo babongi mpenza mpo na koteya bamosusu. Nde yo, ndimá koyika mpiko na mpasi, lokola soda malamu mpenza na Klisto Yesu.”—2 Timoté 2:2, 3, MN.
15. Mpo na nini tosengeli komitambwisa lokola basodá mpe lokola bapoti mbangu ’’na emekaneli”?
15 Soda akoki te kosangana na lolenge nyonso na bomoi ya basivile. Bobele bongo, tosengeli te komitika kokangama na misala ya bato oyo bazali kati na limpinga na Nkolo te, baoyo bazali nde na molako ya banguna Tála mpo na nini Paulo alobaki lisusu epai na Timoté ete: “Soda akomikɔtisaka na misala mosusu na bomoi te, ete asepelisa oyo azwaki ye na mosala Bongo, moto oyo akopota mbango na emekaneli, akozwa motole bobele soko ekolanda mibeko.” (2 Timoté 2:4, 5, MN) Awa ezali biso kobunda mpo na kozwa “motole na bomoi,” bapoti mbango basengeli koyeba komipekisa mpe kopɛngola bozito nyonso to bipekiseli bizangi ntina. Boye, bakoki bongo komipesa na mosala ya kosakola nsango malamu ya lobiko.—Yakobo 1:12; tala 1 Bakolinti 9:24, 25.
16. Eloko nini ekoki kokangisama te, mpe tozali koyika mpiko mpo na nani?
16 Na bolingo oyo tozali na yango mpo na Nzambe mpe “bampate” oyo bazali koluka ye, tozali koyika mpiko na esengo nyonso kati na makambo mingi, ete toyebisa nsango malamu ya lobiko. Banguna bakoki kokangisa biso mpo ete tozali kosakola Liloba; kasi bakoki te kokangisa Liloba na Nzambe to mpe kokangisa kosakolama na Liloba yango oyo ezali kosalema mpo na lobiko na bato. Paulo alimbwelaki Timoté ntina oyo asengelaki kondima mimekamo ete: “Kanisa ete Yesu Klisto asekwisami longwa na bakufi mpe azalaki libota na Davidi, lokola elobi nsango malamu oyo nazali kosakola, kati na yango nazali koyika mpiko na mpasi kino kokangisama nsinga lokola mosali na mabe. Kasi, liloba na Nzambe likangisami te. Yango wana nalandi koyika mpiko na makambo nyonso mpo na baponami, ete bango mpe bazwa lobiko lozali kati na Klisto Yesu, elongo na nkembo na seko.” (2 Timoté 2:8-10, MN) Lelo oyo, tozali komibanzabanza bobele mpo na batikali na baoyo basali Bokonzi ya likoló te, kasi lisusu mpo na ebele monene ya bampate mosusu ya Mobateli na mpate aleki malamu, Yesu Klisto, baoyo bakosangola Paradis ya mabelé oyo ekotyama na nsé na Bokonzi ya Klisto.—Emoniseli 7:9-17.
17. Mpo na nini tosengeli kolɛmba emekaneli na mbangu te, mpe nini ekosalema soko tokolanda kopota na emekaneli na mbango kino nsuka na yango?
17 Soki tolɛmbi, tokosala mpo na lobiko na biso moko te, ata mpo na lobiko ya bato mosusu mpe te.Na koyikáká mpiko na emekaneli na mbango na boklisto, atako bipekiseli nini, tozali komibombela likoki ya kozwa libonza mpe tokoki kosala mpenza mpo na lobiko ya bazalani na biso, na kolendisáká baninga na biso na ndakisa na biso. Ata soki tozali na elikya ya kozala na bomoi na likolo to na mabelé, tokoki mpenza mekola ntoma Paulo oyo alobaki ete: “Nazali kolanda kopota epai na nsuka emekaneli na mbango mpo na kozwa liboza.”—Bafilipi 3:14, 15, MN.
Tolanda kopota na mpiko kati na emekaneli na mbangu
18. Tosengeli kosala nini mpo na kozwa libonza, kasi eloko nini tosengeli kopengola soki nde tolingi kozala makasi kino nsuka?
18 Mpo na kokóma na nsuka na emekaneli na biso na boklisto mpe kozwa elónga kokumisáká Jéhovah mpe mpo na kozwa liboza oyo ye abombeli biso, tosengeli kolanda kopota na mpiko kino nsuka na emekaneli na mbango.Na yango, soki tomimemisi kilo ya biloko oyo bikokani na boyengebene te, tokoki te kotemela ngwi kino suka. ata tomemi bozito motindo wana te, kasi esengeli na biso kosala mingi mpo na kokokisa yango esengami na biso.Ntoma Paulo apesi toli oyo ete: Tobwaka bozito nyonso mpe masumu mazali kokanga biso mpe tópota na mpiko nyonso na emekaneli na mbango etyami liboso na biso.” (Baebele 12:1, MN) Na ndakisa na Yesu, tosengeli te kokanisa mingi likoló na mpasi oyo tosengeli koyikela yango mpiko, kasi tosengeli kotalela mpasi yango lokola motuya moke oyo tosengeli kofuta mpo na kozwa elónga oyo ekopesa biso esengo.—Tala Baloma 8:18.
19. (a) Endimiseli nini Paulo azalaki na yango pene na nsuka ya bomoi na ye? (b) Tosengeli kondimisama na likambo nini, awa ezali biso kobɛlɛma na nsuka na emekaneli na mbangu oyo esɛngi mpiko?
19 Pene na nsuka na bomoi na ye, Paulo alobaki ete: “Nasili kobunda etumba malamu, napoti kino nsuka na emekaneli na mbango, nasili kobatela kondima. Sikawa motole na boyengebene ebombami mpo na ngai.” (2 Timoté 4:7, 8, MN) Tosili komikɔtisa kati na emekaneli na mbango yango esɛngi mpiko mpo na kozwa libonza: bomoi ya seko. Soko tokolɛmba bobele mpo ete emekaneli na mbango yango emonani mwa molai koleka yango ekanisaki biso wana tobandaki kopota, tokokwea nzokande tokomi pene na kozwa mbano elakami. Tomizimbisa na likambo wana te solo mpenza, mbano ezali.
20. Tosengeli kozala na ekateli nini kino tokokóma na nsuka na emekaneli na mbango?
20 Na yango, tolɛmba te mpo na kozela bolózi monene oyo ekobanda kala na kobomama ya babilone, nsima nde kobomama ya lisanga ya diable.(2 Petelo 3:11, 12) Awa ezali biso komona bilembo zingazinga na biso, totalela bomoi na biso ya mikolo mizali koya na kondima.Tómibongisa mpenza mpo na koyika mpiko ,mpe tolanda kopota na molende kati na emekali na mbango oyo jehovah Nzambe asili kotya na liboso na biso, kino tokokóma na suka na yango mpe tokozwa libonza ya esengo na ntango jehovah akokumisama na nzela na Yesu Klisto.
Bozongeli
◻ Moklisto asengeli komibongisa mpo na motindo nini na emekaneli na mbango?
◻ Mpo na nini esengo ezali na ntina mingi mpo na mopoti mbango?
◻ Mpo na bantina nini minene tozali koumela kati na mosala ya kosakola atako mimekamo mizali?
◻ Mpo na nini tosengeli kolɛmba te mpo na kopota na emekaneli na mbango oyo Nzambe asili kotya liboso na biso.
Baklisto basengeli koyika mpiko lokola nde bazalaki kopota na emekaneli na mbango mpo na ntáká molai
[Elilingi na lokasa 15]
As if in a long-distance race, Christians must endure
[Elilingi na lokasa 17]
Bapoti mbango basengeli komipekisa wana ezali bango kosala makasi mpo na kozwa “motole ya bomoi”