Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/2 nk. 3-4
  • Kokumisa bikeko​—Likambo libimisi kowelana

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kokumisa bikeko​—Likambo libimisi kowelana
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Babebisi na bikeko mosantu (iconoclastes)
  • Bikeko bizali nde kobɛlɛmisa biso epai na Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Bililingi
    Lamuká!—2014
  • Ebongi kosambela Nzambe na nzela ya bikeko?
    Lamuká!—2008
  • Biblia elobi nini na likambo etali kosambela bililingi?
    Makambo mosusu
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/2 nk. 3-4

Kokumisa bikeko​—Likambo libimisi kowelana

NA ESIKA moko na mokili ya Polonye, mobali moko alingi kosala mobémbo. Kasi asengeli naino kosala likambo moko ya ntina mingi. Afukami liboso na ekeko na Yesu, apesi mabonza mpe abondeli mpo ete abatelama na boumeli ya mobémbo.

Mosika kuna na engumba Bangkok, na mokili ya Thaïlande, na eleko oyo sanza ekobimaka mobimba na sanza ya mai, okoki komona feti ya yambo ya Buda mpo na nsuka ya mbula. Na boumeli ya feti wana, bato basalaka lifili na balabala wana ezali bango komema ekeko ya Buda.

Na ntembe te, oyebi ete kokumisa bikeko na motindo oyo touti kolobela, epalangani mingi mpenza. Bamiliare na bato bakokumbamelaka bikeko, mpe uta bambula mingi, bakotalaka yango lokola mwango na ntina mingi mpo na kobɛlɛma na Nzambe.

Okanisi boni mpo na kosalelama ya bikeko kati na losambo? Ebongi kokumisa yango to te? Nzambe akanisi nini mpo na yango? Tokoki komonisa ete lolenge wana ya kosala lozali kosepelisa ye? Mbala mosusu, naino okanisi te likoló na mituna motindo oyo. Nzokande, soki ozali kopesa motuya na boyokani na yo elongo na Nzambe, esengeli na yo kozwa biyano na mituna oyo.

Ya solo, mpo na bato mingi, ezali mpasi mpo na kosilisa likambo oyo. Tosengeli bongo koloba ete kokumisa bikeko ezali likambo libimisi kowelana makasi ata mobulu makasi uta bambula mingi. Na ndakisa, na 1513 liboso ya ntango na biso, Moize, mokambi Moebele, abukaki ekeko na wolo ya mwana na ngombe mpe abomaki soko mibali 3 000 oyo basambelaki yango.​—Exode, mokapo 32.

Ezali bobele Bayuda te nde baboyaki kosalelama ya bikeko na losambo. Bakomi na masoló na kala, balobelaka lisapo ya Tahmurath, mokonzi ya Pelesa oyo, engebene bango, akamataki bibongiseli makasi bambula mingi liboso na Moize ete bakumisa bikeko te. Na Chine, balobi ete mokonzi na kala na lisapo, asɛngisaki basodá na ye ete babebisa bikeko ya banzambe ndenge na ndenge. Wana asilisaki kobebisa bikeko, alobaki ete kokumisa banzambe na bikeko ezali bozoba. Na nsima, na eleko oyo Mohammed azalaki bobele mwana, ba Arabes baboyaki kosalelama ya bikeko na losambo. Balendisaki likanisi oyo Mohammed azwaki yango bambula mingi na nsima, mpo na losambo ya bikeko. Na Coran, Mohammed alakisi ete losambo ya bikeko ezali lisumu likolimbisama te; ete esengeli kobondela te mpo na basambeli na bikeko mpe epekisami kobalana na bato motindo wana.

Ata kati na boklisto ya lokutá, bakonzi ya mangomba na lokumu ya ekeke ya mibale, ya misato, ya minei mpe ya ekeke ya mitano, lokola Irénée, Origène, Eusèbe de Césarée, Epiphane mpe Augustin, baboyaki kosalelama ya bikeko na losambo. Pene na ebandeli ya ekeke ya minei, na engumba Elvire, na Espanye, etuluku ya baepiskopo bakamataki mwa bikateli ya ntina mpo na kopekisa ete bakumisa bikeko te. Nsima na likita monene wana ya Elvire, bikeko bipekisamaki kati na bandakonzambe mpe bitumbu bikatamaki mpo na basambeli na bikeko.

Babebisi na bikeko mosantu (iconoclastes)

Mosala wana mobimisaki moko na bantembe eleki monene na Lisoló ya bato: kowelana na ntina na kobebisa bikeko na ekeke ya mwambe mpe na ekeke ya libwa. Mokomi na masoló na kala amonisi ete “ntembe wana makasi eumelaki ekeke moko na ndambo, mpe ebimisaki mpasi makasi.” Abakisi ete, ntembe yango ezali “moko na bantina ya bokabwani kati na bikonzi ya Est mpe ya Ouest.”

Liloba “iconoclaste” to mobebisi na bikeko mosantu liuti na maloba na greke: eikon, oyo elimboli “ekeko,” mpe klastes, oyo elimboli “mobuki.” Na kotalela liloba yango, mosala wana ya bobebisi bikeko mozalaki mpo na kolongola mpe kobebisa bikeko na mikili nyonso ya Mpótó. Mibeko mingi ‘mitɛmɛli bikeko’ misalelamaki mpo na kolongola kosalelama ya bikeko na losambo. Losambo ya bikeko ekómaki matáta monene na politike, oyo ememaki bakonzi ya Leta mpe bapápa, ba généraux mpe baepiskopo, kati na etumba monene ya teoloji.

Ezalaki bobele kowelana na maloba mpamba te. Encyclopédie moko (Cyclopedia of Biblical, Theological, and Ecclesiastical Literature, ya McClintock mpe Strong) eyebisi ete nsima wana mokonzi Léon III asakolaki mobeko mopekisaki kosalelama ya bikeko kati na bandakonzambe, bato “batɛmɛlaki mobeko yango, mpe mobulu makasi, mingimingi na Constantinople,” moyaki kobebisa bomoi ya mokolo na mokolo. Matáta kati na mampinga na mokonzi mpe bato na ekólo masukaki na koboma makasi. Basángó bazwaki monyoko makasi. Bambula mingi na nsima, na boumeli ya ekeke ya zomi na motoba, ntembe likoló na likambo ya bikeko kati na bandakonzambe, esalemaki liboso na bato nyonso na engumba Zurich, na ekolo Suisse. Nsima na yango, mobeko moko mobimaki mpe mosɛngisaki kolongolama ya bikeko nyonso kati na bandakonzambe. Baluki mosusu na mbongwana bayebanaki mpo na mosala ya kokweisa losambo ya bikeko mpe mbala mingi na mobulu.

Lelo lisusu, bateolojié basili kokabwana na ntina na kosalelama ya bikeko na losambo. Lisoló lilandi likopesa yo nzela na koyeba soki bikeko bizali kosalisa bato mpo na kobɛlɛma epai na Nzambe.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto