Libota ya boklisto etyaka makambo ya elimo na esika ya liboso
“Bino nyonso bozala na motema moko, kobondisana, kolingana lokola bandeko, na mitema na mawa, na kosokema.”—1 PETELO 3:8.
1. Liponi nini biso nyonso tozali na yango, mpe ndenge nini liponi na biso ekoki kosala bopusi likoló ya avenir na biso?
OYO nde bokokani kitoko ezali kati na mokapo oyo epesami awa na likoló mpe ebongiseli oyo eleki koumela kati na bato: libota! Mpe oyo nde likambo lileki ntina ete baboti bapesa ndakisa kati na makambo yango! Mbala mingi bizaleli malamu na bango mpe bolembu na bango ekomonana polele epai na bana na bango. Nzokande, mosangani nyonso ya libota azali na makoki ya kopona. Lokola tozali baklisto, tokoki kopona kozala bato ya elimo to bato ya mosuni. Tokoki kopona kosepelisa Nzambe to kozanga kosepelisa ye. Liponi yango likoki komema na mapamboli, bomoi ya seko mpe kimya—to na kolakelama mabe, kufa ya seko.—Genese 4:1, 2; Baloma 8:5-8; Bagalatia 5:19-23.
2. (a) Lolenge nini Petelo amonisaki komibanzabanza na ye mpo na libota? (b) Bizaleli ya elimo bizali nini? (Tala maloba na nse ya lokasa.)
2 Maloba ya ntoma Petelo kati na 1 Petelo mokapo 3, na verset 8, mayei nokinoki nsima ya toli kitoko oyo apesaki na basi ya mabala mpe na mibali oyo babali. Petelo azalaki solo komibanzabanza mpo na bolamu ya mabota ya boklisto. Ayebaki ete kozala makasi na elimo ezali mwango mpo ete ndako ezala na bomoko mpe na boboto.a Na yango, amonisaki na verset 7 ete soki mibali batye likebi te na toli na ye, nsuka na yango elingaki kozala epekiseli ya elimo kati na mobali mpe Jéhovah. Mabondeli ya mobali masengelaki kopekisama soki atyaki likebi te na bamposa ya mwasi na ye to soki azalaki kosalela ye makambo makasi.
Klisto—ndakisa ya kokoka mpo na bizaleli ya elimo
3. Lolenge nini Paulo amonisaki ndakisa ya Klisto epai na mibali basilá kobala?
3 Bizaleli ya elimo ya libota moko bitaleli ndakisa malamu. Wana mobali azali moklisto, azali moto ya liboso na kopesa ndakisa mpo na oyo etali komonisa bizaleli ya elimo. Soki mobali azali mondimi te, mbala mingi mama nde akokisaka mokumba wana. Kati na makambo yango nyonso, Yesu Klisto azali kopesa ndakisa ya kokoka oyo ebongi na kolanda. Etamboli na ye, maloba na ye, mpe makanisi na ye mazalaki ntango nyonso ya kolendisa mpe ya kobondisa. Mbala na mbala, ntoma Paulo azali kobenda likebi na batangi likoló na ndakisa ya bolingo ya Klisto. Na ndakisa, alobaki ete: “Mpo ete mobali azali motó ya mwasi lokola Klisto azali motó ya lisangá, ye mobikisi ya nzoto wana. Bino babali, bolingaka basi na bino, lokola Klisto alingaki lisangá mpe amipesaki ye moko mpo na yango.”—Baefese 5:23, 25, 29; Matai 11:28-30; Bakolose 3:19.
4. Ndakisa nini ya bizaleli ya elimo Yesu atikaki?
4 Yesu azalaki ndakisa monene na likambo ya komonisa bizaleli ya elimo mpe na oyo etali kosalela bokonzi na bolingo, na boboto, mpe na komitya na esika ya basusu. Azalaki na elimo ya komipesa, kasi ya koluka bisengo te. Akumisaki ntango nyonso Tata na ye ya likoló mpe atosaki bokonzi na ye. Azalaki kolanda litambwisi ya Tata na ye, yango wana akokaki koloba ete: “Ngai nakoki kosala mosala ngai moko te, nakosambisaka lokola ekoyokaka ngai mpe esambiseli na ngai ezali sembo, mpo ete nakolukaka mokano na ngai moko te, kasi mokano na ye oyo atindi ngai.” “Nazali kosala likambo moko na motema na ngai te kasi lokola Tata asili kolakisa ngai, nakosololaka makambo oyo.”—Yoane 5:30; 8:28; 1 Bakolinti 11:3.
5. Na likambo litali kokokisa bamposa ya bayekoli na ye, ndakisa nini Yesu atikeli mibali oyo basilá kobala?
5 Yango elimboli nini mpo na mibali oyo basili kobala? Elimboli ete ndakisa oyo basengeli kolanda na makambo nyonso ezali Klisto, ye oyo atosaki ntango nyonso Tata na ye. Na ndakisa, lokola Jéhovah akopesaka bilei mpo na bikelamu nyonso ya bomoi na mabelé, bobele bongo Yesu apesaki bilei mpo na bayekoli na ye. Azalaki na bopotu te mpo na kokokisa bamposa na bango ya biloko ya mosuni oyo ezali na ntina mingi. Bikamwiseli na ye mpo na koleisa bato 5 000 mpe 4 000 bizali bilembeteli ya komibanzabanza na ye mpe mposa na ye ya kokokisa mikumba na ye. (Malako 6:35-44; 8:1-9) Bobele bongo lelo oyo, batata ya mabota oyo bazali kondima mokumba na bango bazali kokokisa bamposa ya mosuni ya bato ya ndako na bango. Kasi mokumba na bango mosuki bobele wana?—1 Timoté 5:8.
6. (a) Bamposa nini ya ntina esengeli kokokisama kati na libota? (b) Lolenge nini mibali oyo basili kobala mpe batata bakoki komonisa bososoli?
6 Lokola Yesu amonisaki yango, mabota mazali mpe na bamposa mosusu, oyo eleki ntina. Mazali na bamposa ya elimo mpe ya maoki. (Deteronome 8:3; Matai 4:4) Tosalaka bopusi moko likoló na mosusu, ezala kati na libota to mpe kati na lisangá. Tozali na mposa ya etambwiseli malamu mpo na kopusa biso na kozala bato na kolendisa. Kati na likambo yango mibali mpe batata bazali na mokumba monene—na koleka lisusu soki bazali bankulutu to basaleli na misala. Baboti oyo bazali minzemba bazali mpe na mposa ya bizaleli wana ntango bazali kosalisa bana na bango. Baboti basengeli kososola te bobele makambo oyo basangani ya libota na bango bazali koloba kasi lisusu oyo balobi yango te. Yango ezali kosenga bososoli, ntango mpe motema petee. Ezali moko na bantina mpo na yango Petelo alobaki ete mibali basengeli komonisa limemya mpe kofanda elongo na basi na bango engebene boyebi.—1 Timoté 3:4, 5, 12; 1 Petelo 3:7.
Makámá oyo esengeli kopengola
7, 8. (a) Esengeli kosala nini soki libota moko elingi kopengola kozinda na elimo? (b) Longola ebandeli malamu kati na bomoi ya boklisto, eloko nini esengami lisusu? (Matai 24:13)
7 Mpo na nini esengeli kotya likebi mingi na bizaleli ya elimo ya libota? Mpo na kopesa ndakisa, tokoki komituna mpo na nini motambwisi ya masuwa asengeli kotya likebi mingi na karte na ye wana azali koleka esika ya bokokú to oyo ezangi bozindo. Na Août 1992 masuwa ya kopota mingi Queen Elizabeth 2 (QE2) ezwamaki na esika moko ya likámá ya zelo mpe ya mabanga epai mabunga masalemaka mingi na likambo ya kotambwisa masuwa. Moto moko ya mboka yango alobaki ete: “Batambwisi mingi ya masuwa babungisaki misala na bango mpo na esika oyo.” Masuwa QE2 matutaki libanga moko na nse ya mai. Ezalaki libunga moko oyo ebebisaki mosolo mingi. Ndambo na misato ya eteni ya nsé ebebaki, mpe esengelaki ete masuwa esala mosala te na boumeli ya baposo mingi mpo bakoka kobongisa yango.
8 Bobele bongo, soki “mokumbi” ya libota akotala malamu te karte na ye, Liloba na Nzambe, libota na ye likoki nokinoki kozwa likámá na elimo. Mpo na nkulutu to mosaleli na misala, litomba mabe likoki kozala kobungisa mikumba kati na lisangá mpe mbala mosusu likámá monene mpo na basangani mosusu ya libota. Yango wana, moklisto moko na moko asengeli kokeba na kokanisa ete ezaleli na ye ya elimo ekoki, kotyáká motema bobele na momeseno malamu mpe milende oyo azalaki na yango kala mpo na boyekoli. Kati na bomoi na biso ya boklisto, ekoki te bobele kobanda malamu; esengeli kosukisa malamu mobembo yango.—1 Bakolinti 9:24-27; 1 Timoté 1:19.
9. (a) Boyekoli ya biso moko ezali na ntina nini? (b) Mituna nini ya ntina tosengeli komituna?
9 Na makambo ya elimo, mpo na kopengola bokokú, mabanga, mpe zelo, tosengeli kolanda malamu “karte” na biso na nzela ya boyekoli ya Liloba na Nzambe ntango nyonso. Tosengeli te kosuka bobele na boyekoli ya ebandeli oyo ememaki biso kati na solo. Nguya na biso ya elimo esimbami na ebongiseli malamu mpe ya bokatikati ya boyekoli mpe ya mosala ya kosakola. Na ndakisa, ntango toyangani na boyekoli ya Mosenzeli ya lisangá awa tosimbi zulunalo oyo na maboko na biso, tokoki komituna ete: ‘Ngai, to biso kati na libota, toyekolaki solo lisoló oyo, tolukaki mikapo mpe tokanisaki na lolenge ya kosalela yango? To tosukaki bobele na kotya mokɔlɔtɔ́ mpo na koluka biyano? Ntango mosusu tozalaki ata na bolembu ya kozanga kotanga lisoló yango liboso na boyekoli?’ Biyano ya sembo na mituna oyo bikoki kotinda biso na kokanisa na ntina na boyekoli na biso mpe bikoki kopesa mposa ya kobongisa ezaleli yango soki esengeli.—Baebele 5:12-14.
10. Mpo na nini ezali na ntina ete tomitalela?
10 Mpo na nini boyekoli ya mozindo ya lolenge yango ezali na ntina? Mpamba te tozali kobika na mokili oyo eyangelami na elimo ya Satana, mokili oyo, na myango mingi ya mabe, ezali koluka kobebisa kondima na biso epai na Nzambe mpe na bilaka na ye. Ezali mokili oyo elingi kozwa ntango na biso nyonso mpo ete tokoka te komibanzabanza na makambo ya elimo. Mpo na yango tosengeli komituna biso moko: ‘Libota na ngai lizali solo makasi na elimo? Lokola moboti, nazali makasi lolenge nasengelaki kozala? Kati na libota, tozali kolona nguya ya elimo oyo ekopusa makanisi na biso na kozwa bikateli bisimbami na boyengebene mpe na bosembo?’—Baefese 4:23, 24.
11. Mpo na nini makita ya boklisto mazali kopesa matomba mingi ya elimo? Pesa ndakisa moko.
11 Elimo na biso esengeli kolendisama na nzela na makita nyonso oyo tozali koyangana na yango. Bangonga wana ya motuya mingi oyo tozali kolekisa na Salle du Royaume to na Boyekoli ya mokanda ya lisangá ezali kolendisa biso nsima na ntango molai oyo tosengeli kolekisa kati na mokili mabe ya Satana. Na ndakisa, koyekola mokanda Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo ezali elendiseli ya solo. Yango esalisaki biso na kozwa boyebi ya malamu ya Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye. Totangaki na likebi nyonso mikapo oyo mipesami, tosalaki bolukiluki na biso moko, mpe toyekolaki mingi na ndakisa oyo Yesu atikaki.—Baebele 12:1-3; 1 Petelo 2:21.
12. Lolenge nini mosala ya kosakola ezali emekeli ya elimo na biso?
12 Emekeli malamu ya bizaleli ya elimo na biso ezali bongo mosala ya kosakola. Mpo ete tokoka kolendendela kati na mosala na biso ya kopesa litatoli na bandako mpe na libaku malamu, mbala mingi epai na bato oyo bazali kotya likebi te to na baoyo bazali kotemela, tozali na mposa ya nguya makasi, ya bolingo mpo na Nzambe mpe bolingo mpo na bazalani na biso. Ya solo, moto moko te asepelaka ete babengana ye, mpe likambo yango likoki kokómela biso kati na mosala ya kosakola. Kasi tosengeli komikundola ete ezali nsango malamu nde bazali koboya, kasi biso bato te. Yesu alobaki ete: “Soko bamokili bazali koyina bino, boyeba ete bayinaki ngai liboso naino bayinaki bino te. Soko bozalaki bato na mokili, mbele bamokili balingaki bato na bango mpenza. Nde awa ezali bino na mokili te, kasi nasili kopona bino longwa na mokili, bongo bamokili bazali koyina bino. . . . Kasi bakosalela bino makambo oyo nyonso mpo na nkombo na ngai, mpo bayebi Motindi na ngai te.”—Yoane 15:18-21.
Misala mikondimisaka koleka maloba
13. Lolenge nini moto bobele moko akoki kobebisa elimo ya libota mobimba?
13 Likambo nini likómaka kati na libota soki basangani na yango nyonso bazali kobatela bopeto ya ndako, longola bobele moko kati na bango? Mokolo oyo mbula enoki, moto nyonso azali kokeba ete amema potopoto na ndako te, longola bobele ye oyo azali na bopotu. Matambe ya potopoto bipai nyonso mazali kopesa elembeteli ya polele ya bopotu na ye, kobakiseláká bongo basangani mosusu ya libota mosala. Ezali bobele bongo mpo na bizaleli ya elimo. Moto ya moimi to ya bopotu bobele moko akoki kobebisa lokumu ya libota. Bato nyonso kati na ndako, kasi bobele baboti te, basengeli kosala makasi mpo na komonisa elimo ya Klisto. Oyo nde elendiseli wana libota mobimba lizali kosala na bomoko mpo na kobatela elikya ya bomoi ya seko kati na makanisi! Makambo ya elimo (kasi te koluka matomba na moto ye moko) makokóma ezaleli ya liboso ya libota wana. Matambe ya bopotu ya elimo makomonana mpenza mingi te kati na ndako motindo wana.—Mosakoli 7:16; 1 Petelo 4:1, 2.
14. Masenginya nini ya mosuni Satana azali kotya na nzela na biso?
14 Biso nyonso tozali na bamposa ya mosuni oyo esengeli kokokisama kati na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. (Matai 6:11, 30-32) Kasi mbala mingi bilulela na biso ebulunganisaka bamposa na biso. Na ndakisa, ebongiseli oyo ya Satana ezali ntango nyonso kolakisa biso biloko mpe bisaleli ndenge na ndenge. Soki tozali koluka ntango nyonso kozala na biloko oyo ebimi sika, tokotonda te, mpamba te biloko oyo bibimi sika bikosilaka ngala noki mpe mosusu ya sika bizali kobima. Ebongiseli ya mombongo esili kotya zolongano oyo ekosuka te. Ezali kolengola biso na koluka ntango nyonso mbongo mingi mpo na kokokisa bamposa na biso oyo ezali se kokola. Likambo yango likoki komema na “bamposa ezangi ntina mpe ekoyokisa mpasi,” to na “ebebe mpe bilulela ya mabe.” Ekoki komema na bomoi ezangi bokatikati oyo ekotika bobele ntango moke mpo na misala ya elimo.—1 Timoté 6:9, 10.
15. Na makambo nini ndakisa ya mokonzi ya libota ezali mpenza na ntina?
15 Na likambo wana, ndakisa oyo mokonzi ya libota ya boklisto azali kopesa ezali na ntina mingi. Bokatikati na ye epai na mikumba na ye ya mosuni mpe ya elimo esengeli kosalisa basangani mosusu ya libota. Ekozala solo mpasi mingi soki tata to mobali azali kopesa mateya kitoko na maloba kasi azali kosala te engebene maloba na ye moko. Bana bakoki komona kati na yango bokokani elongo na likanisi oyo elobi ete sala oyo nalobi, kasi sala te oyo nazali kosala. Bobele bongo, nkulutu moko to mosaleli moko na misala oyo azali kolendisa basusu kati na mosala ya ndako na ndako, kasi azalaka mbala mingi te elongo na libota na ye kati na mosala yango, akobungisa noki limemya ya libota na ye mpe ya lisangá.—1 Bakolinti 15:58; tala Matai 23:3.
16. Mituna nini tokoki komituna?
16 Yango wana, tokoki mpenza kozwa litomba na kotalela bomoi na biso. Tomipesi mingi na koluka kolónga kati na mokili oyo nzokande tozali na bopotu ya kosala bokoli na elimo? Tozali kokende liboso kati na mokili kasi tozali nde kozonga nsima kati na lisangá? Tomikundola toli oyo ya Paulo: “Liloba oyo ezali sembo. Soki moto moko alingi ete asala mosala ya mokɛngɛli, azali na mposa ya mosala malamu.” (1 Timoté 3:1) Kondima mikumba kati na lisangá ekosunga elimo na biso koleka mpɛtɛ́ oyo tozwi na mosala. Esengeli kobatela bokatikati mpo ete patron na biso akoka te koyangela bomoi na biso lokola nde tomipesaki epai na ye, kasi epai na Jéhovah te.—Matai 6:24.
Kosolola malamu ezali kokolisa bizaleli ya elimo
17. Nini ezali kopesa nzela na kolona bolingo ya solo kati na libota?
17 Bandako mingi na mikolo na biso esili kokóma bobele bisika ya kolala. Lolenge nini? Basangani ya libota bayaka bobele mpo na kolala mpe kolya, mpe na nsima bazali kobima nokinoki. Bafandaka mpenza te na mesa mpo na kolya esika moko. Bomoi ya libota ezali kobeba. Yango ezali kobimisa matomba nini? Kosolola ezali te, masoló ya malamu mazali te. Mpe yango ekoki komema na kozanga komibanzabanza mpo na basangani mosusu ya libota, mbala mosusu kozanga bosepeli ya solo. Soki tolingani mpenza kati na biso tokozwa ntango ya kosolola mpe ya koyoka. Tokolendisa mpe tokopesa lisalisi. Eteni oyo ya bizaleli ya elimo ezali kosenga kosolola malamu kati na babalani mpe kati na baboti na bana na bango.b Kobelema moko pene na mosusu mpo na kokabola esengo na biso, makambo tokutanaki na yango mpe mikakatano na biso ezali kosenga ntango mpe mayele.—1 Bakolinti 13:4-8; Yakobo 1:19.
18. (a) Nini ezalaka mbala mingi epekiseli monene mpo na kosolola? (b) Boyokani ya malamu ezali kotongama likoló na nini?
18 Kosolola malamu ezali kosenga ntango mpe molende. Elimboli kobomba ntango mpo na kolobana mpe koyoka mosusu. Moko na bipekiseli eleki monene mpo na yango ezali esaleli oyo ezwi esika ya lokumu kati na bandako mingi mpe oyo ezali kozwa ntango mingi: televizyó. Ezali kobimisa ntembe oyo: Televizyó ezali koyangela biso to biso nde tozali koyangela televizyó? Kozala na bokonzi likoló na televizyó ezali kosenga ekateli ya makasi—bakisa nguya ya kokanga yango. Kasi kosala bongo ekofungola biso nzela ya koyokamela moko na mosusu lokola basangani ya libota mpe lokola bandeko mibali mpe basi ya elimo. Boyokani ya malamu ezali kosenga kosolola, komitya moko na esika na mosusu, na ntina na bamposa mpe esengo na biso, koloba na moninga motindo nini tozali kosepela na makambo malamu oyo basaleli biso. Na ndimbola mosusu, masoló ya malamu mazali komonisa ete tozali na botɔndi mpo na basusu mpe tozali kokamata bango na motuya.—Masese 31:28, 29.
19, 20. Soki tozali komibanzabanza mpo na mosangani nyonso ya libota, tokosala nini?
19 Mpo na yango, soki tokomonisa bolingo moko mpo na mosusu kati na ebongiseli ya libota—mpe likambo yango esengi mpe kokanisela basangani ya libota oyo bazali bandimi te—tokosala mingi mpo na kolendisana mpe kobatela elimo na biso. Kati na ebongiseli ya libota, tosengeli kolanda toli oyo ya Petelo: “Mpo na kosukisa, bino nyonso bozala na motema moko, kobondisana, kolingana, lokola bandeko, na mitema na mawa, na kosokema. Bozongisa mabe mpo na mabe te soko kotuka mpo na kotuka te; kasi na motindo mosusu bopambolaka, mpo ete bobyangami mpo na yango na ntina ete bozwa libula na lipamboli.”—1 Petelo 3:8, 9.
20 Tokoki kozwa mapamboli ya Jéhovah sikawa soki tokosala makasi mpo na kobatela elimo na biso, mpe yango ekoki kopesa biso mapamboli na ye mpo na mikolo mizali koya ntango tokozwa likabo ya bomoi ya seko na mabelé oyo makobongwana Paradis. Ezali na makambo mosusu oyo tokoki kosala kati na libota mpo na kosalisana na elimo. Lisoló lilandi likolobela matomba ya kosala makambo esika moko kati na libota.—Luka 23:43; Emoniseli 21:1-4.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bizaleli ya elimo elimbolami lokola “maoki to bokangami epai na makambo ya motuya ya losambo: kozala to komimonisa moto ya elimo.” Moto ya elimo akeseni na moto ya mosuni, moto ya nzoto.—1 Bakolinti 2:13-16; Bagalatia 5:16, 25; Yakobo 3:14, 15; Yuda 19.
b Mpo na kozwa makanisi mingi na likambo ya kosolola kati na libota, tala Mosenzeli ya le 1er Septembre 1991, lokasa 20 kino lokasa 22.
Ozali komikundola?
◻ Bizaleli ya elimo bizali nini?
◻ Lolenge nini mokonzi ya libota akoki komekola ndakisa ya Klisto?
◻ Lolenge nini tokoki kopengola makámá oyo mazali kotalela elimo na biso?
◻ Nini ebebisaka bizaleli ya elimo ya libota?
◻ Mpo na nini kosolola malamu ezali na ntina mingi?
[Elilingi na lokasa 12]
Koyangana na Boyekoli ya mokanda ya lisangá ezali kolendisa elimo ya libota