Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/4 nk. 4-6
  • Nzambe ayokaka mabondeli na biso?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe ayokaka mabondeli na biso?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mabondeli oyo mayokamaki
  • Lolenge oyo mabondeli mandimami
  • Tomindimisa ete Nzambe ayokaka
  • Mabondeli nini mandimami na Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mabondeli oyo mazali kondimama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Pusaná penepene na Nzambe na libondeli
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Mabondeli nini mandimami?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/4 nk. 4-6

Nzambe ayokaka mabondeli na biso?

MBALA mosusu, directeur moko akoki kopesa mosala moko epai na moto mosusu, to mpe akoki kosala yango ye moko. Bobele bongo, Moyangeli aleki monene ya molóngó mobimba akoki kotalela na meko nini ye moko akokɔtela likambo boye to likambo boye mpo na kosilisa yango. Makomami mazali koteya ete Nzambe asili kokata ete ye moko ayokaka mabondeli na biso mpe azali bongo kosɛnga biso ete totinda yango epai na ye.​—Nzembo 66:19; 69:13.

Ekateli oyo Nzambe asili kozwa likoló na likambo oyo, emonisi ete azali mpenza kotya likebi na mabondeli ya bato oyo bazali kosalela ye. Na esika na kopekisa bango ete bamonisela ye makanisi na bango mpe mitungisi na bango nyonso, azali nde kolendisa bango na maloba oyo ete: “Bobondelaka ntango nyonso,” “bolendendela kati na mabondeli,” “Kitisa bozito na yo epai na Jéhovah,” ‘bokitisa mitungisi na bino nyonso likoló na ye [Nzambe].’​—1 Batesaloniki 5:17, MN; Baloma 12:12, MN; Nzembo 55:22, MN; 1 Petelo 5:7, MN.

Soki Nzambe alingaki kotya likebi te na mabondeli ya basaleli na ye, mbɛlɛ akamataki bibongiseli te ete bakoka kobɛlɛma epai na ye mpe mbɛlɛ alendisaki bango te ete basalaka yango. Likambo oyo ete Nzambe andimi ete bato balobaka epai na ye, endimisi biso ete ayokaka mpenza. Ee, atyaka likebi na mokomoko na mabondeli ya basaleli na ye.

Tobosana likambo oyo te: Biblia elobi polele ete Nzambe ayokaka mabondeli. Na ndakisa, ntóma Yoane akomaki ete: “Tozali na endimiseli oyo ete: ata tokosɛnga nini engebene mokano na ye, azali koyoka biso.” (1 Yoane 5:14, MN) Mokonzi Davidi alobaki na ntina na Jéhovah ete azali ye oyo ‘akoyokaka mabondeli’ mpe alobaki na elikya nyonso ete: “Akoyoka mongóngó na ngai.”​—Nzembo 55:17; 65:2.

Na bongo, atako libondeli yango moko likopesaka bolamu, kasi Makomami mamonisi ete makambo mingi matalelami wana moyengebene azali kobondela. Moto moko ayokaka. Moyoki yango, ezali Nzambe.​—Yakobo 5:16-18.

Mabondeli oyo mayokamaki

Mbala mingi, Biblia elobeli bato oyo mabondeli na bango mayokamaki mpe mandimamaki. Makambo oyo bakutanaki na yango mandimisi polele ete bolamu ya libondeli etaleli te bobele likambo ya kobongisa makanisi na yo mpe lolenge ya kolobela yango. Bolamu yango etaleli te bobele milende oyo tokoki kosala na boyokani na mabondeli na biso.

Na ndakisa, na ntango Abisaloma asalaki likita mabe mpo na kobotola bokonzi na Yisraele, Davidi asalaki libondeli oyo, ete: “Ɛ Jéhovah, nalɔmbi yo ete obongola toli na Ahitofele [mopesi-toli na Abisaloma].” Ezalaki lilɔmbɔ moke te, mpamba te “toli na Ahitofele ezalaki lokola ete moto atuni liloba epai na Nzambe ya solo. Toli ya Ahitofele ezalaki bongo.” Na nsima, Abisaloma aboyaki mwango mopesamaki na Ahitofele mpo na kokweisa mokonzi Davidi. Mpo na nini? Mpo ete “Jéhovah alakaki ete akobebisa toli malamu ya Ahitofele, mpo ete Jéhovah ayeisa mabe likoló na Abisaloma.” Libondeli ya Davidi liyokamaki mpenza.​—2 Samwele 15:31; 16:23; 17:14.

Bobele bongo, nsima na kobondela Nzambe ete abikisa ye na maladi ya liwa, Ezekiase abikaki. Kobika na ye eutaki bobele na mayoki mpe na makanisi oyo abongisaki na libondeli na ye? Te. Tala oyo Jéhovah alobaki na ye na nzela na mosakoli Yisaya: “Nayoki mabondeli na yo, namoni mpe mpisoli na yo. Tala nakobikisa yo.”​—2 Mikonzi 20:1-6.

Danyele, oyo libondeli liyokamaki bobele nsima mpenza na ntango oyo, mbala mosusu azalaki kolikya te, azwaki endimiseli oyo epai na anzelu ya Jéhovah ete: “Maloba na yo mayokamaki.” Mabondeli ya bato mosusu, lokola Hanna, bayekoli na Yesu mpe Korneye, kapitɛnɛ ya basodá, mandimamaki na motindo oyo tokoki koloba te ete yango euti bobele na makoki na bato. Na yango, Biblia ezali koteya polele ete Nzambe ayambaka, ayokaka mpe andimaka mabondeli masalemi na boyokani na mokano na ye.​—Danyele 10:2-14; 1 Samwele 1:1-20; Misala 4:24-31; 10:1-7.

Kasi lolenge nini Nzambe azali lelo kondima mabondeli ya basaleli na ye ya sembo?

Lolenge oyo mabondeli mandimami

Mabondeli oyo touti kolobela mandimamaki na motindo na kokamwa. Kasi tomikundola ete, ata na ntango na kala, motindo oyo mabondeli mazalaki kondimama, mbala mingi emonanaki polele te. Mpo ete ezalaki na boyokani na nguya na bizaleli mpe na bingɛngiseli oyo Nzambe azali kopesa epai na basaleli na ye mpo na kopesa bango likoki ya kokangama na nzela ya boyengebene. Mingi mpenza mpo na baklisto, eyano na mabondeli na bango epesamaki mpenza na lolenge ya elimo, mpe emonisamaki na misala na kokamwa te, soko na misala na nguya te.​—Bakolose 1:9.

Kolɛmba te soki mabondeli na yo mandimami te na motindo oyo ozali kolikya yango to na motindo oyo olingi. Na ndakisa, na esika ete alongola yo na momekamo moko, Nzambe akolinga mbala mosusu ete apesa yo “nguya oyo eleki nguya na bato,” mpo ete okoka koyikela yango mpiko. (2 Bakolinti 4:7, MN; 2 Timoté 4:17) Tosengeli te kotalela motindo na nguya wana lokola eloko mpamba, to mpe kosukisa ete Jéhovah andimaki mabondeli na biso te.

Totalela likambo na Yesu Klisto, Mwana na Nzambe ye moko. Ezalaki ye komitungisa mpo ete alingaki te kokufa lokola motuki, asalaki libondeli oyo ete: “Tata, soki olingi, longola kɔpɔ oyo na ngai.” Nzambe ayokaki mpenza libondeli oyo? Ee, Baebele 5:7 emonisi yango. Jéhovah alongolaki Mwana na ye te na liwa likoló na nzeté ya mpasi, liwa oyo lizalaki na ntina mingi. Na esika na kosala bongo, “anzelu na likoló amonanaki na ye mpe akembisaki ye.”​—Luka 22:42, 43.

Mpo na moko na moko kati na biso, eyano oyo mbɛlɛ ezalaki mpenza likamwisi. Boye te? Kasi yango ezalaki likamwisi te mpo na Jéhovah Nzambe, liziba ya motindo na nguya oyo. Mpe Yesu, oyo azalaki liboso na bomoi na likoló, ayebaki ete na ntango na kala, baanzelu bazalaki komonana na bato. Komonana ya anzelu ezalaki na bopusi motindo moko te lokola yango ekokaki kozala epai na biso. Atako bongo, anzelu yango, oyo emonani mpenza ete Yesu ayebaki ye liboso na kokóma moto, akembisaki ye [Yesu] mpo na kokutana na momekamo oyo mozalaki kozela ye.

Mbala mingi, Jéhovah azali kondima mabondeli ya basaleli na ye ya sembo ya ntango oyo, na kopesáká bango makasi ya koyika mpiko. Lisungi wana likoki kopesama na nzela ya elendiseli oyo euti epai na baninga na biso kati na kondima, baoyo tozalaka na bango esika moko. Moto moko akobwaka nde elendiseli oyo, komilobáká mbala mosusu ete baninga na biso bazali na makoki ya kokembisa biso te, mpamba te bango bakutani naino na mimekamo motindo oyo te? Yesu akokaki kozala na likanisi motindo wana epai na anzelu oyo amonanaki na ye. Kasi asalaki yango te; andimaki elendiseli na ye, kotaleláká yango ete ezalaki eyano oyo Jéhovah apesaki na libondeli na ye, mpe na bongo, akokisaki mokano ya Tata na ye na bosembo nyonso. Biso mpe tokolinga kondima na motema moko, makasi oyo Nzambe azali kopesa biso lokola eyano mpo na mabondeli na biso. Tomikundola lisusu ete, mbala mingi bantango oyo toyikaka mpiko na motema molai nyonso, elandamaka na mapamboli mingi mpenza.​—Mosakoli 11:6; Yakobo 5:11.

Tomindimisa ete Nzambe ayokaka

Soki mabondeli na biso mondimami noki te, tobɛta ntembe te na mosala mokokisami na libondeli. Nzambe akoki mbala mosusu kozela ntango malamu liboso na kondima mabondeli mosusu, lokola oyo tokoki kosɛnga kati na yango ete tobikisama na mpasi to mpe tobakisa mikumba na biso kati na mosala ya Nzambe. (Luka 18:7, 8; 1 Petelo 5:6) Soki tozali kobondela na ntina na likambo moko lizali mpenza kotungisa biso, tomonisa Nzambe na ezaleli na biso ya kolendendela ete, mposa na biso ezali monene mpe ete makanisi na biso mazali pɛto mpe na sembo. Yakobo azalaki na elimo motindo oyo wana alobaki nsima na kobunda elongo na anzelu, na molende nyonso na boumeli ya ntango molai, ete: “Nakotika yo kokenda te kino okopambola ngai.” (Genese 32:24-32) Tosengeli kozala na elikya motindo moko: soki tokolanda kosɛnga, tokozwa mapamboli na ntango na yango.​—Luka 11:9.

Likanisi ya nsuka. Likambo oyo ete, Nkolo moyangeli ya molóngó ayokaka biso na likebi ezali libaku lileki kitoko. Boni mpo na biso, toyokaka Jéhovah Nzambe na likebi nyonso wana ezali ye kopesa biso malako na ye na nzela Liloba na ye? Awa boyokani na biso elongo na Mozalisi na biso ezali kokóma makasi na nzela na mabondeli, tozala na mposa ya koyoka na likebi makambo nyonso oyo alingi koyebisa biso.

[Elilingi na lokasa 6]

Nzambe ayokaka mabondeli. Toyokaka ye wana ezali ye koloba na biso na nzela na Liloba na ye?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto