Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/9 nk. 4-6
  • Tokoki kolinga bazalani na biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tokoki kolinga bazalani na biso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndakisa malamu na Yesu
  • Nzambe akoponaponaka te
  • Bolingo mpo na bazalani ezali komonana
  • “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Mpo na nini kolinga mozalani na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Kolinga mozalani na biso elimboli nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mosamalia amimonisi mozalani malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/9 nk. 4-6

Tokoki kolinga bazalani na biso

LISESE oyo Yesu Klisto apesaki na Mosamaria limonisi mpenza ndimbola ya bolingo ya solo mpo na bazalani. (Luka 10:25-37) Yesu ateyaki lisusu ete: “‘Okolinga Jéhovah, Nzambe na yo na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, mpe na elimo na yo mobimba.’ Wana ezali mobeko ya liboso mpe eleki monene. Tala ya mibale oyo ekokani na yango: ‘Okolinga mozalani na yo lokola yo moko.’”​—Matai 22:37-39.

Ozali kokanisa lokola bato mingi ete ezali mpasi mpo na kolinga mozalani na yo ya ekólo mosusu? Ezali bongo ntango mosusu mpo ete oyokaki to omonaki koponapona mpe bokesene. Ekoki kozala ete yo to mpe balingami na yo bonyokwamaki na bato ya ekólo mosusu.

Lokola Yesu amonisaki ete moko na mibeko ya Nzambe ezali ete tolinga bazalani na biso, yango emonisi ete likoki ezali ya kolónga mayoki ya koyina bazalani na biso. Mpo na kosala bongo, esengeli kotalela bato lokola Nzambe mpe Klisto bazali kotalela bango. Mpo na yango, totalela ndakisa ya Yesu mpe baklisto ya liboso.

Ndakisa malamu na Yesu

Bayuda ya ekeke ya liboso bazalaki na mpenza koyina Basamaria, bato oyo bazalaki kofanda na etúka oyo ezalaki katikati na Yudea mpe Galilai. Na libaku moko, batɛmɛli Bayuda batunaki Yesu na kotyola nyonso ete: “Tolobi nde malamu te ete, yo ozali Mosamaria mpe ozali na elimu mabe?” (Yoane 8:48) Lisusu, Bayuda mosusu oyo bazalaki na mayoki ya mabe mpo na Basamaria bazalaki kolakela bango mabe liboso ya bato nyonso kati na eyanganelo mpe bazalaki kobondela mokolo na mokolo ete Basamaria bazwa bomoi ya seko te.

Na ntembe te, koyina wana makasi nde epusaki Yesu na kopesa lisese na ntina na Mosamaria oyo amonisaki ete azali mozalani malamu na kosalisáká Moyuda oyo abɛtamaki na miyibi. Lolenge nini Yesu akokaki koyanola ntango Moyuda oyo ayebaki mpenza Mibeko na Moize, atunaki ete: “Nani azali mpenza mozalani na ngai?” (Luka 10:29) Bongo, Yesu akokaki kozongisa mbala moko ete: ‘Mozalani na yo ezali te bobele moninga na yo Moyuda, kasi bato mosusu lokola, ata Mosamaria.’ Nzokande, Bayuda bakokaki te kondima yango. Bongo, apesaki lisese na ntina na Moyuda oyo Mosamaria ayokelaki ye mawa. Na yango, Yesu asalisaki bayoki na ye Bayuda na kondima ete bolingo ya solo mpo na bazalani esengeli komonisama kino epai na bato oyo bazali Bayuda te.

Yesu azalaki na mayoki ya mabe te mpo na Basamaria. Mokolo moko akendaki na Samaria, apemaki pene na libulu ya mai wana bayekoli na ye bakendaki koluka bilei pene na mboka wana. Ntango mwasi moko Mosamaria ayaki kotóka mai, [Yesu] alobaki ete: “Pesa ngai mai.” Lokola Bayuda bazalaki na boyokani te elongo na Basamaria, mwasi wana atunaki ete: “Mpo na nini yo, Moyuda, ozali kosɛnga ngai mai, ngai mwasi Mosamaria?” Na nsima, Yesu apesaki ye litatoli, kolobáká polele ete ye azalaki Masiya. Mwasi yango akendaki noki na mboka mpe abengaki bato mosusu ete baya koyoka ye. Ebimisaki matomba nini? “Mingi kati na Basamaria bautaki na mboka wana, bandimaki ye.” Oyo nde litomba kitoko mpo ete Yesu amekolaki te makanisi mazalaki epai na Bayuda na eleko na ye!​—Yoane 4:4-42.

Nzambe akoponaponaka te

Mokano ya Nzambe mozalaki ete Yesu asakola liboso mpenza epai na Bayuda, “bampate na ndako na Yisraele baoyo babungani.” (Matai 15:24) Yango wana, bayekoli na ye ya liboso bazalaki Bayuda na mosuni. Kasi mibu misato nsima na kosopama ya elimo santu na Pantekote ya mobu 33 T.B., Jéhovah amonisaki polele ete alingaki ete Bayuda oyo bandimaki, bakólisa mosala ya kozalisa bayekoli kino epai na bato ya mabota mosusu, Bapakano.

Mpo na Moyuda, kolinga Mosamaria lokola ye moko ezalaki mpasi mingi. Ezalaki lisusu mpasi koleka mpo na komonisa bolingo ya bazalani epai na Bapakano oyo bakatamaki ngenga te, oyo bazalaki na makambo mingi makeseni na Bayuda, koleka Basamaria. Kolobáká na ntina na ezaleli ya Bayuda epai na Bapakano, mokanda The International Standard Bible Encyclopaedia eyebisi ete: “Tozali kokuta, na eleko ya K[ondimana] ya S[ika], motindo na kooka mpii, na kotyola mpe na koyina oyo eleki makasi. Bango [Bapakano] bazalaki kotalelama lokola bato na mbindo, baoyo ebongaki soko moke te kozala na baninga na bango. Bazalaki banguna ya Nzambe mpe ya bato na Ye, baoyo bapimelamaki boyebi ya Nzambe longola bobele soki babongwani na losambo ya Bayuda, mpe ata bongo, bakokaki te kondimama kati na libota ya Bayuda, lokola na ntango ya kala. Bayuda bapekisamaki mpo na kopesa bango toli, mpe bazalaki kolakela bango mabe wana bazalaki kotuna makambo na ntina na Nzambe.”

Wana bato mingi bazalaki na makanisi oyo, Jéhovah asalaki ete ntoma Petelo azwa emonaneli kati na yango bayebisaki ye ete, ‘biloko bipetoli Nzambe, yo tanga yango biloko na mbindo te.’ Na nsima, Nzambe akambaki ye na ndako ya Korneye, Mopakano. Petelo apesaki litatoli na ntina na Klisto epai na Korneye, na libota na ye, mpe na Bapakano mosusu. Petelo alobaki ete: “Na solo namoni ete Nzambe akoponaka bato te; kasi kati na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene, andimami na ye.” Wana Petelo azalaki naino kosakola, elimo santu ekitaki likoló na bandimi wana ya sika, baoyo na nsima, bazwaki batisimo mpe bazalaki Bapakano ya liboso oyo bakómaki bayekoli na Klisto.​—Misala, mokapo 10.

Bayuda baoyo bakómaki bayekoli bandimaki bokóli wana, na kososoláká ete etinda na Yesu mpo na “kozalisa bayekoli na bato ya mabota nyonso” etalelaki bobele Bayuda te, kasi esangisaki mpe Bapakano. (Matai 28:19, 20; Misala 11:18) Kolongáká makanisi nyonso ya mabe oyo bakokaki kozala na yango na ntina na Bapakano, babongisaki mosala ya kosakola na molende nyonso mpo na kozalisa bayekoli kati na mabota. Mibu 30 mikokaki te na nsima, bakokaki koloba ete nsango malamu esakolamaki “epai na bato nyonso na nsé na likoló.”​—Bakolose 1:23.

Ntoma Paulo, ye moko Moyuda oyo akomaki moklisto, azalaki na liboso kati na mosala wana ya kosakola. Liboso na kokóma moyekoli na Klisto, azalaki mosangani ya molende na lingomba ya Bafalisai. Bazalaki kotyola bobele Bapakano te, kasi ata bato mosusu ya ekólo na bango moko. (Luka 18:11, 12) Kasi Paulo apesaki nzela te ete makanisi wana mazongisa ye nsima mpo na komonisa bolingo ya bazalani epai na basusu. Na esika na kosala bongo, akómaki “ntoma ya mabota [Bapakano],” kopesáká bomoi na ye na mosala ya kozalisa bayekoli na mikili zongazonga na mai monene Méditerranée.​—Baloma 11:13.

Na boumeli ya mosala na ye mpo na Nzambe, Paulo abolamaki mabangá, abɛtamaki, mpe abwakamaki na bolɔkɔ. (Misala 14:19; 16:22, 23) Makambo wana ya mpasi mapusaki ye na koimaima mpe na kosukisa ete azalaki kolekisa ntango na ye mpamba kati na mabota mpe bikólo mosusu? Soko moke te. Ayebaki ete ezalaki na bato ya motema sembo baoyo bapalanganaki kati na bikólo mingi ya eleko na ye.

Esika Paulo akutaki Bapakano bandimaki koyoka maloba ya Nzambe, akómaki kolinga bango. Na ndakisa, akomelaki Batesaloniki ete: “Tozalaki bato na boboto kati na bino, lokola mama akobɔkɔlaka bana na ye. Na yango, wana tozalaki na bolingo mingi mpo na bino, tosepelaki kopesa bino bobele nsango malamu na Nzambe te, kasi topesaki bino mpe bomoi na biso lokola, mpo ete bokómaki balingami na biso mpenza.” (1 Batesaloniki 2:7, 8, MN) Maloba wana mauti mpenza na motema mamonisi ete Paulo alingaki mpenza Bapakano ya Tesaloniki mpe apesaki nzela na eloko moko te ete ebebisa esengo ya kozala na boyokani malamu elongo na bango.

Bolingo mpo na bazalani ezali komonana

Lelo oyo, lolenge moko na ekeke ya liboso, baoyo bazali kokota na lisangá ya boklisto bazali kolóna bolingo mpo na bazalani epai na bato ya bikólo nyonso. Na kosaláká makasi na kotalela bato mosusu lokola Nzambe azali kotalela bango mpe na koyebisáká bango nsango malamu ya Bokonzi, baklisto ya solo bayebani malamu na bato mingi oyo mbele bakokaki koyeba bango soko moke te. Bakomi kolinga bango lokola bandeko mpenza. (Yoane 13:34, 35) Yo mpe okoki komona bolamu oyo.

Bolingo motindo wana ezali kati na ba Témoins de Jéhovah, atako bafandi kati na mikili mpe bisanga 229 mpe bauti na “mabota nyonso mpe bikólo nyonso mpe mikili nyonso mpe minoko nyonso.” (Emoniseli 7:9) Lokola libota moko ya bandeko kati na mokili mobimba, bazali na bomoko kati na losambo ya Jéhovah, baboyi kosangana na matáta mpe kowelana kati na bikólo, mpe baboyi koponapona oyo ezali kolongola boyokani kitoko elongo na bato mosusu.

Sangana elongo na Batemwe, mpe okomona lolenge bato ya bikólo nyonso bazali kosala mokano ya Nzambe. Okomona ete bolingo mpo na bazalani ezali solo lelo, wana bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Lisusu, kati na masangá na bango, okokutana na bato na motema sembo mpe na boboto, baoyo bazali komonisa na bomoi na bango ete basili koyekola kolinga bazalani na bango.

[Elilingi na lokasa 6]

Kati na masangá ya ba Témoins de Jéhovah, okokuta bato ya esengo bauti na mposo nyonso

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 4]

Arrival of the Good Samaritan at the Inn/​The Doré Bible Illustrations/​Dover Publications, Inc.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto