Nani akoki kobotama lisusu?
BATO malamu nyonso bakendeke na likoló? Mingi bakanisaka bongo, kasi Yesu Klisto ateyaki yango te. Epai na Nikodeme, mokonzi moko Moyuda, oyo ayaki epai na ye na butu, na nkuku, Yesu alobaki ete: “Moto moko te asili kobuta kino na likoló.”—Yoane 3:13.
Nzokande Yesu ayebisaki epai ya Nikodeme ete ntango ekoya wana bato bakozwa likoki ya kokota na Bokonzi ya makoló. Yesu alobaki na ntina na bango ete: “Soko moto akobotama na mai mpe na elimo te, akokoka kokota na Bokonzi na Nzambe te. Oyo ebotami na mosuni ezali mosuni, mpe oyo ebotami na elimo ezali elimo. Okamwa te ete nalobi na yo: ekoki na bino kobotama lisusu.” Kasi Nikodeme azalaki komituna lolenge nini moto akokaki kobotama lisusu.—Yoane 3:1-9.
Mbala mosusu yo mpe ozali komituna, soki Yesu alingaki koloba nini. Ekoki kozala ete maloba na ye mazali na boyokani na mbongwana ya mbalakaka esalemi epai na bato mingi oyo bazali kokanisa ete basili kotonda na elimo ya Nzambe?
Mayoki mpe elimo
Engebene bato basusu, mpo ete moto ayeba ete asili kobotama lisusu, esengeli bobele ete, aoka nguya ya elimo. Nzokande, motema na biso mpe elimo na biso ekoki kokosa biso, mingi mpenza soki ezwi bopusi ya mayoki ya makasi.—Yilimya 17:9.
William Sargant, moto ya mayele oyo ayekolaki bopusi ya mayoki likoló na elimo, alobeli ntina ya “koboya kotya motema na bindimeli bizwami wana totondi na mayoki ya esengo, ntango oyo tokoki kokosama na makanisi na biso.” Sargant apesi ndakisa ya bopusi ya mateya na baoyo bandimaka bomoi nsima ya kufa mpe na nsomo ya mɔ́tɔ ya lifelo. Nani oyo akolinga te kobotama lisusu mpo na kokende na likoló, soki liponi mosusu lizali te bobele kokende na minyoko ya seko? Sargant amonisi ete, na kobopusama na mayoki motindo wana, “makoki ya kokanisa mazali lisusu kosalelama te, boongo oyo ezali ordinatere na biso, etikami mpembeni mpo na mwa ntango, makanisi mpe mateya ya sika mazali kondimama kozanga ntembe.”—The Mind Possessed.
Bongo, lolenge nini moto akoki kososola soki bindimeli na ye ya kobotama lisusu ‘bindimamaki kozanga ntembe’? Mayele ya solo masengi ete moto amitika kotambwisama na nyonso oyo ekomamaki na bakomi ya Biblia, baoyo bapusamaki na elimo ya Nzambe. Baklisto balendisami na kosambela Nzambe na ‘bwanya na bango’ mpe basengeli komindimisa na bosolo ya bindimeli na bango.—Baloma 12:1, 2; 1 Batesaloniki 5:21.
Kobotama lisusu ezali kopesa moko na mabaku maleki monene oyo masili kopesamela bato. Yango ekangisami na likambo moko monene etali kokokisama ya mokano ya Nzambe. Atako nyonso wana ezali solo, kasi mituna lokola oyo mizali kotunama: Nani oyo azali kobotama lisusu? Lolenge nini yango ezali kosalema? Bilikya ya baoyo babotami lisusu bizali nini? Na nsuka, bobele bango nde bakobika?
[Picture on page 3]
Nikodeme azalaki komituna lolenge nini moto akoki kobotama lisusu