Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/1 nk. 24-30
  • Mayangani kitoko mazali komonisa motuya ya mateya mauti na Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayangani kitoko mazali komonisa motuya ya mateya mauti na Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokolo ya yambo na nsima ya nzangá
  • Mokolo ya mibale na ntongo
  • Mokolo ya mibale na nsima ya nzangá
  • Mokolo ya misato na ntongo
  • Mokolo ya misato na nsima na nzangá
  • Mokolo ya nsuka na ntongo
  • Mokolo ya nsuka na nsima na nzangá
  • Bateyi ya liloba ya Nzambe balendisami ete bákokisa mokumba na bango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • “Basakoli ya Bokonzi ya molende” bayanganaki na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Pesá Nzambe nkembo kasi moto te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Batosi ya Liloba ya Nzambe bazali kozwa bolamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/1 nk. 24-30

Mayangani kitoko mazali komonisa motuya ya mateya mauti na Nzambe

MWANGO mpo na bopanzi nsango esili kopalangana kati na mokili ya lelo. Televizyó, radio, babúku mpe ba ordinatɛrɛ ezali mpenza kopesa boyebi mingi pene na makambo nyonso. Kasi, bato bazali kobɛla mpe kokufa. Mabe, nzala mpe bobóla ezali kongala kati na mokili mobimba, mpe kobulungana na mayoki ezali koboma bato mingi koleka liboso. Atako boyebi oyo bazali na yango, bato balóngi te na kosilisa mikakatano yango. Mpo na nini? Ezali mpo ete babwakaki bwanya ya Nzambe.

“Mateya mauti na Nzambe” ezalaki bongo motó ya likambo malamu mpo na mayangani ya Batatoli ya Yehova oyo mauti kosalema kala mingi te. Masukúlu makundwelaki ete bobele mitinda ya Liloba na Nzambe, Biblia, nde ezali mpenza na motuya ya lobiko.

Liyangani ya liboso libandaki na engumba Uniondale (New York), na Mokolo ya Minei na Yuní 3, 1993. Mayangani mosusu malandanaki kati na bingumba bikeseni, na mboka moko nsima na mosusu, mpo na kosukisa na Afrika mpe na Amerika ya Súdi.

Mokolo ya yambo na nsima ya nzangá

Mokolo na mokolo, motó ya likambo moko mozalaki mpenza komonisa mateya mauti na Nzambe na motindo mokeseni. Na ndakisa, manáka ya masukúlu ya mokolo ya yambo, motongamaki likoló na motó ya likambo “Tóluka koyeba mateya mauti na Nzambe.” (Yoane 7:17) Yango elimbolamaki malamu mokolo na mokolo.

Nsima na loyembo mpe libondeli, prezidá ya liyangani asalaki lisukúlu ya yambo oyo lizalaki na motó na likambo ete “Mateya mauti na Nzambe mazali kosangisa biso.” Amonisaki ete basaleli ya Yehova bazali na bomoko mpo ete bazali koyekola banzela na Ye mpe bazali kotambola kati na bilekelo na Ye. (Mika 4:1-5) Mateya mauti na Nzambe mazali kolendisa bomoko na bango. Bayangani balendisamaki na kosepela kati na bondeko mpe na bomoko na bango.​—Njembo 133:1-3.

Mwa ngonga moke nsima na nzangá, kolandana ya lisoló moko na motó na likambo “Makita oyo mazali koteya biso banzela ya Yehova” elobelaki makita ya lisangá. Molobi ya liboso akundwelaki bayangani ete na ntango tozali koyangana esika moko, tozali kokumisa Yehova mpe tozali kozwa mapamboli na ye. Molobi oyo alandaki amonisaki mpenza ntina ya kosangana na makita. Kosaláká bongo, tozali kokumisa Yehova liboso na bato banso, tozali komonisa kondima na biso mpe tozali kolendisa oyo na bato mosusu. Molobi ya misato na kolandana ya lisoló, amonisaki ntina ya kosalela makambo oyo tozali koyekola kati na makita. Tosengeli kozala “basaleli na liloba, kasi bayoki mpamba te.”​—Yakobo 1:22, NW.

Na nsima, lisoló moko kitoko limonisaki ete nzembo ezali mpo na kokumisa Yehova. Loyembo oyo loyembami na motema moko, ezali na ndimbola monene kati na losambo na biso. Lisoló wana elandamaki na lisukúlu-moboko “Mateya mauti na Nzambe mazali kolónga.” Oyo nde lisoló kitoko! Molobi alobaki ete: “Yehova azali Liziba malamu ya mateya nyonso oyo makoki kozala.” Nsima na kolobela lolenge na kokamwa oyo bɔɔngɔ́ na moto esalemá, abakisaki ete: “Esengeli na biso liboso mpenza kosalela makoki na biso ya kokanisa mpo na kozwa mateya mauti na Nzambe. Bobele yango nde ezali kopesa bwanya bwa solosolo.” Maloba oyo mazali mpenza solo!

Mokolo ya mibale na ntongo

“Tólanda kokembisa mateya ya Nzambe, Mobikisi na biso,” yango nde ezalaki motó na likambo ya mokolo ya mibale ya liyangani. (Tito 2:10) Lilako yango emonisamaki polele kati na lisoló “Mateya mauti na Nzambe mazali kotemela mateya ya bilimu mabe.” Ya solo, bilimu mabe bazali mpe kolakisa mateya na bango. (1 Timoté 4:1) Molobi alimbolaki ete mateya mauti na Nzambe mazali kolónga likoló na “bwanya” ya Satana na kotondoláká mateya ya lokuta mpe banzela mabe ya Zábolo. Na lisalisi ya mateya yango, pene na baklisto 4 500 000 bazali lisusu baombo te na molili ya Satana.​—Yoane 8:32.

Nzokande tosengeli kolanda kotemela Satana, lokola emonisaki yango lisukúlu “Totemelaka elimo ya mokili? ” Elimo ya mokili ekobomaka. Ezali kondima bizaleli mabe, kozanga limemya na bokonzi mpe mposa makasi ya biloko na mosuni. Moklisto asengeli mbala na mbala komituna mituna oyo: Nasili kobatela mitinda mitombwani mpo na oyo nazali kotala, koyoka mpe kotanga? Molobi ayebisaki maloba oyo ya kolendisa ete: ‘Tozali kokumisa bino, bandeko, mibali, basi mpe bilenge, mpo na milende ya solo oyo bozali naino kosala kati na likambo wana.’​—1 Yoane 2:15-17.

Nzokande, ezali na eloko moko oyo ezali kokómisa etumba yango mpasi mingi mpo na kotemela elimo ya mokili. Yango nini? Ezali bongo kozanga kokoka oyo ezwami kati na bato uta kobotama. Ya solo, Yesu akufaki mpo na masumu na biso, kasi atako bongo, tosengeli kobundisa bamposa na biso ya nzoto. Makambo wana matalelamaki kati na lisukúlu “Tóbundisa bopusi ya masumu likoló na nzoto oyo esilá kobeba.” Kati na makambo mosusu, molobi ayebisaki ete, mpo na kolónga nguya ya masumu, esengeli na biso kolata bomoto ya sika mpe kokima nyonso oyo ezali kolamwisa bamposa na biso mabe.

“Tókomisa mateya ya lobiko lolenge na biso ya bomoi,” ezalaki motó na likambo ya lisukúlu oyo elandi. Bamoko bazali komibanzabanza mingi mpo na kolongono na bango ya nzoto. Nzokande, kolongono ya elimo ezali na ntina mingi koleka. Molobi amonisaki mpenza ntina ya kotalela mikumba na biso na bopotu te kati na likambo wana. Mpo na yango, alendisaki basi baklisto na maloba oyo ete: “Tozali na bolingo mingi mpo na bandeko basi mibangé lokola mpe bandeko basi bilenge baoyo bazali na molende kati na mosala ya kosakola mpe bazali komibanzabanza mpo na kokokisa mikumba na bango.” Tozali kotɔ́nda Yehova mpo na mateya na lobiko oyo mazali kolongola biso na mokili.

Lisukúlu ya nsuka mpo na ntongo wana ezalaki na motó na likambo “Mateya mauti na Nzambe mazali komonisa ntina ya bomoi.” Molobi alobaki ete: “Ata ndɛ́lɛ́, bato nyonso to pene na bato nyonso basukaka na komituna soki ntina ya bomoi ezali nini.” Amonisaki na nzela na bindimiseli ya nguya, ete bobele Biblia nde ezali kopesa eyano ya solo na motuna wana. Na nsima, alimbolaki ete bilaká kitoko ya Nzambe bizali mpenza kopesa ntina kati na bomoi. Ebele na bayangani bazalaki mbala mosusu komilobela ete: ‘Ezali mpenza yango nde esengelaki koloba epai na bafandi ya teritware na biso.’ Yango ezali mpe likanisi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Na nsuka ya lisukúlu, ndeko alakisaki mwa búku ya sika na motó na likambo Quel est le but de la vie? (Ntina ya bomoi ezali nini?) Bato nyonso batondaki na esengo! Bopemi na midi epesaki nzela na moto na moto atala mwa búku wana ya sika.

Mokolo ya mibale na nsima ya nzangá

Lisukúlu ya liboso elobelaki lisoló moko ya kolendisa ete “Kitisa mitungisi na yo nyonso likoló na Yehova.” Bantina ya mitungisi ezali mingi; kasi, Liloba ya Nzambe lizali kobyanga biso ete tokitisa mitungisi na biso nyonso likoló na ye. (1 Petelo 5:6, 7) Ya solo, mikakatano nyonso mikosila te, yango wana molobi apesaki toli oyo ete: ‘Zalá na motema pɛtɛɛ. Tyá motema na yo mobimba epai na Yehova. Zalá na ekateli makasi ete ezali ntango nyonso malamu ete olanda mitinda ya Biblia. Soki motema na biso ekangami makasi na Yehova, tokozala “na kimya ya Nzambe” oyo eleki makanisi nyonso.’​—Bafilipi 4:6, 7.

Masukúlu minei oyo malandaki mamonisaki ete, mateya mauti na Nzambe mataleli libota. Ya liboso, lisukúlu “Bosala ete libala na bino eumela libela” ekundwelaki na bayangani ete na miso ya Yehova libala lizali boyokani ya ntango mokuse te, na kokesena na oyo bato mingi ya mokili bazali kokanisa. Nzokande, mpo na kolónga libala na biso, tosengeli kolanda mitinda ya Yehova. Ezali ye nde azalisaki bato; na ntina yango, ezali kati na Liloba na ye lipemami nde tokoki kozwa batoli kitoko na ntina na libala.

Lisukúlu “Salá makasi mpo na lobiko ya libota na yo” emonisaki lolenge nini ezali mpasi mpo na koleisa libota na yo na ntango oyo ya mpasi. (2 Timoté 3:1) Baboti balakisaka epai na bana na bango bopeto ya nzoto mpe bizaleli malamu; bazali mpe kolakisa bango mosala, kokaba mpe kosepela na bazalani. Kasi ezali lisusu na ntina mingi kolakisa bango ete bazala basaleli ya Yehova oyo bamipesi.​—Masese 22:6.

Na lisoló oyo lilandaki, “Baboti, bana na bino bazali na mposa ya likebi mingi,” molobi akundwelaki baboti ete basengelaki kokumisa bana na bango, kozanga ete bakanga miso likoló na bolembu na bango. Baboti basengeli kozala mpenza kosɛnzɛla mpo na kososola nokinoki ezalela nyonso ya lokuta, ya mposa na bozwi ya mosuni to ya moimi.

Bilenge bayokaki na likebi nyonso, lisukúlu “Bilenge: bolandaka mateya ya nani? ” Lelo oyo, bomoi ezali mpasi mpo na bilenge baklisto. Ezali pɛtɛɛ mpo na kolanda banzela ya mokili, kasi ezali komema na liwa. Ya solo, bilenge bazali na mposa ya mpiko mpo na komiyokanisa na mateya ya Nzambe; nzela yango ezali kopesa mapamboli minene uta sikawa, mpe elikya ya bomoi na seko.​—1 Timoté 4:8.

Mokolo ya mitano mosukaki na lisano-liteya (drame) Bilenge oyo bazali kokanisa mpo na Mozalisi na bango uta sikawa. Kati na maloba na ye ya ebandeli, molobi akokanisaki bilenge oyo bazali kati na ebongiseli ya Nzambe na “limpinga moko ya teokrasi oyo emikotisi na bosembo mpe na komipesa mobimba kati na mosala ya Yehova Nzambe mpe ya Yesu Klisto, Mokonzi oyo ye asili kotya na likoló.” Abakisaki ete: “Ezali mpenza malamu ete bilenge na biso bakokisa mosala moko kitoko! ” Lisano-liteya limonisaki na bosolo nyonso ete, soki baboti bazali mpenza kobatela malamu bana na bango, batoli na bango ekozala na ntina na ntango bakokóla mpe, na ngala na bango, bakosalela Yehova.

Mokolo ya misato na ntongo

Motó na likambo ya mokolo wana mozalaki ete “Toteya bato ya mabota nyonso kozanga kolemba.” (Matai 28:19, 20) Na ntembe te, bayangani bazalaki komizela na batoli ya sikisiki na ntina na mosala ya kosakola; bazwaki yango mpenza. Kolondana ya lisoló moko na motó na likambo “Tólakisa na esengo nyonso mosala na biso ya kosakola mpe ya koteya” elendisaki ekateli na bango mpo na kokóba mosala ya kopesa litatoli. Lisoló ya liboso lilobelaki mosala ya ndako na ndako, ya mibale elobelaki bozongeli bato, mpe ya misato boyekoli ya Biblia. Bamisionere ya mokili mobimba babyangamaki mpo na kozonga na bamboka na bango mpe koyangana elongo na mabota na bango mpe baninga na bango na mayangani wana. Na mayangani mosusu, bazwaki libaku ya koloba na boumeli ya lisoló oyo. Ezalaki esengo mpenza na koyoka bango koloba mpo na matomba kitoko oyo bazwaki kati na teritware na bango. Lisukúlu oyo lilandaki, “Tósakola nsango malamu epai na bato nyonso,” elobelaki matomba oyo mazali kozwama kati na litatoli ya libaku malamu.

Eleko ya ntongo esukaki na lisukúlu ya batisimo, eleko moko ya esengo mingi kati na mayangani oyo mabongisami na Batatali ya Yehova. Na mayangani yango, motuya na bato oyo bautaki komipesa na Nzambe uta mwa mikolo, batelemaki mpo na koyanola “ee” na mituna mibale oyo mitunamelaki bango liboso ya kozwa batisimo. Oyo nde komonisama polele ya nguya na mateya mauti na Nzambe!

Mokolo ya misato na nsima na nzangá

Nsima na nzangá ebandaki na lisoló moko ya mozindo kati na Makomami. Batatoli ya Yehova bayebi malamu mokapo 24 ya Matai mpe mokapo 21 ya Luka. Mbala mosusu, mwa bamoko bakanisaki ete, makambo manso masilá kolobama na ntina na mikapo wana; kasi, bamikosaki! Lisukúlu “Nini ekozala elembo ya kozala na yo?” mpe “Yebisa biso: Ntango nini makambo oyo nyonso makobima?” epesaki bayangani nzela ya kosala botaleli malamu ya maloba mosusu ya mikapo wana mpe, epesaki bandimbola ya polele likoló na mikapo wana. Nsima na makita, masoló mazalaki bipai na bipai; ya solo, bayangani bazalaki kotalatala lisusu makambo oyo bakomaki, mpo na komindimisa ete bakangaki mpenza ntina ya makambo makeseni. Na ntembe te, mituna mingi mikoyanolama soki makambo oyo mabimisami kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.

Lisukúlu “Biyano ya ntina na mituna na bino miuti kati na Biblia” ekobaki boyekoli wana ya Biblia. Lisoló lilandaki lilobelaki likambo moko likeseni mpenza. Na mobu 1993, Galadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower, ekokisaki mibu 50. Lisukúlu “Galadi: mibu ntuku mitano ya kobongisama mpe ya mosala ya misionere” emonisaki epai na bayangani makambo oyo makokisamaki na boumeli ya bambula wana. Bamisionere oyo bazalaki wana na ntango ya lisukúlu “Matomba mazwami kati na mosala ya kopalanganisa nsango malamu kati na mokili mobimba,” babyangamaki mpo na koyebisa mwa makambo oyo bakutanaki na yango. Masoló na bango mazalaki mpenza kitoko!

Lisoló lilandi, “Mpo na nini Batatoli na Yehova bazali kosɛnzɛla,” elobelaki mwa makambo ya kala. Emonisaki ete baklisto bazali kosɛnzɛla uta ekeke ya liboso ya ntango na biso kino lelo oyo. Yango ememaki na likambo mosusu ya esengo. Na ebandeli ya lisukúlu lilandaki oyo elobi ete “Basakoli ya Bokonzi bazali na molende na mabelé mobimba,” molobi alakisaki búku moko monene mpe alobaki ete: “Tozali na esengo ya koyebisa bino lelo kobima ya mokanda na motó na likambo Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu.” Mokanda yango mozali koyebisa na bozindo lisolo etali Batatoli ya Yehova na mikolo na biso. Ezali koloba na mɔ́tɔ nyonso mpo na mpiko, molende mpe elónga ya basaleli na Nzambe; ezali kopesa bilembeteli na nguya ya mosala ya elimo na Yehova likoló na libota na ye.

Mokolo ya nsuka na ntongo

Yango ezalaki mpenza mokolo ya nsuka ya liyangani. Motó na likambo ya mokolo wana, “Tózwa litomba na mateya mauti na Nzambe,” ezalaki mpenza kolaka bosukisi moko kitoko ya manáka ya liyangani. (Yisaya 48:17) Na likebi nyonso, bayangani bayokaki kolandana ya motó na likambo moko ya masukúlu misato ya kafukafu. Na boumeli ya masolo misato wana oyo ezalaki na motó na likambo “Likebisi lipesamaki na Yilimia mpo na ntango ya kala mpe mpo na ntango na biso,” batalelaki molɔngɔ́ moko na moko ya mikapo 23, 24 mpe 25 ya mokanda na Yilimia. Oyo nde nsango na nguya ezwami kati na mikapo wana! Bayisraele baoyo bazangaki sembo na ntango na Yilimia batungisamaki mpenza na makebisi wana ya polele, oyo mapemamaki na Nzambe. Mokili molɛngaki lisusu koleka na ntango ya kokokisama ya bisakweli yango. Na eleko na biso, makambo masili nde kobongwana? Soko moke te. Batatoli ya Yehova bazali mpenza kosakola nsango ya lisambisi na Nzambe na molende nyonso. Na elaka na yango, ebongiseli nyonso ya biloko mabe ya ntango oyo, ekozwa lisambisi ya Yehova. Yango ekozala kobomama ya seko ya mokili na Satana.

Ntongo ya mokolo ya Eyenga esukaki na lisano-liteya ya mibale, Bomizimbisa te mpe bosɛka Nzambe te. Na bosolo nyonso, emonisaki lolenge nini mateya mauti na Nzambe makoki kobatela biso na bopusi ya bakasɛte vidéo mpe na miziki mabe; ekebisaki mpe lisusu mpo na ezalela ya koyeisa matata kati na bandeko. Na nsuka ya lisano-liteya, molobi azongelaki maloba mozindo ya moko na basani ete: “Eloko moko epekisi te ete tozwa bopusi ya mokili. Soki totelemi ngwi te, mokili ekoki kobebisa biso kozanga ete toyeba yango. Kotikala sembo to te ezali kotalela oyo tozali kolona​—na makambo minene, na makambo mike.” Maloba oyo mazali mpenza solo!

Mokolo ya nsuka na nsima na nzangá

Nokinoki, liyangani likomaki na nsuka na yango wana molobi akendaki na esitaladi mpo na kosala lisukúlu ya bato banso na motó na likambo ete “Mateya ya ntina mpo na eleko na biso oyo ya mpasi.” Na lolenge ya polele mpe ya sikisiki, molobi amonisaki makambo minene oyo mazali lelo kopesa biso mawa mpe amonisaki lolenge nini mateya mauti na Nzambe makoki kosalisa biso na kozala na bomoi malamu. Alimbolaki ete, soki uta sikawa tozali kolanda mateya oyo ezwi moboko na yango na Makomami, tokomilɛngɛla mpo na kolanda yango libela na libela kati na mokili ya sika oyo molakámi na Yehova.

Nsima ya botalelami na bokuse ya lisoló ya Linɔ́ngi ya Mosenzeli oyo ya poso wana, ekómaki ntango ya lisukúlu ya nsuka. Molobi azongelaki nokinoki makanisi ya ntina ya liyangani ya mikolo minei mpe akundwelaki mitó na makambo ya mikanda na sika. Ayebisaki mpe ete kasɛti vidéo ya mibale na molɔngɔ́ ya bakɛsɛti misato La Bible: un livre historique et prophétique etikali moke ebima. Kasɛti oyo ezali na motó na likambo: La Bible: le plus ancien livre de l’humanité, mais toujours d’actualité esili kobima sikawa na Lingelesi. Molobi atangaki mikanda ya kosimba motema oyo mitindamaki na bandeko oyo bazali kati na mikili oyo bitumba bizali kongala, lokola Bosnie-Herzégovine. Mpo na kosukisa, molobi atangaki maloba ya Mosakoli 12:13: “Toyoka nsuka na likambo mobimba: Tosa Njambe mpe batela mibeko na ye; yango ejali mosala na bato yɔnsɔ.”

Oyo nde bokundweli kitoko! Tólanda kotalela mokolo oyo bato nyonso bakokumisa Yehova, Molakisi na biso monene, mpe bakotalela mateya mauti na Nzambe.

[Bililingi na lokasa 24, 25]

Mayangani “Mateya mauti na Nzambe” na Moscou mpe na Kiev mazalaki mpenza ntina ya esengo monene

[Bililingi na lokasa 26, 27]

1. Bayangani mingi bamonisaki polele elembo ya likabo ya bomoto na bango epai na Yehova na nzela na libatisi

2. Moyangani moko oyo azalaki na mibu monkámá atondaki na esengo ya kozwa mokanda ya sika

3, 4. Mitema ya bayangani misimbamaki na masano-mateya oyo mazalaki kopusa na kokanisa

5. Bamisionere oyo batunamaki mituna na mayangani wana, bamonisaki matomba ya mateya mauti na Nzambe

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto