Mituna ya Batangi
Lokola Biblia ezali mbala mingi kolobela “mwana mobali azangi tata,” elakisi ete ezali komibanzabanza te mpo na bana basi?
Ezali mpenza bongo te!
Makomami mosantu—Libongoli ya mokili ya sika (na Lingelesi) ezali kosalela liloba “mwana mobali azangi tata” kati na mikapo mingi oyo mizali komonisa lolenge oyo Nzambe azali komibanzabanza mpo na bana mike oyo bazali na tata te to na mama te. Nzambe amonisaki lobanzo yango polele kati na mibeko oyo apesaki na Yisraele.
Na ndakisa, alobaki ete: “Bokopɛsa mawa tɛ na mwasi-akufeli-mobali, sɔkɔ na [mwana mobali azangi tata, NW] mpe tɛ. Sɔkɔ okopɛsa bango mawa mpe baleli epai na ngai mbɛlɛ nakoyoka kolela na bango sɔlɔ, mpe nkanda na ngai ekopela, mpe nakoboma bino na mopanga, mpe basi na bino bakojala, basi-bakufeli-babali mpe bana na bino bakojala [bana mibali bazangi batata, NW].” (Esode 22:22-24) “[Yehova] Nzambe na bino ajali Njambe na banjambe mpe Nkolo na bankolo, Njambe monɛnɛ mpe makasi mpe na nsɔmɔ, oyo akopɔnapɔnaka bato tɛ mpe akondimaka lifuti tɛ. Akokataka na sembo mpɔ na [mwana mobali azangi tata, NW] mpe mpɔ na mwasi-akufeli-mobali.”—Dutɛlɔnɔmɛ 10:17, 18; 14:29; 24:17; 27:19.
Mabóngoli mosusu ya Biblia mabongoli yango ete “bana bakufeli baboti” to “bitíké” kati na mikapo oyo, kosangisáká bongo bana mibali mpe bana basi. Nzokande, mabóngoli motindo wana mayebi te ndimbola mpenza oyo ezwami kati na (ya·thohmʹ), liloba ya Liebele ya ebandeli oyo lilobelami mpo na bobáli. Na esika na kosala bongo, Makomami mosantu—Libongoli ya mokili ya sika (na Lingelesi), esaleli libongoli oyo ya sikisiki ete “mwana mobali azangi tata,” lokola na Nzembo 68:5 (NW), epai oyo tozali kotanga ete: “Tata ya bana mibali bazangi batata mpe mosambisi na basi-bakufeli-mibali; azali Nzambe kati na efandelo na ye mosantu.” Ezali limemya motindo moko mpo na kitoko ya Liebele nde epesaki nzela na kokoma kati na Nzembo 68:11 (NW) epai kuna tozali kokuta liloba oyo esalelami mpo na bomwasi ete: “Basi oyo bazali kosakola nsango malamu bazali limpinga monene.”a
Lokola ete ya·thohmʹ ebongolami mbala mingi na “mwana mobali azangi tata” emonisi te ete bazali komibanzabanza te mpo na bana basi oyo bazangi tata to mama. Mikapo oyo mitangami mpe misusu mimonisi ete libota na Nzambe lilendisamaki na komibanzabanza mpo na basi, basi-bakufeli-mibali. (Njembo 146:9; Yisaya 1:17; Yilimia 22:3; Zakaria 7:9, 10; Malaki 3:5) Kati na Mibeko, Nzambe akotisaki lisoló ya ekateli moko ya esambiselo oyo ezalaki kopesa nzela na bana basi ya Yelofeyada, baoyo bazangaki tata ete bázwa libula. Lisambisi yango limonisaki bosembo to boyengebene kati makambo motindo wana, kolóngisáká bongo lotómo ya bana basi bazangi batata.—Mituya 27:1-8.
Wana azalaki komonisa boboto epai na bana mike, Yesu azalaki kokesenisa te kati na bana mibali mpe bana basi. Nkutu, tozali kotánga ete: “Bato bamemelaki ye bana mike ete asimba bango; kasi bayekoli bapamelaki bango. Emonaki ye bongo, Yesu asilikaki mpe alobaki na bango ete: ‘Bótika bana mike baya epai na ngai, bópekisa bango tɛ, mpamba te Bokonzi na Nzambe ezali mpo na bato ya motindo oyo. Nazali koloba na bino solo ete: Moto na moto oyo akoyamba bokonzi ya Nzambe lokola mwana mokɛ te akoingela soko moke te kati na yango.’ Mpe amemaki bana na mabɔkɔ na ye mpe apambolaki bango.”—Malako 10:13-16, NW.
Liloba ya greke oyo libongolami awa na “bana mikɛ” ezali na bobáli te soko mpe na bomwasi te. Engebene molimboli moko na maloba ya lokotá na Greke, liloba wana “lisalelami mpo na kolobela bana mibali mpe bana basi.” Yesu azalaki komonisa lolenge ya komibanzabanza oyo Yehova azali na yango mpo na bana nyonso, mibali mpe basi. (Baɛbɛlɛ 1:3; kokanisá na Deteronome 16:14; Malako 5:35, 38-42) Emonani polele ete ntango Makomami na Liebele mazali kopesa toli mpo na kosunga “bana mibali bazangi tata,” ezali kolendisa biso ete tómibanzabanza na bana nyonso oyo bazangi moko na baboti to baboti nyonso mibale.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Biblia ya S. Cahen (oyo azalaki Moyuda) ebongoli mokapo yango boye: “Nkolo ayokisaki liloba moko, limpinga monene na basi basakoli ya elónga.”—Nzembo 68:12.