Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/2 lok. 31
  • Mituna na batangi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna na batangi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Masolo mosusu
  • “Ozali mwasi moko kitoko mingi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Sara “Mama ya Bakonzi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Abalayama ná Sala​—Okoki komekola kondima na bango!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Nsukansuka babotaki mwana!
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/2 lok. 31

Mituna na batangi

Farao abalaki mpenza Sara, mwasi na Abalayama, lokola mabongoli mosusu mazali komonisa yango kati na Genese 12:19?

Te, Farao azwaki epekiseli. Yango wana, lokumu ya Sara (Saraï) ebebisamaki te.

Kotalela likambo na lolenge yango elekaki ekosalisa biso na koyeba yango malamu koleka. Nzala makasi ebendaki Abalayama (Abram) ete aluka ebombamelo na Ezipito na boumeli na mwa ntango. Azalaki kobanga mpo na bomoi na ye na ntina na kitoko ya mwasi na ye, Sara. Abalayama abotaki naino mwana te elongo na Sara; yango wana, soki akufaki na Ezipito, molongo na Libota (Postérité) elingaki kokatana, Libota wana oyo na nzela na yango mabota nyonso ya mokili masengelaki kopambolama. (Genese 12:1-3) Na bongo Abalayama asengaki na Sara ete amimonisa lokola ndeko na ye ya mwasi, mpamba te azalaki ndeko na ye.​—Genese 12:10-13; 20:12.

Bobangi na ye ezalaki ya mpamba te. Molimboli na Biblia August Knobel alimboli ete: “Abalayama asengaki na Sara amiyebisa na Ezipito lokola ndeko na ye ya mwasi, mpo ete ye abomama te. Soki ayebanaki lokola mwasi na libala, Moezipito moko akokaki kokamata ye lokola mwasi bobele soki abomi mobali na ye mpe nkolo na ye; nzokande soki atalelami lokola ndeko na ye ya mwasi, likoki esengelaki kozala mpo na kobala ye na komilukelaka bobóto ya ndeko mobali.”

Bankumu na Ezipito bazwaki mpenza ntango te ya kosolola na Abalayama na ntina na libala ya Sara mpe Farao. Bakumbaki bobele mwasi kitoko Sara kati na ndako ya Farao, mpe mokonzi na Ezipito apesaki biloko epai na ndeko na ye mobali, Abalayama. Jéhovah apesaki maladi na ndako na Farao. Ntango, na lolenge oyo eyebisami sikisiki te, likambo na solo liyebanaki polele, Farao alobaki na Abalayama ete: “Mpo na nini olobeli ngai ete: ‘Azali ndeko na yo,’ na boye etikalaki moke ete nakamata ye lokola mwasi na ngai? Sikawa tala mwasi na yo. Kamata ye mpe longwa na yo awa!”​—Genese 12:14-19, MN.

La Bible de Jérusalem mpe mabongoli mosusu mazali kobongola eteni na mokapo oyo tolalisi awa na likolo na: “ngai nakamati ye lokola mwasi wa ngai,” to na maloba motindo moko. Atako libongoli wana lizali mpenza mabe te, ekoki kobenda bato na kokanisa ete Farao abalaki mpenza Sara, ete libala esalamaki mpenza. Tosengeli koyeba ete kati na Genese 12:19 verbe ya Liebele oyo ebongolami na “kokamata” ezali na imparfait, ezalela oyo ezali koyebisa likambo oyo lizwi nsuka te. Traduction du monde nouveau ezali kobongola verbe yango na boyokani na motindo likambo lilekaki mpe na lolenge moko oyo ezali komonisa polele ezalela ya verbe: “na boye etikalaki moke ete nakamata ye lokola mwasi na ngai.”aFarao azalaki ‘pene na kokamata’ Sara lokola mwasi na ye; kasi, masengami to molulu oyo yango ekokaki kosenga esalemaki naino te.

Mbala mingi bapamelaki Abalayama mpo ete asalaki motindo wana, nzokande, asalaki motindo wana mpo na matomba ya Libota lilakami mpe na wana mpo na bato nyonso.​—Genese 3:15; 22:17, 18; Bagalatia 3:16.

Na bantango ya likama mpe, Yisaka asengaki na Rebeka ete amiyebisa te lokola mwasi na ye. Mwana na bango Yakobo, na nzela oyo molongo na Libota esengelaki koyela, asilaki kobotama mpe na ntembe te azalaki mpenza elenge mobali. (Genese 25:20-27; 26:1-11) Emonani ete elobeli wana ya mayele esengelaki kozala mpo na bantina motindo moko na oyo na Abalayama. Nzala makasi ebendaki Yisaka mpe libota na ye na kofanda na mboka ya makonzi na Filistia na nkombo Abimeleke. Soki Abimeleke ayebaki ete Rebeka azalaki mwasi ya Yisaka, mbala mosusu asengelaki kobomisa libota na Yisaka, na bongo mpe Yakobo. Na likambo yango mpe, Jéhovah akotelaki mpo na kobalela basaleli na ye mpe malonga na Libota.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Dhorme ebongoli: “Mpo na nini olobaki: Azali ndeko na yo! mpo ete nakamata ye lokola mwasi na ngai?“

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto