Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/11 nk. 17-18
  • Tózala na mpiko!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tózala na mpiko!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpiko mpo na komekola Klisto
  • Mpiko mpo na kolanda kosakola
  • Mpiko mpo na kozala na ngámbo ya Jéhovah
  • Mpiko kati na mabota masili kokabwana
  • Mpiko mpo na ‘kokɔtisa nkingo na biso na mpasi’
  • Mpiko ekopesaka esengo
  • Tólanda kozala na mpiko
  • “Zalá na mpiko mpe zalá na makasi mpenza”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • “Zalá na mpiko . . . mpe salá”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • ‘Bózala na mpiko mpe na makasi!’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Zalá na mpiko—Yehova azali na yo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/11 nk. 17-18

Tózala na mpiko!

‘Tozala na mpiko mpe toloba ete: “Jéhovah azali mosungi na ngai.”’ ​—BAEBELE 13:6, NW.

1. Molende nini momonisamaki na baoyo bayekolaki solo ya Nzambe na ekeke ya liboso ya ntango na biso?

TOZALI na ekeke ya liboso ya ntango na biso. Masiya oyo bazelaki mingi, ayei. Ateyaki bayekoli na ye malamu mpe abandaki mosala ya kosakola oyo ya ntina mingi. Ntango ekokaki mpo na bato ete bayoka nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe. Nzokande, mibali mpe basi oyo bayekolaki solo, basakolaki nsango yango kitoko na molende nyonso.​—Matai 28:19, 20.

2. Mpo na nini Batemwe ya Jéhovah bazali na mposa ya mpiko na mikolo na biso?

2 Bokonzi botyamaki naino te na mikolo wana. Kasi Mokonzi oyo aponamaki, Yesu Klisto, asakolaki na ntina na kozala na ye oyo ezangi komonana, wana asengelaki koya kati na nguya ya Bokonzi. Esengelaki komonisama mingimingi na makambo lokola bitumba, nzala, maladi mabe, koningana ya mabelé ekokani na mosusu te, mpe na mosala ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba. (Matai 24:3-14; Luka 21:10, 11) Lokola tozali Batemwe ya Jéhovah, tozali na mposa ya mpiko mpo na kolónga makambo wana mpe minyoko oyo tozali kokutana na yango. Ezali na ntina mingi ete totalela masoló ya Biblia oyo malobeli basakoli ya Bokonzi na mpiko na ekeke ya liboso ya ntango na biso.

Mpiko mpo na komekola Klisto

3. Nani amonisaki ndakisa eleki malamu ya mpiko, mpe nini elobami na ntina na ye na Baebele 12:1-3?

3 Yesu Klisto amonisaki ndakisa eleki malamu ya mpiko. Nsima na kolobela ‘lipata monene’ ya batemwe ya Jéhovah ya mpiko ya ntango ya kala, ntoma Paulo alobaki mingi likoló na Yesu Klisto, ete: “Na bongo, awa ezingami biso na lipata monene ya batatoli, tobwaka bozito nyonso mpe masumu mazali kokanga biso noki, mpe tópota mbangu na mpiko nyonso na emekaneli etyami liboso na biso, na kotala Yesu, Mosaleli na liboso na kondima, ye oyo azali kokokisa yango. Mpo na esengo etyamaki liboso na ye, ayikelaki nzeté na mpasi mpiko, kotyoláká nsɔni na yango mpe afandi na lobɔkɔ na mobali na kiti na bokonzi na Nzambe. Ee, botalela ye oyo ayikaki mpiko na bonguna nyonso ya bato na masumu oyo batɛmɛlaki ye ete bolɛmba te mpe bosɛnzwa te kati na milimo na bino.”​—Baebele 12:1-3, NW.

4. Lolenge nini Yesu amonisaki mpiko ntango amekamaki na Satana?

4 Nsima ya batisimo na ye mpe nsima ya mikolo 40 ya kokanisa mingi, ya mabondeli, mpe ya kokila bilei kati na esobe, Yesu atɛmɛlaki Satana na mpiko nyonso. Wana amekamaki na Diable ete abongola mabangá ete makóma mampa, Yesu aboyaki mpo ete ezalaki mabe na kosala makamwisi bobele mpo na kokokisa mposa na ye moko. Alobaki boye: “Ekomami ete: ‘Moto akobika bobele na mampa te, kasi na maloba manso mauti na monoko ya Jéhovah.’” Wana Satana abɛtɛlaki ye ntembe ete amibwaka na nsé longwa na nsambá ya tempelo, Yesu aboyaki mpamba te, mbɛlɛ yango ezalaki lisumu soki asɛngaki na Nzambe ete asunga ye na likambo limonisi mposa na ye ya komiboma. Klisto alobaki ete: “Ekomami lisusu ete: ‘Osengeli komeka Jéhovah, Nzambe na yo te.’” Satana alakaki kopesa ye bikonzi nyonso soki ‘akumbameli ye,’ kasi Yesu alingaki te kopɛngwa mpe kolóngisa Diable na ntembe oyo abɛtaki ete, kati na momekamo, bato bakoki te kotikala sembo epai na Nzambe. Bongo, Yesu alobaki ete: “Longwa na yo Satana, mpamba te ekomami ete: ‘Okosambela Jéhovah, Nzambe na yo mpe okosalela bobele ye na mosala na bulee.’” Nsima na yango, Momeki “atikaki ye mpo na kozela ntango mosusu ya malamu.”​—Matai 4:1-11, NW; Luka 4:13, NW.

5. Eloko nini ekosalisa biso mpo na kotɛmɛla komekama?

5 Yesu atosaki Jéhovah mpe atɛmɛlaki Satana. Soki biso mpe ‘totosi Nzambe nde totɛmɛli Diable, ye akokima mosika na biso.’ (Yakobo 4:7, NW) Lokola Yesu, biso tokoki kolónga komekama na mpiko nyonso soki tosaleli Makomami, mbala mosusu ata kotanga yango na ntango tomekami na kosala likambo moko ya mabe. Tokoki nde kokwea na komekama mpo na koyiba soki, na bɔɔngɔ́ na biso, tozali kokanisa mobeko oyo ya Nzambe, ete: “Okoyiba te”? Baklisto mibale bakoki nde kokwea na pite soki ata moko na bango atangi maloba oyo na mpiko nyonso, ete: “Okosala ekobo te”?​—Baloma 13:8-10; Exode 20:14, 15.

6. Lolenge nini Yesu alóngaki mokili na mpiko nyonso?

6 Atako baklisto bayinami na mokili oyo, tokoki kobwaka elimo na yango mpe etamboli na yango ya masumu. Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Kati na mokili, bozali na bolózi; kasi bózala na mpiko! Ngai nasili kolónga mokili.” (Yoane 16:33, NW) Alóngaki mokili na koboyáká komekola yango. Ndakisa na ye ya molóngi mpe etamboli na ye ya bosembo kino nsuka ekoki kopesa biso mpiko ya komekola ye na kokabwanáká na mokili oyo mpe na mbindo na yango​—Yoane 17:16.

Mpiko mpo na kolanda kosakola

7, 8. Nini ekosalisa biso mpo na kolanda kosakola atako minyoko?

7 Yesu mpe bayekoli na ye bandimisamaki ete Nzambe akopesa bango mpiko mpo na kolanda kosakola atako minyoko. Atako minyoko, Klisto akokisaki mosala na ye na molende nyonso mpe nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B., bayekoli na ye oyo banyokolamaki, balandaki kosakola nsango malamu atako bakonzi ya mangomba ya Bayuda bamekaki kopekisa bango. (Misala 4:18-20; 5:29) Bayekoli babondelaki ete: “Jéhovah, tya likebi na matumoli na bango mpe pesa nzela na baombo na yo ete balanda koyebisa liloba na yo na molende nyonso.” Bongo, nini esalemaki? Lisoló lilandi koyebisa ete: “Naino bazalaki kosala lilɔmbɔ, esika oyo bayanganaki kati na yango eninganaki mpe bango nyonso batondaki na elimo santu mpe bayebisaki liloba ya Nzambe na molende nyonso.”​—Misala 4:24-31, NW.

8 Lokola bato mingi ya eleko na biso bazali te koyamba nsango malamu na esengo, esengeli kozala na molende mpo na kolanda kosakwela bango. Mingi mpenza na ntango banyokolami, basaleli ya Jéhovah bazali na mposa ete Nzambe apesa bango mpiko ete bapesa litatoli na mozindo. (Misala 2:40; 20:24) Yango wana Paulo, mosakoli na mpiko ya Bokonzi, alobaki epai na elenge oyo amesanaki naino te na mosala, ete: “Nzambe asili kopesa biso elimo na kobangabanga te, kasi elimo na nguya, na bolingo mpe na bososoli. Kooka nsɔni te mpo na kotatola na ntina na Nkolo na biso, na ntina na ngai, oyo nakangami mpo na ye, kasi ndima koyika mpiko mpo na mabe na ntina na nsango malamu, engebene nguya na Nzambe.” (2 Timoté 1:7, 8, NW) Soki tobondeli mpo na kozwa mpiko, tokokoka kolanda kosakola, mpe ata minyoko mikolongola te esengo na biso lokola basakoli ya Bokonzi.​—Matai 5:10-12.

Mpiko mpo na kozala na ngámbo ya Jéhovah

9, 10. (a) Bayuda mpe Bapakano ya ekeke ya liboso basalaki nini mpo na kokóma bayekoli ya Klisto baoyo bazwaki batisimo? (b) Mpo na nini esengelaki kozala na mpiko mpo na kokóma moklisto?

9 Bayuda mpe Bapakano mingi ya ekeke ya liboso bazalaki na mpiko ya kotika mibeko oyo miutaki na Biblia te, mpo na kokóma bayekoli na Klisto oyo bazwi batisimo. Mwa moke nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B., “motuya na bayekoli moyikanaki mingi mpenza na Yelusaleme; mpe ebele monene ya banganga babandaki kotosa kondima.” (Misala 6:7, NW) Bayuda wana bazalaki na mpiko ya kokabwana na mangomba mpe kondima Yesu lokola Masiya.

10 Kobanda mobu 36 T.B., Bapakano mingi bakómaki bandimi. Ntango Korneye, basangani ya libota na ye, mpe Bapakano mosusu bayokaki nsango malamu, bandimaki yango nokinoki, bazwaki elimo santu, mpe “babatisamaki na nkombo na Yesu Klisto.” (Misala 10:1-48, NW) Na mboka Filipi, Mopakano moko oyo azalaki mokambisi (mokɛngɛli na bolɔkɔ) mpe ndako na ye bandimaki boklisto nokinoki, bongo “ye mpe bato ya ndako na ye babatisamaki nokinoki.” (Misala 16:25-34, NW) Esengelaki mpenza kozala na mpiko mpo na kozwa ekateli wana, mpo ete baklisto bazalaki liboké ya bato moke oyo banyokolamaki mingi mpe balingamaki te. Ezali bobele bongo lelo oyo. Kasi soki omipesi naino te epai na Nzambe mpe ozwi naino batisimo te ete okóma Temwe ya Jéhovah, oyo ezali ntango ya kozwa bikateli yango na mpiko nyonso, boye te?

Mpiko kati na mabota masili kokabwana

11. Enise mpe Timoté bamonisaki bandakisa nini malamu ya mpiko?

11 Enise mpe mwana na ye Timoté bapesaki bandakisa kitoko ya kozala na kondima ya mpiko kati na mabota oyo makabwani na makambo ya losambo. Atako Enise azalaki na mobali oyo azalaki mopakano, ateyaki mwana na ye “makomi mosantu” uta bomwana. (2 Timoté 3:14-17) Nsima na kokóma moklisto [Enise] amonisaki ‘kondima ezangi bokosi.’ (2 Timoté 1:5, NW) Amonisaki lisusu mpiko mpo na kokɔtisa mateya ya boklisto epai na Timoté, na komonisáká limemya epai na mobali na ye oyo azalaki mondimi te. Na ntembe te, kondima na ye mpe mpiko na ye ezwaki mbano wana mwana na ye oyo ateyamaki malamu, aponamaki mpo na kosala mibembo ya misionere elongo na Paulo. Oyo nde elendiseli mpo na baboti baklisto baoyo bazali mpe kati na ezalela motindo moko!

12. Timoté akómaki moto ya lolenge nini, mpe banani bazali lokola ye lelo oyo?

12 Atako Timoté afandaki kati na libota oyo likabwani na makambo ya losambo, andimaki boklisto na mpiko nyonso mpe akómaki moto na elimo oyo Paulo akokaki koloba na ntina na ye ete: “Nazali kolikya kati na Nkolo Yesu Klisto ete natinda Timoté epai na bino [Bafilipi] nokinoki, mpo ete nazala molimo ya esengo wana nakoyoka makambo na bino. Mpo ete nazali na moto mosusu te oyo azali na bolingo malamu lokola ye, oyo akomibanzabanza mpenza na ntina na bino. . . . Bino boyebi bilembeteli bisili ye komonisa; lokola mwana elongo na tata na ye, asalaki elongo na ngai lokola moombo mpo na matomba ya nsango malamu.” (Bafilipi 2:19-22, NW) Lelo oyo, bilenge mingi ya mibali mpe basi oyo bafandi kati na mabota makabwani na makambo ya losambo bazali koyamba boklisto ya solo na mpiko nyonso. Lokola Timoté, bazali komonisa bilembeteli na bango, mpe tozali na esengo ete bazwi etɛlɛmɛlo na lisangá ya Jéhovah!

Mpiko mpo na ‘kokɔtisa nkingo na biso na mpasi’

13. Akila mpe Pilisikia bamonisaki mpiko kati na likambo nini?

13 Akila mpe mwasi na ye, Pilisikia (Priska), bapesaki ndakisa na ‘kokɔtisáká nkingo na bango na mpasi’ na mpiko nyonso mpo na moninga na bango mondimi. Bayambaki Paulo kati na ndako na bango, basalaki elongo na ye na mosala ya kotonga hema mpe basalisaki ye mpo na kolendisa lisangá ya sika na Kolinti. (Misala 18:1-4) Na boumeli ya mbula 15 ya boninga na bango, batyaki nkutu bomoi na bango na likámá mpo na ye, na lolenge oyo loyebisami mpenza na sikisiki te. Bazalaki kofanda na Loma na ntango [Paulo] alobaki na baklisto ya engumba yango ete: “Bopesa mbote na ngai epai na Priska mpe Akila, basalani elongo na ngai kati na Klisto Yesu, baoyo batyaki nkingo na bango na mpasi mpo na molimo na ngai; natɔndi bango, nde bobele ngai te, kasi masangá nyonso ya mabota lokola.”​—Baloma 16:3, 4, NW.

14. Na kokɔtisáká nkingo na bango na mpasi mpo na Paulo, Akila mpe Priska basalaki na boyokani na mobeko nini?

14 Na kokɔtisáká nkingo na bango na mpasi mpo na Paulo, Akila mpe Priska basalaki na boyokani na maloba oyo na Yesu, ete: “Napesi bino mobeko oyo ya sika ete: bolinganaka; bolinganaka lokola ngai nasili kolinga bino.” (Yoane 13:34, NW) Mobeko yango mozalaki “ya sika” na boye ete esɛngisaki makambo mingi koleka oyo elobamaki na Mibeko ya Moize mpo na kolinga mozalani na yo lokola yo moko. (Levitike 19:18) Yango esɛngisaki bolingo bozangi koluka litomba kino kopesa bomoi mpo na bato mosusu, lokola Yesu asalaki yango. Tertullien, mokomi na ekeke ya mibale mpe ekeke ya misato ya ntango na biso atangaki maloba ya bato ya mokili na ntina na baklisto, wana akomaki ete: “Balobaki: ‘Tala motindo bazali kolingana bango na bango . . . mpe lolenge bandimi kokufa bamoko mpo na basusu.’” (Apologétique, mokapo XXXIX, 7) Mingimingi na ntango ya minyoko nde tokoki komonisa bolingo mpo na bandeko, na kokɔtisáká bomoi na biso na mpasi na mpiko nyonso, mpo ete baninga na biso bandimi bakabama na mobulu te soko mpe na liwa te na mabɔkɔ ya banguna.​—1 Yoane 3:16.

Mpiko ekopesaka esengo

15, 16. Lokola emonisami na Misala mokapo 16, lolenge nini mpiko mpe esengo ezali na boyokani?

15 Paulo mpe Sila bamonisaki ete kozala na mpiko kati na mimekamo ekoki kopesa esengo. Na etinda ya basambisi ya engumba Filipi, babɛtamaki na mpimbo liboso na bato mpe batyamaki na bolɔkɔ. Atako bongo, bamitikaki te kolóngama na bobangi. Atako mabaku wana ya mpasi, bazalaki ntango nyonso na mpiko oyo Nzambe azali kopesa mpe esengo oyo baklisto ya sembo bazali kozwa mpo na yango.

16 Pene na katikati na butu, Paulo mpe Sila babondelaki mpe bakumisaki Nzambe na nzembo. Na mbala moko, koningana ya mabelé ekweisaki ndako na bolɔkɔ, ekangolaki minyololo na bango, mpe ezipolaki mpenza bikuke. mpe libota na ye, baoyo baokaki nsɔmɔ, bazwaki litatoli na molende oyo limemaki bango kino kozwa batisimo ete bakóma basaleli ya Jéhovah. [Mokɛngɛli na bolɔkɔ] “asepelaki mingi elongo na libota na ye mpo ete bandimaki Nzambe.” (Misala 16:16-34, NW) Oyo nde esengo Paulo mpe Sila bazalaki na yango! Nsima na kotalela ndakisa oyo mpe bandakisa mosusu na Makomami, lolenge nini tokoki kozala ntango nyonso basaleli ya Jéhovah ya mpiko?

Tólanda kozala na mpiko

17. Lokola emonisami na Nzembo 27, lolenge nini kotya elikya epai na Jéhovah ezali kopesa mpiko?

17 Kozala na elikya epai na Jéhovah ekosalisa biso na kozala ntango nyonso bato ya mpiko. Davidi ayembaki ete: “Tya elikya epai na Jéhovah; zalá na mpiko mpe tika ete motema na yo mozala na nguya. Ee, tya elikya epai na Jéhovah.” (Nzembo 27:14, NW) Nzembo 27 emonisi ete Davidi atyaki motema epai na Jéhovah lokola “ebombamelo” ya bomoi na ye. (Verset 1) Komona lolenge oyo Nzambe asalaki banguna ya Davidi na ntango ya kala, ezalaki kopesa ye mpiko. (Versets 2, 3) Kosepela na esika ya losambo ya Jéhovah ezalaki likambo mosusu ya ntina. (Verset 4) Kotya motema na lisungi ya Jéhovah, na libateli na ye, mpe na makoki na ye ya kobikisa, ezalaki mpe kolendisa mpiko ya Davidi. (Versets 5-10) Kolakisama mbala na mbala kati na mitinda ya banzela ya sembo ya Jéhovah, ezalaki lisusu na ntina mingi. (Verset 11) Kobondela na motema moko mpo na kobikisama longwa na banguna na ye, oyo esanganaki na kondima mpe na elikya, esalisaki Davidi na kozala na mpiko. (Versets 12-14) Tokoki kolendisa mpiko na biso kati na makambo motindo wana, komonisáká bongo ete tozali mpenza na “elikya epai na Jéhovah.”

18. (a) Nini emonisi ete kozala mbala na mbala elongo na basambeli ya Jéhovah ekoki kosalisa biso na kozala ntango nyonso bato ya mpiko? (b) Makita ya boklisto mazali kokokisa mokumba nini mpo na kolendisa mpiko?

18 Kozala mbala na mbala elongo na baoyo bazali kosambela Jéhovah ekoki kosalisa biso na kozala ntango nyonso bato ya mpiko. Ntango Paulo asɛngaki kosambisama liboso na Kaisala mpe akendaki na Loma, baninga na ye kati na kondima bayaki mpo na kokutana na ye na Esika na Zando ya Apiusi mpe na Ndako Misato. Lisoló liyebisi ete: “Wana amonaki bango, Paulo atɔndaki Nzambe mpe azwaki mpiko.” (Misala 28:15, NW) Soki tozali koyangana mbala na mbala na makita ya boklisto, boye tozali kolanda toli oyo ya Paulo ete: “Tótalanaka ete topesana simbisi moko na moko mpo na kolingana mpe na kosala misala malamu, tótika te mpo na koyangana elongo moko, lokola yango ezali momeseno na basusu, kasi toyikisana mpiko. Bosala boye na koleka, awa emoni bino ete mokolo [yango] mobɛlɛmi.” (Baebele 10:24, 25, NW) Koyikisana mpiko elimboli nini? Koyikisa mpiko elimboli “kopesa mpiko, makasi, to elikya.” (Webster’s Ninth New Collegiate Dictionary) Tokoki mpenza kopesa mpiko na baklisto mosusu, mpe bilendiseli na bango bikoki mpe kokembisa ezaleli wana epai na biso.

19. Lolenge nini Makomami mpe mikanda ya boklisto ezali kosalisa biso ete tozala ntango nyonso bato ya mpiko?

19 Mpo na kozala ntango nyonso bato ya mpiko, tosengeli koyekola Liloba ya Nzambe mbala na mbala mpe kosalela batoli na yango kati na bomoi na biso. (Deteronome 31:9-12; Yosua 1:8) Boyekoli na biso ya mbala na mbala ekosalema na mikanda ya boklisto oyo mitongami likoló ya Makomami, mpamba te batoli ya mayele oyo ezwami kati na yango ekosalisa biso na kolónga mimekamo na ntina na kondima, na mpiko oyo Nzambe azali kopesa. Na masoló mauti na Biblia, tosili komona lolenge oyo basaleli ya Jéhovah bazwaki mpiko kati na makambo makeseni. Sikawa, mbala mosusu toyebi te lolenge oyo masoló yango makoki kosalisa biso, kasi Liloba ya Nzambe lizali na nguya, mpe oyo tozali koyekola na nzela na yango, ekozala bobele na ntina mpo na biso. (Baebele 4:12) Na ndakisa, soki kobanga bato ebandi kobebisa mosala na biso, tokoki komikundola lolenge oyo Enoka azalaki na mpiko ya koyebisa nsango ya Nzambe epai na bato mabe.​—Yuda 14, 15.

20. Mpo na nini tokoki koloba ete libondeli ezali na ntina mingi soki tolingi kozala ntango nyonso basaleli ya mpiko ya Jéhovah?

20 Mpo na kozala ntango nyonso basaleli ya mpiko ya Jéhovah, tosengeli kolendendela kati na mabondeli. (Baloma 12:12) Yesu akangaki motema na mimekamo na ye na mpiko nyonso mpo ete “asalaki mabondeli mpe malɔmbɔ na kongánga mpe na mpisoli, epai na Ye oyo akokaki kobikisa ye na liwa, mpe ayokamaki mpenza mpo na kobanga na ye na pɛto.” (Baebele 5:7, NW) Na kobɛlɛmáká ntango nyonso epai na Nzambe kati na mabondeli, tokozala te lokola bagoigoi ya mokili baoyo balakami mpo na “kufa ya mibale” oyo ezangi lisekwa. (Emoniseli 21:8) Libateli ya Nzambe mpe kozala na bomoi kati na mokili ya sika ya Nzambe, ezali mpo na basaleli na ye ya mpiko.

21. Mpo na nini Batemwe ya Jéhovah ya sembo bakoki kozala na mpiko?

21 Biso Batemwe ya Jéhovah ya sembo, tosengeli te kobanga bilimu mabe mpe bato oyo bazali banguna na biso, mpamba te tozali kozwa lisungi ya Nzambe mpe na ndakisa ya mpiko ya Yesu, oyo alóngaki mokili. Boninga ya elimo mpe ya kolendisa elongo na libota ya Jéhovah ezali mpe kosalisa biso na kozala bato ya mpiko. Mpiko na biso ezali mpe kokóla na nzela na litambwisi mpe na batoli ya Makomami mpe mikanda ya boklisto. Lisusu, masoló ya basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala oyo mauti na Biblia mazali kosalisa biso na kotambola na mpiko nyonso kati na banzela na ye. Boye, tika ete tokende liboso na molende nyonso kati na mosala ya bulee, na mikolo oyo ya mpasi. Ee, tika ete basaleli nyonso ya Jéhovah bazala na mpiko!

Lolenge nini okoyanola?

◻ Lolenge nini ndakisa ya Yesu ekoki kotondisa biso na mpiko?

◻ Eloko nini epesaki mpiko na Yesu mpe na bayekoli na ye ete balanda kosakola?

◻ Mpo na nini Bayuda mpe Bapakano bazalaki na mposa ya mpiko mpo na kozwa etɛlɛmɛlo na ngámbo ya Jéhovah?

◻ Bandakisa nini ya mpiko oyo emonisamaki na Enise mpe Timoté?

◻ Nini emonisi ete mpiko ekopesaka esengo ata kati na minyoko?

[Elilingi na lokasa 18]

Lokola Yesu, tokoki kotɛmɛla komekama soki tosaleli Makomami mpe soki totangi yango

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto