Sɛkɛlɛ́ ya bolingo ya motema mpo na bandeko
“Bozala na . . . bolingo ya motema mpo na bandeko wana ezali bino na ezaleli ya kobanga Nzambe.”—2 PETELO 1:5-7.
1. Wapi moko na bantina minene mpo na yango makita ya libota ya Jéhovah ezalaka mabaku ya esengo mingi?
MOKOLO moko, monganga moko oyo azalaki Témoin de Jéhovah te ayanganaki na molulu ya kopesa mapolomi ya Galaad, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watch Tower, epai mwana na ye ya mwasi autaki kolanda mateya mpo na kozala misionere. Ebele ya bato na esengo oyo amonaki kuna ekamwisaki ye mingi mpe epusaki ye na koloba ete: ‘Bato na maladi bazali mpenza mingi te kati na bato oyo.’ Mpo na nini bato yango bazalaki na esengo monene boye? Mpe, nini mpenza epesaka esengo na makita nyonso ya basaleli na Jéhovah, ezala na makita ya lisangá to na boumeli ya ba assemblées ya circonscription to ya district? Ezali bolingo mpo na bandeko, oyo moto na moto azali komonisa, boye te? Ntembe ezali te ete bolingo mpo na bandeko ezali moko na bantina mpo na yango balobaki ete lingomba mosusu te ezali na esengo, na bosepeli mpe na bolamu lokola ba Témoins de Jéhovah.
2, 3. Maloba nini mibale ya Greke mazali kolobela mayoki oyo tosengeli kozala na yango bamoko epai na basusu, mpe nini ezali kokesenisa yango?
2 Tosengeli komizela na komona bolingo motindo yango mpo na bandeko kati na libota na Nzambe, mpamba te Petelo akomaki kati na 1 Petelo 1:22 ete: “Awa esili bino kopetola milimo na bino na nzela ya kotosa makambo na solo ete bolinga bandeko na bolingo bozangi bokosi, bolingana makasi na mitema.” Moko kati na biteni ya liloba ya Greke oyo ebongolami na “bolingo ya motema mpo na bandeko” ezali phi·liʹa (bolingo ya motema). Ndimbola na yango ezali na boyokani ya penepene na oyo ya a·gaʹpe, liloba oyo ebongolami mbala mingi na “bolingo.” (1 Yoane 4:8) Atako basalelaka mbala mingi liloba “bolingo ya motema mpo na bandeko” na esika ya “bolingo,” kasi moko na moko ezali na lolenge na yango oyo ekeseni na mosusu. Tosengeli te kosalela moko na yango na esika na mosusu, lokola babongoli mingi ya Biblia basalaka yango. (Kati na lisoló oyo mpe lisoló oyo elandi, tokotalela moko na moko na maloba oyo.)
3 Na ntina na bokeseni oyo ezali kati na maloba phi·liʹa mpe a·gaʹpe, moto moko molimboli ya lokóta ya Greke amonisaki ete phi·liʹa ezali komonisa “na ntembe te boyokani ya esengo, ya penepene, mpe ya bolingo ya motema.” Nzokande, a·gaʹpe ezali kotalela mingi mpenza elimo. Na yango, wana esengami na biso ete tolinga (a·gaʹpe) banguna na biso lokola bato nyonso, nzokande tozali na bolingo ya motema te mpo na bango. Mpo na nini? Mpamba te “kotambola na bato mabe ekobebisaka bizaleli malamu.” (1 Bakolinti 15:33) Tozali komona elembo mosusu ya bokeseni kati na maloba wana mibale kati na maloba malandi ya ntoma Petelo: “Bozala na . . . bolingo wana ezali bino na bolingo ya motema mpo na bandeko.”—2 Petelo 1:5-7; tala Yoane 21:15-17.a
Bandakisa ya bolingo ya motema mpenza mpo na bandeko
4. Mpo na nini Yesu mpe Yoane bazalaki na bolingo ya motema mpenza moko mpo na mosusu?
4 Liloba na Nzambe epesi biso bandakisa kitoko ya bolingo ya motema mpenza mpo na bandeko. Bolingo wana ya motema ezwi moboko na yango likoló na bilulalula te; etóngami nde likoló na bosepeli mpo na bizaleli kitoko ya baninga na biso. Na ntembe te, ndakisa oyo eyebani mingi ezali bolingo ya motema oyo Yesu azalaki na yango mpo na ntoma Yoane. Ya solo, Yesu amonisaki bolingo ya motema mpo na bantoma na ye nyonso ya sembo, mpe asalaki bongo na ntina. (Luka 22:28) Amonisaki yango mpenza ntango asukolaki makolo na bango, na nzela yango apesaki bango liteya ya komikitisa. (Yoane 13:3-16) Kasi, Yesu azalaki na bolingo ya motema koleka epai ya Yoane, likambo oyo ntoma Yoane azali kolobela yango mbala na mbala. (Yoane 13:23; 19:26; 20:2) Atako Yesu azalaki na bantina ya komonisa bolingo ya motema mpo na bayekoli mpe bantoma na ye nyonso, ekoki kozala ete Yoane azalaki na bantina mpo na yango Yesu amonisaki bolingo ya motema koleka mpo na ye, mpamba te apesaki motuya mingi na bizaleli na Yesu. Tokoki komona yango kati na makomi na Yoane, ezala kati na Evanzile na ye to na mikanda mipemami oyo akomaki. Kati na yango azali kolobela mbala mingi bolingo. Bosepeli mingi oyo Yoane azalaki komonisa mpo na bizaleli ya elimo oyo Yesu azalaki na yango emonani polele na makambo oyo ye akomaki kati na Yoane mokapo 1 mpe mokapo 13 kino mokapo 17, mpe na makambo oyo azongelaki mbala na mbala na ntina na bomoi na Yesu liboso ete abotama lokola moto.—Yoane 1:1-3; 3:13; 6:38, 42, 58; 17:5; 18:37.
5. Tokoki koloba nini na ntina na bolingo ya motema mpenza oyo Paulo mpe Timoté bazalaki na yango moko mpo na mosusu?
5 Bobele bongo, tokoki te kobosana bolingo ya motema mpenza mpo na bandeko oyo ntoma Paulo mpe moninga na ye moklisto Timoté bazalaki na yango moko mpo na mosusu, mpe na ntembe te, yango ezwaki moboko likoló na bosepeli bazalaki na yango mpo na bizaleli ya moko na mosusu. Mikanda ya Paulo mizali kolobela makambo ya lokumu na ntina na Timoté; na ndakisa tozali kotanga ete: “Nazali na moto mosusu lokola ye te; akokanisa mpo na makambo na bino solo. . . . Nde boyebi ezaleli malamu na ye ete asalaki mosala elongo na ngai mpo na nsango malamu lokola mwana esika moko na tata.” (Bafilipi 2:20-22) Likambo oyo ete na bisika mingi na mikanda na ye Paulo azali kolobela Timoté, ezali komonisa bolingo ya motema oyo azalaki na yango mpo na ye. Na ndakisa, tozali kotanga na 1 Timoté 6:20: “Ɛ Timoté, obatela yango etyami na maboko na yo.” (Tala lisusu 1 Timoté 4:12-16; 5:23; 2 Timoté 1:5; 3:14, 15.) Soki tokokanisi mikanda oyo Paulo akomelaki Timoté mpe mokanda na ye epai na Tito, tokomona bolingo makasi ya motema oyo azalaki na yango mpo na Timoté. Timoté mpe azalaki na mayoki ya bolingo motindo moko epai na Paulo, lokola maloba na Paulo kati na 2 Timoté 1:3, 4 mazali komonisa yango: “Ekokanisaka ngai yo kati na mabondeli na ngai ntango nyonso, . . . ezali ngai kokanisa mpisoli na yo, nalingi mingi komona yo ete natonda na esengo.”
6, 7. Mayoki nini Davidi mpe Yonatana bazalaki na yango moko mpo na mosusu, mpe mpo na nini?
6 Makomami ya Liebele mazali mpe kopesa bandakisa kitoko, lokola ndakisa ya Davidi mpe Yonatana. Tozali kotanga ete nsima wana Davidi abomaki Goliata, “motema na Yonatana ekanganaki na motema na Davidi. Yonatana alingaki ye lokola molimo na ye moko.” (1 Samwele 18:1) Na ntembe te, motema na Yonatana esimbamaki na ndakisa ya molende oyo Davidi amonisaki mpo na nkombo na Jéhovah mpe mpo na mpiko oyo amonisaki wana amipesaki na bolingo na ye moko mpo na kobundisa elombe Goliata. Yango wana Yonatana akómaki komonisa bolingo ya motema mpenza mpo na Davidi.
7 Yonatana azalaki na bolingo ya motema mpenza mpo na Davidi na boye ete azalaki kotya bomoi na ye na likámá na kobateláká Davidi liboso ya mokonzi Saulo. Ayokelaki Davidi zuwa soko moke te mpo ete Jéhovah aponaki ye ete azala mokonzi ya Yisraele na mikolo mizalaki koya. (1 Samwele 23:17) Bobele bongo, Davidi azalaki na bolingo ya motema mpenza mpo na Yonatana, lokola emonani na maloba oyo abimisaki mpo na kolela na liwa ya Yonatana: “Nayoki mawa mingi mpo na yo, Yonatana, ndeko na ngai! Yo ozalaki na bolingo epai na ngai. Bolingo na yo epai na ngai ezalaki malamu na kokamwa, koleka bolingo na basi.” Ya solo, bosepeli ya moko mpo na mosusu oyo ezalaki kati na bango emonisaki boninga na bango.—2 Samwele 1:26.
8. Basi nini mibale bamonisaki bolingo ya motema mpenza moko mpo na mosusu, mpe mpo na nini?
8 Kati na Makomami ya Liebele tozali kokuta ndakisa mosusu kitoko ya bolingo ya motema mpenza oyo ezalaki kati na basi mibale, Naomi mpe bokilo na ye Luta, oyo azalaki mwasi mokufeli-mobali. Tomikundola maloba oyo Luta alobelaki Naomi: “Bondela ngai kotika yo te to kozanga kolanda yo te. Esika ekokende yo, ngai mpe nakokende kuna, mpe esika ekolala yo, ngai mpe nakolala kuna. Bato na yo bakozala bato na ngai mpe Nzambe na yo akozala Nzambe na ngai.” (Luta 1:16) Na ntembe te lolenge Naomi azalaki komitambwisa mpe makambo oyo azalaki koloba na ntina na Jéhovah nde etindaki Luta na koloba boye.—Tala Luka 6:40.
Ndakisa ya ntoma Paulo
9. Nini emonisi ete Paulo apesaki ndakisa ya bolingo ya motema mpo na bandeko?
9 Lokola tomonaki yango, ntoma Paulo amonisaki bolingo ya motema mpenza mpo na Timoté. Kasi apesaki mpe ndakisa moko kitoko na komonisáká bolingo ya motema mpo na bandeko nyonso. Alobaki na bankulutu ya lisangá ya Efese ete “mbula misato, butu na moi, [ye] atikaki te kokebisa bango mokomoko na mpisoli.” Oyo nde elembeteli ya bolingo ya motema mpo na bandeko, boye te? Ezali bongo! Bango mpe bazalaki na mayoki motindo moko epai na Paulo. Ya solo, ntango bankulutu yango bayokaki ete bakomona Paulo lisusu te, “bango nyonso baleli mingi, mpe bakwei na nkingo na Paulo kopwepwa ye.” (Misala 20:31, 37) Yango ezalaki bolingo ya motema mpo na bandeko, oyo ezali na moboko likoló na bosepeli oyo bazalaki na yango kati na bango. Bolingo ya motema mpo na bandeko oyo Paulo azalaki na yango ezali lisusu komonana na maloba na ye na 2 Bakolinti 6:11-13: “Ɛ Bakolinti, monoko na biso ezali polele liboso na bino! Motema na biso ezipwi mpenza! Boyoki nkáka mpo na biso te nde boyoki nkáka mpo na [bolingo na bino ya motema]. Boye mpo na kokokanisa yango—nazali koloba na bana mpenza!—bozipola mpe mitema na bino.”
10. Banani bazangaki komonisa bolingo ya motema epai na ye, yango wana etindaki Paulo na kolobela mikakatano na ye? (2 Bakolinti, mokapo 11)
10 Emonani polele ete, mingi kati na Bakolinti bazalaki te na bolingo ya motema mpenza mpo na ntoma Paulo, bolingo oyo ezali na moboko likoló ya bosepeli na bizaleli kitoko. Yango wana basusu na bango bazalaki koimaima ete: “Mikanda na ye mizali na bozito mpe na makasi, nde motindo na nzoto na ye ezali na bolembu mpe koloba na ye ezali mpamba.” (2 Bakolinti 10:10) Yango wana Paulo alobelaki “bantoma mineneminene” na bango mpe komekama oyo ayikelaki yango mpiko, lokola tokoki kotanga yango kati na 2 Bakolinti 11:5, 22-33.
11. Nini ezali komonisa bolingo ya motema oyo Paulo azalaki na yango mpo na baklisto ya Tesaloniki?
11 Bolingo ya motema mpe ya mɔ́tɔ oyo Paulo azalaki na yango mpo na baoyo azalaki kosalela bango emonani polele kati na 1 Batesaloniki 2:8: “Boye awa ezalaki biso na [bolingo ya motema] mpo na bino, toselingwi kokabela bino bobele nsango malamu na Nzambe te kasi bomoi na biso mpenza, mpo ete bosili kokóma balingami na biso.” Ya solo, azalaki na bolingo makasi mpo na bandeko wana ya sika na boye ete, akokaki lisusu kokanga motema te—alingaki mpenza mingi koyeba motindo nini bazali koyikela minyoko mpiko—atindaki Timoté, oyo amemelaki ye nsango ya kolendisa mingi. (1 Batesaloniki 3:1, 2, 6, 7) Yango wana tozali kotanga kati na Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible ete “bolingo ya makasi mpe ya motema mpenza ekangisaki Paulo elongo na bandeko oyo ye asalelaki bango.”
Kosepela na basusu: sɛkɛlɛ́ ya bolingo mpo na bandeko
12. Bantina nini tozali na yango mpo na komonisa na bandeko na biso bolingo ya motema mpe ya mɔ́tɔ?
12 Na ntembe te, kosepela na basusu nde ezali sɛkɛlɛ́ ya bolingo ya motema mpo na bandeko. Basaleli nyonso na Jéhovah bazali na bizaleli kitoko oyo tozali kosepela na yango, oyo ezali kolamwisa bolingo na biso ya motema, oyo ezali kosala ete tosepela na bango, boye te? Biso nyonso, tozali koluka libosoliboso Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na Ye. Biso nyonso, tozali kobundisa na makasi banguna misato oyo bazali liboso na biso nyonso: Satana mpe bilimu mabe na ye, mokili mabe oyo eyangelami na Satana, mpe bizaleli ya moimi ya nzoto ya kozanga kokoka oyo tobotami na yango. Tosengeli ntango nyonso kokanisa ete bandeko na biso bazali kosala makasi na bango nyonso engebene makambo oyo bakutani na yango, boye te? Ata bafandi epai wapi na mokili, bato nyonso bazali to na ngámbo na Jéhovah to na ngámbo na Satana. Bandeko na biso mibali mpe basi bazali na ngámbo ya Jéhovah, ee, na ngámbo na biso; babongi ete tomonisela bango bolingo na biso ya motema.
13. Mpo na nini tosengeli komonisa bolingo ya motema mpe ya mɔ́tɔ mpo na bankulutu?
13 Bongo ezali boni mpo na bankulutu, tosepelaka na bango? Tosengeli kotya bango na esika ebongi kati na mitema na biso mpo na misala nyonso oyo bazali kosala mpo na lisangá, boye te? Lokola biso nyonso, basengeli kokokisa bamposa na bango moko mpe oyo ya mabota na bango. Lisusu, bazali na mokumba motindo moko lokola biso mpo na oyo etali koyekola bango moko, koyangana na makita ya lisangá mpe kosangana na mosala ya kosakola. Epai mosusu, basengeli kobongisa masoló mpo na makita, kosala badiskur piblike mpe kobongisa makambo oyo mazali kobima kati na lisangá, oyo mbala mosusu esengaka bangonga mingi mpo na kosambisa. Ya solo, tolingi “kokumisa lolenge oyo na bato.”—Bafilipi 2:29.
Tomonisa bolingo ya motema mpo na bandeko
14. Mikapo nini ya Makomami mizali kolendisa biso na komonisa bolingo ya motema mpo na bandeko?
14 Mpo na kosepelisa Jéhovah, tosengeli komonisa bolingo ya motema oyo tozali na yango mpo na baninga na biso bandimi. Ezali oyo Yesu Klisto mpe Paulo basalaki; tozali kotanga na ntina na yango ete: “Mpo na [bolingo epai na bandeko], bolinganaka na motema.” (Baloma 12:10, MN) “Mpo na [bolingo ya motema epai na bandeko], bozali na bosenga te ete tokomela bino. Mpo ete bino mpenza bosili kolakisama na Nzambe mpo na kolingana.” (1 Batesaloniki 4:9) “Tika ete [bolingo ya motema bozali na yango mpo na bandeko] boumela.” (Baebele 13:1) Ya solo, Tata na biso ya likoló alingi ete tomonisa bolingo ya motema mpo na bandeko na biso oyo bazali bana na ye na mabelé!
15. Wapi mwa mitindo ya komonisa bolingo ya motema mpo na bandeko?
15 Na ntango ya bantoma, baklisto bazalaki na momeseno ya kopesana mbote na “na lipwɛpwɛ ya bulee” to “lipwɛpwɛ ya bolingo.” (Baloma 16:16; 1 Petelo 5:14) Yango ezali elembo kitoko ya bolingo ya motema mpo na bandeko! Lelo oyo, kati na mikili mingi, elembo oyo ebongi mpenza mpo na komonisa bolingo ya motema ezali bongo koseka ya boninga mpe mbote ya molende na maboko. Na mikili lokola na Mexique, ezalaka na lolenge ya kopesana mbote na koyamba moninga na maboko mibale, yango ezali elembo ya solo ya bolingo ya motema. Bolingo ya motema mpe ya mɔ́tɔ oyo bandeko wana bazali komonisana ezali mbala mosusu moko na makambo makoki kolimbola bokóli monene oyo ezali komonana epai na bango.
16. Mabaku nini tozali na yango ya komonisa bolingo ya motema mpo na bandeko na Salle du Royaume?
16 Ntango tokotaka na Salle du Royaume, tosalaka nyonso ekoki na biso mpo na komonisa bolingo ya motema oyo tozali na yango mpo na bandeko na biso? Yango ekopusa biso na kozala na maloba ya kolendisa, mingi mpenza mpo na baoyo bamonani ete banyokwami na makanisi. Tolendisami na “kozala na maloba ya kobondisa mpo na milimo minyokwami na makanisi.” (1 Batesaloniki 5:14, MN) Ezali wana lolenge moko ya komonisa bolingo na biso ya motema mpe ya mɔ́tɔ epai na bandeko. Tokoki lisusu koloba na molobi moko lolenge diskur na ye esepelisaki biso, to kopesa longonya na moyekoli mpo na milende oyo azali kosala na Eteyelo ya mosala ya Nzambe, mpe bongo na bongo.
17. Lolenge nini nkulutu moko alóngaki kozwa bolingo ya motema na bandeko ya lisangá na ye?
17 Mpo na nini okoki te kobenga bandeko na kolya, ata bilei ya moke, nsima na makita, soki naino mwa ntango ezali? Tosengeli kolanda toli ya Yesu na Luka 14:12-14, boye te? Mokolo moko, misionere moko ya kala aponamaki mokɛngɛli-mokambi kati na lisangá moko epai kuna, bobele ye moko nde azalaki moto ya loposo mosusu. Ntango amonaki ete bolingo ya motema mpenza ezali te mpo na bandeko kati na lisangá yango, alukaki mwango ya kobongisa ezalela yango. Lolenge nini? Mokolo nyonso ya eyenga, azalaki kobyanga mabota makeseni mpo na kolya elongo na bango. Na nsuka ya mbula, bandeko nyonso bakómaki komonisela ye bolingo ya motema.
18. Lolenge nini tokoki komonisa bolingo na biso ya motema mpo na bandeko na biso mibali mpe basi oyo bazali na bokono?
18 Wana bandeko na biso baklisto bazali na bokono, na ndako to na lopitalo, bolingo ya motema mpo na bandeko ekopusa biso na komonisa bango ete tozali komibanzabanza mpo na bango. Ezali boni mpo na baoyo bazali kofanda na bandako ya mibangé? Mpo na nini te kokende kotala bango, kobenga bango na telefone to kotindela bango maloba mpo na komonisela bango bolingo na biso ya motema?
19, 20. Lolenge nini tokoki komonisa ete bolingo na biso mpo na bandeko ekóli mingi?
19 Ntango tozali komonisa bolingo na biso ya motema mpo na bandeko, tokoki komituna ete: ‘Bolingo na ngai mpo na bandeko ezali ya koponapona? Makambo lokola loposo ya nzoto, kotanga kelasi to bozwi ezali kopusa lolenge na ngai ya komonisa bolingo mpo na bandeko? Nazali na mposa ya kofungola motema na ngai mpo na komonisa bolingo mpo na bandeko, lokola ntoma Paulo alendisaki baklisto ya Kolinti na kosala yango?’ Na lisalisi ya bolingo ya motema mpo na bandeko, tokozala na makanisi malamu mpo na bandeko na biso mpe tokosepela na bizaleli na bango kitoko. Bolingo mpo na bandeko ekosalisa lisusu biso na kosepela na bokóli ya elimo ya bandeko na biso na esika ya koyokela bango zuwa.
20 Bolingo ya motema mpo na bandeko esengeli kopusa biso na kopesa na bandeko na biso lisalisi kati na mosala ya kosakola. Esengeli kozala lokola loyembo moko na biso (nimero 92) elobi yango ete:
“Tosungaka bango balembi,
’Te basakola na molende.
Tosalisa bato ya sika,
Mpo ete bakóla na elimo.”
21. Matomba nini tokoki komizela na yango soki tomonisi bolingo ya motema mpo na bandeko?
21 Na yango, tobosana te ete etinda oyo Yesu alobelaki kati na Lisoló na ye likoló na ngomba ezali komonana mpe solo na likambo litali bolingo ya motema mpo na bandeko: “Bopesa mpe ekopesama na bino. Kati na maboko na bino bakopesa epimeli malamu na kopo esili kokama mpe koningana mpe kosopana. Mpo ete na emekeli bokomeka baninga na yango bakomeka mpe na yango mpo na bino.” (Luka 6:38) Soki tomonisi bolingo ya motema mpo na bandeko mpe soki tokomonisa bosepeli mpo na baninga na biso, baoyo bazali kosalela Jéhovah lokola biso, tokomisalela malamu biso moko. Baoyo bazali kosepela komonisa bolingo ya motema mpo na bandeko bazali solo na esengo!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala lisoló lilandi: “Bolingo (Agape)—Ezali nini te mpe ezali nini.”
Okopesa eyano nini?
◻ Maloba nini ya Greke mazali kolobela mayoki na biso, mpe nini ekesenisi yango?
◻ Wapi sɛkɛlɛ́ ya bolingo ya motema mpo na bandeko?
◻ Bandakisa nini tozali na yango kati na Makomami oyo emonisi bato balinganaki mpenza na motema?
◻ Mpo na nini tosengeli komonisa bolingo ya motema mpe ya mɔ́tɔ mpo na bandeko na biso mpe mpo na bankulutu?
[Elilingi na lokasa 15]
Ntoma Petelo alendisaki bandeko na ye na kobakisa bolingo ya motema mpo na bandeko likoló na kondima na bango mpe likoló na bizaleli mosusu ya boklisto