Bililingi ya mokili na ndaká
Bosepela! Bibombelo bitondi na mafuta
MOSAKOLI Yoele alendisaki ‘bana na Siona ete bazala na esengo mpe basepela kati na Jéhovah.’ Asalelaki elilingi ya mafuta ya olive mpo na kolobela esengo mpe bozwi na bango: “Etutelo na loso ekotonda na mboto, bibombelo bikotonda na vinyo mpe na mafuta.”—Yoele 2:23, 24.
Soki ozalaki na bomoi na Yisraele na ntango ya kala, mbele olingaki kosepela mingi na kolona pene na ndako na yo, to kati na bilanga na yo, nzeté na olive lokola oyo emonisami awa na likoló.a Elingaki kosunga yo kati na bomoi, mpe kosepelisa yo mingi. Kasi mpo na nini nzeté na olive ezalaki mpenza na ntina mingi?—Tala Basambisi 9:8, 9.
Ya liboso osengeli kotala malamumalamu nzeté na yo. Banzeté ya olive ekoki koumela bikeke mingi, mosusu koleka mibu nkoto moko, mpo na yango botaleli ya malamu ekoki mbala mosusu komonisa mobimbi na matutu mingi, na langi lokola mputulu ya mɔ́tɔ. Nzeté na yo ekoki kozala na bolai ya bamɛ́tɛlɛ 6, nzokande ekoki kokoma na bonene ya ɛlɛzɛ te to ekoki kozala kitoko lokola nzeté na mbila te. Nkasa na yango oyo ekaukaka te, ezali na kongenga lokola palata, ekopesaka malili na boumeli ya mbula mobimba. Nzokande, motuya na nzeté na yo esuki te bobele na lolenge ezali komonana na libanda to na malili oyo ezali kopesa. Ezali mpenza yango te oyo eleki ntina.
Mbuma na yango nde ezalaki eloko eleki ntina, bankoto ya mbuma ya olive wana na langi ya mai na mpondu to moindo! Yango ezalaki kokómisa nzeté ya olive eloko na ntina mingi kati na bomoi mpe misala na Yisraele. Na sanza ya mitano nzeté ekotonda na fololo, oyo ezali kolengela kobotama ya mbuma na olive. (Yobo 15:33) Wana mbuma yango ezali kotela, ekobongwana longwa na langi ya mai ya mpondu kino na langi ya café to ya moindo.
Kobuka mbuma na olive na sanza ya Octobre mpe Novembre ezalaki mosala makasi. Bazalaki kobeta bitape na mangenda mpo ete mbuma oyo eteli ekwea likoló na bilamba oyo etandami na nse ya nzeté. (Deteronome 24:20) Mbuma na olive esengeli kosukolama liboso ya kobanda mosala na yango, na ndakisa kotya yango kati na mai ya mongwa mpo na kosilisa ngai na yango. Bongo nini ekosalema na nsima?
Yango etalelaki lolenge moto alingi kosalela to kosepela na ebele ya mbuma na yo. Bazalaki kolya mbuma ya olive mobésu, to kobomba yango kati na mai na mongwa mpo ete libota ekoka kolya yango na boumeli ya basanza mingi. Mbuma ya olive ezalaki eteni monene ya bilei, molei moko ezalaki mbala mosusu kosangisa mbuma ya olive ya elɛngi elongo na mikate ya orge.
Kasi, mbala mosusu eteni eleki monene ya olive esengelaki koleka na miango ndenge na ndenge mpo na kobimisa eloko wana ya ntina mpe ya motuya mingi—mafuta ya olive. Bakokaki kozwa mitindo mikeseni ya mafuta, oyo ekosalelama na makambo makeseni. Ya liboso, bakokaki kotuta mwa moke to kofina mbuma na olive oyo eteli kati na liboka moko to ata konyata yango na makolo. (Mika 6:15) Na motindo yango, bazalaki kozwa mafuta ya motuya mingi, oyo ezali sikawa kobengama huile vierge extra, oyo ezalaki kotyama na miinda mpo na kongengisa hema. (Exode 25:37; 27:20, 21) Na ntembe te okolinga kozala na ndambu ya mafuta yango mpo ete okoka kosalela yango kati na makusa na yo na ntango na mabaku ya sipesiale!
Mbuma ya olive, ata oyo ezalaki malamu mingi te, ezalaki kotyama na ekamwelo mpo na kobimisa mafuta mingi na mosuni na yango, atako ekozala ya motuya mingi te. Mosuni na yango ezali na 50 % ya mafuta. Bazalaki kokamola yango na mitindo mikeseni, kasi awa totalela bobele motindo moko. Mbuma ya olive oyo enikami malamu to mwa moke ekotyama kati na nzungu moko molai. Libanga ya konika, oyo ezalaki kobalusama na mpunda moko to na moto moko ekofina yango, ekobimisa mafuta, oyo ezalaki kobima mpe kotyama kati na mbeki.—Matai 18:6.
Tokoki kokokanisa mafuta ya olive na wolo ya maimai—ezalaki na motuya mingi mpe ezalaki kosalelama mpo na makambo makeseni! Nzeté moko ekokaki kopesa mafuta oyo ekokokisa mposa ya libota moko ya bato mitano to motoba na boumeli ya mbula mobimba. Mafuta ezalaki eteni ya ntina ya bilei na bango, mpo ete ezali koleka noki na nzoto mpe ezali kopesa makasi mingi. (Tala Yilimia 41:8; Ezekiele 16:13.) Bakokaki kopesa yango nsolo kitoko mpo na kopakola na nzoto to kosopa yango na motó ya bapaya lokola elembo ya boyambi. (2 Samwele 12:20; Nzembo 45:7; Luka 7:46) Ekokaki mpe kosalelama lokola nkisi ya pota.—Yisaya 1:6; Malako 6:13; Luka 10:34.
Soki mafuta ya olive ezalaki mingi mbele bakokaki kosalela yango na balolenge mosusu ekeseni. Ekokaki kongengisa ndako, kopesama lokola likabo mpo na Nzambe, to kotekisama. Ee, na ntango ya kala nzete na olive ezalaki nzeté ya motuya monene; na yango Yoele asalelaki yango mpo na kolimbola malamu bozwi mpe esengo.—Deteronome 6:11; Nzembo 52:8; Yilimia 11:16; Matai 25:3-8.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Okoki kokuta fɔtɔ́ oyo na monene na yango kati na Calendrier des Témoins de Jéhovah 1993.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 24]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.