Bankulutu—Bosembola basusu na elimo ya bopɔlɔ
MOTEMA ya moklisto ya solo ekoki kokokanisama na elanga ya elimo oyo ezali kobota mbuma kitoko. Ezali likambo ya kokamwa te ete bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, malamu, kondima, bopolo mpe komipekisa eyikana kati na yango, boye te? Yango ezali mbuma ya elimo oyo Jéhovah asili kopesa epai na basaleli na ye. (Bagalatia 5:22, 23) Nzokande, moklisto oyo alingi ete motema na ye etikala elanga kitoko mpo na Tata na ye ya likoló, asengeli kobunda makasi mpe kolendendela mpo na kotemela lititi mabe: lisumu liuti na bankoko na biso.—Baloma 5:5, 12.
Ekoki mbala mosusu kokoma ete eloko moko ya mabe ekola kati na motema mozangi kokoka ya moto oyo akobangaka Nzambe. Mbala mosusu moto yango azalaki makasi na elimo. Mpe mikakatano mibandi kobima, na ntembe te mpo na baninga mabe to mpo na ekateli moko oyo ebongi te. Lolenge nini bankulutu ya lisangá bakoki kopesa lisalisi ya elimo epai ya moto wana?
Toli euti na ntóma
Mpo na kosalisa moklisto moko oyo azali kobunga nzela, bankulutu basengeli kolanda toli oyo ya ntóma Paulo: “Bandeko, soko moto anyati litambe mabe, naino ye moko asosoli yango te, bino bato bozali na makoki na elimo, bomeka kosembola moto motindo wana kati na elimo ya bopolo. Omisɛnzela yo moko ete yo mpe omekama te.” (Bagalatia 6:1, MN) Ntango moko na baninga na bango “anyati litambe mabe liboso ete asosola yango,” bankulutu bazali na mokumba ya kopesa ye lisalisi nokinoki.
Paulo alobeli “moto” oyo anyati litambe mabe. Nzokande, liloba ya greke (anʹthro·pos) lisalemi awa likoki kolobela mobali to mwasi. Bongo “kosembola” moto elimboli nini? Liloba ya greke (ka·tar·tiʹzo) elimboli “kotya na molongo alima.” Liloba bobele moko wana esalelami mpo na kobongisa minyama oyo epaswamaki. (Matai 4:21) Ezali mpe kolimbola likambo ya kozongisa mokwa moko na esika na yango. Monganga akosala yango na mayele mpo na kopengola ete mobeli aoka mpasi mpamba mpamba te. Bobele bongo, esengeli kozala na ekenge, na takte mpe na motema mawa mpo na kosalisa ndeko mobali to ndeko mwasi moko ete azonga na molongo alima kati na elimo.
Bankulutu bakomimonisa bango moko bato ya elimo ntango bazali na elimo ya bopolo wana bazali komeka kosembola moto moko. Ntembe ezali te ete, Yesu oyo azalaki na motema mosokemi, asengelaki komonisa bopolo na likambo wana. (Matai 11:29) Bankulutu basengeli komonisa ezaleli yango epai na mosaleli na Jéhovah oyo anyati litambe mabe, mpo ete bango moko basalaka masumu oyo bazangi kokanela yango. Ezali likambo oyo likoki kokoma, soki esalema naino te.
Mibali oyo bazali na makoki ya elimo basengeli ‘komema mikumba’ ya baninga na bango baklisto. Na yango, bankulutu bazali na mposa ya kosalisa ndeko mobali to ndeko mwasi na kobundisa Satana, komekama, bolembu ya nzoto mpe bopusi ya masumu. Na ntembe te, mpo na bakengeli wana ezali lolenge mosusu ya ‘kokokisa mobeko ya Klisto.’—Bagalatia 6:2.
Bato oyo bazali mpenza na makoki ya elimo bazali bato ya komikitisa mpe bazali kososola ete “soki moto akomitanga ete aleki monene, nzokande azali eloko te, azali komizimbisa.” (Bagalatia 6:3, MN) Ata milende nini bakosala mpo na komimonisa sembo mpe bato ya boboto, bankulutu bakokoka te kosala yango na motindo ya kokoka mpe na motema mawa etondi na bolingo ya Mwana na Nzambe, Yesu Klisto. Kasi yango ezali kopekisa bango te na kosala oyo ekoki na bango.
Bankulutu bayebi ete ekozala mabe soki bafundi moko na baninga na bango na lofundo mpe na lolendo nyonso. Yesu akokaki mpenza kosala bongo te. Apesaki bomoi na ye bobele mpo na baninga na ye te, kasi lisusu mpo na banguna na ye. Bankulutu basengeli komonisa bolingo motindo yango ntango bazali kosala milende ya kosalisa bandeko na bango basi mpe mibali oyo bazali na makámá ete bazala penepene na Tata na bango ya makoló, mpe bakangama na mitinda na ye ya sembo. Wapi mwa matambe oyo makopesa nzela na bankulutu ete basembola baninga na bango?
Mwa matambe
Botya motema epai na Jehovah kati na mabondeli mpo na kozala na motema mosokemi na maloba na bino mpe na misala na bino. Yesu azalaki moto na motema mosokemi; azalaki kobondela mingi Tata na ye ya likoló mpo na kozwa litambwisi na ye, mpe asalaki ntango nyonso oyo ezalaki kosepelisa Ye. (Matai 21:5; Yoane 8:29) Bankulutu basengeli kosala lisusu mingi koleka ntango bazali koluka kosalisa moto oyo anyati litambe mabe. Nkulutu oyo azali kosala lokola mokengeli molandi oyo azali na motema mosokemi akoluka kobangisa bato te, kasi akosalela maloba ya koyikisa mpiko mpe ya kolendisa. Na boumeli ya lisoló, akoluka kosala ete moklisto oyo azali na mposa ya lisalisi amiyoka mpenza malamu mpo na koloba. Mpo na yango, kobanda na libondeli ya sembo ekopesa mbano ya malamu. Ye oyo azwi toli epesami na bopolo, akondima yango na motema mobimba soki ayebi ete mopesi toli, na ndakisa na Yesu, alingi kosala oyo ezali kosepelisa Nzambe. Na kosukisáká na libondeli, bokoki komonisa na moto yango ntina ya kosalela toli oyo epesameli ye na bolingo mpe na bopolo.
Nsima ya libondeli, bokumisa moto yango na sembo nyonso. Tokoki kolobela bizaleli malamu ya moto yango: boboto na ye, elimo na ye ya kokokisa mosala to molende na ye. Tokoki komonisa ete azali kosalela Jéhovah na bosembo nyonso, ntango mosusu na boumeli ya mibu mingi. Na kosalaka bongo tozali komonisa ete tozali komibanzabanza mpo na ye mpe ete, tozali na likanisi lolenge moko na Klisto mpo na ye. Yesu abandaki nsango na ye epai na lisangá ya Tiyatire na makumisi. Alobaki ete: “Nayebi misala na yo, bolingo na yo mpe kondima na yo, mpe na mokumba na yo, mpe mpiko na yo, nayebi mpe ete misala na yo ya nsuka mileki misala na yo ya ebandeli.” (Emoniseli 2:19) Maloba oyo mandimisaki basangani ya lisangá ete Yesu azalaki koyeba mosala kitoko oyo bazalaki kosala. Atako basalaki mabunga—bazalaki kondima bopusi ya “Yezabele”—lisangá lizalaki kosala makambo mingi mosusu ya malamu, mpe Yesu alingaki ete bandeko na ye ya basi mpe mibali bayeba ete misala na bango ya molende mibombamaki te. (Emoniseli 2:20) Bankulutu basengeli kosala motindo moko na kopesaka longonya ntango ebongi kosala yango.
Bokomisa libunga monene te koleka lolenge yango ezali. Bankulutu basengeli kokengela etonga ya Nzambe mpe kobatela lisangá ete lizala peto. Nzokande mabunga mosusu ya elimo mazali kosenga toli ya makasi mpe makoki kobongisama na nkulutu moko to bankulutu mibale; ezali kosenga comité judiciaire te. Na makambo mingi, mabunga mazali kouta na bolembu ya kozanga kokoka kasi ezali mpo na motema mabe te. Bankulutu basengeli kobatela etonga ya Nzambe na bopolo mpe komikundola likambo oyo: “Mpo ete ekateli ekozanga mawa epai na moto na moto oyo akozanga mawa. Kasi mawa ekolonga kati na kosambisama.” (Yakobo 2:13; Misala 20:28-30) Na esika ya kotonga makambo ya mikemike, bankulutu basengeli komonisa bopolo ntango bazali kosalisa baninga na bango oyo babongoli motema, na ndakisa ya Jéhovah Nzambe na biso, oyo atondi na motema mawa mpe na ngolu.—Baefese 4:32.
Bomimonisa bato bayebi komitya na esika ya bato mosusu na kotalelaka makambo oyo mamemaki na libunga. Ezali na ntina mingi ete bankulutu bayoka na likebi nyonso moninga na bango wana azali kofungola motema na ye. Lokola ‘Nzambe atyolaka te motema oyo motutami mpe monyatami,’ bankulutu mpe basengeli kosala yango te. (Nzembo 51:17) Mokakatano mokoki kobima mpo ete mobalani na ye azali kokokisa te mposa na ye ya mayoki. Mpasi makasi mpe ya koumela ya konyokwama na makanisi, ekoki kolembisa nguya makasi ya bizaleli malamu oyo moto azalaki na yango. Ekoki kopesa ye nkaka ya kozwa bikateli malamu. Bankulutu oyo batondi na bolingo bakotalela makambo motindo yango, mpo ete atako alendisaki bandeko na ‘kopamela bato na goigoi,’ Paulo alobaki lisusu ete: “Bobondisa milimo minyokwami, bosunga bato na motau, bozala na motema molai epai na bato nyonso.” (1 Batesaloniki 5:14, MN) Ya solo, bankulutu basengeli te kolembisa mitinda ya sembo ya Nzambe, kasi, na ndakisa na ye, basengeli kotalela makambo oyo makoki kobongola bikateli na bango.—Nzembo 103:10-14; 130:3.
Boyokisa baninga na bino nsoni te. Tosengeli te kolongola epai na moklisto moko lokumu ya bomoto na ye to komonisa na ye ete azali na ntina moko te. Kasi tokolendisa ye na kolongola mabunga na ye soki tondimisi ye ete azali na bizaleli ya boklisto mpe na bolingo mpo na Nzambe. Na yango, Bakolinti bapusamaki na komonisa bokabi ntango Paulo alobaki na bango ete amikumisaki epai na basusu na ntina “na mposa malamu” mpe “molende” na bango kati na likambo wana.—2 Bakolinti 9:1-3.
Bomonisa ete soki moto amipesi epai na Jéhovah, akoki kolonga mikakatano na ye. Tomeka kosalisa moto yango na kososola ete kotya motema epai na Jéhovah mpe kosalela batoli ya Liloba na ye ekosalisa ye na kosala mbongwana oyo esengeli. Mpo na yango, oyo tozali koloba esengeli kozwa moboko likoló na Makomami mpe na mikanda mikolimbolaka Biblia. Tozali na mokano mibale: (1) kosalisa moto yango na koyeba mpe kososola makanisi ya Jehovah mpe, (2) komonisa ye lolenge nini, abosanaki to amonisaki bopotu ya kolanda mitinda ya Nzambe.
Bosalela na mbala moko batoli ezwami kati na Makomami mpe mituna ya mayele. Yango ekoki kozala mwango malamu mpo na kosimba motema. Na nzela ya mosakoli Malaki, Jéhovah asalelaki motuna mpo na komonisa na meko nini libota na ye lizimbisamaki. Alobaki: “Moto akoyiba nde Nzambe?” Mpe abakisaki ete: “Kasi bino bozali koyiba ngai.” (Malaki 3:8) Bayisraele bazalaki kopesa te ndambo na zomi ya biloko na bango lokola esengamaki na Mibeko ya Moize; yango ekokanaki na koyiba Jéhovah. Mpo na kosilisa likambo yango, basengelaki kokokisa mikumba na bango epai ya losambo ya peto na kondima nyonso, kondimisama ete Nzambe akopambola bango mingi. Na kosalelaka mituna mitondi na limemya oyo mizali kotinda bato na kokanisa, bankulutu bakoki lisusu komonisa ete kosala oyo ezali malamu lelo etali kati na makambo mosusu, kotya motema epai na Tata na biso ya likoló mpe kotosa ye. (Malaki 3:10) Soki likanisi oyo ekoti na motema ya ndeko na biso, ekosalisa ye mingi na ‘kosembola nzela mpo na makolo na ye.’—Baebele 12:13.
Lobela mingi bolamu bozali kozwama na kondimaka toli. Mpo na kopesa batoli ya malamu, esengeli na mbala moko komonisa bampasi ekouta na kolanda banzela ya mabe mpe kokundola bolamu oyo bokozwama na kobongisa makambo. Nsima ya kopesa bango likebisi ya ntina, Yesu alakaki epai na basangani ya lisangá ya Laodikia oyo balembaki na elimo ete, soki babongolaki motema na etamboli na bango ya kala mpe soki bakomaki bayekoli na ye ya molende, mbɛlɛ bakozwa matomba minene, lokola elikya ya koyangela elongo na ye kati na makoló.—Emoniseli 3:14-21.
Boluka koyeba soki batoli esalelami. Lokola monganga oyo azali mbala na mbala kotala soki mokwa oyo azongisaki ezali naino na esika na yango, bankulutu basengeli kosala makasi mpo na koluka koyeba soki batoli epesami likoló ya Makomami ezali kosalelama. Bakoki komituna mituna oyo milandi: Esengeli kopesa lisalisi mosusu? Esengeli kozongela batoli yango, na lolenge mosusu? Mbala na mbala Yesu apesaki bayekoli na ye toli na ntina ya kolona ezaleli ya komikitisa. Na boumeli na mwa ntango, alukaki kosembola makanisi na bango na nzela ya batoli, na masese mpe na bandakisa kitoko. (Matai 20:20-28; Malako 9:33-37; Luka 22:24-27; Yoane 13:5-17) Bobele bongo, bankulutu bakoki kopesa lisalisi na bango mpo na kosembolama ya sikisiki ya ndeko mwasi to ndeko mobali moko na kobongisáká masoló mbala na mbala mpo na komema ye na kokola kino akozwa lisusu kolongono malamu ya elimo.
Bokumisa moto yango ntango nyonso oyo azali kosala bokoli. Soki moto oyo asalaki libunga asali molende ya solo mpo na kosalela batoli ya Biblia, bokumisa ye na esengo nyonso. Yango ekopesa nguya mingi na batoli oyo epesamaki liboso mpe ekoki kolendisa ye na kolanda kokola. Kati na mokanda na ye ya liboso epai ya Bakolinti, ntóma Paulo asengelaki kopesa bango batoli makasi na makambo mingi. Mwa ntango moke na nsima, wana Tito ayebisaki ye lolenge malamu oyo bayambaki mokanda na ye, Paulo akomaki mpo na kokumisa bango. Alobaki: “Soki nasepeli sikawa, ezali te bobele mpo na mawa na motema oyo bozali na yango, kasi mpo ete booki mawa na motema kino kobongwana, mpamba te booki mawa na motema na motindo mobongi na mokano ya Nzambe.”—2 Bakolinti 7:9, MN.
Ntina ya esengo
Ya solo, Paulo asepelaki ntango ayokaki ete batoli na ye esalisaki Bakolinti. Bobele bongo, bankulutu baokaka esengo mingi lelo soki moko na baninga na bango alongwi na litambe mabe mpo ete alandaki lisalisi na bango litondi na bolingo. Bakoki mpenza kozwa esengo monene na kosalisa moklisto moko oyo abongoli motema na kolongola na motema na ye lititi mabe ya nzube oyo ezali bongo lisumu mpo na kopesa nzela ete mbuma ebele mpe ya malamu eyikana.
Soki bankulutu balongi kosembola moto oyo anyataki litambe mabe, akoki kolongwa na nzela oyo esengelaki komema ye na likama monene ya elimo. (Tala Yakobo 5:19, 20.) Ye oyo azwi lisalisi motindo yango asengeli komonisa botondi na ye epai na Jéhovah Nzambe. Ekozala mpe malamu komonisa botondi epai na bankulutu mpo na lisalisi ya bolingo oyo bapesaki mpe mpo na motema mawa mpe ezaleli ya koyeba komitya na esika ya bato basusu. Na nsima, wana moto yango akokoma malamu na elimo, baoyo nyonso batalelamaki kati na likambo yango bakoki kosepela ete kosembolama wana esalemaki na elimo ya bopɔlɔ.