Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/12 nk. 11-16
  • Tótya elikya epai na Yehova!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tótya elikya epai na Yehova!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Malako mauti na Tata
  • Elikya oyo ekoumelaka
  • Tótya motema epai na Yehova
  • “Kati na nzela na yo nyonso . . .”
  • Masese 3:5, 6​—“Kondimela mayele na yo moko te”
    Ndenge bavɛrsɛ ya biblia elimbolami
  • Tózala baninga ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Komisá elikya na yo makasi epai ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Tosengeli kotyela bato motema mpo na kozala na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/12 nk. 11-16

Tótya elikya epai na Yehova!

“Tyá elikya epai na Yehova na motema na yɔ mobimba.”​—MASESE 3:5, NW.

1. Lolenge nini Masese 3:5 ezalaki na bopusi epai na elenge mobali moko, mpe ebimisaki bolamu nini ya ntango molai?

MISIONERE moko ya kala akomaki ete: “‘TYÁ ELIKYA EPAI NA NKOLO NA MOTEMA NA YO MOBIMBA; KOLANDA BOSOSOLI NA YO MOKO TE.’ Maloba oyo ya Biblia, oyo matyamaki na etánda moke mpe ekakisamaki na efélo ya ndako oyo nakendaki kotala, mabendaki likebi na ngai. Nakanisaki likoló na yango na boumeli ya ntango nyonso oyo etikalaki na mokolo wana. Namitunaki ngai moko ete, nakoki kotya elikya epai na Nzambe na motema na ngai mobimba?” Na ntango wana, moto yango azalaki na mibu 21. Na mibu 90, wana azali naino kosala na bosembo nyonso lokola nkulutu na engumba Perth, na mboka Australie, akokaki komona bomoi ya esengo elongo na mbuma ya kotya elikya epai na Yehova, kati na yango mibu 26 ya mpasi ya kofungola nzela ya elanga ya sika na mosala ya misionere na mboka Ceylan (lelo Sri Lanka), na mboka Birmanie (lelo Myanmar), na mboka Malaisie, na Thaïlande, na Inde, mpe na Pakistan.a

2. Masese 3:5 esengeli kotonga elikya nini epai na biso?

2 Maloba oyo ya Masese 3:5 ete, “Tyá elikya epai na Yehova na motema na yo mobimba,” lokola yango ebongolami uta na Libongoli ya Mokili ya Sika na Lingelesi, masengeli kopusa biso nyonso na kolanda kopesa bomoi na biso epai na Yehova na motema mobimba, kotyáká elikya ete akoki kolendisa kondima na biso, kino kolónga ata mikakatano oyo mikokani na ngomba. (Matai 17:20) Tiká tótalela sikawa Masese 3:5 mpe mikapo mizali zingazinga na yango.

Malako mauti na Tata

3. (a) Elendiseli nini ezwami kati na mikapo libwa ya liboso ya mokanda ya Masese? (b) Mpo na nini tosengeli kotya likebi mingi na Masese 3:1, 2?

3 Mikapo libwa ya liboso ya mokanda ya Masese mitondi na malako ya ntina mingi mpe na batoli ya mayele euti na Yehova, Tata, mpo na bato nyonso baoyo bazali kozela ete bazala bana na Nzambe na likoló to mpo na baoyo bazali kolikya “kozwa bonsomi na nkembo ya bana na Nzambe,” na paladiso awa na mabelé. (Baloma 8:18-21, 23, NW) Wana ezali toli ya mayele oyo baboti bakoki kosalela mpo na kobɔkɔla bana na bango ya mibali mpe basi. Oyo nde toli kitoko ezwami na Masese mokapo 3, oyo ebandi na likebisi oyo ete: “Mwana na ngai, kobosana mobeko na ngai te, mpe tiká ete motema na yo mobatela mitinda na ngai.” Tokoki mpenza kotya likebi mingi na makebisi ya Yehova awa mikolo ya nsuka ya mokili mabe ya Satana mikómi pene na kosila. Nzela yango ekoki komonana molai, kasi elaká epesami na baoyo nyonso bazali koyika mpiko ezali ete “mikolo mingi mpe mbula mingi ya bomoi mpe kimya ekobakisamela yo”​—bomoi ya seko kati na ebongiseli ya sika ya Yehova.​—Masese 3:1, 2, NW.

4, 5. (a) Boyokani nini ya malamu mingi bolobelami na Yoane 5:19, 20? (b) Lolenge nini toli ya Deteronome 11:18-21 ezali kosalelama na mikolo na biso?

4 Boyokani ya esengo kati na tata mpe mwana ekoki kozala na ntina mingi. Yehova Nzambe, Mozalisi na biso, asili kobongisa likambo yango. Klisto Yesu alobaki na ntina na boyokani na ye malamu elongo na Yehova, ete: “Mwana akoki kosala likambo ye moko te, kasi bobele yango emoni ye ete Tata azali kosala. Mpo ete yango ekosala Ye, Mwana mpe akosalaka bongo. Mpo ete Tata azali na bolingo ya motema mpo na Mwana mpe azali komonisa ye makambo manso mazali ye moko kosala.” (Yoane 5:19, 20, NW) Mokano ya Yehova mozalaki ete boyokani motindo moko bozala kati na ye mpe libota na ye mobimba ya mabelé, lolenge moko kati na batata mpe bana na bango.

5 Kotyelana motema kati na basangani ya libota ezalaki kolendisama na Yisraele ya kala. Yehova apesaki toli oyo epai na batata, ete: “Okobómba maloba na ngai oyo na motema na yo mpe na molimo na yo, mpe okokanga yango lokola elembo likoló na lobɔkɔ na yo, mpe makozala lokola bikaniseli na elongi katikati na miso na yo. Mpe okolakisa yango epai na bana na yo, kosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako na yo mpe wana ekotambola yo na nzela mpe wana ekolala yo mpe wana ekotɛlɛma yo. Mpe okokoma yango likoló na monoko na ndako na yo mpe na bikúke na yo, ete mikolo na yo mpe mikolo ya bana na yo mizala mingi na mokili oyo Yehova alakaki na bankɔ́kɔ na yo ete akopesa bango, lokola mikolo ya makoló likoló na mabelé.” (Deteronome 11:18-21, NW) Liloba lipemami na Yehova Nzambe, Molakisi na biso Monene, likoki lisusu kotya ye na boyokani malamu elongo na baboti mpe bana na bango, mpe elongo na baoyo nyonso bazali kosalela ye kati na lisangá ya boklisto.​—Yisaya 30:20, 21.

6. Lolenge nini tokoki kozwa ngolu na miso ya Nzambe mpe na miso ya bato?

6 Toli ya mayele oyo euti na Nzambe, Tata, mpo na libota na ye, lisalemi na mibangé mpe bilenge, elandi na molɔngɔ́ 3 mpe molɔngɔ́ 4 ya Masese mokapo 3, ete: “Tiká te ete boboto mpe solo elongwa na yo. Kangá yango na nkingo na yo. Komá yango likoló na etánda ya motema na yo, bongo, okozwa ngolu mpe bososoli malamu na miso na Nzambe mpe na miso na bato awa na mabelé.” Yehova ye moko aleki na komonisa boboto mpe solo. Lokola elobami na Nzembo 25:10 (NW) ete, “nzela nyonso ya Yehova ezali boboto mpe solo.” Na komekoláká Yehova, tosengeli kopesa motuya na bizaleli wana mpe na nguya ya kobatela oyo euti na yango, kotaleláká yango lokola nde tozwi eloko na motuya mingi mpe kokangisa yango makasi kati na mitema na biso. Boye, tokoki kobondela na molende nyonso, ete: “Ɛ Yehova, . . . tiká ete boboto na yo mpe solo na yo ebatela ngai ntango nyonso.”​—Nzembo 40:11, NW.

Elikya oyo ekoumelaka

7. Kati na makambo nini Yehova amonisaki bosembo na ye?

7 Na búku Webster’s Ninth New Collegiate Dictionary, kolikya elimbolami lokola “kotya motema na ezaleli, na makoki, na makasi, to na bosolo ya moto moko to ya eloko moko.” Motindo na Yehova mokangami mpenza na boboto na ye. Mpe tokoki mpenza kotya motema na makoki na ye ya kosala oyo ye asili kolaka, mpamba te nkombo na ye mpenza, Yehova, elakisi ye lokola Mobandisi monene ya mikano. (Exode 3:14; 6:2-8) Lokola azali Mozalisi, azali Liziba ya makasi mpe ya nguya monene. (Yisaya 40:26, 29) Azali mpenza solo, mpamba te “Nzambe akoki kobuka lokutá te.” (Baebele 6:18, NW) Na yango, tolendisami na kotya elikya makasi epai na Yehova, Nzambe na biso, Liziba monene ya solo nyonso, ye oyo azali na nguya nyonso mpo na kobatela baoyo bazali kolikya epai na ye mpe kokokisa mikano na ye nyonso ya minene na nkembo.​—Nzembo 91:1, 2; Yisaya 55:8-11.

8, 9. Mpo na nini elikya ezali te kati na mokili, mpe kokesena nini libota ya Yehova bazali komonisa kati na likambo yango?

8 Kati na mokili mosili kobeba oyo mozingi biso, elikya ezali soko moke te. Yango wana, tozali komona lokoso mpe mabe bipai binso. Lokasa ya ezipeli ya zulunalo World Press Review ya Máí 1993 ezalaki na nsango oyo: “MABE MAPALANGANI BƐƐ​—Mosolo ya mbindo kati na Ebongiseli ya Sika ya Mokili mobimba. Mabe mapalangani longwa na Brésil kino na Allemagne, longwa na Etats-Unis kino na Argentine, longwa na Espagne kino na Pérou, longwa na Italie kino na Mexique, longwa na Vatican kino na Russie.” Lokola yango etongami likoló na koyina, na lokoso, mpe na kozanga elikya, oyo ebéngami na bato ete ebongiseli ya sika ya mokili mobimba ebongisi eloko moko te, kasi ebakisi nde mpasi epai na bato.

9 Na kokesena na mabota ya politiki, Batatoli ya Yehova bazali na esengo ya kozala “libota oyo Nzambe [na bango] azali Yehova.” Bobele bango nde bakoki mpenza koloba, ete “Totii elikya epai na Nzambe.” Moko na moko na bango akoki konganga na esengo nyonso ete: “Kati na boyokani elongo na Nzambe, nakokumisa liloba na ye . . . Epai na Nzambe, natye elikya na ngai. Nakobanga te.”​—Nzembo 33:12; 56:4, 11, NW.

10. Nini epesaki bilenge baklisto mingi nguya ya kotikala sembo?

10 Na mokili moko ya Azia, epai bankóto mingi ya bilenge Batatoli baokaki mpasi mingi na kobɛtama mpe na kotyama na bolɔkɔ, elikya epai na Yehova esalisaki bango mingi mpo na koyika mpiko. Na butu moko kati na bolɔkɔ, elenge Motatoli moko oyo anyokolamaki mingi amonaki ete akokaki lisusu kosala eloko te. Kasi elenge mosusu ayaki epai na ye na kobombama kati na molili. Alobaki na mongongo ya nsé ete: “Kotika te; naanganaki kondima mpe uta ntango wana, nazali lisusu na kimya te.” Ekateli ya elenge oyo ya liboso mpo na kotɛlɛma ngwi, elendisamaki. Tokoki kozala na elikya nyonso epai na Yehova, ete akosalisa biso mpo na kolónga milende nyonso misalemi na Satana mpo na kobebisa bosembo na biso.​—Yilimia 7:3-7; 17:1-8; 38:6-13, 15-17.

11. Nini ezali kopusa biso na kotya elikya epai na Yehova?

11 Mobeko ya liboso elobi na eteni moko, ete: “Okolinga Yehova, Nzambe na yo na motema na yo mobimba.” (Malako 12:30, NW) Soki tokanisi mingi na ntina na Liloba ya Nzambe, makambo minene ya solo oyo tozali koyekola makokɔta kati na motema na biso mpo ete tópusama na kosala nyonso ekoki na biso kati na mosala ya Nkolo Moyangeli Yehova, Nzambe na biso monene. Ezali na motema moyikani na botɔ́ndi mingi mpo na nyonso oyo asili koteya biso​—nyonso oyo asili kosala mpo na biso, oyo azali kosala mpo na biso, mpe oyo akosala mpo na biso​—nde topusami na kotya elikya kati na kobikisa na ye.​—Yisaya 12:2.

12. Eleki bambula mingi, lolenge nini baklisto mingi bamonisaki elikya na bango epai na Yehova?

12 Elikya wana ekoki kolónama na boumeli ya bambula mingi. Motatoli moko ya Yehova ya komikitisa, oyo asalaki koleka boumeli ya mibu 50 na bosembo nyonso na biro monene ya la Société Watch Tower, na Brooklyn, oyo abandaki mosala na ye na Apríli 1927, akomaki ete: “Na nsuka ya sanza wana, nazwaki mwa lisalisi moke ya badolare 5 oyo etyamaki kati na líbenga lya mokanda elongo na karte moko kitoko likoló na yango ekomamaki maloba ya Masese 3:5, 6 . . . Nazalaki na ntina monene mpo na kotya elikya epai na Yehova, mpamba te, na biro monene ya la Société, nayaki komona ete Yehova azali na ‘moombo na sembo mpe na mayele’ oyo azali kobatela biloko nyonso ya Bokonzi awa na mabelé na bosembo nyonso.​—Matai 24:45-47.”b Motema ya moklisto wana motyamaki likoló na bolingo ya mbongo te, kasi epai na “eloko ya motuya monene kati na makoló.” Bobele bongo lelo, bankóto mingi na baklisto oyo bazali kosala na ba Betele ya la Société Watch Tower bipai nyonso na mokili, basili mpe kolápa ndai ya bobólá. Bazali kotya elikya epai na Yehova mpo ete akokisa bamposa na bango ya mokolo na mokolo.​—Luka 12:29-31, 33, 34, NW.

Tótya motema epai na Yehova

13, 14. (a) Bobele epai wapi tokoki kozwa toli eleki malamu? (b) Ezaleli nini tosengeli kopɛngola mpo na kolónga na minyoko?

13 Tata na biso na likoló akebisi biso, ete: “Kotya motema te likoló na bososoli na yo moko.” (Masese 3:5, NW) Bapesi-toli mpe balakisi ya mokili bakoki soko moke te kolikya ete bakóma pene na mayele mpe na bososoli oyo Yehova azali na yango. “Mayɛlɛ na ye ekoki kotangama tɛ.” (Njembo 147:5) Na esika ya kotya motema na mayele ya bato minene ya mokili to likoló ya mayoki na biso moko oyo mazali na boyebi mingi te, tiká ete tótalela Yehova, Liloba na ye, mpe bankulutu kati na lisangá ya boklisto mpo na kozwa toli malamu.​—Nzembo 55:22; 1 Bakolinti 2:5.

14 Mayele ya bato to lolendo mpo na etɛlɛmɛlo ekozala na litomba moko te mpo na biso na mokolo na komekama monene oyo esili kobɛlɛma. (Yisaya 29:14; 1 Bakolinti 2:14) Na Japon, na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mobateli moko na mpate na libota ya Nzambe, oyo azalaki na mayele nde azalaki na lolendo, aponaki kotya motema na bososoli na ye moko. Wana atyamaki na komekama makasi, akómaki mopɛngwi, mpe mingi kati na etongá bazongaki nsima mpo na minyoko. Ndeko mwasi moko ya sembo ya mboka Japon, oyo abikaki na mpasi monene kati na bandako ya bolɔkɔ ya nsɔmɔ, alobaki ete: “Baoyo batikalaki sembo bazalaki bato ya mayele mingi te mpe bazalaki bato ya lokumu mingi te. Ya solo, biso banso tosengeli ntango nyonso kotya elikya epai na Yehova na motema na biso mobimba.”c

15. Ezaleli nini ya Nzambe oyo ezali na ntina mingi soki tolingi kosepelisa Yehova?

15 Esengeli komikitisa mpo na kotya elikya epai na Yehova, na esika ya kotalela bososoli na biso moko. Oyo nde ezaleli ya ntina mingi mpo na baoyo nyonso balingi kosepelisa Yehova! Ya solo, ata Nzambe na biso, Nkolo Moyangeli ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba, azali komonisa ezaleli ya komikitisa kati na boyokani na ye elongo na bikelamu na ye ya mayele. Tokoki kozala na botɔ́ndi mpo na yango. “Azali komikitisa mpo na kotala likoló na lola mpe mabelé, kotómboláká oyo moke longwa na mputulu na mabelé.” (Nzembo 113:6, 7, NW) Kati na motema mawa na ye monene, azali kolimbisa biso na mabungá na biso mpo na likabo na ye monene oyo apesaki na bato, mbeka ya lisiko ya motuya monene ya Mwana molingami na ye, Klisto Yesu. Tosengeli mpenza kozala na botɔndi mingi mpo na ngolu tozwi!

16. Na makanisi nini bandeko mibali basengeli koluka mikumba kati na lisangá?

16 Yesu ye moko akundweli biso ete: “Moto na moto oyo akomitómbola akokitisama, nde moto na moto oyo akomikitisa akotómbolama.” (Matai 23:12, NW) Na komikitisa nyonso, bandeko mibali oyo basilá kozwa batisimo basengeli koluka mikumba kati na lisangá ya boklisto. Nzokande, bakɛngɛli basengeli te kotalela mokumba na bango lokola elembo ya bokonzi, kasi lokola libaku ya kokokisa mosala na komikitisa, na botɔndi mpe na mposa nyonso lokola Yesu alobaki yango ete: “Tata na ngai ajali naino kosala mosala, ngai mpe najali kosala.”​—Yoane 5:17; 1 Petelo 5:2, 3.

17. Banso tosengeli kondima likambo nini, mpe yango esengeli komema biso na kosala nini?

17 Tokoki ntango nyonso komonisa, na komikitisa nyonso mpe kati na mabondeli, ete tozali bobele mputulu na miso ya Yehova. Na yango, tokoki kozala na esengo ete “boboto na [Yehova, NW] ejali lobiko na lobiko likolo na baoyo bakobangaka ye mpe boyɛngɛbɛnɛ na ye kino bana na bana.” (Njembo 103:14, 17) Na bongo, biso nyonso tosengeli kozala bayekoli ya molende na Liloba ya Nzambe. Ntango oyo tozali kolekisa na boyekoli ya biso moko mpe na boyekoli kati na libota, mpe na makita ya lisangá, esengeli mpenza kozala bangonga na biso ya ntina mingi na boumeli ya poso. Na lolenge yango, tozali kokólisa “boyebi ya Oyo Aleki Mosantu.” Yango nde “bososoli.”​—Masese 9:10, NW.

“Kati na nzela na yo nyonso . . .”

18, 19. Lolenge nini tokoki kosalela Masese 3:6 kati na bomoi na biso, mpe tokozwa bolamu nini?

18 Kobendáká likebi na biso epai na Yehova, Liziba ya bososoli bouti na Nzambe, Masese 3:6 (NW), elandi koloba ete: “Talelá ye kati na nzela na yo nyonso, mpe ye moko akosembola bilekelo na yo.” Mpo na kotalela Yehova, esengeli komipesa epai na ye kati na libondeli. Ata tozali wapi to soki likambo nini libimi, tokoki nokinoki kobɛlɛma epai na ye kati na libondeli. Ata ntango tomipesi na misala na biso ya mokolo na mokolo, wana tozali komibongisa mpo na mosala ya elanga, wana tozali kokende kosakola Bokonzi na ye ndako na ndako, tokoki ntango nyonso kobondela Nzambe ete apambola mosala na biso. Na bongo, tokoki kozala na libaku kitoko mpe ya esengo ya ‘kotambola elongo na Nzambe,’ kotyáká elikya ete “akosembola bilekelo na biso,” lokola asalaki yango mpo na bato oyo bazalaki kobanga Nzambe lokola Enoka, Noa, mpe mpo na Bayisraele ya sembo, lokola Yosua mpe Danyele.​—Genese 5:22; 6:9; Deteronome 8:6; Yosua 22:5; Danyele 6:23; talá mpe Yakobo 4:8, 10.

19 Wana tozali koyebisa malɔmbɔ na biso epai na Yehova, tokoki kolikya ete ‘kimya na Nzambe oyo eleki makanisi nyonso, ekobatela mitema na biso mpe makoki na biso ya kokanisa kati na Klisto Yesu.’ (Bafilipi 4:7, NW) Kimya wana ya Nzambe, oyo ekomonanaka na elongi ya esengo, ekoki kosalisa bato oyo tozali kokutana na bango kati na mosala na biso ya kosakola ete bandima nsango na biso. (Bakolose 4:5, 6) Ekoki lisusu kolendisa baoyo banyokwami na mpasi ya kobulungana na makanisi to na bokesene oyo ezali komonana mingi lelo na mokili, lokola emonisami na lisoló lilandi.d

20, 21. (a) Na boumeli ya minyoko miutaki na ba Nazi, lolenge nini bosembo ya Batatoli ya Yehova elendisaki basusu? (b) Mongongo ya Yehova esengeli kolamwisa ekateli nini kati na biso?

20 Max Liebster, Moyuda na kobotama oyo, na lolenge ya likamwisi, abikaki na kobomama ya Bayuda, alobelaki mobembo na ye esika oyo ba Nazi bazalaki koboma bato, ete: “Tofinanaki na bawagó oyo ebongwanaki na ebele na biteni ya ndako mikemike mpo na bato mibalemibale. Wana natutamaki na mokɔ́sɔ (coup de pied) mpo na koingisama kati na moko na yango, nakutanaki na mokangami moko oyo miso ma ye mamonisaki ezaleli ya kimya. Mpo na botosi na ye na mibeko ya Nzambe, aponaki bolɔ́kɔ mpe ata kokufa na esika ya kosopa makila ya bato mosusu. Azalaki Motatoli ya Yehova. Bana na ye balongolamaki mosika na ye, mpe mwasi na ye abomamaki. Ye mpe azalaki kozela ete abomama. Mobembo wana ya mikolo 14 mopesaki eyano na mabondeli na ngai, mpamba te ezalaki na boumeli ya mobembo molai wana mpo na liwa nde nazwaki elikya ya bomoi ya seko.”

21 Nsima na kobima na ye na bolɔ́kɔ ya Auschwitz oyo ye abéngaki yango ete “mobenga ya nkosi,” mpe nsima ya batisimo na ye, ndeko mobali wana abalaki elenge mwasi moko, Motatoli ya Yehova oyo azaláká mpe na bolɔ́kɔ; tata na ye mpe anyokwamaki na kaá ya bakangami (camp de concentration) ya engumba Dachau. Ntango azalaki na bolɔkɔ, tata ya elenge mwasi wana azwaki nsango ete mwasi na ye mpe elenge mwana na ye ya mwasi bakangamaki lokola. Ayebisaki mayoki na ye ete: “Natungisamaki mingi mpenza. Kasi, mokolo moko, wana ezalaki ngai na molɔngɔ́ mpo na kozela ngala na ngai ya kosukola, nayokaki mongongo moko kotanga Masese 3:5, 6 . . . Ezalaki lokola mongongo moutaki mpenza na makoló. Ezalaki mpenza eloko oyo nazalaki na yango mposa mpo na kobatela bokatikati na ngai.” Mongongo yango ezalaki nde ya mokangami mosusu oyo azalaki kotanga mokapo wana, kasi likambo wana lizali mpenza komonisa nguya oyo Liloba ya Nzambe ekoki kozala na yango likoló na biso. (Baebele 4:12) Tiká ete mongongo ya Yehova moyokama epai na biso lelo na nzela ya maloba mazwami na Mokapo na biso ya mobu 1994, ete: “Tyá elikya epai na Yehova na motema na yo mobimba”!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá lisoló “Tyá elikya epai na Yehova na motema na yo mobimba,” ya Claude S. Goodman, Mosenzeli ya Mársi 15, 1974 (na Lifalansé), nkasa 184-189.

b Talá lisoló “Nasili kozwa ekateli mpo na kokumisa Yehova,” ya Harry Peterson, Mosenzeli ya Sɛtɛ́mbɛ 15, 1969 (na Lifalansé), nkasa 568-572.

c Talá “Yehova akosundola basaleli na ye te,” lisoló ya Matsue Ishii, Mosenzeli ya Máí 1, 1988 (na Lifalansé), nkasa 21-25.

d Talá mpe lisoló “Kosikwama! Elembo ya botɔ́ndi na biso,” lisoló ya Max Liebster, Mosenzeli ya Yanuáli 1, 1979 (na Lifalansé), nkasa 20-24.

Na bokusé

◻ Motindo na toli nini epesami na biso na mokanda ya Masese?

◻ Lolenge nini kolikya epai na Yehova ezali kopesa biso bolamu?

◻ Kotya motema epai na Yehova elimboli nini?

◻ Mpo na nini tosengeli kotalela Yehova kati na nzela na biso nyonso?

◻ Lolenge nini Yehova azali kosembola bilekelo na biso?

[Bililingi na lokasa 15]

Nsango ya esengo na ntina na Bokonzi ezali kobénda bato ya mitema sembo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto