Bandakisa ya komikitisa oyo tosengeli komekola
“Komikitisa na yo mpenza ekoyeisa ngai monene.”—NZEMBO 18:35, NW.
1. Nini ezali komonisa ezaleli ya komikitisa ya prezidá moko ya kala ya Watch Tower Society?
JOSEPH F. RUTHERFORD azalaki mbinga; azalaki na bolai ya koleka mɛtɛlɛ 1,80 mpe azalaki na kilo koleka 90. Azalaki lisusu na mongongo ya nguya oyo azalaki kosalela yango bobele te mpo na koyebisa nkombo ya Yehova na lolenge esalemaki naino liboso te, kasi lisusu mpo na kobimisa polele bokosi ya bakonzi na mangomba ya boklisto ya lokuta, kobéngáká lingomba na bango ete ezali “motambo mpe bokosi.” Ata soki maloba na ye mazalaki na nguya, kasi ntango azalaki kobondela elongo na libota ya Betele, na biro monene ya la Société, maloba na ye mazalaki koyokama lokola ya mwana moke ya mobali oyo azali koloba epai na papa na ye, likambo oyo limonisaki boyokani na ye malamu elongo na Mozalisi na ye mpe ezaleli na ye ya komikitisa. Ee, azalaki mpenza na komikitisa lokola mwana moke.—Matai 18:3, 4.
2. Kati na likambo nini mpenza basaleli ya Yehova bazali komonisa polele ete bakeseni na bato ya mokili?
2 Na ntembe te, basaleli nyonso ya solo ya Yehova Nzambe, bazali bato ya komikitisa. Kati na likambo oyo, bakeseni mingi mpenza na bato ya mokili. Lelo oyo, koleka ndenge ezalaki liboso, mokili motondi mpenza na bato ya lolendo. Bato ya lokumu mpe bato ya makasi, bazwi mpe bato batangá mingi, mpe ata ebele na babóla mpe baoyo bazali kokelela na lolenge mosusu, bazali na lolendo.
3. Lolendo ekobotaka mbuma nini?
3 Lolendo ekobimisaka ntango nyonso kowelana mpe mpasi. Ya solo, mpasi nyonso ya mokili mobimba ebimaki mpo ete anzelu moko akómaki na lolendo; alingaki ete bapesa ye losambo oyo esengelaki kopesama bobele na Mozalisi, Yehova Nzambe. (Matai 4:9, 10) Lisusu, ye oyo amikómisaki Zábolo (Diable) mpe Satana, alóngaki kokosa Eva, mwasi ya liboso, na kolamwisáká lolendo na ye. Alakaki ye ete soki alei mbuma oyo epekisamaki, akokóma lokola Nzambe, koyebáká malamu mpe mabe. Soki azalaki na komikitisa, mbɛlɛ alobaki ete: ‘Mpo na nini nalingi kokóma lokola Nzambe?’ (Genese 3:4, 5) Ntango tozali kotalela ezalela ya mawa oyo bato bazali kati na yango, na nzoto, na makanisi, mpe na bizaleli, lolendo ekoki kolimbisama te. Ezali likambo ya kokamwa te wana tozali kotanga ete Yehova ayini “enzombo mpe lolendo.” (Masese 8:13, NW) Kati na Biblia, Liloba ya Nzambe, tozali kokuta bandakisa ya komikitisa oyo ekeseni mpenza na bato ya lolendo.
Yehova Nzambe azali na komikitisa
4. Mikapo nini ya Makomami mimonisi ete Yehova azali na komikitisa?
4 Yehova Nzambe—Oyo-Aleki-Likoló, Moyangeli ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba, Mokonzi na seko—azali na komikitisa. (Genese 14:22) Yango ekoki kosalema? Ee, ekoki kosalema! Mokonzi Davidi alobaki, lokola yango emonisami na Nzembo 18:35 (NW) ete: “Okopesa ngai nguba na yo ya lobiko, mpe lobɔkɔ na yo ya mobali ekosunga ngai, mpe komikitisa na yo ekoyeisa ngai monene.” Emonani polele ete, mokonzi Davidi andimaki ete komikitisa ya Yehova eyeisaki ye [Davidi] monene. Lisusu, tozali kotanga na Nzembo 113:6 (NW) ete Yehova “azali komikitisa mpo na kotala likoló na lola mpe mabelé.” Totangi na mabongoli mosusu ete, “amikitisi na nsé mpo na kotala,” (New International Version) “andimi kotala na nsé mpenza.”—The New English Bible.
5. Makambo nini mazali komonisa komikitisa ya Yehova?
5 Emonani solo ete Yehova Nzambe amikitisaki mpenza na lolenge oyo asalaki epai na Abalayama, na kopesáká nzela na Abalayama ete atuna mituna na ntina na boyengebene na Ye, likoló na mokano oyo azwaki mpo na koboma mboka mabe ya Sodome mpe Gomore.a (Genese 18:23-32) Mpe ntango Yehova amonisaki likanisi na ye ya koboma libota ya Yisraele—mbala ya liboso ezalaki mpo na losambo ya bikeko, mpe mbala mosusu ezalaki mpo na botomboki—na libaku moko na moko, Moize akanisaki elongo na Yehova lokola nde azalaki kosolola elongo na moninga na ye moto. Na libaku moko na moko, Yehova azongisaki biyano malamu. Lolenge oyo andimaki malɔmbɔ ya Moize na ntina na libota na Ye Yisraele, emonisaki ete Ye azali na komikitisa. (Exode 32:9-14; Mituya 14:11-20) Bandakisa mosusu na komikitisa ya Yehova ezali na motindo oyo alobanaki na moto na moto, na lolenge oyo emonanaki kati na boyokani na ye elongo na Gédéon mpe Yona, lokola yango ekomami na Basambisi 6:36-40 mpe Yona 4:9-11.
6. Ezaleli nini ya Yehova oyo emonisi lisusu komikitisa na ye?
6 Ya solo, elobami soko mbala libwa na ntina na Yehova ete azali ye oyo “akookaka nkanda noki te.”b Lolenge Yehova azali na motema molai, azali kooka nkanda noki te kati na boyokani na ye elongo na bato, bikelamu bizangi kokoka, na boumeli ya bambula mingi mpenza, ezali elembeteli mosusu oyo emonisi ezaleli na ye ya komikitisa. Bato ya lolendo bazalaka na motema likolólikoló, basilikaka noki, ekeseni mpenza na motema molai. Ezaleli ya komikitisa ya Yehova emonisi ete lolendo ya bato bazangi kokoka ezali bolémá! Lokola esɛngami na biso ete ‘tózala bamekoli ya Nzambe lokola bana balingami,’ tosengeli kozala bato na komikitisa lokola ye azali na komikitisa.—Baefese 5:1.
Ndakisa na komikitisa ya Klisto
7, 8. Makomami malobi nini na ntina na komikitisa ya Yesu Klisto?
7 Ndakisa ya mibale ya komikitisa oyo eleki monene oyo tosengeli komekola, ezwami na 1 Petelo 2:21 (NW) ete: “Ya solo, bobyangami nde mpo na nzela yango, mpo ete Klisto mpe aokaki mpasi mpo na bino, mpe atikeli bino elakiseli ete bolanda malamu matambe na ye.” Ntango molai liboso ete aya na mabelé lokola moto, esakolamaki na ntina na ye na Zakaria 9:9 (NW) ete: “Ngangá mpo na bolóngi, ɛ mwana mwasi na Yelusaleme. Tala! Mokonzi na yo azali koya ye mpenza epai na yo. Azali moyengebene, ee, azali lobiko; moto na komikitisa, mpe amati likoló na mwana na mpunda.” Soki Yesu Klisto azalaki moto ya lolendo, mbɛlɛ andimaki lipesi ya Zábolo oyo ete akumbamela ye mpo azwa bokonzi nyonso ya mokili. (Matai 4:9, 10) Amonisaki lisusu ezaleli na ye ya komikitisa na kopesáká lokumu nyonso epai na Yehova na mateya na ye, ete: “Wana bokotombola Mwana na moto, nde bokoyeba ete ngai nazali ye, mpe nazali kosala yango elingi ngai moko te; kasi lokola Tata alakisi ngai, nazali koyebisa makambo yango.”—Yoane 8:28, NW.
8 Yango wana akokaki koloba epai na bayoki na ye ete: “Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino, mpe bózala bayekoli na ngai; mpamba te ngai nazali na bopɔlɔ mpe na motema mosɔkɛmi; mpe bokozwa bopemi mpo na milimo na bino.” (Matai 11:29, NW) Oyo nde ndakisa kitoko ya ezaleli ya komikitisa oyo amonisaki na kosukoláká makolo ya bantoma na ye na mpokwa ya nsuka oyo alekisaki elongo na bango lokola moto! (Yoane 13:3-15) Na lolenge lobongi mpenza, kati na Bafilipi 2:3-8 (NW), ntoma Paulo apesaki toli na baklisto ete bázala na “elimo ya komikitisa,” kotangáká Yesu Klisto lokola ndakisa, ete: “Kati na bino, bóbatelaka elimo oyo ezalaki mpe epai na Klisto Yesu; oyo ete, atako azalaki na lolenge na Nzambe, akanisaki te kozwa esika na makasi, ete akokana na Nzambe. Te, amiyeisaki mpamba mpe azwaki motindo na moombo mpe ayaki na lolenge na bato. Lisusu, wana azalaki na motindo na moto, amikitisaki ye mpenza mpe atosaki kino kufa, ee, na kufa likoló na nzeté ya mpasi.” Ntango akutanaki na mpasi oyo elekaki makasi kati na bomoi na ye, abondelaki Tata na ye na komikitisa nyonso, ete: “Ezala lokola elingi ngai te, kasi lokola elingi yo.” (Matai 26:39, NW) Na ntembe te, mpo ete tózala bamekoli na Yesu Klisto, na kolandáká mpenza matambe na ye, tosengeli kozala bato na komikitisa.
Ntoma Paulo, ndakisa malamu ya komikitisa
9-12. Kati na makambo nini ntoma Paulo atikaki ndakisa malamu ya komikitisa?
9 Ntoma Paulo akomaki ete: “Bózala bamekoli na ngai, lokola ngai mpe nazali komekola Klisto.” (1 Bakolinti 11:1, NW) Ntoma Paulo amekolaki Yesu Klisto na kozaláká na elimo ya komikitisa, kopesáká biso bongo ndakisa mosusu ya komikitisa oyo tosengeli komekola? Na ntembe te, asalaki bongo. Libosoliboso, andimaki na komikitisa nyonso ete azalaki moombo na Yesu Klisto. (Bafilipi 1:1) Alobaki epai na bankulutu ya Efese na ntina na lolenge ‘azalaki kosalela Nkolo na elimo ya komikitisa mingi mpe na mpisoli mpe na mimekamo oyo mibimelaki ye mpo na myango mabe ya Bayuda.’ (Misala 20:17-19, NW) Soki azalaki na komikitisa te, mbɛlɛ akokaki te kokoma maloba oyo mazwami na Baloma 7:18, 19 (NW) ete: “Nayebi ete kati na ngai, elingi koloba kati na nzoto na ngai, likambo malamu lifandi kati na yango te . . . Mpo ete malamu nazali na mposa ya kosala, nazali kosala yango te, kasi mabe oyo nazali na mposa ya kosala te, yango nde nazali kosala.”
10 Likambo mosusu limonisi komikitisa ya Paulo ezali bongo maloba oyo akomaki kati na mokanda epai na baklisto ya Kolinti, lokola emonisami na 1 Bakolinti 2:3 (NW) ete: “Ngai nayaki epai na bino kati na bolɛmbu mpe na kobanga mpe na kolɛnga mingi.” Na komikitisa nyonso, alobelaki bomoi na ye ya kala liboso ete akóma moklisto, akomaki ete: “Liboso nazalaki motuki mpe monyokoli mpe moto na maloba mabe. . . . Klisto Yesu ayaki kati na mokili mpo na kobikisa bato na masumu. Kati na bango, nazali moto ya liboso.”—1 Timoté 1:13, 15, NW.
11 Oyo emonisi lisusu komikitisa na ye, ezali lolenge na ye ya kopesa lokumu nyonso epai na Yehova Nzambe mpo na bolamu nyonso azwaki na milende na ye. Akomaki na ntina na mosala na ye ete: “Ngai nalonaki, Apolo amwangisaki mai, nde Nzambe akólisaki yango; boye ezala oyo aloni azali eloko te, ezala oyo amwangisi mai azali eloko te, kasi Nzambe oyo azali kokólisa yango.” (1 Bakolinti 3:6, 7, NW) Asɛngaki lisusu na bandeko na ye ete bábondela mpo na ye ete akoka kopesa litatoli malamu, lokola tozali kotanga yango na Baefese 6:18-20 (NW) ete: “Bóbondelaka . . . mpo na ngai, ete makoki ya koloba malamu mapesamela ngai . . . mpo ete nakoka koloba na boyokani na [libombami mosantu ya nsango malamu] na molende lokola esengeli na ngai koloba.”
12 Paulo amonisaki lisusu komikitisa na ye na lolenge oyo azalaki kosalana elongo na bantoma mosusu: “Yakobo, Kefa mpe Yoane, . . . bapɛsaki lobɔkɔ na mobali epai na ngai mpe na Balanaba, [yango elembo ya kosalana elongo, NW] ete biso tokɛnda epai na bapakano mpe bango epai na bakatami ngɛnga.” (Bagalatia 2:9) Amonisaki lisusu ete azalaki na bolingo malamu ya kosalana elongo na bankulutu na lisangá ya Yelusaleme na kokendáká elongo na bilenge mibali minei na tempelo mpe na kofuteláká bango mbongo, wana ezalaki bango kokokisa ndai.—Misala 21:23-26.
13. Komikitisa ya Paulo emonanaki polele kati na likambo nini?
13 Komikitisa ya Paulo ezali mpenza komonana polele soki totaleli lolenge oyo Yehova Nzambe asalelaki ye na nguya nyonso. Na ndakisa, tozali kotanga ete: “Nzambe asalaki misala minene na nguya na mabɔkɔ na Paulo.” (Misala 19:11, 12, NW) Lisusu, azwaki bimonaneli mpe bimoniseli ya kokamwa. (2 Bakolinti 12:1-7) Lisusu, tosengeli kobosana te lolenge apemamaki mpo na kokoma búku 14 kati na babúku 27 (oyo ezalaki mpenza mikanda) na Makomami ya Greke ya boklisto. Tokoki koloba ete nyonso wana etindaki ye na komikumisa te. Azalaki ntango nyonso na komikitisa.
Bandakisa ya mikolo na biso
14-16. (a) Na likambo nini prezidá wa yambo wa la Société Watch Tower azalaki ndakisa malamu ya komikitisa? (b) Ndakisa na ye ekesenaki na oyo ya nani?
14 Na Baebele 13:7, tozali kotanga toli oyo ya ntoma Paulo, ete: “Bokanisa baoyo bakokambaka bino, baoyo [basakoli, NW] liloba na Njambe epai na bino. Bobanjabanja mpɔ na nsuka na bijaleli na bango mpe [bomekola, NW] kondima na bango.” Na boyokani na etinda oyo, tokoki kozwa Charles Taze Russell, prezidá ya liboso ya Watch Tower Bible and Tract Society, lokola ndakisa ya mikolo na biso, oyo tokoki komekola kondima na ye. Azalaki mobali moko na komikitisa? Azalaki bongo mpenza! Lokola yango emonisamaki malamu, kati na babúku na ye Etudes des Ecritures, babúku motoba oyo ezalaki soko na nkasa 3 000, ata esika moko te oyo alobaki na ntina na ye mpenza. Lelo oyo, mikanda ya Watch Tower Bible and Tract Society mizali kolanda bobele etinda yango moko kozanga ete ebenda likebi likoló na bato, na koyebisáká nkombo ya bakomi masoló na yango.
15 Mokolo mosusu, Russell akomaki kati na Mosenzeli (na Lingelesi) ete ayebaki te ndimbola ya “Russellisme” mpe “Russellite,” maloba oyo batɛmɛli na ye bazalaki kosalela, nde ye aboyaki yango mpenza. Akomaki ete: “Mosala na biso . . . mozalaki bongo kosangisa bandambo ya solo oyo epalanganaki uta ntango molai mpe kolakisa yango epai na libota ya Nkolo—lokola [makambo] ya sika te, soko ya biso moko te, kasi lokola oyo ya Nkolo. . . . Mosala oyo kati na yango Nkolo asepelaki kosalela makoki na biso ya moke, ezalaki bobele mosala ya kobandisa te, kasi ezalaki mpe mosala ya kotonga lisusu, ya kobongisa, ya koyokanisa.” Ya solo, amonisaki mayoki ya ntoma Paulo, oyo mazwami na 1 Bakolinti 3:5-7.
16 Ezaleli na ye ekeseni mpenza na oyo ya Charles Darwin. Kati na ebimeli ya liboso ya mokanda na ye L’Origine des espèces na 1859, Darwin asalelaki mbala mingi liloba oyo ete liteya “na ngai,” kozanga kokanisa bato mosusu oyo balobelaki liteya ya évolution liboso na ye. Samuel Buther, mokomi ya lokumu ya ekeke wana, apamelaki Darwin, komonisáká ete liboso, bato mingi mosusu basilaki kokólisa liteya ya évolution; yango ebandaki soko moke te na Darwin.
17. Wapi bandakisa mosusu ya komikitisa ya ndeko Rutherford?
17 Mosaleli mosusu ya sembo ya mikolo na biso oyo Yehova Nzambe asalelaki na nguya, ezalaki Joseph F. Rutherford, oyo alobelamaki na ebandeli. Azalaki mokɔtɛli monene ya solo ya Biblia mpe mingi mpenza ya nkombo Yehova. Atako ayebanaki mingi lokola zúzi Rutherford, azalaki na motema ya komikitisa. Na ndakisa, mokolo moko alobaki mwa maloba oyo mazangaki moboko kati na solo likoló na makambo oyo baklisto bakokaki komizela na yango na 1925. Ntango makambo yango makokanaki te na lolenge akanisaki, alobaki na libota ya Betele ya Brooklyn na komikitisa nyonso ete, amikosaki. Moklisto mopakolami moko oyo azalaki moninga na ye ya penepene, apesaki litatoli ete mbala mingi, azalaki koyoka ndeko Rutherford kosɛnga bolimbisi engebene lilako ya Matai 5:23, 24, ezala na liboso na bato nyonso to na nkuku, soki azokisi moninga na ye moklisto na maloba mabongi te. Esengeli mpenza ezaleli ya komikitisa mpo na moto oyo azali na mokumba monene ete asɛnga bolimbisi epai na bato oyo bazali na nsé na ye. Ndeko Rutherford asili kotika ndakisa malamu mpo na bakɛngɛli nyonso, ezala kati na lisangá, na mosala ya mokɛngɛli-motámboli, to na moko na ba filiales ya la Société.
18. Na maloba nini prezidá wa misato wa la Société Watch Tower amonisaki elimo na ye ya komikitisa?
18 Nathan H. Knorr, prezidá wa misato ya Watch Tower Bible and Tract Society, amonisaki lisusu ete, atako azalaki na mokumba monene kati na basaleli ya Yehova, azalaki te komitombola mpo na mokumba na ye. Ata azalaki na mayele mingi mpo na kobongisa makambo mpe azalaki molobi malamu liboso na bato, azalaki na limemya monene mpo na oyo bato mosusu bazalaki kosala. Na yango, mokolo moko oyo akendaki kotala mosangani moko ya Esika bakomaka babúku (Département de rédaction) kati na biro na ye, mpe alobaki ete: “Awa ezali esika oyo mosala ya ntina mingi mpe ya mpasi mingi mozali kosalema. Yango wana ngai nasalaka yango mingi te.” Ee, na komikitisa nyonso, azalaki kosalela toli oyo ezwami na Bafilipi 2:3 ete, ‘na elimo ya komikitisa, tosengeli kotalela bato mosusu ete baleki biso.’ Alobaki ete, atako kozala prezidá ya Société ezalaki mokumba ya ntina, kasi misala misusu mizalaki mpe na ntina. Esengelaki azala na komikitisa mpo ete azala na mayoki wana mpe amonisa yango polele. Azalaki ndakisa mosusu ya malamu oyo biso nyonso tosengeli komekola, mingi mpenza baoyo bazali na mikumba ya kozala bakɛngɛli.
19, 20. (a) Prezidá wa minei wa la Société Watch Tower atikaki ndakisa nini ya komikitisa? (b) Kati na likambo nini lisoló lilandi likosalisa biso ete tomonisa ezaleli ya komikitisa?
19 Fred W. Franz, prezidá wa minei wa Société, azalaki mpe ndakisa malamu ya komikitisa. Soko mibu 32 oyo azalaki prezidá molandi wa Société, azalaki kokoma mingi bazulunalo mpe masukúlu (discours) ya mayangani (assemblées); na likambo oyo, azalaki ntango nyonso komitya na nsima mpe azalaki kolinga te komitya na esika ya liboso. Tokoki kotanga ndakisa mosusu ya lolenge moko na ntango ya kala. Ntango Yoaba alóngaki bato na Moaba na mokili ya Laba, asalaki mpenza ete mokonzi Davidi azwa lokumu mpo na elónga wana.—2 Samwele 12:26-28.
20 Ya solo, ezali na bandakisa mingi ya malamu, ya ntango na kala mpe ya ntango na biso, oyo ezali kopesa biso bantina ya nguya mpo na kozala na komikitisa. Nzokande, ezali na bantina mingi mosusu oyo tozali na yango mpo na kozala na komikitisa; tokotalela yango na lisoló lilandi mpo na komona nini ekoki kosalisa biso mpo na kozala na komikitisa.
[Maloba na nse ya lokasa]
a “Komikitisa” ezali kosalelama mbala mingi na ndimbola ya “komonisa mwa bokonzi.” Kasi ndimbola na yango ya liboso—mpe ndimbola na yango kati na New World Translation—ezali “komizongisa nsima,” “kosundola mikumba na ebóngá ya lokumu.”—Tala búku Webster’s Ninth New Collegiate Dictionary.
b Exode 34:6; Mituya 14:18; Nehemia 9:17; Nzembo 86:15; 103:8; 145:8; Yoele 2:13; Yona 4:2; Nahumu 1:3.
Ozali komikundola?
◻ Lolendo ekobotaka mbuma nini?
◻ Nani apesaki ndakisa eleki malamu ya komikitisa?
◻ Makambo nini mamonisi ye oyo azalaki ndakisa ya mibale eleki monene mpo na komikitisa?
◻ Ndakisa nini malamu ya komikitisa ntoma Paulo atikaki?
◻ Bandakisa nini ya komikitisa oyo tozali na yango na mikolo na biso mpo na bato oyo bazalaki na mikumba minene?
[Elilingi na lokasa 15]
Yesu apesaki elakiseli malamu ya komikitisa
[Elilingi na lokasa 16]
Paulo atikaki ndakisa malamu ya komikitisa
[Elilingi na lokasa 17]
Ndeko Russell amikumisaki te mpo na makambo oyo akomaki