Mpo na nini kosalela Jéhovah?
“MOKOLO na Jéhovah mpe ˈbolozi moneneˈ ebelemi, mpe okobika te soki osaleli Nzambe te.” Soki moto moko ayebisi yo bongo, okosala nini?—Sofoni 2:2, 3; Matai 24:21.
Ya solo, tosengeli kobatela mokolo na Jéhovah kati na makanisi na biso; mpe kobika na biso na bolozi monene oyo ebelemi, etali mosala na biso ya sembo mpo na Nzambe. Kasi, yango esengeli kozala bantina ya liboso oyo ezali kopusa biso na kosalela Jéhovah? Mpo na nini yo, osalelaka Jéhovah Nzambe mosala ya bulee?
Ntina ya kozala na makanisi malamu
Soki moto azali kosalela Nzambe na makanisi malamu te, mpe soki nsima na mwa ntango bilikya na ye bikokisami te, akoki kotika. Na ndakisa, bato mosusu bazelaki kozonga na Yesu Klisto na 1843 to 1844, bambula wana elekaki kozanga ete elikya na bango wana ekokisama. Na likambo yango, tozali kokuta oyo ekomamaki na George Storrs, mobimisi ya zulunalo Motaleli ya Biblia (na Lingelesi), oyo na nsima akutanaki na Charles Taze Russell, prezidá ya yambo ya Watch Tower Society. Kati na Motaleli ya Biblia ya Septembre 1846, Storrs akomaki ete:
“Mokumba ya kosalela Nzambe eleki mosika likambo ya kobelema ya mokolo. ... Soki koya esalemaki te na katikati ya mibu 1846 mpe 1847, likámá ekoki mpenza kozala monene mingi koleka oyo tokoki kokanisa. Eksperianse esili komonisa yango (nazali kokanisa makambo mabimaki na bambula 1843 mpe 1844). Baoyo, na bolingo na bango moko ˈbapusamaki na kosalela Nzambe,ˈ lokola basengelaki kosala yango, ntango bayokaki kosakolama ya eleko ya koya ya Nkolo, bazali wapi? Mpe mongongo elobi lisusu ete: WAPI ??? Bobele moto moko likoló na bato zomi azali naino na molende kati na mosala mpe azali kokumisa mosala na bango ya boklisto. Mpo na nini bongo? Bapusamaki na makanisi mabe. Bapusamaki bobele na moimi na bango. Basalaki lokola mosumuki oyo azali penepene na liwa na mbeto na ye ya mpasi to kati na mopepe makasi ya mai monene. Soki asengeli kokufa, akokoma moklisto. Soki ayebi ete likama ezali lisusu te akomibanzabanza ata na likambo moko te.”
Tosala mosala na makanisi malamu
Moimi mpe nsomo ya kobomama ekoki kopusa bato mosusu na kokosa ete bazali kosala mokano na Jéhovah. Basusu bakoki kobendama na elikya ya kozala na bomoi kati na Paradis kino bakokoma kosalela Nzambe bobele mpo na ntina wana. Nzokande, soki bato oyo bazali mingimingi na makanisi motindo wana bakanisaki ete mokolo na Jéhovah mpe bolozi monene esili kobelema te, mbele bakokaki kopusama te na kosalela Nzambe na molende nyonso.
Ya solo, ezali moimi te kosepela kati na bilaka ya Nzambe mpe mapamboli oyo masakolami. Nzambe alingi ete, lokola tozali bayekoli ya Mwana na ye, Yesu Klisto, tosepela na bilikya kitoko oyo bizali liboso na biso. Ntoma Paulo alobaki ete: “Bosepelaka kati na elikya,” mpe abakisaki ete: “Boyika mpiko kati na minyoko. Bolendendela kati na mabondeli.” (Baloma 12:12) Wana esangani na libondeli, “esengo ya Jéhovah” ezali kosalisa biso na koyikela mikakatano mpiko mpe kozela na motema molai kokokisama ya bilaka na Nzambe. (Nehemia 8:10) Wana ezali biso kozela yango, tozali na bantina mingi ya kosalela Jéhovah. Wapi bamoko na bantina yango?
Mokumba mpe libaku kitoko
Lokola azali Moyangeli ya molongo mobimba, Jéhovah abongi kozwa mpe azali kosenga bakangami makasi. (Exode 20:4, 5) Mpo na yango moklisto moko na moko azali na mokumba yango moko epai na Nzambe, ezala ete bolozi monene ekoya lobi, na bambula ezali koya, to nsima na bambula mingi. Azali na mokumba ya kosalela Jéhovah na motema na ye mobimba, mpo ete alingi Nzambe na motema na ye mobimba, na molimo na ye mobimba, na elimo na ye mobimba, mpe na makasi na ye mobimba. (Malako 12:30) Na ekeke ya liboso, baklisto mosusu bakanisaki ete mokolo na Jéhovah esilaki kobelema, kasi elikya na bango ekokisamaki te, mpe bakufaki kozanga komona mokolo yango. (1 Batesaloniki 5:15; 2 Batesaloniki 2:15) Nzokande, soki bakufaki sembo, bayekoli bapakolami wana ya Yesu basukaki na kozwa lifuti ntango basekwisamaki mpo na bomoi na likoló.—Emoniseli 2:10.
Ba Témoins de Jéhovah basengeli kosalela Nzambe na bosembo nyonso, mpo ete, na ntango na batisimo na bango, bandimaki mokumba ya kosala mokano na ye. Kanisa naino! Na ndakisa ya baanzelu mosantu, tokoki kosala mokano ya Moyangeli ya molongo mobimba. (Nzembo 103:20, 21) Yesu apesaki motuya monene na libaku kitoko yango kino alobaki ete: “Bilei na ngai ezali boye ete nasala mokano na motindi na ngai mpe ete nasukisa mosala na ye.” (Yoane 4:34) Soki biso mpe tozali na elimo motindo moko, tokosakola na molende nyonso masanzoli ya Jéhovah mpe tokolobela bazalani na biso mikano na ye lokola yango emonisami kati na Makomami. Na motindo yango, tokozala mpe na libaku kitoko ya kosalisa bazalani na biso na makambo ya elimo. Na ntembe te, kosala mokano na Nzambe mpo na bolingo epai na ye ezali libaku kitoko, ata soko mokolo ya Jéhovah ekoya ntango nini.
Botondi ezali kolamwisa mposa
Botondi na biso epai na Jéhovah Nzambe mpo na bolingo oyo amonisaki ntango apesaki Mwana na ye lokola mbeka na lisiko esengeli kopusa biso na kosalela ye. Na eleko moko, tozalaki mosika na Jéhovah Nzambe na ntina na lisumu. Nzokande, Yesu alobaki ete: “Mpo ete Nzambe alingaki mokili [ya bato] na motindo boye ete apesi Mwana na ye bobele moko ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi azala na bomoi na seko.” (Yoane 3:16) Jéhovah ye moko nde azwaki likanisi wana, lokola ntoma Paulo akomaki yango ete: “Nzambe amonisi bolingo na ye mpo na biso na nzela oyo: naino ezalaki biso bato na masumu, Klisto akufelaki biso.” (Baloma 5:8) Botondi na biso mpo na elembo wana ya bolingo na Nzambe ezali kotinda biso na kosalela ye na motema na biso mobimba.
Botondi mpo na bilei ya elimo mpe ya mosuni oyo euti na Jéhovah ezali kopesa biso ntina mosusu ya kosalela ye na bosembo nyonso. Liloba na Nzambe ezali motambwisi oyo abongi—pole mpo na nzela na biso. Mikanda mibimisami na “moombo na sembo mpe na mayele” mizali kosalisa biso na koyokanisa bomoi na biso na mokano ya Nzambe. (Matai 24:45-47; Nzembo 119:105) Mpe lokola tozali koluka liboso Bokonzi, Jéhovah azali mpe kokokisa bamposa na biso ya mosuni. (Matai 6:25-34) Tomonisaka botondi na biso mpo na bilei wana?
Jéhovah asikoli biso na mangomba ya lokuta; botondi na biso na likambo yango ezali kopesa ntina mosusu ya kosalela ye na bosembo nyonso. Mwasi na pite na makambo ya losambo, Babilone Monene, “afandi na mai mingi,” oyo elimboli “bato mpe bibele mpe mabota mpe minoko.” (Emoniseli 17:1, 15) Kasi, afandi likoló ya basaleli na Jéhovah te, to azali na bopusi moko na makambo ya losambo likoló na bango te mpe azali na bokonzi moko te likoló na bango. Na ndakisa, basaleli na Jéhovah bandimaka te liteya ya lokuta ya mangomba oyo elobi ete molimo na moto ekufaka te. Bayebi ete moto azalisamaki “molimo na bomoi” ete bakufi “bayebi eloko moko te,” mpe ete lisekwa ekozala. (Genese 2:7; Mosakoli 9:5, 10; Misala 24:15) Na bongo, babangaka bakufi te mpe basambelaka bango te. Botondi na biso mpo na bonsomi ya elimo motindo wana ezali kotinda biso na koboya lipengwi mpe na kokangama makasi na losambo ya peto ya Jéhovah?—Yoane 8:32.
Botondi na biso mpo na lisungi na Jéhovah mokolo na mokolo esengeli koyeisa makasi ekateli na biso ya kosalela ye na bosembo nyonso. Mokomi na Nzembo Davidi alobaki ete: “Jéhovah akumisama, ye oyo akomema mikumba na biso mokolo na mokolo.” (Nzembo 68:19) Mokomi na Nzembo alobaki lisusu ete: “Ata tata mpe mama bakotika ngai, nde Jéhovah akolokota ngai.” (Nzembo 27:10) Ee, moto oyo azali kosalela Jéhovah na bosembo nyonso akoki kokitisa mokumba na ye ya elilingi, lokola mabanzo mpe mimekamo, likoló na Nzambe. Tomonisaka botondi mpo na lisungi ya sembo na Jéhovah na kosalela ye na bosembo nyonso?—Nzembo 145:14.
Tokumisa Jehovah mpe Bokonzi na ye
Mposa ya kokumisa Jéhovah esengeli mpe kopusa biso na kosalela ye. Bikelamu ya elimo bamonisami ete bazali kokumisa Nzambe na maloba oyo: “Jéhovah mpe Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo, na lokumu, na nguya, mpo ete yo ozalisaki biloko nyonso; mpe mpo na mokano na yo bizali mpe bisili kozalisama.” (Emoniseli 4:11) Mokonzi Davidi akumisaki Nzambe na kolobaka ete: “Ɛ Jéhovah, epai na yo, monene ezali mpe nguya mpe nkembo mpe elonga mpe lokumu ... Bokonzi mpe ezali na yo, ɛ Jéhovah ... Mosolo mpe lokomu ekoutaka bobele na yo; yo ozali mokonzi likoló na nyonso ... ɛ Nzambe na biso, sikawa tokotonda yo mpe tokosanzola nkombo na yo na nkembo.” (1 Ntango 29:10-13) Wana tozali kozela kokokisama ya bilaka na ye, biso baoyo tozali basaleli na Jéhovah, tokoki nde kopesa ye bobele lokumu moke na maloba mpe na misala?—1 Bakolinti 10:31.
Mposa makasi ya kolobela Bokonzi na Nzambe ezali kopesa biso ntina mosusu ya kosalela Jéhovah. Mposa wana malamu emonisami polele na maloba oyo ya mokomi na Nzembo ete: “Misala na yo nyonso ekotondo yo, ɛ Jéhovah, mpe bato na yo mpenza bakosanzola yo. Bakoloba mpo na nkembo na Bokonzi na yo, bakosakola mpo na nguya na yo, mpo na koyebisa bato misala na yo ya nguya mpe nkembo na bokonzi na yo. Bokonzi na yo ezali bokonzi na seko, mpe nguya na yo ekoumela na mabota na mabota.” (Nzembo 145:10-13) Kosakolama ya nsango ya Bokonzi ezali mokumba oyo epesami na baklisto; ezali mosala oyo eleki ntina epesameli biso na kosala na eleko na biso. (Matai 24:14; 28:19, 20) Ozali na mposa makasi ya kokumisa Jéhovah mpe kolobela Bokonzi na ye epai na bato mosusu?
Kobulisama ya nkombo na Jéhovah mpe kolongisama ya boyangeli na ye esengeli kozala na ntina monene mpo na biso na boye ete tosengeli kozala na mposa makasi ya kosalela ye na bosembo nyonso. Mbala mosusu tobondelaka mpo na kobulisama ya nkombo na Jéhovah mpe mpo na kolóngisama ya boyangeli na ye. (Matai 6:9) Tokoki kosala na boyokani na mabondeli na biso ntango tozali kosangana mbala na mbala na mosala ya boklisto mpe ntango tozali kopalanganisa solo likoló na makambo wana ya ntina mingi.—Ezekiele 36:23; 39:7.
Esengo mpe bosepeli
Ntango tozali kosalela Jéhovah na bosembo nyonso, tozali na esengo ya kosepelisa motema na ye mpe ya komonisa ete Satana azali mobuki na lokuta. Satana alobaki ete bato bazali kosalela Nzambe mpo na moimi, kasi mosala ya sembo oyo tozali kosala na bolingo mpo na Jéhovah emonisi ete efundeli ya motumoli wana ezali ya lokuta. (Yobo 1:8-12) Yango ezali kopesa biso ntina malamu ya kolanda kosala oyo tozali kotanga kati na Masese 27:11: “Mwana na ngai, zala na mayele mpe sepelisa motema na ngai, ete nazongisela ye monoko oyo akopamela ngai.” Lisusu, ntango tozali kosalela Jéhovah na bosembo nyonso atako mikakatano oyo Satana azali kobimisela biso, bosembo na biso ekoki mpenza kolendisa baninga na biso baklisto.—Bafilipi 1:12-14.
Esengo mpe bosepeli ya kosangana na mosala ya kobuka mbuma ya elimo esengeli lisusu kopusa biso na kosalela Jéhovah na bosembo nyonso. Yesu azalaki na esengo ya kosalisa bazalani na ye, mingimingi na makambo ya elimo. Tozali kotanga kati na Matai 9:35-38 ete: “Yesu atamboli na mboka minene mpe na mboka mike nyonso, wana ezalaki ye kolakisa na biyanganelo na bango mpe kosakola nsango malamu na Bokonzi mpe kobikisa mpasi nyonso mpe maladi nyonso. Emoni ye bibele, ayoki mawa mpo na bango ete balembi mpe balemalemi lokola bampate bazali na mobateli te. Boye alobi na bayekoli na ye ete: ˈMbuma na elanga eteli mingi mpenza nde basali bazali mingi te. Bobondela Nkolo na elanga ete atinda basali kati na elanga na mbuma na ye.ˈ” Soki mosala ya kobuka mbuma ezali koumela mingi koleka ndenge tokanisaki, tokozala lisusu na mabaku mingi ya kozala na esengo mpe bosepeli ya kosalisa bazalani na biso na makambo ya elimo. Ekozala mpe lolenge ya komonisa bolingo oyo Nzambe alingi ete tomonisa epai na bazalani na biso.—Matai 22:39.
Mpo na nini ozali kosalela Nzambe?
Totaleli bobele ndambo na bantina mingi oyo ezali kopusa biso na kosalela Jéhovah na bosembo nyonso. Ezali malamu ete tokanisa mozindo kati na libondeli na bantina oyo mpo na yango tozali kosalela Nzambe, mpo ete moto na moto akozongisa monoko liboso na ye. (Baloma 14:12; Baebele 4:13) Mpe baoyo bakangami bobele na makanisi ya moimi bakozwa ngolu na Nzambe te.
Tokoki komizela na kozwa nini soki totye na esika ya liboso kobulisama ya nkombo na Jéhovah mpe tosaleli ye mosala ya bulee na makanisi mazangi moimi? Ya solo, Jéhovah akopambola biso, mpe akopambola mosala na biso! (Masese 10:22) Tokozwa mpe bomoi na seko, mpo ete tosalelaki Jéhovah na bosembo nyonso.
[Elilingi na lokasa 9]
Bankóto na bato bazali kosalela Jéhovah na Japon
[Elilingi na lokasa 10]
Na mosala ya Jéhovah na Côte dˈIvoire
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 8]
SIX SERMONS, by George Storrs (1855)