Nayambaki solo nsima na boloko na mboka Buchenwald
NAKOLAKI na Grenoble, na France, na bambula 1930. Molakisi na ngai ya lokota ya allemand, Mofalansé moko, azalaki na bolingo mingi mpo na parti politike ya nazi. Na kelasi, azalaki kolobela mingi ete lokota ya allemand “ekoki kosalisa biso” mokolo mosusu. Kasi balakisi na biso mingi, baoyo babundaki Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bazalaki komitungisa mingi liboso ya bokoli ya nazi na Allemagne. Nazalaki kondima mayoki na bango, mpamba te ezalaki mpenza komonana polele ete etumba ezalaki kobelema.
Na 1940, na ebandeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, nabungisaki noko moko oyo nazalaki kolinga mingi na ntango ya bitumba ya la Somme. Nakomaki na nkanda mingi, kasi nazalaki naino mwana mpo na kokota na limpinga ya France. Atako bongo, mbula misato na nsima, na boumeli ya ntango oyo ba Allemands babotolaki mboka, bapesaki ngai libaku ya kosalela mayele na ngai ya mosali bililingi na mosala ya lisangá ya Babundeli na Ekolo (Résistance). Nazalaki mpenza na mayele mingi mpo na komekola basinyatire mpe nazalaki kosala lisusu batampo ya lokuta ya ba allemands. Nazalaki kozwa esengo mingi mpo na kobundisa mampinga ya banguna oyo babotolaki mboka na motindo yango ete makanisi ya koministe ya baoyo nazalaki kosala na bango esika moko ezalaki na ntina moke mpo na ngai na eleko wana.
Kokangama
Mokolo ya 11 novembre 1943, Lisangá ya babundeli ekolo esengaki na bato ete batambola mpo bokundoli mokolo ya kosuka na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Kasi basoda bakengeli ya France, oyo bakangaki gbagba oyo ekokambaka na monimá ya bakufi, balobaki na biso ete tozonga epai na biso. Na esika ete tozonga, etuluku na biso ezwaki ekateli ete tokende na monimá mosusu ya bakufi na katikati ya engumba. Kasi tobosanaki eloko moko: monimá ezalaki bobele pembeni na biro ya Gestapo.
Etuluku na biso ezingamaki na basoda oyo bazalaki na mindoki, oyo batandaki biso penepene na efelo. Ntango balongolaki biso esika wana, bamonaki bamasitolo mingi na mabelé. Lokola moto moko te alingaki kondima soki ezalaki ya nani, basoda batikaki bobele basi mpe bilenge ya mibu 16 kino na nse. Yango wana, ezalaki ngai na mibu 18 natyamaki na boloko elongo na mibali mosusu 450. Mwa mikolo na nsima, totindamaki kati na camp moko ya boleki pene na Compiègne, na nord ya France.
Na nzela mpo na Allemagne
Mokolo ya 17 janvier 1944, nakutanaki mpo na mbala na ngai ya liboso—kasi na mawa nyonso ezalaki mbala ya nsuka te—elongo na basoda ya Allemagne, oyo ekoti na bango ezalaki komonisa na loboko ya mwasi ekulusu ya elembo ya nazi mpe na loboko ya mobali makomi mokuse SS (Schutzstaffel). Bayanganisaki ebele na bakangami, mpe totambolaki kino na gare ya Compiègne. Bakotisaki biso mpenza na kobetaka biso na basapato kati na ba wagons ya biloko. Bobele kati oyo ngai nakotisamaki tozalaki bato 125. Na boumeli ya mikolo misato mpe butu mibale, tozalaki ata na eloko moko te ya kolya to ya komela. Na boumeli ya mwa ngonga, baoyo bazalaki na makasi mingi te bakufaki mpe banyataki bango. Mikolo mibale na nsima, tokomaki na mboka Buchenwald, pene na Weimar, na katikati ya Allemagne.
Nsima na kotya ngai nkisi mpe kokókóla ngai motɔ́, bapesaki ngai nimero 41 101, mpe batyaki ngai na molongo ya “Koministe motomboki.” Na boumeli ya botangolami moke na baninga, nakutanaki na sángo Michel Riquet ye dominicain, oyo asengelaki koyebana mingi, nsima na etumba, mpo na koteya na ye na cathédrale Notre-Dame de Paris. Elongo na bilenge mosusu ya mbula na ngai, totunaki ye soki mpo na nini Nzambe apesaki nzela na mabe motindo wana. Ayanolaki ete: “Esengeli konyokwama mingi mpo na kozwa esika na likoló.”
Bomoi ya mikolo nyonso
Bafandi ya bandako mike 61 basengelaki kolamuka na ntongo pene na 4h30. Tozalaki kobima ntolo polele mpe tosengelaki kopasola baglase mpo na kosukola. Bato nyonso basengelaki kotosa, ezala bato na nzoto kolongono to bato na maladi. Na nsima ezalaki ntango ya kokabola mampa: 200 kino 300 grammes na mokolo, limpa ezangi mungwa, na mwa ndambo moke ya manteka mpe mwa eloko moko oyo ezalaki lokola confiture kasi yango te. Na 5h30, bato nyonso bazalaki koyanganisama mpo na kobengama nkombo. Oyo nde komekama makasi mpo na komema na mokongo baoyo bakufaki na butu! Tozalaki kokanisa na baninga na biso wana nsolo mabe ya nzoto etumbami ezalaki kobima. Totondaki na liyoki ya botomboki, ya kozanga elikya mpe ya koyina, mpamba te toyebaki ete nsuka na biso mpe ekoki kozala lolenge wana.
Mosala na ngai na BAU II Kommando ezalaki ya kotimola baterasé oyo ezalaki na mosala moko te. Soki bobele terasé moko ya metele mibale etimolami, esengelaki na biso kokunda yango malamumalamu. Mosala mozalaki kobanda na 6 heures, elongo na mwa bopemi moke ya 30 minutes na midi, nsima na yango tozalaki kozongela mosala kino na 19 heures. Kobenga bankombo na mpokwa ezalaki koumela mingi mpenza. Mbala nyonso oyo ba Allemands bazalaki kobungisa bato mpe biloko mingi kati na etumba na ba Russes, kobenga bankombo ekokaki koumela kino na minuit.
Etuluku moko ekeseni na misusu
Moto nyonso oyo azalaki komeka kokima na camp azalaki koyebana kozanga nkaka, mpamba te biso nyonso nsuki na biso ekatamaki na lolenge ekeseni na oyo ya bato mosusu. Bazalaki kokata biso nsuki na kokolaka to na kokataka liboke moke ya mokuse na katikati ya moto to na pembenipembeni. Nzokande, bakangami mosusu bakatamaki nsuki na bango malamu. Bazalaki banani? Mokonzi na biso ya bloc apesaki biso eyano malamu. Alobaki na biso ete, “ezali ba Bibelforscher (Bayekoli na Biblia).” Namitunaki: “Bazali kosala nini awa na boloko bango Bayekoli ya Biblia?” Ayebisaki ngai ete: “Bazali awa mpo bazali kosambela Jéhovah.” Jéhovah! Ezalaki mbala ya liboso nayoka nkombo ya Nzambe.
Nakomaki na mwa boyebi moke likoló na Bayekoli ya Biblia. Mingi kati na bango bazalaki ba Allemands. Bamoko kati na bango bazalaki wana kobanda katikati ya bambula 1930 mpo baboyaki kotosa Hitler. Bakokaki kobimisama uta kala, kasi bazalaki koboya kotika etelemelo na bango. Ba SS bazalaki kokatisa nsuki epai na bango, mpe bazalaki kopesa bango misala ya ntina, na ndakisa mikumba na biro. Eloko ezalaki kokamwisa biso mingi, ezalaki kimya na bango. Epai na bango ata likunya moke ezalaki te; bazalaki na likanisi ata ya koboya te to ya kotomboka te. Nazalaki kokamwa bango mingi. Na mawa nyonso, na eleko wana, nayebaki lokota ya allemand malamu te mpo na kosolola elongo na bango.
Engbunduka ya liwa
Wana mikili oyo mizalaki kobundisa Allemagne mizalaki kobelema, bakangami bazalaki kotindama na ba camps oyo ezalaki mpenza na kati, kasi ba camps yango ezalaki komona ete bato bazalaki koyikana mingi koleka ndelo. Na ntongo ya 6 avril 1945, ba SS bayanganisaki bato 5 000 kati na biso mpe bakotisaki biso na nzela ya Weimar, yango elimbolaki bakilometele libwa ya botamboli na makolo. Baoyo balongaki te mpo na kolanda bazalaki kobeta bango masasi na nkingo kozanga kokakatana. Na nsuka ntango tokomaki na gare ya Weimar, bakotisaki biso kati na bawagons ya biloko oyo ezangi kozipama, mpe engbunduka ebandaki kotambola. Na boumeli ya mikolo 20, etambolaki longwa na gare moko kino mosusu kokatisa Allemagne mobimba, mpe na nsima ekomaki na Tchécoslovaquie.
Na ntongo ya mokolo moko, eteni moko ya engbunduka na biso etyamaki pembeni na nzela ya garage. Basoda bafungolaki mindoki na bango, bafungolaki bikuke ya wagon moko mpe babomaki bakangami nyonso oyo bazalaki ba russes na kati. Mpo na ntina nini? Bakangami pene na zomi na mibale bakimaki nsima na koboma bakengeli na bango. Nazali komona lisusu makila kotyola likoló na enyatelo mpe kosopana na nzela.
Na nsuka, engbunduka na biso ekomaki na Dachau, epai kuna mikolo mibale na nsima limpinga na Amerike esikolaki biso. Na boumeli ya mikolo 20 ya mobembo, mpo na bilei tozalaki bobele na mwa ndambo ya mbala mobesu mpe na mwa mai moke. Kati na bato 5 000 oyo tozalaki na ebandeli, bobele 800 nde babikaki. Ebele mosusu bakufaki na mikolo oyo milandaki. Mpo na ngai, nalekisaki eteni monene ya mobembo kofandaka likoló ya ebembe.
Ebandeli ya sika
Nsima na kosikolama na ngai, nasalaki mpenza kati na parti communiste français, mpamba te na mboka Buchenwald nazalaki penepene ya basangani na yango mingi, oyo basusu bayebanaki mingi. Nakomaki sekretere molandi ya etuluku na Grenoble, mpe balendisaki ngai ete nalanda mateya ya bakambi na Paris.
Kasi, naumelaki te mpo na koyoka mawa. Mokolo ya 11 novembre 1945, tobyangamaki mpo nakosala lifili na Paris. Camarade oyo atambwisaka etuluku na biso azwaki mwa mosolo mpo na kofuta esika na biso ya kolala, kasi azalaki na bolingo te ya kosalela mosolo yango mpo na biso. Esengelaki na biso kokundwela ye mitinda ya bosembo mpe ya boninga oyo ezalaki kosangisa biso esika moko. Nayaki koyeba ete ebele na bato minene oyo nasilaki kokutana na bango bazalaki na likoki te ya kosilisa mikakatano ya mokili. Lisusu, mingi kati na bango bazalaki kondima Nzambe te, kasi ngai nazalaki kondima Nzambe.
Nsima na yango, nakendaki kofanda na engumba Lyon, epai kuna nakobaki na mosala na ngai ya kosala bililingi. Na 1954, basi mibale ba Témoins de Jéhovah bayaki kotala ngai, mpe nasalisaki abonema na zulunalo Réveillez-vous! Mikolo mibale na nsima, mobali moko ayaki kotala ngai elongo na moko ya basi oyo babetaki na ekuke na ngai. Na mbala moko tomonaki, mwasi na ngai mpe ngai, ete biso mibale tozalaki kosepela na makambo ya elimo.
Na boumeli ya masolo oyo malandaki, namikundolaki ba Bibelforscher oyo bazalaki sembo na kondima na bango oyo namonaki na mboka Buchenwald. Ezali na ntango wana nde nayebaki ete ba Bibelforscher mpe ba Témoins de Jéhovah bazalaki bobele etuluku moko. Na lisalisi ya boyekoli na Biblia, mwasi na ngai mpe ngai tozwaki ekateli ya kosalela Jéhovah mpe tozwaki batisimo na avril 1955.
Basuvenire na ngai ezali naino ya sika kati na makanisi na ngai lokola soki nde makambo yango mauti koleka lobi. Nazali koyoka mawa te mpo na mimekamo oyo nazwaki kala. Elendisaki ngai mpe esalisaki ngai na koyeba ete biyangeli ya mokili oyo bizali na eloko monene te ya kopesa biso. Atako makambo na bomoi ya moto na moto makopesaka litomba epai na basusu bobele na meko moke, nakotombela ete oyo na ngai esalisa bilenge ete bamitika kokosama te na lolenge ya mokili oyo mpe, baluka nde bizaleli lokola malamu mpe bosembo kati na boklisto ya solo, oyo Yesu ateyaki.
Lelo, bampasi mpe bokesene ezwami kati na bomoi ya mokolo na mokolo. Lokola ba Bibelforscher kati na ba camps ya concentration, ngai mpe nazali kozela na mikolo mizali liboso koya ya mokili moko kitoko epai kuna bolingo ya bandeko mpe boyengebene ekozala mingi na esika ya mobulu mpe kobundela eloko ata ezali ya mabe to fanatisme. Kati na bozeli yango, nazali kosala makasi mpo na kosalela Nzambe mpe Klisto na makoki na ngai nyonso elongo na mwasi na ngai, bana na ngai mpe bankoko na ngai kati na lisangá ya boklisto epai nazali nkulutu. (Nzembo 112:7, 8)—Lisolo ya René Séglat.
[Bililingi na lokasa 28]
Awa na likoló: Bazali kobyanga bankombo kati na camp
Na loboko ya mwasi: ekuke ya kokota na camp ya mboka Buchenwald. Likomi elimboli: “Moto na moto na lifuti libongi na ye”
[Bililingi na lokasa 29]
Awa na likoló: esika bazalaki kotumba bibembe na camp ya mboka Buchenwald
Na loboko ya mwasi: bakangami 16 na étage moko