Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/2 nk. 9-14
  • Botosi epai na Nzambe: mpo na nini mpe nani asengeli kotosa?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Botosi epai na Nzambe: mpo na nini mpe nani asengeli kotosa?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini tosengeli kozala na botosi epai na Jéhovah Nzambe
  • Yesu Klisto, ndakisa ya kokoka ya botosi epai na Nzambe
  • Bandakisa ya botosi epai na Nzambe na ntango ya kala
  • Ndakisa ya botosi epai na Nzambe oyo ntomá Paulo amonisaki
  • Oyo botosi epai na Nzambe ezali kosenga na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Kotosa ebongiseli ya Teokrasi epesaka bolamu
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Botosi ya mwasi elimboli nini?
    Lamuká!—1997
  • Kozala na botósi kati na libala elimboli nini? kosala mabongwani mingi.
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/2 nk. 9-14

Botosi epai na Nzambe: mpo na nini mpe nani asengeli kotosa?

“Ɛ Jéhovah, nayebi ete nzela na moto ezali kati na ye moko te. Ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.”​—YILIMIA 10:23.

1. Wapi mitindo ya lipanda oyo bato mingi balingaka.

MOKO na mikanda mileki lokumu mikomamaki na bato ezali Déclaration dˈIndépendance, na nzela na yango, na ekeke ya zomi na mwambe, bikólo 13 biyangelamaki na ba Anglais na Amérique du Nord bikabwanaki na Grande Bretagne, ekólo oyo eyangelaki yango. Bikólo yango bizalaki na mposa ya bonsomi; nzokande, lipanda longwa na boyangeli ya mbeka mopaya mpe bonsomi ezalaki ntango nyonso esika moko. Lipanda na makambo ya politike mpe ya nkita ekoki kopesa bolamu mingi. Kala mingi te, mikili misusu ya Europe de lˈEst mizwaki lipanda na yango na makambo ya politike. Atako bongo, tosengeli koyeba ete lipanda wana ememaki ebele ya mikakatano minene.

2, 3. (a) Lolenge nini ya linanda oyo ezali malamu te na koluka yango? (b) Lolenge nini bosolo ya likambo yango esili komonisama uta kala?

2 Atako lipanda ekoki kozala eloko malamu na mitindo na yango mikeseni, nzokande ezali na lolenge mosusu ya lipanda oyo ezali malamu te na koluka yango. Ezali oyo wapi? Lipanda liboso ya Mozalisi ya moto, Jéhovah Nzambe. Lipanda oyo epesaka bolamu te, kasi epesaka nde mawa. Mpo na nini? Mpo ete, lokola emonisami malamumalamu na maloba ya mosakoli Yilimia oyo totangi awa na likolo, moto azalisamaki te mpo na kosala makambo kozanga kotalela Mozalisi na ye. Na maloba mosusu, moto azalisamaki mpo na kozala na botosi epai na Mozalisi na ye. Kozala na botosi epai na Mozalisi na biso, elimboli kobanga ye.

3 Babalani ya liboso bayebaki malamu likambo yango ntango Jéhovah apesaki bango etinda oyo ekomami kati na Genese 2:16, 17 ete: “Okoki kolya mbuma na nzete nyonso na elanga, nde mbuma na nzete na koyeba malamu mpe mabe, okoki kolya yango te. Mpo ete mokolo okolya yango, okokufa solo.” Koboya kotosa Mozalisi na ye ememaki Adam mpe libota na ye mobimba kati na lisumu, minyoko mpe liwa.​—Genese 3:19; Baloma 5:12.

4, 5. (a) Makama nini mabimaki lokola moto aboyaki kotosa Nzambe? (b) Mobeko nini motali bizaleli tokoki kokima yango te?

4 Koboya kotosa Mozalisi ezali kozanga mayele mpe ezali mabe mpo na oyo etali bizaleli malamu. Kati na mokili, koboya wana ekolisi ezaleli ya kotyola mibeko, kobomana, mobulu mpe pite, oyo ezali kobimisa bamaladi epesamaka na kosangisa nzoto. Lisusu, mabe monene oyo ezali bongo mobulu ya bilenge, ntina na yango mpenza ezali ete bilenge bazali koboya kotosa Jéhovah, baboti na bango mpe mibeko, boye te? Elimo wana ya lipanda ezali komonana na lolenge ya kokamwa mpe ya mabe oyo ebele na bilenge bazali komonisa na molato, mpe na maloba ya nsoni oyo bazali kosalela.

5 Kasi tokoki te kokima mobeko makasi ya Mozalisi oyo etali bizaleli: “Bomizimbisa te: bakosekaka Nzambe te. Mpo ete, soko moto akokona nini, akobukaka bobele yango; mpo ete ye oyo akokona na mosuni akobuka libebi mpo na mosuni na ye.”​—Bagalatia 6:7, 8, MN.

6, 7. Mpo na ntina nini mpenza bato bazali koboya kotosa, mpe bandakisa nini emonisi yango?

6 Mpo na nini koboya kotosa mpenza epalangani bipai binso? Na maloba ya petee, ezali mpo na moimi mpe lolendo. Ezali yango nde ememaki Eva, mwasi ya liboso, na komitika kokosama na nyoka mpe kolya mbuma epekisamaki. Soki azalaki na bopolo mpe na komikitisa, mbɛle likanisi ya kozala lokola Nzambe​—ya kozwa ekateli mpo na malamu mpe mabe—​elengolaki ye te. Mpe soki azalaki na moimi te, mbele alulaki te eloko oyo Mozalisi na ye, Jéhovah Nzambe, apekisaki.​—Genese 2:16, 17.

7 Mwa moke nsima na kokwea ya Adam mpe Eva, lolendo mpe moimi epusaki Kaina na koboma ndeko na ye Abele. Ezali lisusu moimi nde epusaki baanzelu mosusu na kosala makambo na elimo ya lipanda: batikaki etelemelo na bango ya ebandeli mpe balataki nzoto ya bato mpo na kosepela na bisengo ya kosangisa nzoto. Bobele bongo, lolendo mpe moimi ezalaki na bopusi likolo na Nimirode, mpe uta ntango wana, ezali na bopusi likolo na bakonzi mingi ya mokili.​—Genese 3:6,7; 4:6-8; 1 Yoane 3:12; Yuda 6.

Mpo na nini tosengeli kozala na botosi epai na Jéhovah Nzambe

8-11. Tanga bantina kitoko minei tozali na yango ya komonisa botosi epai na Nzambe.

8 Mpo na nini tosengeli kozala na botosi epai na Mozalisi na biso, Jéhovah Nzambe? Ya liboso, mpo ete azali Moyangeli ya molongo mobimba. Bokonzi nyonso bozali kati na ye. Azali Mosambisi na biso, Mopesi na mibeko mpe Mokonzi na biso. (Yisaya 33:22) Mpo na yango ekomamaki na ntina na ye ete: “Nyonso ezali bolumbu mpe emonisami polele na miso na ye oyo tosengeli kozongisa monoko.”​—Baebele 4:13, MN.

9 Lisusu, lokola Mozalisi na biso azali Mozwi-na-Nguya-Nyonso, moto moko te akoki kolonga na kotemela ye; moto moko te akoki kobosana lisengisi azali na yango ya kozala na botosi epai na ye. Ata ndɛlɛ, baoyo bazali koboya kotosa ye bakobomama, lokola ezalaki mpo na Farao na ntango ya kala, mpe lokola ekozala mpo na Satana na ntango ebongisami na Nzambe.​—Nzembo 136:1, 11-15; Emoniseli 11:17; 20:10, 14.

10 Bikelamu nyonso ya mayele basengeli kotosa Mozalisi na bango mpamba te bazalisamaki mpo na kosalela ye. Tozali kotanga kati na Emoniseli 4:11 ete: “Ee [Jéhovah], Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo, na lokumu, na nguya, mpo ete yo ozalisaki biloko nyonso; mpe mpo na mokano na yo bizali mpe bisili kozalisama.” Azali Moyemi monene ya mbeki, mpe azali kosala bato lokola mbeki mpo na kokokisa mokano na ye.​—Yisaya 29:16; 64:8.

11 Tosengeli te kobosana ete Mozalisi na biso azali mayele; na bongo ayebi oyo ezali malamu mpo na biso. (Baloma 11:33) Mibeko na ye mizali mpo na ˈbolamu na biso.ˈ (Deteronome 10:12, 13) Na koleka, “Nzambe azali bolingo”; yango wana alingi ete biso tozala na bolamu boleki monene. Na bongo, tozali na bantina ebele mpe kitoko ya kozala na botosi epai na Mozalisi na biso, Jéhovah Nzambe.​—1 Yoane 4:8.

Yesu Klisto, ndakisa ya kokoka ya botosi epai na Nzambe

12, 13. (a) Lolenge nini Yesu Klisto amonisaki botosi epai na Nzambe? (b) Maloba nini ya Yesu mamonisi ezaleli na ye ya botosi?

12 Ntembe ata moke te, Mwana bobele moko ya Jéhovah, Yesu Klisto, apesi biso ndakisa moko ya kokoka ya botosi na Nzambe. Ezali yango nde emonisami na ntoma Paulo kati na Bafilipi 2:6-8: “[Yesu], atako azalaki na motindo na Nzambe, amekaki te komikokanisa na Nzambe. Kasi amiyeisi mpamba, akamati motindo na moombo, mpe amonanaki na lolenge ya bato. Lisusu, ezwami ye na motindo na moto, amisokisaki [mingi] mpe atosi kino kufa, ɛɛ, kino kufa likolo na nzete ya mpasi.” Ntango azalaki na mabele, mbala mingi Yesu azalaki koloba ete azalaki kosala likambo moko te engebene mokano na ye moko; azalaki kosala makambo te kozanga kotalela Tata na ye ya makolo, kasi azalaki ntango nyonso na botosi epai na ye.

13 Tozali kotanga kati na Yoane 5:19, 30 ete: “Yesu alobi na bango ete: ˈSolosolo, nazali koloba na bino ete: Mwana akoki kosala likambo ye moko te, kasi bobele yango emoni ye ete Tata azali kosala. Mpo ete yango ekosalaka Ye, mwana akosalaka yango lokola. Ngai nakoki kosala mosala ngai moko te, nakosambisa lokola ekoyokaka ngai mpe esambiseli na ngai ezali sembo, mpo ete nakolukaka mokano na ngai moko te kasi mokano na ye oyo atindi ngai.ˈ Bobele bongo, na butu oyo akabamaki, abondelaki mbala mingi ete: “Kasi lokola elingi ngai te nde lokola elingi yo.”​—Matai 26:39, 42, 44; tala lisusu Yoane 7:28; 8:28,42.

Bandakisa ya botosi epai na Nzambe na ntango ya kala

14. Lolenge nini Noa amonisaki botosi epai na Nzambe?

14 Noa azali moko ya bandakisa ya kala ya bato oyo bazalaki na botosi epai na Nzambe. Amonisaki botosi na ye na mitindo misato. Ya liboso, na kozalaka moto na sembo, kozanga libunga kati na bato ya ntango na ye; azalaki kotambola elongo na Nzambe ya solo. (Genese 6:9) Ya mibale, na kotongaka masuwa. “Asalaki nyonso lokola Nzambe alakaki ye. Asalaki bobele bongo.” (Genese 6:22) Ya misato, na koyebisáká​—“lokola mosakoli na boyengebene”—​likebisi litalaki mpela oyo ezalaki koya.​—2 Petelo 2:5.

15, 16. (a) Ndakisa nini kitoko va botosi epai na Nzambe Abalayama atikaki? (b) tolenge nini Sara amonisaki botosi na ye?

15 Abalayama azalaki ndakisa mosusu monene ya botosi epai na Nzambe. Amonisaki botosi na ye na kondimaka etinda oyo na Nzambe ete: “Longwa na mokili na yo.” (Genese 12:1) Ya solo, esengelaki na ye kotika bozwi oyo azalaki na yango na Ulu (engumba oyo, lokola emonisi yango bokundoli ya biloko na kala, ezalaki engumba monene) mpo na kotambolatambola kati na mokili mopaya na boumeli ya mibu nkama. Abalayama amonisaki mpenzampenza botosi na ye epai na Nzambe na ntango na komekama monene, wana andimaki kopesa mwana na ye Yisaka lokola mbeka.​—Genese 22:1-12.

16 Sara, mwasi ya Abalayama, azali mpe ndakisa mosusu malamu ya botosi epai na Nzambe. Na ntembe te mobembo na bango kati na mokili mopaya, boye ezalaki na mikakatano mingi, kasi ezali na esika moko te oyo tozali kotanga ete [Sara] azalaki komilela mpo na yango. Apesaki ndakisa kitoko ya botosi epai na Nzambe na mabaku mibale, ntango Abalayama alakisaki ye lokola ndeko na ye ya mwasi liboso ya bakonzi na bapakano. Na mbala nyonso mibale, andimaki likambo yango, atako mbele asengelaki kozala kati na basi ya [bakonzi] yango. Botosi na ye epai na Nzambe ezali komonana na lolenge oyo azalaki kobenga mobali na ye, Abalayama, ete “nkolo na ngai,” komonisaka bongo ete botosi na ye ezalaki ezaleli ya solo euti na motema.​—Genese 12:11-20; 18:12; 20:2-18; 1 Petelo 3:6.

17. Mpo nini tokoki koloba ete Yisaka amonisaki botosi epai na Nzambe?

17 Tobosana te ndakisa ya botosi epai na Nzambe oyo Yisaka, mwana na Abalayama, apesaki. Engebene bonkoko na Bayuda, Yisaka azalaki soko na mibu 25 ntango Jéhovah asengaki na tata na ye, Abalayama, ete apesa ye lokola mbeka. Soki alingaki, Yisaka akokaki kotemela tata na ye, oyo azalaki na mibu nkama koleka ye. Kasi asalaki yango te. Atako azalaki komituna mpo na nini nyama mpo na mbeka ezalaki te, na bopolo nyonso Yisaka atosaki tata na ye ntango atyaki ye likolo na etumbelo, na nsima ntango akangisaki ye makolo na maboko mpo na kopengola to kolembisa koningana oyo ekokaki kosalema na ntango mbeli ya koboma esengelaki kosalelama.​—Genese 22:7-9.

18. Na nini Moize amonisaki ndakisa moko malamu ya botosi epai na Nzambe?

18 Bambula mingi na nsima, Moize atikelaki biso ndakisa malamu ya botosi epai na Nzambe. Ezali yango nde emonisami mbala mosusu na likambo oyo ete alakisami lokola “[moto oyo] azalaki na bopolo mingi koleka bato nyonso bazalaki na nse.” (Mituya 12:3) Na boumeli ya mibu 40, kati na mokili mokauki, wana azalaki kokamba libota ya batomboki ya bato milio mibale to misato, na botosi nyonso akokisaki mitinda na Jéhovah; yango mpe emonisi botosi na ye epai na Nzambe. Mpo na yango, tozali kotanga ete “Moize asalaki nyonso lokola Jéhovah alakaki ye. Asalaki bobele bongo.”​—Exode 40:16, MN.

19. Na maloba nini Yobo amonisaki botosi na ye epai na Jéhovah?

19 Yobo azali moto mosusu ya ntina oyo atikelaki biso ndakisa moko kitoko ya botosi epai na Nzambe. Nsima wana Jéhovah apesaki nzela na Satana ete abebisa biloko na ye nyonso, koboma bana na ye mpe kobelisa ye “maladi moko mabe, kobanda na litambe ya makolo na ye kino na motó na ye,” mwasi na ye alobi na ye ete: “Ozali naino kobatela makasi bosembo na yo? Lakela Nzambe mabe mpe kufa!” Nzokande, Yobo amonisaki botosi na ye epai na Nzambe na koyanolaka na mwasi na ye ete: “Yo ozali koloba lokola ekolobaka basi bilema. Tokondima uta na Nzambe ya solo bobele oyo ezali malamu nde tokondima te oyo ezali mabe?” (Yobo 2:7-10, MN) Amonisaki elimo yango moko kati na maloba na ye mayebisami na Yobo 13:15: “Ata soki abomi ngai, nazali na elikya te?” Atako Yobo alukaki mingi komilongisa, tosengeli te kobosana ete na nsuka Jéhovah alobaki na moko na babondisi na lokuta ya [Yobo] ete: “Nkanda na ngai epeli makasi epai na yo mpe na baninga na yo mibale, mpo ete bolobi likambo ya solo mpo na ngai te, lokola moombo na ngai Yobo alobi.” Na ntembe te, Yobo apesi biso ndakisa moko kitoko ya botosi epai na Nzambe.​—Yobo 42:7.

20. Lolenge nini Davidi amonisaki botosi na ye epai na Nzambe?

20 Mpo na kotanga lisusu ndakisa moko euti na Makomami na Liebele, totalela likambo ya Davidi. Ntango mokonzi Saulo azalaki kolanda ye lokola nyama, Davidi azwaki mabaku mibale mpo na koboma Saulo mpe kosukisa bongo minyoko wana. Nzokande, botosi na ye epai na Nzambe epekisaki ye na kosala bongo. Tala oyo alobaki kati na 1 Samwele 24:6: “[Jéhovah] apekisa ngai ete nasalela nkolo na ngai, mopakolami na [Jéhovah], likambo oyo te mpo na kosembola loboko na ngai epai na ye, mpo ete azali mopakolami na [Jéhovah].” (Tala 1 Samwele 26:9-11.) Bobele bongo, amonisaki botosi na ye epai na Nzambe na kondimaka mpamela ntango asalaki mabunga to masumu.​—2 Samwele 12:13; 24:17; 1 Ntango 15:13.

Ndakisa ya botosi epai na Nzambe oyo ntomá Paulo amonisaki

21-23. Kati na mabaku nini makeseni ntoma Paulo amonisaki botosi epai na Nzambe?

21 Makomami na Greke ya Boklisto mazali kopesa biso ndakisa moko kitoko ya botosi epai na Nzambe oyo emonisamaki na ntoma Paulo. Amekolaki Nkolo na ye, Yesu Klisto, na likambo yango, lokola mpe asalaki yango na mitindo nyonso misusu ya mosala na ye lokola ntoma. (1 Bakolinti 11:1) Atako Jéhovah asalelaki ye na lolenge ya kokamwa koleka bantoma mosusu, ntoma Paulo asalaki likambo moko te na elimo ya lipanda. Luka ayebisi biso ete wana ntembe ebimaki na likambo ya koyeba soki Bapakano oyo bandimaki basengelaki kokatama ngenga, “[bandeko] bazwaki ekateli ete Paulo na Balanaba mpe bato mosusu kati na bango, bakende na Yelusaleme epai na bantoma mpe mikólo na lingomba na ntina na ntembe wana.”​—Misala 15:2.

22 Mpo na oyo etali mosala ya misionere ya Paulo, tozali kotanga kati na Bagalatia 2:9 ete: “Mpe eyebaki bango ngolu esili ngai kozwa, Yakobo, Kefa mpe Yoane, baoyo batangami ete bazali makonzi, bapesaki loboko na mobali na lisangana epai na ngai mpe na Balanaba ete biso tokenda epai na bapakano mpe bango epai na [baoyo] bakatami ngenga.” Na esika ya kosala na lolenge ya lipanda, ntoma Paulo azalaki koluka toli.

23 Bobele bongo, ntango azalaki na Yelusaleme mpo na mbala ya nsuka, ntoma Paulo andimaki toli oyo bankulutu bapesaki ye: akendaki na tempelo mpe akokisaki milulu misengamaki na Mibeko mpo ete bato nyonso bamona ete azalaki mopengwi te na Mibeko na Moize. Kasi bibongiseli oyo akamataki elingaki kosuka na likama, mpamba te etuluku moko ya bato etombokelaki ye; na yango, tosengeli kosukisa na koloba ete asalaki libunga na kotosaka bankulutu wana? Soko moke te, lokola yango emonisami na oyo tokoki kotanga kati na Misala 23:11 ete: “Na butu elandaki, Nkolo atelemaki pene na ye mpe alobi ete: ˈYika mpiko! mpo ete, lokola esili yo kotatola na ntina na ngai na Yelusaleme, bongo mpe ekokoka na yo kotatola kuna na Loma.ˈ”

24. Makambo nini mosusu matali botosi malimbolami na lisol6 lilandi?

24 Ya solo, tozali kokuta kati na Makomami bantina kitoko ya kozala na botosi mpe bandakisa malamu ya bato oyo bamonisaki botosi. Na lisolo lilandi, tokotalela makambo makeseni kati na yango tokoki kozala na botosi epai na Jéhovah Nzambe, tokozwa batoli oyo ekosalisa biso na likambo yango mpe tokomona mbano oyo botosi wana ezali kopesa.

Bozongeli

◻ Lolenge nini ya lipanda ezali malamu te na koluka yango?

◻ Mpo na ntina nini mpenza bato bazali koboya kotosa?

◻ Mpo na bantina nini tosengeli kozala na botosi epai na Jéhovah?

◻ Bandakisa nini kitoko ya botosi epai na Nzambe Makomami mazali kopesa biso?

[Elilingi na lokasa 10]

Nimirode, mokonzi ya liboso nsima na mpela, oyo atombokelaki Nzambe

[Elilingi na lokasa 13]

Noa, ndakisa malamu ya botosi epai na Nzambe.​—Genese 6:14, 22

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto