Mituna na batangi
Kati na Baebele 11:26, Moize alobelami lokola “Klisto,” to azalaki nde elilingi na Yesu Klisto?
Ntango alobelaki kondima ya Moize, ntóma Paulo akomaki ete ye “atangaki nsoni ya Klisto lokola bozwi monene koleka biloko ya motuya na Ezipito; mpamba te atyaki miso na mbano esengeli kopesama.” (Baebele 11:26, MN) Emonani lokola ete, na lolenge mosusu, Paulo alobelaki Moize lokola “Klisto,” to mopakolami.
Ezali solo ete na makambo mingi, Moize azalaki elilingi ya Masiya oyo asengelaki koya. Atako Moize azalaki mosakoli, nzokande asakolaki koya ya mosakoli mosusu ‘lokola ye,’ kasi monene koleka ye. Bayuda mingi basosolaki ete Yesu azalaki “mosakoli yango,” likambo oyo lindimamaki na bayekoli na ye. (Deteronome 18:15-19;Yoane 1:21; 5:46; 6:14; 7:40; Misala 3:22, 23; 7:37) Moize azalaki mpe moyokanisi ya kondimana na Mibeko, kasi Yesu apesameli “mosala moleki malamu” lokola “mayokanisi ya kondimana eleki malamu,” kondimana ya sika ya nkembo. (Baebele 8:6; 9:15; 12:24; Bagalatia 3:19; 1 Timoté 2:5) Tokoki bongo koloba ete, na makambo mosusu, Moize azalaki elilingi ya Masiya oyo asengelaki koya.
Nzokande emonani ete yango ezali mpenza ndimbola ya liboso te ya Baebele 11:26. Eloko moko te ezali komonisa ete Moize ayebaki makambo nyonso matalaki Masiya, mpe azalaki te kotalela ete ezali na nkombo ya Masiya to lokola elilingi ya Masiya nde azalaki kokutana na makambo makomaki na Ezipito.
Bato basusu bapesaki makanisi ete maloba ya Paulo na Baebele 11:26 mazalaki na ndimbola ekokani na oyo emonisi ete baklisto bazali kozwa “minyoko mpo na Klisto.” (2 Bakolinti 1:5) Baklisto bapakolami bayebaki ete Klisto amonaki mpasi mpe soki ‘banyokwami elongo na ye bakozwa nkembo elongo na ye’ kati na makoló. Kasi, na eleko na ye, Moize ayebaki te makambo oyo Masiya asengelaki koyikela yango mpiko, mpe azalaki na elikya ya bomoi na likoló te.—Baloma 8:17; Bakolose 1:24.
Ezali na lolenge ya petee ya kokanga ntina na ndimbola oyo Moize “atangaki nsoni ya Klisto lokola bozwi monene.”
Wana Paulo akomaki ‘Klisto,’ na Baebele 11:26, asalelaki liloba ya greke Khri·stouʹ, oyo ekokani na liloba ya Liebele Ma·shiʹach, to Masiya, “Masiya” mpe “Klisto” elimboli nyonso mibale ete “mopakolami.” Paulo akomaki bongo ete Moize ‘atangaki nsoni ya mopakolami.’ Akokaki kolobela Moize lokola “mopakolami?”
Ee. Na ntango ya kala bazalaki kopesa moto mosala moko ya ntina na kosopelaka ye mafuta na motó. “Samwele akamataki molangi ya mafuta, asopaki yango na motó na ye [ya Saulo].” “Samwele akamataki liseke lizali na mafuta mpe apakolaki ye kati na bandeko na ye. Mpe elimo ya Jéhovah ebandaki kosala kati na Davidi.” (1 Samwele 10:1; 16:13; tala Exode 30:25, 30; Levitike 8:12; 2 Samwele 22:51; Nzembo 133:2.) Elobelami mpe na ntina ya mibali misusu, lokola mosakoli Elizé mpe mokonzi Mosulia, Hazayele, lokola “bapakolami,” nzokande eloko moko te emonisi ete basopelaki bango mafuta. (1 Mikonzi 19:15, 16; Nzembo 105:14, 15; Yisaya 45:1) Na yango, moto moko akokaki kozala “mopakolami” mpo ete aponamaki to ete atindamaki na mokumba ya ntina mingi.
Na ndimbola wana, Moize ye moko azalaki mopakolami ya Nzambe, mpe, na Baebele 11:26, mabongoli mosusu ya Biblia mazali kobongola liloba bobele moko wana ya greke “Mopakolami ya Nzambe” to “Mopakolami.” Moize aponamaki lokola momonisi ya Jéhovah mpe lokola moto oyo asengelaki kokamba Yisraele longwa na Ezipito. (Exode 3:2-12, 15-17) Atako Moize abokwamaki kati na bozwi mpe na nkembo ya Ezipito, apesaki motuya mingi na mokumba na ye oyo andimaki mpe akokisaki yango. Yango wana, Paulo akokaki kokoma ete Moize “atangaki nsoni ya Klisto lokola bozwi monene koleka biloko ya motuya ya Ezipito.”