Bilembeteli bimonisi ete Biblia epemamaki na Nzambe, mpe ezali likabo liuti na Nzambe
Biblia elobi ete “Nzambe azali bolingo,” mpe azali na mayele mpe na nguya. (1 Yoane 4:8; Yobo 12:13; Yisaya 40:26) Elobi na biso ete: “Banzela na ye nyonso ezali boyengebene.” (Deteronome 32:4, MN) Engebene Biblia, Nzambe azali lisusu komonisa bizaleli lokola motema mawa mpe na ngolu.—Exode 34:6; Baloma 9:15.
Lokola emonisi ete Jéhovah Nzambe azali na bizaleli motindo oyo, epai na ye [Nzambe] Biblia ezali kobenda bato oyo bazali kolukaluka nzela. Mokanda oyo mozali kolobela kozalisama, ebandeli na lisumu mpe na liwa, mpe mwango ya kozongisa bondeko elongo na Nzambe. Ezali kopesa elikya kitoko, yango Paradis oyo ekozala awa na mabelé. Kasi mateya oyo nyonso makozala na ntina bobele soko likoki ezali na komonisa ete Biblia epemamaki na Nzambe, mpe ezali likabo liuti na Nzambe.
Biblia mpe sianse
Biblia ezali ntango nyonso kolónga bakɔtoli. Na ndakisa, soki otangi yango na makanisi mabongi, okomona ete ezali na boyokani elongo na sianse ya solo. Ee, ekomamaki mpo ete ezala mokambi na elimo, kasi ezali mokanda ya science te. Kasi totala soki Biblia ezali na boyokani na makambo ya sianse.
Nzoto na moto: Biblia elobi solo wana eyebisi ete ‘binama nyonso na nzoto’ ya likei ya ebandeli na mwana (embryon) bisili “kokomama.” (Nzembo 139:13-16) Biteni oyo na nzoto, ete: Bɔɔngɔ́, motema, mampúlúlú, miso mpe biteni mosusu, bisili “kokomama” kati na ebongiseli ya ebandeli na mwana oyo ezali na likei na libumu ya mama. Ebongiseli yango ezali na manáka mpo na kobima ya moko na moko ya biteni yango, oyo bizali bongo kobongisama malamu na molongó. Kasi kanisa naino mwa moke! Makambo oyo matali kokóla ya nzoto ya moto esilá kokomama kati na biblia uta bambula soko 3 000 liboso ete bato ya sience bayeba ebongiseli ya ebandeli na mwana.
Nyama: Engebene Biblia, “panya . . . akobimisaka biloko mpo na konyamuta yango lisusu.” (Levitike 11:6) François Bourlière (The Natural History of Mammals, 1964, lokasa 41) alobi boye ete: “Momeseno ya kolekisa bilei mbala mibale na mosɔpɔ́ na esika na kolekisa yango bobele mbala moko, emonani lokola ete esalemaka mbala mingi epai na basimbiliki mpe bapanya. Na ndenge eyebani, basimbiliki ya mboka bakomelaka salité na yango ya butu kozanga konyamuta yango, mpe kino na ntɔngɔ, yango ekoki kozala ndambo na salité nyonso ya libumu. Mpo na simbiliki ya zámba, ‘azongelaka kosala bongo’ mbala mibale na mokolo, mpe elobami ete ezali lolenge moko mpo na panya ya Mpótó.” Bobele na likambo oyo, mokanda Mammals of the World (ya E. Walker, 1964, Volume II, lokasa 647) moyebisi ete: “Yango emonani lokola ete ekokani na ‘kosánza’ ya banyama oyo ekonyamutaka.”
Bokundoli biloko ya kala: Mikonzi, bingumba mpe mikili oyo elobelami na Biblia, bizwi lisusu lokumu na bokundoli ya bitánda mpe mbeki esalemi na moyómba, na makomi mpe biloko misusu ya lolenge wana. Na ndakisa, mabota lokola Bahitite, baoyo balobelami kati na Makomami, bazalaki solo na bomoi. (Exode 3:8) Kati na mokanda na ye La Bible devient vivante (angl.), Sir Charles Marston akomaki ete: “Baoyo baningisaki kondima ya bato kati na Biblia, mpe babebisaki bokonzi na yango, na ngala na bango, bato wana mpe bakweisami liboso na matatoli oyo makundolami, mpe bokonzi na bango esili kobeba. Bokundoli biloko ya kala ememi na kolongola makambo nyonso mazalaki mpenza sikisiki te kati na oyo mayebanaki.”
Bokundoli biloko na kala ezali kolóngisa Biblia na mitindo mingi. Na ndakisa, biloko bikundolamaki bisili kondimisa bisika mpe bankombo ya bato oyo ezwami na Genese mokapo 10. Bakundoli biloko ya kala bamonisaki Ulu, engumba ya Bakaladi, esika na mombongo mpe na losambo epai Abalayama abotamaki. (Genese 11:27-31) Likoló na liziba ya Guihoni, na sud-est na Yelusaleme, bakundoli biloko na kala bamonaki esika ezalaki mboka na Bayebusi, oyo Davidi abɔtɔlaki yango. (2 Samwele 5:4-10) Likomi ya “Siloam” lityami na moko na mipanzi ya nzela na mai wana ya mokonzi Ezekiase, limonanaki na 1880. (2 Mikonzi 20:20) Kozwama ya Babilone na Siruse Monene na mobu 539 liboso ya ntango na biso, ekomami na libanga oyo babéngi yango ete Chronique de Nabonide, oyo ekundolamaki na ekeke euti koleka. Makambo mazwami kati na mokanda ya Estere mandimisamaki na makomi oyo makundolamaki na engumba Persépolis mpe na komonisama ya esika ezalaki ndako ya mokonzi Xerxès (Aseruse) na engumba Suse katikati na mobu 1880 mpe 1890. Likomi moko likundolamaki na esika ezalaki ndako monene ya masano ya Baloma, na engumba Kaisalia, emonisi ete guvernere Ponse Pilato, oyo akabaki Yesu mpo ete abakisama likoló na nzeté, azalaki solo na bomoi.—Matai 27:11-26.
Boyekoli minzoto mpe biloko mosusu: Eleki soko mibu 2 700, atako bato bayebaki naino te ete mabelé mazali zolongano, mosakoli Yisaya akomaki ete: “Ezali na Moto oyo akofandaka likoló na zolongano ya mabelé.” (Yisaya 40:22, MN) Liloba ya Liebele chugh, oyo ebongolami na mokapo oyo ete “zolongano,” ekoki lisusu kobongolama ete “libungutulu.” (Concordance des Ecritures hébraïques et chaldéennes (angl.), ya B. Davidson) Lisusu, “zolongano” ya etando ya mabelé ekomonanaka malamu mpenza longwa na likoló, mpe mbala mosusu, longwa na mpepo oyo emati likoló mpenza. Epai mosusu, Yobo 26:7 elobi ete Nzambe ‘akakisi mabelé na eloko te.’ Yango ezali solo, mpe bato bakoyekolaka minzoto mpe bibongiseli ya molóngó, bayebi malamu ete eloko moko emonani te oyo ezali kosimba mabelé.
Boyekoli banzeté: Basusu bakolobaka na libunga ete Biblia elobaka solo te, mpamba te Yesu Klisto alobaki na ntina na “mbuma na sinapi” ete “eleki mbuma nyonso na moke.” (Malako 4:30-32) Emonani mpenza ete Yesu alobelaki mbuma na sinapi ya moindo (Brassica nigra to Sinapis nigra), oyo ezali bobele na bonene ya milimetele 1 kino milimetele 1,6. Ezali solo na mbuma oyo eleki mpenza moke, lokola oyo babéngi ete orchidées, ezali moke mpenza lokola mputulu, kasi Yesu azalaki koloba te epai na balóni na orchidées. Bayuda wana ya Galilai bayebaki ete motindo na mbótó nyonso oyo elónamaki na etuká wana, mbótó ya sinapi nde ezalaki moke mingi. Yesu alobelaki nde Bokonzi na Nzambe, kasi apesaki te mateya matali boyekoli banzeté.
Boyekoli mabelé: Na ntina na lisoló ya Biblia mpo na kozalisama, tala oyo elobamaki na Wallace Pratt, moto na lokumu oyo ayekoli bibongiseli ya mabelé: “Na lolenge na ngai ya moto oyo ayekoli bibongiseli ya mabelé, soki basɛngi ngai ete nalimbola moke mateya na biso ya sika na ntina etali ebandeli ya mabelé, mpe lolenge bomoi ekólaki kati na mabelé kino kokóma bato moke oyo bazalaki babateli na mpate, lokola mabota oyo malobelami na mokanda ya Genese, nakolanda bobele eteni monene ya makambo mazali na mokapo ya liboso ya Genese.” W. Pratt amonaki ete motindo oyo makambo mayebisami na molongó kati na Genese—ebandeli ya mai monene, kobima ya mabelé makauki, bikelamu ya bomoi bizali kati na mai, bandeke mpe banyama—ekokani mpenza na motindo ya bileko minene ya kobongisama na mabelé.
Monganga: Kati na mokanda na ye Un médecin examine la Bible (angl.), C. Raimer Smith akomaki, ete: “Nazali mpenza kokamwa mpo na motindo oyo Biblia ezali koloba solo na ntina na makambo ya monganga . . . Wana ezali yango kotanga mwango mosusu ya kosalisa maladi, lokola matútú, mpotá, mpe bongo na bongo, Biblia ezali koloba solo ata na kotalela mwango lelo. . . . Bato mingi bazali naino kondima biyambayamba: na ndakisa, esengeli kotya libangá moke na libenga mpo na kobika na maladi ya mingai; soki osimbi ligbolódó, nzoto eboti bambuma oyo babéngi na Lifansé ete Verrue; mpasi na nkingó ekoki kosalisama na kolingáká litambala ya pɛtɛpɛtɛ na langi motane na nkingó; bamaladi eutaka na nzeté oyo babengi d’assa-fœtida; soki mwana abɛli, elingi koloba ete azali na banyama ya libumu mpe bongo na bongo, kasi makambo motindo wana mazwami kati na Biblia te. Bobele likambo oyo moko nde lizali na ntina mingi mpe lizali elembeteli mosusu oyo emonisi ngai ete Biblia euti na Nzambe.”
Elobi solo mpo na makambo na kala
Kati na mokanda na ye Un juriste examine la Bible (angl.), avocat Irwin Linton amonisi likambo oyo ete: “Atako masoló makomami na mikanda, masapo mpe matatoli ya lokuta mazali komonisa ete makambo oyo balobeli yango masalemaki na mboka mosika mpe na eleko oyo eyebani te; boye, ezali kobebisa mitinda na kosambisa malamu, mitinda oyo biso bato ya mibeko tozali koyekola yango, mpe na bongo, ngonga mpe esika esengeli koyebisama. Masoló ya Biblia mazali kopesa biso date mpe esika oyo makambo masalemaki na bosikisiki nyonso.”
Mpo na kondimisa maloba na ye, M. Linton atangi Luka 3:1, 2, (MN) epai mokomi na Evanzile atangi nkombo ya bakonzi nsambo mpo na koyebisa date oyo Yesu Klisto abandaki mosala na ye. Tala makambo oyo Luka ayebisaki: “Na mbula ya zomi na mitano na bokonzi na Tibele Kaisala, wana Ponse Pilato azalaki moyangeli na Yudea, mpe Herode azalaki mokonzi na etuka ya Galilai, mpe ete Filipo, ndeko na ye, azalaki mokonzi na etuká ya Itulia mpe ya Talakoniti, mpe ete Lisaniasi azalaki mokonzi na etuká ya Abilɛne, na mikolo ya Ana, nganga monene mpe Kaife, liloba na Nzambe liyelaki Yoane, mwana na Zakaria, kati na mokili mokauki.”
Biblia ezali koyebisa makambo motindo oyo. Mpe, biteni mosusu lokola Baevanzile, ekomamaki na eleko oyo ezalela ya makambo ya Bayuda, ya Bagreke mpe Baloma, ekólaki mpenza. Na eleko wana, ezalaki na bato ya mibeko, bakomi, bakaláka mpe bato minene mosusu. Na yango, soki makambo makomami kati na Baevanzile mpe kati na mikanda mosusu ya Biblia mazalaki solo te, mbɛlɛ esilaki komonisama ete ezali solo te. Kasi bakomi ya makambo na kala ya mokili basili kondimisa makambo mosusu, lokola Yesu Klisto azalaki solo na bomoi. Na ndakisa, tala oyo ekomamaki na Tacite, Moloma mokomi ya makambo na kala: “Bazwi nkombo [baklisto] epai na Klisto, oyo guvernere Pontius Pilatus akabaki ye ete abomama na liwa ya mpasi, na nsé na boyangeli ya Tibele.” (Annales, XV, 44) Lolenge oyo Biblia ezali koloba solo na makambo ya kala, ezali komonisa ete ezali likabo oyo Nzambe apesaki na bato.
Elembeteli eleki monene
Atako bokundoli biloko ya kala, boyekoli minzoto mpe bibongiseli ya molóngó, lisoló na bato mpe makambo mosusu ezali kolóngisa Biblia, kasi kondima kati na mokanda yango etongami te likoló na bilembeteli motindo oyo. Kati na ebele na bilembeteli oyo bikoki kopesama mpo na komonisa ete Biblia epemamaki na Nzambe mpe ezali likabo liuti na Nzambe, kokokana na bisakweli na yango nde ezali elembeteli eleki monene.
Jéhovah azali Liziba ya bisakweli ya solo. Alobaki na monoko ya mosakoli Yisaya ete: “Tala makambo na liboso masili kobima, kasi nazali kosakola makambo na sika. Nayebisi bino yango naino ebimi te.” (Yisaya 42:9, MN) Lisusu, Biblia elobi ete bakomi na yango bapemamaki na Nzambe na nzela ya elimo santu na Ye, to bokasi bokosalaka mosala. Na ndakisa, Paulo, ntóma moklisto ekomami ete: “Makomami nyonso mapemami na Nzambe.” (2 Timoté 3:16) Ntóma Petelo akomaki ete: “Esakweli moko te kati na Makomami esili kouta na bato. Mpo ete esakweli moko te esili kobima na mokano na moto, kasi bato balobi na ntina na Nzambe wana epusamaki bango na elimo santu.” (2 Petelo 1:20, 21, MN) Na yango, totalela bisakweli ya Biblia.
Kati na ebele na bisakweli bizwami kati na Biblia, ezali na bisakweli bilobelaki Ninive, kapitale ya Asulia, “engumba etondi na koboma” oyo ezalaki kobangisa Proche-Orient nyonso ya ntango na kala, na boumeli ya bikeke 15. (Nahumu 3:1) Kasi, wana Ninive ezalaki na lokumu na yango, Biblia esakolaki ete: “[Nzambe] akozalisa Ninive esika na mpamba, esika ekauki lokola mokili mokauki. Bitonga bikolala kati na ye, banyama nyonso ya ekólo. Bandeke minene mpe nziko bakofanda na makonzi na ye; ntango nyonso mongóngo mokoyemba na lininisa. Libebi likozala na bikɔtelo, mpo ete mosala na ye na eleze mokozalisama bolumbu.” (Sofoni 2:13, 14) Lelo oyo, bobele ngomba mpamba nde ekolakisaka esika oyo Ninive ya kala ezalaki, epai na bato bakendaka kotala yango. Lisusu, bitonga na mɛmɛ bikolyaka na esika wana lokola yango esakolamaki.
Danyele, mosakoli na Nzambe, azwaki emonaneli ya mpate mobali na maseke mibale mpe ntaba mobali ezalaki na liseke moko monene katikati na miso. Ntaba mobali abomonaki mpate mobali mpe abukaki maseke na ye mibale. Na nsima, liseke monene ya ntaba mobali libukamaki, mpe maseke minei mabimaki na esika na yango. (Danyele 8:1-8) Anzelu Gabriele apesaki ndimbola oyo ete: “Mpate mobali oyo emonaki yo na maseke mibale, ezali mikonzi ya Madia mpe na Pelesa. Mpe ntaba mobali ezali mokonzi na Ela; mpe liseke monene na katikati na miso na ye ezali mokonzi na liboso. Mpo na liseke oyo libukanaki, mpe minei mosusu ebimaki na esika na yango, ezali bikonzi minei bikobima na mokili yango, nde bikozala na nguya na ye te.” (Danyele 8:20-22) Lokola Lisoló na bato limonisi yango, mpate mobali na maseke mibale, Bokonzi ya Medo-Perse, bokweisamaki na “mokonzi ya Grèce.” Ntaba mobali na elilingi oyo ezalaki na “liseke monene,” ezalaki Alexandre le Grand. Nsima na liwa na ye, ba généreaux minei bakitanaki “liseke monene” wana, na komityáká likoló na “bikonzi minei.”
Ntalo monene na bisakweli ya Makomami na Liebele (“Kondimana na Kala”) na ntina na Yesu Klisto, bisili kokokana. Bakomi ya Makomami na Greke na boklisto (“Kondimana na Sika”), baoyo bapemamaki, bakokisaki bisakweli yango mosusu epai na ye [Yesu]. Na ndakisa, Matai, mokomi na Evanzile abendaki likebi ya bato likoló na kokokana na bisakweli ya Biblia na ntina na Yesu: kobotama na ye epai na moseka, mobongisi na nzela na ye mpe kokɔta na ye na Yelusaleme likoló na mwana na mpunda. (Kokanisa Matai 1:18-23; 3:1-3; 21:1-9 na Yisaya 7:14; 40:3; Zakaria 9:9) Kokokana na bisakweli motindo wana ezali komonisa ete Biblia epemami mpenza na Nzambe, mpe ezali solo likabo liuti na Nzambe.
Na eleko na biso, kokokana ya bisakweli mosusu ya Biblia emonisi ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka.” (2 Timoté 3:1-5) Bitumba, nzala, maladi mpe koningana ya mabelé oyo ekokani na mosusu te, ezali kati na “elembo” ya “koya” na Yesu kati na nguya ya Bokonzi. Kati na elembo yango, ezali mpe na mosala ya ba Témoins de Jéhovah koleka bamilió minei na mokili mobimba, baoyo bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe bosili kotyama. (Matai 24:3-14; Luka 21:10, 11) Lisusu, bisakweli ya Biblia oyo bizali kokokana bizali kondimisa biso ete boyangeli na Nzambe na likoló, oyo ekambami na Yesu Klisto, mosika te ekosala mokili ya sika epai bato na botósi bakozala na bolamu ya seko.—2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:1-5.
Etánda oyo ete “Bisakweli ya Biblia bisili kokokana,” emonisi bisakweli mosusu ya Biblia oyo tokoki kotanga yango. Kokokana na bisakweli yango mosusu, emonisami kati na Makomami yango moko, kasi oyo ezali kokokana lelo mpenza, ezali na ntina mingi.
Mbala mosusu, yo moko osili komona makambo yango mosusu oyo Biblia esakolaki mpo na mokili mobimba. Kasi mpo na nini te kotalela likambo yango na bozindo? Ba Témoins de Jéhovah bakozala na esengo ya koyebisa yo makambo mosusu, soki yango ezali mposa na yo. Mpe tokanisi ete bolukiluki ya solo oyo okosala mpo na koyeba Oyo-Aleki-Likoló mpe mikano na ye, ekondimisa yo ete Biblia epemami mpenza na Nzambe, oyo apesaki biso yango lokola likabo.
[Etanda na lokasa 7]
BISAKWELl YA BIBLIA OYO BISILI KOKOKANA
ESAKWELI KOKOKANA NA YANGO
Genese 49:10 Yuda ezali libota na bokonzi na Yisraele
Sofoni 2:13, 14 Ninive ebebisamaki pene na mobu 632
liboso ya ntango na biso
Yilimia 25:1-11 Wana Yelusaleme ekamatamaki, mbula 70
Yisaya 39:6 oyo yango etikalaki mpamba ebandaki (2 Ntango 36:17-21; Yilimia 39:1-9)
Yisaya 13:1, 17-22; Siruse akamati Babilone; Bayuda
44:24-28; 45:1,2 bazongi na mboka na bango (2 Ntango
36:20-23; Esdrase 1:1-4, 2:1)
Danyele 8:3-8, 20-22 Bakonzi ya Médo-Perse ekweisami na
Alexandre Monene, mpe Bokonzi ya Grèce
bokabwani
Yisaya 7:14; Yesu abotami na moseka na Beleleme
Danyele 9:24-26 Yesu apakolami lokola Masiya (Mobu 29
ya ntango na biso) (Luka 3:1-3, 21-23)
Yisaya 9:1, 2 Yesu abandi mosala na ye, kobimisaka
pole likoló na Galilai (Matai 4:12-23)
Yisaya 53:4, 5, 12 Klisto akufi lokola mbeka na lisiko (Matai 20:28; 27:50)
Nzembo 22:18 Bilamba na Yesu bibɛtɛlami mbɛsɛ
Nzembo 16:10; Klisto asekwi na mokolo ya misato
Matai 12:40 (Malako 16:1-6; 1 Bakolinti15:3-8)
Luka 9:41-44; 21:20-24 Baloma babebisi Yelusaleme
(na mobu 70 ya ntango na biso)
Luka 21:10, 11; Makambo minene mabimi na motindo
Matai 24:3-13; emonanaki liboso te:bitumba, nzala,
2 Timoté 3:1-5 koningana ya mabelé, maladi, kotyola
mibeko mpe bongo na bongo, momonisi
ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka”
Matai 24:14; Ba Témoins de Jéhovah bazali kosakola na
Yisaya 43:10; mabelé mobimba ete Bokonzi na Nzambe esili
Nzembo 2:1-9 kotyama mpe ete mosika te, ekolónga banguna
na yango nyonso
Matai 24:21-34; Libota ya ba Témoins de Jéhovah na
Emoniseli 7:9-17 mokili mobimba, lizali kosambela
Nzambe mpe lizali komibongisa mpo na
kobika na “bolózi monene”
[Elilingi na lokasa 8]
Lelo oyo, bitumba, nzala, maladi mpe koningana ya mabelé ezali koboma ebele na bato, kasi mokili ya sika na kimya mpe na bolamu mobɛlɛmi