Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/10 nk. 4-7
  • Mokili mozangi miyibi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokili mozangi miyibi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Tika ete moyibi ayiba lisusu te”
  • Kobatelama kati na mokili ya sika ya Nzambe
  • Bobángi ekosila ntango nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mpo na nini koyiba ekómi mingi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Ndenge nini okoki kokima basali na mabe kati na mokili oyo mabebisami na mobulu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Ntango bayibi bakɔteli bino na ndako na mindoki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/10 nk. 4-7

Mokili mozangi miyibi

MAKAMBO nyonso wana masalemaki nokinoki! Antônioa atelemaki liboso ya ndako na ye, na São Paulo, na mboka Brésil, ntango mobali moko oyo alataki malamu asengaki ye fungola mpe mikanda ya vuatire na ye na kolakisáká ye masitɔ́lɔ, mpe nokinoki akumbaki yango na vitesi makasi.

Na Rio de Janeiro, mibali minei oyo bazalaki na mindoki babimelaki Paulo, likambo yango esalemaki na miso ya mwana na ye ya mwasi oyo azalaki na mibu zomi. Na nsima, bakotaki na ndako na ye, bakamataki biloko nyonso oyo bazalaki na yango mposa, batondisaki bavuatire mibale ya Paulo na biloko. Balingaki koboma mwasi na ye mpe bamemaki ye mpe mosáli mosusu ya mwasi. Bakendaki na ville epai magazini ya Paulo ya babiju ezalaki mpe bakamataki biloko nyonso ya motuya. Kozanga komizela na yango, Paulo mpe libota na ye, bakamwaki na koyoka na nsima ete miyibi babengi bango na telefone mpe bayebisi bango epai batikaki bavuatire na bango.

Oyo nde likambo ya mawa na komona ete bayiba yo mbongo mpe biloko oyo ozwaki yango na mpasi mingi! Antônio mpe Paulo balingaki te kozongisa mabe mpo na mabe; nzokande basusu bamonaka malamu kozongisa mabe mpo na mabe. Mbala mosusu bakoki koboma moyibi soko mpe kobungisa bomoi bango moko. Na ndakisa, mokolo moko, mwasi moko ya Brésil, azalaki na nkanda, abimisaki masitɔ́lɔ na saki mpe abetaki elenge mobali oyo abotolaki ye montre na ye. Nini esalemaki na nsima? Zulunalo O Estado de S. Paulo elobi ete: “Bato oyo bamonaki likambo yango basepelaki likambo oyo mwasi wana asalaki mpe moto moko alingaki te kosalisa bapolisi mpo ete bayeba ye.” Atako bazali kolikya kati na mokili mozangi bitumba, baklisto bazali te komekola mwasi wana na kolukáká kozongisa mabe mpo na mabe. Mpo ete kobukanisa ezali na Jéhovah, bazali kolanda maloba ya Masese 24:19, 20 (MN): “Kozala na nkanda mpo na bato mabe te. Kolula bato mabe te. Mpo ete elikya ezali te mpo na moto mabe.”

Kasi okosala nini soki babundisi yo? Likambo moko oyo esalemaki na Rio de Janeiro emonisi ete ezali malamu kofanda nyee. Moklisto moko ya mwasi na nkombo Heloísa, akamataki motuka mpo na kokende kotambwisa boyekoli ya Biblia. Mibali mibale bazalaki kofungola biloko ya bato bazalaki kati na motuka. Lokola motuka ekómaki pembeni na esika oyo asengelaki kokita, Heloísa ayebisaki bango ete ye azali Témoin de Jéhovah mpe ayebisaki bango ete akei kotambwisa boyekoli ya Biblia. Alakisaki Biblia na ye mpe mokanda oyo akei kotambwisa na yango boyekoli. Miyibi basimbaki biloko na ye te mpe batikaki ye kokende. Moto mosusu oyo azalaki kati na motuka alingaki kokita, kasi bapesaki ye nzela te. Na nsima, mokumbi motuka alobaki ete asilá naino komona likambo motindo wana te.

Regina ye mpe afandaki nyee ntango mibali mibale oyo bazalaki na mindoki balobaki na ye ete akota na vuatire na ye. Kolakisáká bango ekzamplere ya Lamuká! oyo azalaki na yango, Regina apesaki litatoli. Lokola miyibi basilikaki, asengaki bango ete bafungola boîte oyo atyaki ba bonbons. Kasi bamonaki bakasete ya Mélodies du Royaume, balingaki koyoka yango. Makambo mabongwanaki mpe ba bandits batikaki Regina kolanda nzela na ye, kozanga kosala ye ata mabe moko mpe kondimisáká ye ete akokutana na moto moko ya boboto, oyo akosalisa ye. Nsima na kotambola na boumeli ya minite zomi, amonaki ndako moko, oyo nkolo na yango akakatanaki mpo na kondima makambo oyo ye [Regina] azalaki koloba. [Nkolo ndako] alobaki na ye ete: “Ozali komonana te ete okutanaki na likámá; omonani ete obulungani te.”

Likambo oyo ezali kopesa mpasi na ba nerfs ekoki kozala na makámá makasi na nsima, ata soki moto oyo basalelaki ye mabe azokaki te na nzoto. Tozali kotanga kati na zulunalo O Estado de S. Paulo: “Moto oyo basaleli ye mabe akoki kozala na mayoki ya kozanga kobatelama mpe kozanga kosepela na basangani ya libota na ye to baoyo bazali koluka kosalisa ye. Akoki mpe kozala na mpasi na kotyela bato mosusu motema, kozanga kosepela na ebongiseli, mpe kokanisa ete mokili ezali na bokesene.” Na bokeseni, baoyo bazali kotya motema na Jéhovah Nzambe bazali na likoki ya kolónga makambo ya mpasi oyo bakutanaki na yango oyo epesaki te mikakatano na nzoto soko mpe na mayoki. Nzokande, okanisi te ete ekozala likambo ya malamu soki mobulu mpe makambo nyonso oyo mazali kopesa bobangi elimwi?

“Tika ete moyibi ayiba lisusu te”

Atako bato mingi bazali kosepela kozala na bomoi ya lokoso, Liloba na Nzambe esalisaki miyibi na kobongola bamposa na bango mpe bomoto na bango. (Baefese 4:23) Koyebáká kati na Biblia ntina mpenza ya bomoi, bazali kobatela kati na motema na bango maloba oyo: “Mwa moke na boyengebene elongo eleki bozwi monene soko ezali na sembo te.” (Masese 16:8) Claúdio ayebisi ete: “Naloba ete basangani nyonso ya libota na ngai bazalaki ba Témoins de Jéhovah, kasi nazalaki soko moke te koyoka oyo bazalaki koloba na ntina na Jéhovah mpe mikano na ye. Na bozongi longwa na mobembo ya bakilomɛtɛlɛ pene na 2 000, nalekaki bapolisi mingi oyo batelemaki. Na nzela, nasosolaki ete esengeli nabongola lolenge ya bomoi na ngai. Namekaki kosala yango liboso kasi nalóngaki te. Na ntango yango, nabandaki kokanisa mpo na bandeko na ngai oyo bazalaki ba Témoins de Jéhovah mpe lolenge bakesanaki na bato mosusu, bazalaki na bosepeli, na esengo mpe bazalaki na kimya.” Lokola litomba, Claúdio, abandaki koyekola Liloba na Nzambe, atikaki komela ba drogues mpe baninga na ye ya kala, mpe akómaki moklisto.

Bato mosusu bazali kondima maloba oyo: “Bozala na elikya kati na [kobuba] bato te; botya mpe motema na koyiba te.” (Nzembo 62:10) Nsima na kokota boloko na ntina na moyibi mpe kolinga koboma bato, José, moteki ya drogue mpe ye moko momeli na yango, ayekolaki Biblia elongo na bokilo na ye mpe azwaki litomba. Atikaki ba drogues mpe sikawa azali Temwe ya molende.

Atako bongo, bomoto ya sika eyaka pwasa te yango moko lokola likamwisi. Oscar, oyo amipesaki mingi na drogue mpe na koyiba, ayebisi: “Nazalaki kobondela Jéhovah na motema na ngai mobimba, mbala na mbala, na boye ete mai na miso oyo ezalaki kokwea na mabelé elingaki kosala mwa etimá.” Ee, esengeli te bobele koyekola na molende Liloba na Nzambe, kasi lisusu kobondela na kolendendela mpe na motema na yo mobimba. Tala mayele mazali kati na libondeli oyo: “Pesa ngai bobóla te, bozwi mpe te. Leisa ngai bilei bikoki na ngai, ete natonda te mpe boye nawangana yo te, naloba te ete: ‘Jéhovah azali nani?’ Soko ete nazala mobóla te mpe nayiba te, nabimisa nkombo na Nzambe na ngai na mpamba te.”​—Masese 30:8, 9.

Moimi esengeli kotika esika na bolingo ya solo: “Tika ete moyibi ayiba lisusu te, kasi tika ete asalaka mosala, asalisa maboko na ye misala ete akoka kokabela bango bazali kozanga.” (Baefese 4:28) Na nzela ya lisiko oyo epesamaki na Yesu Klisto, Jéhovah, kati na ngolu na ye, azali kolimbisa baoyo bazali kobongola motema, lokola alimbisaki bamoko kati na baklisto ya ekeke ya liboso oyo kala bazalaki ‘miyibi to bato na lokoso.’ (1 Bakolinti 6:9-11) Atako lolenge nini ya bomoi tozalaki na yango na ntango ya kala, ezali likambo ya kolendisa na koyeba ete tokoki kobongola bomoi na biso mpe kozwa ngolu ya Nzambe!​—Yoane 3:16.

Kobatelama kati na mokili ya sika ya Nzambe

Kanisa naino mabelé oyo mazangi miyibi. Okozala na mposa te ya koluka mbongo mingi oyo esengamaka na basambisi, na ba avocats, na bapolisi mpe na boloko! Ekozala mokili moko oyo ezali na bozwi mingi kati na yango moko na moko akozala na limemya mpo na bazalani mpe biloko na bango! Yango ezali bobele ndoto mpamba? Nzambe akokota mpenza kati na makambo ya bato mpe kotya nsuka na ezaleli ya kotyola mibeko? Tozali kobyanga yo na kotalela bilembeteli oyo bimonisi ete Biblia ezali solo Liloba na Nzambe mpe ete bisakweli na yango bibongi mpenza kotyelama motema. Okozwa bongo endimiseli ya makasi ete mbongwana ekosalema na mikolo mizali koya. Moto moko te akoki kopekisa Nzambe na kopesa kobondisama oyo alakaki epai na baoyo nyonso bazali kolinga boyengebene: “Omitungisa te mpo na bato na masumu; yokela basáli na mabe zuwa te. Mpo ete bakolimwa mbangu lokola matiti; bakokauka lokola matiti mobesu.” (Nzembo 37:1, 2) Maloba wana oyo malobamaki esili koleka bikeke mingi mosika te ekokokisama na mobimba na yango.

Bokonzi na Nzambe ekotya nsuka na bobóla mpe na bokesene, oyo epesi nzela mingi na kozanga elikya mpe na komitungisa na motema. Ekozala lisusu na ntina moko te oyo ekopesa nzela na moto ete ayiba. Tondimisami kati na esakweli oyo: “Masango makotondana kino likoló na nkeka; mpe mbuma na yango ekoningana pelamoko na nzeté na Lebanona [ya kala], bato na mboka bakoyikana mingi pelamoko na matiti na mokili.” (Nzembo 72:16) Ya solo, kati na Paradis oyo ekozongisama, eloko moko ekozala te oyo ekobebisa kimya ya bato oyo bayebi mpe bazali kosambela Nzambe ya solo.​—Yisaya 32:18.

Oyo nde lifuti mpo na baoyo batemelaki misala ya mokili oyo ya lokoso! Tozali kotanga kati na Masese 11:19: “Lokola boyengebene ekoyeisa bomoi, bongo ye oyo akobilaka mabe akokóma na kufa na ye mpenza.” Ee, nsima na kobomama ya bato mabe, moto moko akobanga lisusu mpo na bomoi na ye soko mpo na biloko na ye te. Nzembo 37:11 epesi biso elaka oyo: “Bato na bopolo bakosangola mabelé, bakosepela mpe na kimya na solo.”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bankombo mosusu ebongwanaki.

[Etanda na lokasa 5]

Moyibi: lolenge ya komibatela na yango

NA NDAKO: Mpo ete miyibi bakoki kokota na ndako ata soki ozali, kanga bikuke na fungola. Bato na mayele bazali kosenga kozala na elembo ya kokebisa to mbwa mpo na kobatela lopango. Soki okokende epai mosusu, yebisa yango na moninga ya pembeni oyo abongi kotyelama motema. Kobangabanga te; miyibi basalaka makambo nokinoki, babulunganaka mpe bakoki na mbala moko kobongola likanisi na bango soki bakutanaki na moto. Soki ozali Témoin de Jéhovah, yebisa bango mpe meka kopesa litatoli. Yango ekoki kosala ete moto mabe akóma na boboto mpe ayokela yo mawa. Komeka kotemela bango soko moke te longola bobele soki babandi kobundisa yo.

NA LIBANDÁ: Osengeli kozala na bokengi mpe kotala soki moto azali kolanda yo. Tambola katikati na nzela. Boya kotambola na banzela oyo bato balekaka mingimingi te mpe oyo ezali na molili. Tya saki oyo obombaka mbongo mpe biloko na yo ya motuya na esika moko ya malamu. Tambola nokinoki lokola nde ozalaki kokende mosika. Kolata bilamba ya motuya mingi te soko mpe babiju oyo ezali kongenga. Ntango ozali kosomba biloko, zala elongo na bato mosusu soki likoki ezali. Tambola bobele na mbongo oyo ozali na yango mposa, mpe tya yango na bisika bikeseni.

NA MOTUKA: Soki “batambwisi motuka” bazali kosalelama mabe mbala mingi kati na etúka na bino, kotikala kati na motuka te na ntango yango etelemi. Tambolaka na banzela ekeseni na ntango ozali kokende na mosala. Tambola na nzela oyo ezali malamu, atako yango ekoki komonana ete ezali molai mingi. Liboso ya kotelemisa motuka, omindimisa ete likambo moko ya kobanga ezali te zingazinga na esika yango. Pengola ezaleli ya kofungola ebombelo ya biloko na esika oyo bato balekaka mingimingi te. Kotika te ete biloko ya motuya emonanaka polele. Kotya antivol oyo ezali ya mindondo te ekoki kolembisa miyibi oyo bakoki kobimela yo.

[Etanda na lokasa 6]

“Bomibombela biloko na motuya na nse te, awa lopomboli mpe mabanga ekolyaka mpe awa miyibi bakokotaka mpe bakobotola. Bomibombela biloko na motuya kuna na likoló, wana lopomboli mpe mabanga ekolyaka te mpe wana miyibi bakokotaka te mpe bakobotola te.”​—Matai 6:19, 20.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto