Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/12 nk. 3-4
  • Evanzile ezali mpenza nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Evanzile ezali mpenza nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Evanzile ezali nini?
  • Tolimbola Evanzile
  • Nsango oyo ekeseni
  • “Evanzile ya Yudasi” ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Matomba nini Evanzile ekoki kozwila yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Biloko na motuna na evanzile na Luka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mokanda ya Biblia nimero 40—Matai
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/12 nk. 3-4

Evanzile ezali mpenza nini?

NA NTANGO ya Noël, na mikili mingi bato bayokaka masoló to bango moko balobelaka Evanzile. Liloba yango lisalelami mingi, kasi lizali na ndimbola koleka oyo bato mingi bakanisaka? Ekoki kozala ete elimboli eloko moko ya malamu mpo na yo mpe mpo na baoyo olingaka?

“Evanzile” elimboli “nsango malamu.” Ya solo, nsango malamu esepelisaka ntango nyonso, kasi bobele na ntango ya Noël te. Nzokande, oyo ebyangami “Evanzile” ezali nsango malamu te lokola bansango malamu mosusu. Ezali nsango malamu ya sikisiki oyo euti na liziba moko ya sikisiki mpe etali likambo moko. Ezali solo nsango oyo Nzambe alingi komona ete esakolama epai na bato nyonso.

Eugênio Salles, episkopo wa lokumu ya Rio de Janeiro (Brésil), amonisaki likanisi oyo na ntina ya nsango malamu: “Tosengeli komitambwisa engebene Evanzile, kasi na kolandaka makanisi ya bato te.” Episkopo wa lokumu wana azalaki na elonga. Kasi, mpo na komitambwisa na boyokani na Evanzile, esengeli na biso koyeba yango. Lolenge nini tokoki kokoma koyeba yango? Mpe litomba nini komitambwisa na boyokani na Evanzile ekomemela biso?

Evanzile ezali nini?

Mbala mingi bato basosolaka malamu te ndimbola ya Evanzile. Na 1918, Conseil fédéral des Églises du Christ na Amérika eyambaki Lisangá ya Mabota, oyo lelo esili kolimwa, lokola elembo ya Bokonzi ya Nzambe na lolenge ya politike awa na mabelé, mpe alobaki ete “moboko na yango ezali kati na Evanzile.” Ebongiseli yango elongaki te kokokisa mokumba na yango ya kobatela kimya. Ezali polele ete Conseil des Églises emikosaki. Lisangá ya Mabota wana ezalaki na boyokani moko te elongo na Evanzile.

Na bambula oyo euti koleka, bakoteli ya teoloji ya bonsomi bazali kolobela mingi Evanzile ntango bazali komonisa makanisi na bango ya mbongwana na makambo ya politike to na bomoi ya bato. Na kosalaka motindo yango basili kolongola ndimbola ya solo ya Evanzile. Zulunalo Veja ya Brézil epesaki ndimbola oyo: “Lingomba ya Katolike ebandaki komipesa na bokonzi ya sociale, kobosanaka bamposa ya elimo ya bandimi na yango. Baoyo bazali koluka liloba Nzambe kati na mateya na bango bazali mbala mingi kosalela yango lokola endimiseli mpo na kolobela bokesene oyo ezali kati na bato.”

Kobongisama kati na makambo ya bomoi to mbongwana na bibongiseli ya politike ekoki kotalelama na bato mosusu lokola nsango malamu. Nzokande, nsango malamu oyo eleki ntina, oyo ya Evanzile ezali bongo te. Na yango, episkopo moko andimaki ete Lingomba na ye lilongi te mpo na oyo etali kosakola Evanzile ya solo. Alobaki ete: “Uta mibu 1960, tomonisaki bopotu mpo na kopesa mateya ya elimo epai na bandimi na biso na ntina na bosangisi ya makambo ya mosuni kati na mateya na biso.”

Lisoló moko oyo ebimaki na zulunalo Time ya Amerika emonisaki ete ba Protestá bango mpe basili kobungisa ntina ya Evanzile. Tozali kotanga kati na yango ete: “Mangomba ya kala makwei te bobele na kozanga koyebisa nsango, kasi lisusu mpo mayebi sikisiki te soki nsango wana ezali nini.” Nsango nini masengelaki kosakola? Evanzile ezali nini?

Tolimbola Evanzile

Diksionere Webster’s Ninth New Collegiate elimboli liloba “Evanzile” boye: “Nsango etali Klisto, bokonzi ya Nzambe mpe lobiko.” Epesi lisusu bandimbola oyo na liloba “Evanzile”: “kolimbolama ya nsango ya boklisto (evangile social)”; “nsango to malako ya moteyi moko ya lingomba.” Bandimbola wana nyonso ezali solo? Te, soki totaleli mpenza oyo ebyangami Evanzile. Evanzile ya solo ezwi moboko na yango kati na Biblia; na yango bobele ndimbola ya liboso nde ezali ya malamu. Bandimbola mosusu ekokani bobele na oyo bauti kopesa lelo na liloba “evanzile.”

Na boyokani na oyo touti komona, Vine alobaki kati na mokanda na ye Dictionnaire interprétatif des mots du Nouveau Testament (Lingelesi), ete kati na Makomami ya greke ya boklisto (“Kondimana ya Sika”), Evanzile “ezali nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe mpe ya lobiko na nzela na Klisto, lobiko oyo ezali kozwama na komonisa kondima kati na kufa na ye lokola mbeka.” Ezali likambo ya ntina monene kososola yango malamu, mpo ete bososoli ya polele ya nsango malamu ya solo ezali na bopusi monene likoló na bolamu na biso ya sikawa mpe ya mikolo mizali koya.

Nsango oyo ekeseni

Lokola emonisami na mikanda ya mayele mitangami awa na likoló, Evanzile ezali na boyokani makasi elongo na Yesu Klisto​—ya makasi na motindo boye ete masoló minei ya Biblia matali bomoi na Yesu na mabelé mabyangami Evanzile minei. Uta ebandeli ya bomoi na ye ya bomoto, makambo nyonso matali Yesu mazalaki nsango malamu. Anzelu moko asakolaki na mbotama na ye ete: “Tala nazali kosakola bino nsango malamu [to evanzile] ya esengo monene mpo na libota mobimba, mpo ete lelo . . . Mobikisi abotameli bino, oyo azali Klisto Nkolo.”​—Luka 2:10, 11.

Mwana moke Yesu asengelaki kokola mpe kokoma Klisto, Masiya oyo alakamaki. Asengelaki kolimbola bibongiseli bizwami na Nzambe mpo na lobiko, asengelaki kopesa bomoi na ye ya kokoka mpo na bato, kosekwa mpe kokoma Mokonzi aponami ya Bokonzi na Nzambe. Oyo nde nsango malamu! Yango bapesaki nkombo Evanzile na nsango etali Yesu.

Na boumeli ya mikolo mokuse ya mosala na ye awa na mabelé, Yesu azalaki mosakoli ya molende ya nsango malamu. Tala oyo tozali kotanga kati na Evanzile ya Matai: “Yesu atambolaki na mboka minene mpe na mboka mike nyonso, alakisaki na biyanganelo, mpe asakolaki nsango malamu ya bokonzi.” (Matai 9:35) Kosakola na ye ezalaki te bobele na mokano ya kosala malamu epai na bato. Malako amonisi ete Yesu azalaki koloba: “Elaka esili kokoka mpe Bokonzi na Nzambe esili kobelema. Bobongola mitema mpe bondima nsango malamu.” (Malako 1:15) Ya solo, baoyo bandimaki nsango malamu na esengo mpe batosaki na yango bamonaki ete ebongolaki bomoi na bango.

Nsima na kufa na Yesu, bayekoli na ye balandaki kosakola Evanzile. Basakolaki bobele Bokonzi te, kasi lisusu nsango ya esengo oyo ete Yesu asili kosekwisama mpe asili kopesa motuya ya bomoi na ye ya bomoto mpo na bato. Mpo ete Nzambe aponaki ye lokola Mokonzi na Bokonzi na ye awa na mabelé, asengelaki mpe kozala mosali na ye mpo na koboma banguna na ye nyonso mpe kozongisa paradis na mabelé.​—Misala 2:32-36; 2 Batesaloniki 1:6-10; Baebele 9:24-28; Emoniseli 22:1-5.

Lelo nsango malamu ezali na likambo ya sika. Lokola kokokisama ya bisakweli ezali komonisa yango, Yesu asili sikawa kotyama na kiti ya bokonzi, mpe tozali kobika na mikolo ya nsuka ya biloko mabe ya ntango oyo. (2 Timoté 3:1-5; Emoniseli 12:7-12) Tozali kobelema nokinoki na ntango oyo Bokonzi ekotelemela banguna na Nzambe. Tokoki kozala na nsango mosusu oyo eleki kitoko?

Kati na lisolo ekolanda, tokotala na meko nini nsango malamu ezali na nguya. Esalisaki mwasi moko moombo ya kindoki na kozwa bonsomi. Esalisaki mpe mobali moko oyo akotaki boloko mpo na moyibi na kozwa esengo. Ekoki mpe kopesa yo bolamu mingi​—soki okoyoka nsango malamu mpe okotosa yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto