Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/4 nk. 10-13
  • Elikya: Libateli ya ntina kati na mokili oyo etondi na mawa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elikya: Libateli ya ntina kati na mokili oyo etondi na mawa
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lokola ekoti
  • Moboko ya elikya ya solo
  • Lolenge nini kolendisa elikya na biso
  • Tozala na makanisi malamu likolo na bazalani
  • Batelá elikya na yo ya bokristo makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Epai wapi okoki kozwa elikya ya solosolo?
    Lamuká!—2004
  • Tyelá Yehova elikya mpe zalá na mpiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Sepelá na elikya oyo ekoyokisa yo nsɔni te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/4 nk. 10-13

Elikya: Libateli ya ntina kati na mokili oyo etondi na mawa

Elenge mobali moko ya mboka Corée alingaki kosalisa mama na ye na kondimisa moyekoli moko ya université ete ezali na ntina kozala na elikya mpo na mikolo mizali koya. Wana amikundolaki ndakisa moko oyo ayokaki na makita ya boklisto, atunaki moyekoli wana soki akolinga kosalisa ye na kolimbola lisese moko. Ye andimaki. Alobaki ete: “Ezalaki na mabota mibale. Nyonso mibale ezali mpenza ya bobola. Mbula ebandaki konoka makasi, mpe nsamba ya bandako nyonso ezalaki kotangisa mai. Moko na mabota yango bazalaki na mawa, mpe bamilelaki mingi na ntina ya kotangatanga ya ndako. Kasi libota mosusu ezalaki na esengo mpe kosepela wana bazalaki kobongisa nsamba na ndako na bango. Bongo mpo na nini bokeseni monene kati na mabota wana mibale?” Na kokamwa, elenge mwasi moyekoli ayanolaki ete ayebi te. Elenge mobali alobaki ete: “Ya solo, libota ya mibale ezalaki na esengo mpo ete bautaki kozwa mokanda ya bakambi ya engumba ete bakopesa bango ndako ya sika. Mpo na yango bazalaki na elikya. Yango nde esalaki bokesene!”

LISESE ya elenge mobali ezali kolimbola solo oyo ya petee: Elikya ezali kobongola lolenge na biso ya komonela bomoi, mbala mingi ata soki makambo mazingi biso mazali motindo nini. Lokola mabota wana mibale, biso nyonso tosengeli kobunda na mitungisi ya bomoi​—mikakatano ya kolongono ya nzoto, nkaka ya mbongo, matata kati na libota, mobulu mpe ebele ya komekama mpe minyoko. Mbala mingi tokoki te kolongola mikakatano yango bobele bongo lokola tokoki te kopesa mbula ya mopepe makasi etinda ya komitangola na mboka na biso. Yango wana, tokoki kooka mawa, ete totikami biso moko​—na mokuse, tozangi lisalisi. Mpo na kobakisa lisusu mpasi, ekoki kozala ete bateyaki biso na lingomba ete mikolo mizali koya mikozala mpasi mpo na basumuki, ete ekoki kosangisa etumbu ya seko.

Balobaki ete likambo oyo ememaka bato na kobela maladi ya makanisi ezali kozanga lisalisi mpe na kozanga elikya. Kasi tokoki kolongola moko kati na makambo yango; moko te kati na biso akangami kotikala na kozanga elikya. Mpe elikya yango moko ekoki kozala ebundeli eleki makasi mpo na kotemela maoki ya kozanga lisalisi. Soki tozali na elikya, tokoki koyikela mikakatano ya bomoi mpiko na kimya mpe na bosepeli na esika ya kobunda kati na mawa monene. Ya solo, elikya ezali libateli ya ntina monene.

Likambo ya motindo yango ekoki kolongola kokakatana na yo? Elikya ezali solo na nguya ya kosala mbongwana lolenge wana? Mpe moko na moko na biso akoki kozwa elikya ya solo?

Lokola ekoti

Kati na mosala ya monganga, bakomi koyeba nguya monene ya elikya. Dr. Shlomo Breznitz, moto na mayele na maladi ya makanisi oyo abikaki na boloko ya Nazi alobaki na ntina na mikakatano mingi ya bomoi ete: “Maladi ya makanisi eutaka na etaleli na biso moko ya nkaka na yango, kasi na mikakatano yango moko te. Elikya ezali kokitisa bozito na yango.” Makomi ya zulunalo Zulunalo ya Lisangani ya minganga ya Amerika endimisaki ete elikya ezali “nkisi moko makasi.” Zulunalo Kolongono ya nzoto na Amerika elobaki ete: “Ezali na bandakisa mingi ya babeli oyo, mingi mpenza babeli ya canser, mpasi na bango ezali koya makasi soki likambo moko elongoli bango elikya​—to mpasi na bango ezali kobikisama soki bazwi eloko ya sika oyo bakoki kolikya na yango.”​—Tala Masese 17:22.

Bayekoli ya Biblia bayebi ntina ya elikya kobanda kala. Kati na 1 Batesaloniki 5:8, ntoma Paulo alendisaki baklisto ete: “Tobatela bokatikati na biso, tolata ... elikya na lobiko lokola ekoti.” Lolenge nini “elikya na lobiko” ezali lokola ekoti?

Totala ntina ya ekoti. Na ntango ya kala soda azalaki kolata ekoti ya kuivre to ebende, oyo na kati ebongisami na eloko ya petepete, na nkunge ya meme to na mposo ya nyama. Ekoti ezalaki kobatela motó na ye na mbanzi oyo euti likolo, na mpéngu oyo ezali kotɛtɛmoka mpe mopanga ya kopasola na etumba. Bongo, bobele basoda moke nde bakokaki kokakatana na kolata ekoti soki bazalaki na yango. Nzokande, kolata ekoti elingaki koloba te ete soda akokaki te kokweisama, to akooka eloko moko te soko babeti motó na ye, kasi ekoti ezalaki nde kolembisa mobɛ́tɛ mpo ete emema likama monene te.

Lokola ekoti ezali kobatela motó, bobele bongo elikya ezali kobatela makanisi. Ekoki kozala ete elikya epesi biso nzela te ya kobosana motungisi to bolembu nyonso. Kasi elikya ekolembisa mobɛ́tɛ mpe ekobatela ete epesa mpasi mingi koleka te na kolongono na biso ya makanisi, ya maoki to ya elimo.

Na ntembe te, moto ya sembo Abalayama alataki ekoti wana ya elilingi. Jéhovah asengaki ye ete apesa mwana molingami na ye, Yisaka, lokola mbeka. (Genese 22:1, 2) Elingaki mpenza kozala petee mpo na Abalayama ete alemba na motema, maoki oyo elingaki komema ye na kozanga botosi epai na Nzambe. Nini ebatelaki ye na maoki lolenge yango? Elikya ezalaki na ntina mingi. Engebene Baebele 11:19, “atangaki ete Nzambe azalaki na nguya ya kosekwisa [Yisaka] ata na bakufi.” Bobele bongo, elikya na Yobo kati na lisekwa ebatelaki makanisi na ye na kosilika oyo elingaki komema ye na kofinga Nzambe. (Yobo 2:9, 10; 14:13-15) Yesu Klisto, liboso na mpasi ya kufa, azwaki nguya mpe kobondisama kati na elikya na ye ya esengo na avenir. (Baebele 12:2) Moboko ya elikya ya solo ezali kondima ete Nzambe akosalaka mabe moko te mpe ete akozanga te kokokisa liloba na ye.​—Baebele 11:1.

Moboko ya elikya ya solo

Lokola kondima, elikya ya solo ezwi moboko na yango likoló na makambo ya solo, na bosolo mpe na solo. Ekoki mbala mosusu kokamwisa bato mosusu. Moto moko akomaki ete: “Bato mingi bakanisaka ete elikya ezali bobele mwango ya bolole ya koboya bosolo ya makambo.” Nzokande, elikya ya solo ezali makanisi mpamba te, elimboli te kondima ete tokozwa nyonso oyo tolingi mpe mikakatano mike nyonso mikosila. Bosolo ya makambo ekoya nokinoki kosukisa bandoto wana ya mpamba.​—Mosakoli 9:11.

Elikya ya solo ekeseni. Euti na boyebi, kasi na bamposa te. Tomikundola likambo ya libota ya mibale kati na lisese oyo ezali na ebandeli ya lisolo oyo. Elikya nini balingaki kozala na yango soki bakonzi na engumba bazalaki na momeseno ya kokokisa bilaka na bango te? Elaka, mpe elembeteli ya kotyela yango motema ekokaki kopesa na libota yango ntina makasi ya kozala na elikya.

Bobele bongo lelo oyo, ba Temoins de Jéhovah bazali na elikya moko oyo ekangami na boyangeli moko: Bokonzi na Nzambe. Bokonzi wana ezali na ntéi ya nsango ya Biblia. Uta mibu nkoto mingi, ezalaki liziba ya elikya ya basi mpe mibali lokola Abalayama. (Baebele 11:10) Nzambe alaki ete, na nzela na Bokonzi na ye, akosukisa mokili oyo ya mbindo mpe akotya mokili ya sika. (Baloma 8:20-22; 2 Petelo 3:13) Elikya wana ya Bokonzi ezali solo, ezali ndoto te. Liziba na yango​—Jéhovah Nzambe, Nkolo Moyangeli ya molongo​—akoki kokweisama na likambo moko te. Tosengeli bobele kotala biloko oyo ye azalisaki mpo na kondima ete azali mpe na nguya nyonso ya kokokisa bilaka na ye. (Baloma 1:20) Esengeli na biso bobele kotalela lisolo ya boyokani na ye elongo na bato mpo na komona ete maloba na ye mazangaka kokokisama te.​—Yisaya 55:11.

Nzokande, na mawa nyonso, mingi kati na baoyo bazali komitanga baklisto basili kobungisa elikya ya solo. Kati na mateya oyo apesaki kala mingi te, mpe oyo ekomami, téolojié Paulo Tillich alobaki ete: “Baklisto [ya liboso] bayebaki kozela nsuka. Kasi, mokemoke batikaki kozela yango.... Elikya ya ebongiseli ya biloko ya sika awa na mabelé ekitaki, ata soki bazali kobondela mpo na yango mbala na mbala kati na libondeli ya Tata wa biso: tika mokano na yo esalema na nse lokola na likolo!”

Oyo likambo ya mawa! Bamilio, ata bamiliare na bato oyo bazali na mposa makasi ya elikya; oyo bazali na makoki ya kozwa yango kozanga mpasi, kati na Biblia na bango. Tala matomba ya nsomo! Ezali nde likambo ya kokamwa ete mpo na kozanga elikya makasi oyo ekobatela makanisi na bango, ebele na bato na ntango na biso baoyo bapusami na “makanisi ya mbindo,” bazali kobebisa mokili na pite mpe mobulu na bango? (Baloma 1:28) Ezali na ntina monene ete tokwea na motambo yango te. Na esika ya kobwaka ekoti ya elikya na biso​—tosengeli nde koyeisa yango makasi.

Lolenge nini kolendisa elikya na biso

Lolenge eleki malamu ya kolendisa elikya na biso ezali ya kotalela liziba na yango, Jéhovah Nzambe. Toyekola Liloba na ye, Biblia, na molende nyonso. Tozali kotanga kati na Baloma 15:4 ete: “Mpo na nyonso ekomamaki kalakala, ekomamaki mpo na kolakisa biso ete tozala na elikya na nzela na koyika mpiko mpe na kolendisana na Makomami.”

Lisusu, tosengeli komindimisa ete elikya na biso ezali bobele makanisi mpamba te. Esengeli kozala likambo ya solo mpo na biso. Ozalaka na elikya ya kozala na bomoi na seko na mabele mabongwani Paradis? Ozali na mposa ya kokutana na balingami na yo oyo basili kokufa wana bakosekwa awa na mabele na ntango yango? Soki ezali bongo, ozali komimona yo moko na ntango yango? Na ndakisa, Yisaya 65:21, 22 elobi ete moto na moto akotonga ndako mpo na ye moko mpe akofanda kati na yango. Okoki kokanga miso mpe komimona likoló na ndako na yo ya sika, wana ozali kotya linzanza na yango ya nsuka? Kanisa ete ozali kotala pembeni na yo kokokisama na mikano mpe mosala na yo. Makelele ya esengo na esika ya botongi esili; ozali kotala zamba wana bilili ya nsima na nzanga bizali koya molai. Banzeté ezali konigana na mopepe oyo ezali kopesa yo malili nsima na molunge ya mosala na yo. Koseka ya bana, elongo na nzembo na bandeke, ezali kokoma na matoi na yo. Masolo na balingami na yo matondi na ndako.

Kokanisa ntango ya esengo lokola oyo wana, ezali ndoto mpamba te, kasi kokanisa mozindo likoló na esakweli oyo ekokokana solo. (2 Bakolinti 4:18) Wana likanisi yango ekokoma likambo ya solo mpo na biso, elikya na biso ya kosepela na yango ekokoma makasi. Elikya wana makasi mpe ya solo ekopekisa biso na “kooka nsoni ya nsango malamu,” maoki oyo ekoki mbala mosusu kopusa biso na kokima mokumba ya koyebisa basusu yango. (Baloma 1:16) Nzokande, tokolinga ˈkomikomisa kati na elikya,ˈ lokola ntóma Paulo asalaki yango, na koyebisa yango na elikya nyonso epai na bato mosusu.​—Baebele 3:6.

Longola avenir ya seko, tozali na eloko mosusu oyo tokoki kolikya kati na yango. Na mikolo na biso mpe, tozali na maziba ya elikya. Ndenge nini? Na ekeke ya mitano ya ntango na biso, mokonzi moko ya Loma nkombo na ye Cassiodore alobaki ete: “Ye oyo ayebi komona bolamu oyo asili kozwa, azali na elikya ya bolamu oyo akozwa na mikolo mizali koya.” Oyo nde maloba ya mayele! Libondisi nini tokozwa kati na mapamboli kitoko oyo mazali koya, soki tokoki te kosepela na matomba oyo tozali kozwa uta sikawa?

Libondeli ezali mpe kopesa biso nzela ya kozala na elikya uta sikawa. Longola mabondeli mpo na mikolo mizali koya, tosengeli mpe kobondela mpo na mposa na biso ya sikawa. Tokoki mbala mosusu kobondela mpo na kobongisa boyokani na biso elongo na basangani ya libota na biso to elongo na baninga na biso baklisto, mpo na bilei na biso ya elimo na mikolo mizali koya to mpo ete bamposa na biso ya mosuni ekoka kokokisama. (Nzembo 25:4; Matai 6:11) Soki tokotya bilikya motindo yango na maboko na Jéhovah, akosalisa biso na koyika mpiko mokolo na mokolo. (Nzembo 55:22) Na mpiko na biso tokoyeisa ekoti ya elikya na biso makasi.​—Baloma 5:3-5.

Tozala na makanisi malamu likolo na bazalani

Makanisi ya kolembisa ebebisaka ekoti ya elikya. Makobebisaka mpe makoki mokemoke kosala ete ekoti ezala lisusu na ntina moko te. Oyebi kososola makansi ya kolembisa mpe kobundisa yango? Komikosa te na makanisi ya libunga oyo elobi ete ezaleli ya kotyola, kotya ntembe mpe ya kozanga elikya ezali mayele. Ya solo, likanisi ya kolembisa ezali kosenga mpenza mayele moke te.

Ezali mpenza mpasi te komonisa ezaleli ya kozanga elikya epai na bazalani na biso. Mpo na makambo ya mpasi oyo bakutanaki na yango, bato mosusu babungisaki elikya nyonso ya kozwa lisalisi mpe libondisi. Likanisi na bango ezali ete: “Nyau oyo aziki na mai ya mɔ́tɔ abangaka ata mai ya mpio.” Mbala mosusu bazali kokakatana na kokutana na bankulutu ya lisanga mpo na kolobela bango mikakatano na bango.

Biblia ezali kosalisa biso na kozala na makanisi ya bokatikati na ntina na bazalani na biso. Ya solo, ezali likambo ya mayele te kotya elikya na biso nyonso epai na bato. (Nzembo 146:3, 4) Kasi, kati na lisanga ya boklisto, bankulutu bazali “makabo ya mibali” oyo euti na Jéhovah. (Baefese 4:8, 11) Bazali kotya motema na mokumba na bango, bazali na eksperianse mpe balingi solo kozala “ebombelo mpo na mopepe, ezipelo na ntango na mbula makasi.”​—Yisaya 32:2

Basangani mosusu mingi ya lisanga ya boklisto bazali mpenza komibanzabanza na kozala liziba ya elikya ya solo. Tokanisa naino na bankoto na bango baoyo bazali kosala lokola bamama, batata, bandeko basi, bandeko mibali mpe bana epai na baoyo basili kobungisa mabota na bango; tokanisa lisusu na bibele oyo bazali baninga ˈbakangami koleka bandekoˈ epai na baoyo bazali kati na mpasi.​—Masese 18:24; Malako 10:30.

Soki osengaki lisalisi epai na Jéhovah, kobungisa elikya na yo te. Mbala mosusu asilaki kopesa yo eyano; mbala mosusu nkulutu moko to moklisto mosusu akozala pene ya kosalisa yo ntango okoyebisa ye bamposa na yo. Soki elikya oyo totye epai na bato ezali na bokatikati, tokobatelama na kotangwama oyo ekoki kopusa biso na kozala moimi mpe na makambo mazangi mayele.​—Masese 18:1.

Epai mosusu soki tozali na mikakatano elongo na moninga moklisto, tosengeli te kotalela yango na likanisi ya kozanga kolonga mpe kokanisa ete elikya ezali lisusu te. Na ntembe te “Bolingo ... ekolikyaka makambo nyonso.” (1 Bakolinti 13:4-7) Tomeka komona bandeko na biso mibali mpe basi lokola Jéhovah azali komona bango​—na elikya. Wana tozali komona bizaleli malamu na bango, tokokanisela bango makambo mabe te, mpe bongo tokoluka kobongisa makambo. Elikya ekobatela biso na kobomba nkanda mpe na koswana, oyo ezali kopesa litomba na moto moko te.

Topesa nzela te na kozanga elikya ya mokili oyo ekomi pene na kokufa. Tala elikya na biso: mpo na mikolo mizali koya mpe mpo na libela, mpe na ntango oyo, kobongisama ya mikakatano mingi na biso. Okosimba elikya? Wana alati elikya ya lobiko lokola ekoti ya kobatela, mosaleli moko te ya Jéhovah akozanga mpenza lisalisi, ata akutani na mikakatano ya motindo nini. Soki totiki yango biso moko te, eloko moko te na likoló to na mabelé ekolongola elikya oyo Jéhovah asili kopesa biso.​—Tala Baloma 8:38, 39.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto