Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/11 nk. 8-13
  • “Nani akokani na Jéhovah, Nzambe na biso?”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Nani akokani na Jéhovah, Nzambe na biso?”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Abongi ete tondima ye mpe tokumisa ye
  • Tokumisa Jah!
  • Jéhovah akokani na nzambe mosusu te
  • Jéhovah azali na motema mawa
  • Jéhovah akokani na nzambe mosusu soko moke te
  • Nzambe oyo akeseni na bikeko
  • Bizaleli kitoko ya Jéhovah
  • Jéhovah abongi kokumisama libela na libela
  • Makanisi ya ntina na eteni ya mitano ya mokanda ya Nzembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Batyami pembeni lokola basanzoli na esengo kati na mokili mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Tókumisa Yehova mpo na misala na ye minene!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Na kati ya Nzembo
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/11 nk. 8-13

“Nani akokani na Jéhovah, Nzambe na biso?”

“Nani akokani na Jéhovah Nzambe na biso, ye oyo akofandaka na likoló?”​—NZEMBO 113:5.

1, 2. (a) Ndenge nini ba Témoins de Jéhovah batalelaka Nzambe mpe Biblia? (b) Mituna nini mibongi kotalelama?

BAOYO bazali kokumisa Jéhovah bapambwami mpenza. Oyo nde libaku kitoko ya kozwama kati na ebele monene wana ya esengo! Biso baoyo tozali Batemwe na ye, tozali kondima toli, mibeko, mateya, bilaka mpe bisakweli bizwami kati na Liloba na ye, Biblia. Tozali na esengo ya kozwa boyebi na nzela na Makomami mpe “koteyama na Jéhovah.”​—Yoane 6:45.

2 Na ntina na limemya mozindo oyo bazali na yango mpo na Nzambe, ba Témoins de Jéhovah bakoki kobimisa motuna oyo: “Nani akokani na Jéhovah, Nzambe na biso?” (Nzembo 113:5) Maloba wana ya mokomi na Nzembo mazali komonisa kondima. Kasi mpo na nini Batemwe bazali na kondima motindo wana epai na Nzambe? Mpe bantina nini bazali na yango mpo na kokumisa Jéhovah?

Abongi ete tondima ye mpe tokumisa ye

3. Nzembo nini oyo babengi yango ete ya Hallel, mpe mpo na nini bazali kobenga yango motindo wana?

3 Ezali malamu kozala na kondima epai na Jéhovah, mpamba te azali Nzambe oyo akokani na mosusu te. Ezali yango nde Nzembo misato kati na Nzembo motoba ya Hallel ezali koyebisa sikisiki, ezali bongo Nzembo 113, 114 mpe 115. Engebene Eteyelo ya Balabi Bayuda oyo batambwisamaki na Labi Hillel, Nzembo 113 mpe Nzembo 114 ezalaki koyembama na ntango ya kolya Pasika ya Bayuda, nsima wana kopo ya mibale ya vinyo etyamaki mpe wana ndimbola ya elambo yango eyebisamaki. Nzembo 115 kino Nzembo 118 ezalaki koyembama nsima na kopo ya minei ya vinyo. (Tala Matai 26:30.) Bazalaki kobenga yango “Nzembo na Hallel” mpo ete na bisika mingi bazali kokuta likumisi Aleluya!: “Kumisa Jah!”

4. Liloba “Aleluya” elimboli nini, mpe mbala boni ezwami kati na Biblia?

4 “Aleluya!” ezali likomi ya liloba na Liebele oyo lizwami mbala 24 kati Nzembo. Tozali kokuta lisusu mbala minei kati na Biblia lolenge na Greke ya liloba yango mpo na kolobela esengo na ntina na kobomama ya Babilone Monene, lisangá ya mokili mobimba ya mangomba na lokuta, wana Jéhovah Nzambe abandi koyangela. (Emoniseli 19:1-6) Sikawa tokotalela Nzembo, misato kati na liboke ya nzembo oyo ebengami ete Hallel; wana ezali biso kosala yango, totya kati na makanisi na biso lokola ete tozali koyemba loyembo yango mpo na lokumu ya Jéhovah.

Tokumisa Jah!

5. Na motuna nini Nzembo 113 ezali koyanola mpe etinda oyo epesami na Nzembo 113:1, 2 ezali mpenzampenza kotalela nani?

5 Mpo na nini kokumisa Jéhovah? Nzembo 113 eyanoli na motuna yango. Ezali kobanda na etinda oyo: bosanzola! Bosanzola nkombo na Jéhovah! Nkombo na Jéhovah esanzolama longwa sasaipi kino lobiko na lobiko!” (Nzembo 113:1, 2) “Aleluya!” Ee “Kumisa Jah.” Etinda wana ezali kotalela mpenzampenza basaleli na Nzambe oyo, na mikolo na biso bazali kobika na ntango ya nsuka.” (Danyele 12:4) Kobanda sikawa mpe libela na libela nkombo ya Jéhovah ekokumisama na mabelé mobimba. Batemwe na ye bazali sikawa kosakola ete Jéhovah azali Nzambe, ete Klisto azali Mokonzi, mpe ete Bokonzi esili kotyama na likoló. Satan le Diable mpe lisangá na ye, bakoki kopekisa bango te mpo na kokumisa Jéhovah.

6. Na ndimbola nini Jéhovah asengeli kokumisama “longwa na kobima na moi kino na kolala na yango?”

6 Na lisungi ya Jéhovah, loyembo wana ya lisanzoli ekoyokana kino na ntango ekotondisa mabelé mobimba. “Longwa na kotana na moi kino kolimwa na yango, nkombo na Jéhovah ekosanzolama.” (Nzembo 113:3) Ezali bobele te likambo ya losambo oyo esalemi mokolo na mokolo na mwa ndambo na bikelamu na mabelé. Moi mokobimaka na est mpe mokolalaka na ouest, kongalaka bongo na mabelé mobimba. Mosika te, epai nyonso oyo moi ezali kongala, nkombo ya Jéhovah ekosanzolama epai na bato nyonso oyo basikwami na boombo ya mangomba na lokuta mpe na lisangá ya Satana. Lisusu loyembo wana oyo ekozala na nsuka te esili kobanda koyembama na ba Témoins de Jéhovah bapakolami na elimo mpe na baoyo bakozala lokola bana ya Mokonzi, Yesu Klisto. Oyo nde libaku kitoko bazala na yango mpo na koyembela Jéhovah loyembo!

Jéhovah akokani na nzambe mosusu te

7. Wapi mitindo mibale ya bonene na Jéhovah oyo mingengisami na Nzembo 113:4?

7 Mokomi na nzembo abakisi ete: Jéhovah azali na lola likoló na mabota nyonso; nkembo na ye ekoleka likoló na lola.” (Nzembo 113:4) Maloba wana mamonisi mitindo mibale ya bokonzi monene na Nzambe: (1) Mpo na Jéhovah, Nzambe monene “atombwami likoló na mabota nyonso,” mabota yango mazali lokola litanga moko ya mai kati na kantini mpe lokola, ndambo na mabelé kati na emekeli. (Yisaya 40:15; Danyele 7:18); (2) nkembo na ye ezali monene mpenza koleka oyo na makoló oyo mazali komonana, mpamba te baanzelu bazali kosala mokano na ye monene.​—Nzembo 19:1, 2; 103:20, 21.

8. Mpo na nini mpe lolenge nini Jéhovah azali komikitisa mpo na kotya likebi na makambo oyo mazali koleka na likoló mpe na mabelé?

8 Kotombwama ya Nzambe epusaki mokomi na nzembo na koloba ete: “Nani akokani na Jéhovah Nzambe na biso? Ye oyo akofandaka na likoló. Ye oyo akomikitisa mpo na kotala, epai na lola mpe kati na nse.” (Nzembo 113:5, 6) Nzambe atombwami mingi mpenza kasi andimi komikitisa mpo na kotya likebi na makambo oyo mazali koleka na likoló mpe na mabelé. Atako azali na nse ya moto moko te mpe asengeli kotosa moto moko te, Jéhovah azali komikitisa na komonisaka mawa epai na bato na masumu oyo bazali na bolembu. Ntango apesaki Mwana na ye, Yesu Klisto, lokola “mbondi mpo na masumu” mpo na baklisto bapakolami mpe mpo na mokili na bato, Jéhovah amonisaki ezalela ya komikitisa.​—1 Yoane 2:1, 2.

Jéhovah azali na motema mawa

9, 10. Na ndimbola nini Nzambe ‘azali kotombola mobola, mpo na kofandisa ye esika moko na bankumu?’

9 Komonisaka polele motema mawa ya Nzambe, mokomi na nzembo abakisi ete Jéhovah “[akotombola] mobola longwa na mputulu; akobimisa mozangi na esika ebwakami ye, ete afandisa ye esika moko na [bankumu], elongo na bankumu ya bato na ye. Ye akofandisa mwasi ekomba na ndako na ye mpe akozalisa ye mama na kosepela na bana na ye. Kumisa Jah!” (Nzembo 113:7-9, MN) Basaleli na Jéhovah bandimi mpenza ete akoki kobikisa bato na sembo oyo bazali kokelela, kotya nsuka na ezalela na bango ya mpasi mpe kokokisa bamposa na bango ya solo. ‘Ye oyo azali likoló mpe Oyo-atombwi-mosika azali kolendisa elimo na basokemi mpe motema na baoyo batutami.’​—Yisaya 57:15.

10 Na ndimbola nini Jéhovah ‘azali kotombola babola mpo na kofandisa bango elongo na bankumu?’ Soki yango ezali mokano na ye, Nzambe azali kopesa epai na basaleli na ye bitelemelo na nkembo motindo moko na oyo ya bankumu. Ezali yango nde asalaki mpo na kokabola bilei na Ezipito. (Genese 41:37-49) Na Yisraele, ezalaki litomba ya kosepelisa mingi kofanda esika moko na bankumu, elingi koloba mibali oyo bapesamelaki bokonzi kati na libota na Jéhovah. Lokola bakengeli baklisto ya mikolo na biso, mibali wana bazalaki kozwa lisungi mpe lipamboli na Nzambe.

11. Mpo na nini tokoki koloba ete maloba ya Nzembo 113:7-9 matali mpenzampenza basaleli ya Jéhovah na ntango na biso?

11 Mpo na “mwasi ekomba,” ndenge nini Nzambe azali kozalisa ye “mama na kosepela na bana na ye?” Apesaki epai na Hannah mwasi ekomba, mwana mobali, Samwele, oyo na nsima mama na ye Hannah apesaki ye lokola likabo mpo na mosala ya Jéhovah. (1 Samwele 1:20-28) Likambo na kokamwa koleka kobanda na Yesu mpe na kosopama na elimo santu likoló na bayekoli na ye na Pantekote ya mobu 33; mwasi na Nzambe na elilingi, Siona ya likoló, abandaki kobota bana na elimo. (Yisaya 54:1-10 13; Misala 2:1-4) Lokola Nzambe azongisaki Bayuda na mboka na bango nsima na boombo na Babilone, bobele bongo na 1919 asikolaki batikali bapakolami ya “Yisraele na Nzambe” oyo bakangamaki na boombo na Babilone Monene mpe apesaki bango mapamboli minene ya elimo na boye ete maloba ya Nzembo 113:7-9 makokani mpenza epai na bango. (Bagalatia 6:16) Ba Témoins de Jéhovah ya sembo, batikali na Yisraele ya elimo mpe baninga na bango oyo bazali na elikya ya kofanda na mabelé, bazali koyanola na motema mobimba na libyangi oyo epesami na nsuka ya Nzembo 113 ete: “Kumisa Jah!”

Jéhovah akokani na nzambe mosusu soko moke te

12. Na maloba nini Nzembo 114 emonisi ete Jéhovah akokani na nzambe mosusu te?

12 Nzembo 114 emonisi ete Jéhovah akokani na nzambe mosusu te na koyebisaka makambo na kokamwa oyo Bayisraele bamonaki Mokomi na nzembo azali koyemba ete: “Ebimaki Yisraele na Ezipito, ebimaki libota na Yakobo kati na [libota na bato na lokota loyebani te], akamataki Yuda ete ezala esika na ye na bulee mpe Yisraele mabelé na ye.” (Nzembo 114:1, 2) Nzambe asikolaki Yisraele na boombo ya Baezipito, oyo lokota na bango ezalaki koyokana malamu te kati na matoi na bango. Kosikolama ya libota na Jéhovah​—oyo libengami awa ete Yuda mpe Yisraele—​emonisi ete na eleko na biso Nzambe akoki kosikola basaleli na ye nyonso.

13. Ndenge nini Nzembo 114:3-6 emonisi bokonzi ya Jéhovah mpe eyokanisi yango ma makambo oyo Yisraele ya kala bakutanaki na yango?

13 Bokonzi na Jéhovah likoló na bikelamu na ye nyonso ezali komonana kati na maloba oyo: “Mai monene emonaki yango mpe ekimaki; Yordani epesaki nzela mpo na bango. Ngomba epombwaki pelamoko mpate mibali, ngomba mike pelamoko bana na mpate. Likambo na yo nini, yo mai monene, ete okima? Yo mpe Yordani ete ozonga nsima? Bino ngomba ete bopombwa? Mpe bino ngomba mike pelamoko na mpate mibali?” (Nzembo 114:3-6) Mai Motane “ekimaki” ntango Nzambe afungolaki nzela mpo na libota na ye katikati na yango. Na bongo Yisraele bamonaki loboko makasi na Jéhovah kosala mosala epai na Baezipito, baoyo bakufaki ntango mai mazongelaki bisika na yango. (Exode 14:21-31) Na libaku mosusu Nzambe amonisaki nguya na ye, ntango Yordani “epesaki nzela,” kotikaka bongo Bayisraele ete bakatisa yango mpe bakota kati na mokili ya Kanana. (Yosua 3:14-16) ‘Ngomba epumbwaki lokola mpate mibali’ ntango ngomba na Sinaï ebimisaki mɔ́tɔ mpe elengaki na ntango oyo boyokani ya Mibeko esalamaki. (Exode 19:7-18) Ekomaki ye pene na nsuka ya loyembo na ye, mokomi na nzembo abandaki koloba na lolenge ya mituna, mbala mosusu mpo nakoyebisa ete biloko bizangi bomoi lokola mai monene, ebale, ngomba minene mpe ngomba mike ebetamaki na komonisama wana ya nguya ya Jéhovah.

14. Likambo nini ya nguya Jéhovah asalaki na Meliba mpe na Kadesi, mpe yango esengeli kozala na bopusi nini likoló na basaleli na ye na ntango na biso?

14 Kolobelaka lisusu nguya ya Jéhovah, mokomi na nzembo ayembi ete: “Telengana, yo mokili, liboso na Nkolo, liboso na Nzambe na Yakobo, ye oyo abongoli libanga etima, libanga makasi ete likoma motó na mai.” (Nzembo 114:7, 8) Na lolenge ya elilingi, mokomi na nzembo ayebisi mpenza ete bato basengeli kobanga Jéhovah, Nkolo mpe Mokonzi ya mabelé mobimba. Azalaki “Nzambe na Yakobo,” to Yisraele, lokola azali mpe Nzambe ya Bayisraele na elimo mpe ya baninga na bango na mabelé. Na Meliba mpe na Kadesi, Jéhovah amonisaki nguya na ye na kopesaka Yisraele mai na nzela na ekamwiseli; “abongolaki libanga na libeke na mai etondi na nkekele, libanga makasi na liziba ya mai.” (Exode 17:1-7; Mituya 20:1-11) Bokundoli wana na ntina na nguya ya kokamwa na Jéhovah mpe likebi na ye ya bolingo ezali kopesa epai na Batemwe na ye bantina malamu ya kozala na kondima makasi epai na ye.

Nzambe oyo akeseni na bikeko

15. Lolenge nini Nzembo 115 ezalaki mbala mosusu koyembama?

15 Nzembo 115 ezali kosenga biso ete tokumisa Jéhovah mpe tozala na elikya epai na ye. Ezali komonisa ete ezali Jéhovah nde azali kopambola biso mpe kosalisa biso, mpe ezali komonisa ete banzambe na bikeko bazali na ntina te. Nzembo wana ezalaki mbala mosusu na biteni bikeseni, mongongo moko mozali koyemba ete “Bino batosi na Jéhovah, botya elikya na bino epai na Jéhovah,” nzokande lisangá mobimba lizalaki kozongisa ete: “Azali lisungi na bango mpe nguba na bango.”​—Nzembo 115:11.

16. Likeseni nini tokoki kosala kati na Jéhovah mpe banzambe ya mabota?

16 Ezali biso moko te nde tozali kozwa lokumu, kasi ezali kopesama na nkombo ya Jéhovah, Nzambe na boboto, to ya bolingo na sembo, mpe ya solo. (Nzembo 115:1) Ata soki banguna batuni na kotyolaka ete: “Nzambe na bango azali. . . wapi?,” libota na Jéhovah bakoki koyanola: ‘Nzambe na biso azali na likoló mpe azali kosala nyonso oyo esepelisi ye.’ (Versets 2, 3) Mpo na banzambe ya mabota, bakoki kosala eloko moko te mpamba te bazali bikeko na palata mpe na wolo bisalemi na moto. Atako bizali na monoko, na miso mpe na matoi, bikolobaka te, bikomonaka te; mpe bikoyokaka te. Bizali na zolo, kasi bikolumbutaka nsolo te; bizali na makolo, kasi bikoki kotambola te; bizali na mongongo, kasi bikolobaka te. Baoyo bakosalaka bikeko wana bizangi nguya mpe baoyo bazali kotya elikya epai na yango bakokoma lokola yango: bazangi bomoi.​—Versets 4 kino 8.

17. Mpo ete bakufi bakoki kokumisa Jéhovah te, eloko nini tosengeli kosala, mpe kati na elikya nini?

17 Na nsima elendiseli epesami mpo na kozala epai na Jéhovah, Lisungi mpe Nguba na libateli ya Yisraele, ya ndako na bonganga na Alona mpe ya baoyo nyonso bazali kobanga Nzambe. (Nzembo 115:9-11) Lokola baoyo nyonso batali kobanga Jéhovah, biso mpe tozali komonisa limemya mozindo epai na Nzambe mpe totambwisami na nsomo ya lobiko ete toboyama te epai na ye. Tozali mpe na elikya ete “Motongi na lola mpe na mabelé” azali kopambola basambeli na ye ya sembo. (Versets 12-15) Likoló ezali esika ya kiti na bokonzi na ye, kasi apesaki mabelé ete ezala efandelo na seko ya bato na sembo mpe na botosi. Mpo ete bakufi, oyo bazali lisusu na boyebi te, bakoki kokumisa Jéhovah te, biso, bato na bomoi, tosengeli kosala yango na bosembo mpe na bokangami mobimba. (Mosakoli 9:5) Bobele baoyo bazali kokumisa Jéhovah bakosepela na bomoi na seko mpe bakoki ‘kokumisa Jah’ libela na libela mpe koloba malamu na ntina na ye “lobiko na lobiko.” Na bongo totikala na bosembo nyonso penepene na baoyo bazali kolanda toli oyo: “Kumisa Jah!”​—Nzembo 115:16-18.

Bizaleli kitoko ya Jéhovah

18, 19. Na makambo nini bizaleli ya Jéhovah bikesenisi ye na banzambe ya lokuta.

18 Kokesenáká na banzambe na bikeko oyo bakoki kosala eloko moko te, Jéhovah azali Nzambe na bomoi, oyo azali komonisa bizaleli kitoko. Azali bolingo, “Nzambe na mawa mpe na ngolu, akoyokaka nkanda noki te mpe aleki na boboto.” (Exode 34:6; 1 Yoane 4:8) Oyo nde likeseni mpenza na Moleke, nzambe mabe ya Kanana, epai na ye bana bazalaki kopesama lokola mbeka! Elobamaki ete ekeko ya nzambe yango ezalaki na nzoto ya moto mpe na motó ya ngombe mobali. Bazali koloba ete, ekeko yango ezalaki kotyama mɔ́tɔ makasi, mpe bazalaki kobwaka bana na bomoi kati na maboko na yango mafungwami mpe bazalaki kokwea kati na mɔ́tɔ. Kasi Jéhovah azali na bolingo mingi mpe na mawa mingi ete likanisi ya mbeka motindo wana “eyelaki ye ata moke te kati na motema.”​—Yilimia 7:31.

19 Kati na bizaleli minene ya Jéhovah tokokuta mpe boyengebene ya solo, mayele ezangi nsuka mpe nguya oyo eleki nyonso. (Deteronome 32:4; Yobo 12:13; Yisaya 40:26) Ezali boni mpo na banzambe ya lokuta? Na esika ya kosalela boyengebene banzambe mpe banzambe-basi ya Babilone bazalaki kozongisa mabe na mabe. Banzambe na Baezipito bazalaki na mayele te; mpamba te, elobamaki na ntina na bango ete bazalaki na bolembu lokola bato. Yango ezalaki kokamwisa te mpamba te banzambe wana na lokuta mpe banzambe-basi wana basalamaki na bato oyo bazalaki komikumisa ete bazali na mayele, kasi “babungisaki lisosoli nyonso malamu.” (Baloma 1:21-23) Mpo na oyo etali banzambe na Bagreke, bazalaki koyanga myango mabe moko na ntina na mosusu. Na ndakisa, engebene masapo, Zeus asalelaki bokonzi na ye mabe mpo na kolongola tata na ye, Cronos, oyo ye moko alongolaki tata na ye Ouranos, na bokonzi. Oyo nde lipamboli mpo na kosalela mpe kokumisa Jéhovah, Nzambe na solo ya bomoi, oyo azali na bolingo, na boyengebene na mayele mpe na nguya ya kokoka!

Jéhovah abongi kokumisama libela na libela

20. Engebene mokonzi Davidi, mpo na bantina nini ebongi ete tokumisa nkombo ya Jéhovah?

20 Lokola liboke ya nzembo oyo ebengami Hallel emonisi yango, Jéhovah abongi kokumisama libela na libela. Na likebisi motindo moko, ntango Davidi mpe Bayisraele mosusu bapesaki makabo mpo na kotonga tempelo, mokonzi wana alobaki liboso na bato na ye ete: ”Yo Jéhovah, Nzambe na Yisraele, tata na biso, okumisama libela na libela. Ɛ Jéhovah, epai na yo, monene ezali mpe nguya mpe nkembo mpe elonga mpe lokumu. Mpamba te nyonso na likoló mpe na nse ezali na yo, Ɛ Jéhovah, mpe yo okokumisama nkolo likoló na nyonso. Mosolo mpe lokumu ikoutaka bobele na yo; yo ozali mokonzi likoló na nyonso. Na loboko na yo, nguya ezali mpe makasi; kofulukisa mpe kokembisa nyonso ezali na loboko na yo. Boye, Ɛ Nzambe na biso, sasaipi tokotonda yo mpe tokosanzola nkombo na yo na nkembo.”​—1 Ntango 29:10-13.

21. Na maloba nini mokapo ya Emoniseli 19:1-6 emonisi ete Jéhovah akumisami na bibele na ye na likoló?

21 Jéhovah akopambolama mpe akokumisama libela na libela kati na makoló. Ntóma Yoane ayokaki “ebele monene na likoló” koloba ete: “Kumisa Jah! Lobiko, na nkembo, na nguya [ezali] na Nzambe na biso! Mpo ete bikateli na ye bizali solo mpe sembo. Mpo ete akweisi mwasi na pite [Babilone monene] oyo abebisaki mokili na pite na ye; abukanisi ye mpo na makila na baombo na ye.” Mbela na mibale balobi ete, “Kumisa Jah!” Mikóló yango ntuku mibale na minei, na bikelamu na bomoi yango minei bafukami, mpe basambeli Nzambe oyo afandi na kiti na bokonzi koloba ete: “Kumisa Jah!” Mpe mongongo ebimi na kiti na bokonzi ete: “Bokumisa Nzambe na biso, bino baombo na ye nyonso, bino baoyo bokobangaka ye, bato mike na bato minene!” Mpe Yoane abakisi: “Nayokaki mongongo lokola mongongo na ebele monene, lokola mongongo na mai monene, lokola mongongo na nkake makasi, koloba ete: ‘Kumisa Jah mpo ete Jéhovah Nzambe na biso, Mozwi-na-Nguya-Nyonso, asili kozwa bokonzi.’”​—Emoniseli 19:1-9, MN.

22. Ndenge nini Jéhovah akokumisama kati na mokili ya sika oyo alaki ete akosala?

22 Ebongi mpenza ete mampinga na likoló makumisa Jéhovah. Kati na mokili ya sika, oyo mosika te akosala yango, bato na sembo oyo bakosekwisama, bakosangana na baoyo bakobika na nsuka ya biloko na ntango oyo mpo na kokumisa Jah. Bangomba milai ikotelema mpo na koyemba masanzoli na Nzambe. Bangomba mike na matiti mpe banzete ikoyemba mpe masanzoli na ye. Ee, ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi mpe oyo ezali kopema ekokumisa nkombo na Jéhovah elongo na lisangani ya bayembi oyo bakoyemba Aleluya monene! (Nzembo 148) Okosangisa mongongo na yo na etuluku wana ya esengo? Solo mpenza soki ozali kosalela Jah na bosembo nyonso elongo na libota na ye. Yango esengeli kozala mokano ya bomoi na yo, mpamba te nani akokani na Jéhovah Nzambe na biso?

Bozongeli

◻ Mpo na nini tosengeli kokumisa Jéhovah Nzambe?

◻ Na makambo nini Jéhovah akokani na nzambe mosusu te?

◻ Nini emonisi ete Jéhovah azali na motema mawa?

◻ Na nini Jéhovah akeseni mpenza na bikeko mpe na banzambe ya lokuta?

◻ Mpo na nini tokoki koloba ete Jéhovah akokumisama libela na libela kati na likoló mpe na mabelé?

[Elilingi na lokasa 9]

Bazalaki koyemba nzembo ya Hallel na ntango ya kolya Pasika

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto