Bilenge—bozali kolanda mateya ya nani?
“Basusu bakotangwa longwa na kondima, kotyáká likebi na. . . mateya ya bademó.”—1 TIMOTÉ 4:1, NW.
1. (a) Liponi nini lityami liboso ya bilenge? (b) Na nzela nini Yehova azali koteya?
MOTUNA oyo mozali kotunama awa epai na bilenge, mozali ete ‘Bozali kolanda mateya ya nani?’ Yango ezali komonisa ete bino bilenge bosengeli kosala liponi. Liponi yango litali kolanda mateya mauti na Nzambe to kolanda mateya ya bademó. Yehova azali koteya na nzela ya Liloba na ye, Biblia, mpe na nzela na baoyo ye azali kosalela lokola bamonisi na ye awa na mabelé. (Yisaya 54:13; Misala 8:26-39; Matai 24:45-47) Kasi okamwi na koyoka ete bademó mpe bateyaka?
2. Mpo na nini esengeli na biso kokeba na mateya ya bademó mingi mpenza na mikolo oyo?
2 Ntoma Paulo akomaki ete: “Na bileko na ntango bikoya nsima, basusu bakotangwa longwa na kondima, kotyáká likebi na maloba mapemami ya kozimbisa mpe na mateya ya bademó.” (1 Timoté 4:1, NW) Lokola tozali kobika na “mikolo ya nsuka,” na boumeli na yango Satana mpe bademó na ye bazali na nkanda makasi, ososoli mpo na nini totuni motuna oyo ete, ‘Bozali kolanda mateya ya nani?’ (2 Timoté 3:1-5; Emoniseli 12:7-12) Lokola Satana mpe bademó na ye bazali na mayele mabe mingi, bazali mpenza kosalela myango oyo mikolengolaka, ezali likambo ya ntina ete otya likebi mingi na motuna oyo.—2 Bakolinti 11:14, 15.
Bademó mpe mateya na bango
3. Bademó bazali banani, mokano na bango mozali nini, mpe lolenge nini bazali koluka kokokisa yango?
3 Bademó bazalaki liboso baanzelu ya Yehova, kasi batombokelaki Mozalisi na bango mpe, mpo na yango bakómaki na ngámbo ya Satana. (Matai 12:24) Mokano na bango ezali ya kobebisa bato mpe ya kopengola bango ete básalela Nzambe te. Mpo na kokokisa mokano yango, bademó bazali kosalela bato lokola balakisi mpo na kolendisa lolenge ya bomoi ya moimi mpe etamboli ya mbindo oyo ekweisami na Yehova. (Kokanisá na 2 Petelo 2:1, 12-15.) Kokundola lolenge nini na ntango ya kala baanzelu ya sembo bakómaki bademó, ekosalisa yo na koyeba mateya na bango mpe lolenge ya bomoi oyo mateya yango mazali kolendisa.
4. (a) Mpo na nini baanzelu oyo bazangaki botosi bayaki na mabelé na mikolo ya Noa? (b) Nini ekómelaki baanzelu mabe mpe bana na bango na ntango ya Mpela?
4 Na mikolo ya Noa, baanzelu mosusu babendamaki mpenza na bana basi ya bato, baoyo bazalaki kitoko, na boye ete bikelamu wana ya elimo batikaki esika na bango na likoló mpo na koya awa na mabelé. Kosangana na bango elongo na basi ebimisaki bilombe oyo babéngamaki Banefilime. Mpo ete ezali mabe na bikelamu ya elimo ete bábalana na bato, likambo oyo baanzelu wana batomboki basalaki elongo na basi wana ezalaki mabe mpenza mpe ekokani na likambo ya kosangisa nzoto mibali na mibali oyo mibali mpe bilenge mibali ya Sodomo basalaki mibu mingi na nsima. (Genese 6:1-4; 19:4-11; Yuda 6, 7) Basi oyo babalaki baanzelu, bakufaki elongo na bana na bango bilombe na mai ya mpela; kasi baanzelu yango mabe batikaki nzoto na bango ya mosuni oyo balataki mpe bazongaki kati na makoló epai bakómaki bademó, baninga ya Satana Zábolo.—2 Petelo 2:4.
5. Bademó bazali bikelamu ya motindo nini, mpe lolenge nini bazali koluka kobebisa mibeko ya Nzambe?
5 Sikawa lokola touti kokundola ebandeli na bango, ososoli mpenza motindo nini ya bikelamu bademó bazali? Batondi na mposa makasi ya kosangisa nzoto, bazali bapusi bazangi komonana ya mokili oyo ebebi na mposa ya kosangisa nzoto. Atako bazali lisusu na likoki te ya kolata nzoto ya mosuni, bazali kosepela mingi na misala ya mbindo mitali kosangisa nzoto, lokola ezali kosalema na bato oyo bango basili kobebisa awa na mabelé. (Baefese 6:11, 12) Bademó bazali koluka kobebisa mibeko ya Yehova mitali bopeto mpe bizaleli malamu na kosaláká ete yango emonana lokola ete ezali bipekiseli bizangi ntina. Baanzelu wana ya mabe bazali komonisa kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo lokola ete ezali likambo lilongobani, mwango ya kosepela malamu na bomoi.
Bokóli ya mateya ya bademó
6. Mpo na nini tosengeli kokamwa te na komona ete bademó bazali kolendisa mateya na bango na mayele mabe?
6 Likambo oyo ete bademó bazali kokólisa mateya na bango na nzela ya mayele mabe esengeli kokamwisa biso te, mpamba te yango ezali mwango oyo motambwisi na bango, Satana Zábolo, asalelaki mpo na kozimbisa Eva. Omikundola ete asololaki na ye lokola nde alingaki kosalisa ye. Satana atunaki ete: “Njambe alobaki sɔlɔ ete bino bokoki kolia mbuma na njete yɔnsɔ na elanga tɛ?” Na nsima, alukaki na mayele mabe mpenza kokweisa mateya ya Nzambe na kolobáká na Eva ete akokaki kozwa matomba mingi soki akolya mbuma ya nzeté oyo epekisamaki. Zábolo alakaki ete: “Na mokɔlɔ bokolia yango, miso na bino makofungwa, mpe bino bokojala pelamɔkɔ na Njambe, koyeba malamu mpe mabe.” (Genese 3:1-5) Na yango, Eva alengolamaki, ee azimbisamaki ete azanga botosi epai na Nzambe.—2 Bakolinti 11:3; 1 Timoté 2:13, 14.
7. Mateya ya mayele mabe oyo mauti na bademó mazali na bopusi nini, mpe likebisi nini tozwi mpo na yango?
7 Na ntango na biso mpe, mingi basili kozimbisama. Bademó balendisaki na mayele mabe kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo na motindo boye ete yango endimami lelo na baoyo kala bazalaki kokweisa yango. Na ndakisa, wana mopanzi-nsango moko ya mwasi, mopesi-toli na Etats-Unis oyo ayebani mingi ayanolaki na mokanda moko na likambo litali kosangisa nzoto kati na bato babali naino te, akomaki ete: “Nakanisaki ete nakobongola makanisi na ngai soko moke te na likambo oyo, kasi sikawa nakanisi ete mobali mpe mwasi oyo balingi mpenza kobalana bakoki kobima elongo na nsuka na poso mpo na komeka komona soki bakoki kofanda esika moko.” Na nsima abakisaki ete: “Ezali mpasi na kondima ete ngai nde moto akomaki likambo oyo!” Atako akokaki kokanisa te ete azalaki kolendisa pite, nzokande asalaki mpenza bongo! Ezali polele ete, tosengeli kozala na bokɛngi ete mateya ya bademó mabebisa te lolenge na biso ya kotalela misala oyo Nzambe azali kokweisa yango.—Baloma 1:26, 27; Baefese 5:5, 10-12.
8. (a) Lolenge nini liloba “mokili” lisalelami kati na Biblia? (b) Nani azali koyangela mokili, mpe lolenge nini bayekoli na Yesu basengeli kotalela mokili?
8 Tóbosana soko moke te ete Satana azali “mokóló ya mokili oyo.” Ntoma Yoane alobaki solo ete “mokili mobimba ejali kolala na kati na oyo mabe.” (Yoane 12:31; 1 Yoane 5:19) Ezali solo ete, na bantango mosusu Yesu asalelaki liloba “mokili” mpo na kolobela libota mobimba ya bato. (Matai 26:13; Yoane 3:16; 12:46) Nzokande, mbala mingi, azalaki kosalela liloba “mokili” mpo na komonisa ebongiseli mobimba ya bato oyo bazali libándá ya lisangá ya solo ya boklisto. Na ndakisa, Yesu alobaki ete bayekoli na ye basengeli kozala “bato ya mokili te” (lisangá ya bato bazangi sembo) mpe lokola bazalaki bato ya mokili te, mokili ekoyina bango. (Yoane 15:19; 17:14-16) Epai mosusu, Biblia epesi likebisi oyo ete tosengeli te kokóma baninga ya mokili oyo moyangelami na Satana.—Yakobo 4:4.
9, 10. (a) Biloko nini ya mokili bizali kolamwisa mposa ya kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo? (b) Lolenge nini tokoki koyeba ye oyo azali nsima na makambo oyo masano ya mokili ezali koteya?
9 Ntoma Yoane akebisaki ete: “Bolinga mokili tɛ sɔkɔ makambo kati na mokili tɛ.” Alobaki lisusu ete: “Makambo yɔnsɔ kati na mokili, na mposa mabe na njoto mpe mposa mabe na miso mpe njombo na bijaleli iuti na Tata tɛ.” (1 Yoane 2:15, 16) Kanisá likambo oyo. Nini kati na mokili ezali kolamwisa mposa mabe, na ndakisa mposa ya kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo? (1 Batesaloniki 4:3-5) Tokoloba boni na ntina na miziki mingi oyo ezali lelo na mokili? Mwasi moko akosalaka na esika bakosembolaka bilenge ya mobulu na etúká ya Californie alobaki ete: “Mingimingi, miziki ezali koteya yo ete osengeli te koyokela baboti na yo, mpe ete osengeli kotambwisa bomoi na yo ndenge olingi.” Ozali kososola eutelo ya mateya mapesami kati na miziki lolenge yango?
10 Omikundola ete Satana alobaki lokola boye na Eva ete: ‘Ozali kozanga eloko moko ya kitoko. Tambwisá bomoi na yo ndenge olingi. Zwá bikateli yo moko mpo na oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. Ozali na ntina te ya koyokela Nzambe.’ (Genese 3:1-5) Maloba ya miziki mingi ya mokili ezali kopusa bato na kosala sé lolenge oyo moko; boye te? Kasi bademó bazali koteya bobele na nzela ya miziki te. Bazali kosalela lisusu piblisité ya biloko ya mombongo na nzela ya televizyó, sinemá, mpe bakasete video mpo na koteya. Lolenge nini? Ya solo, myango ya bopanzi nsango ya mokili mizali kolakisa masano oyo mazali komonisa mateya ya bizaleli malamu ya Nzambe lokola bipekiseli bizangi ntina. Masano yango mazali kolendisa pite na kolobeláká yango mingi mpe na komonisáká yango lokola likambo ya malamu.
11. Mpo na oyo etali bizaleli malamu, mbala mingi televizyó eteyaka nini?
11 Zulunalo U.S.News & World Report eyebisaki ete: “Na 1991, bakompanyi misato ya bopanzi nsango na nzela ya televizyó [na Etats-unis] elakisaki bililingi ya kosangisa nzoto koleka 10 000 na bangonga oyo bato mingi batalaka televizyó; mpo na elilingi moko oyo ezali komonisa kosangisa nzoto kati na babalani, bakompanyi wana ya bopanzi nsango elakisaki bililingi 14 ya kosangisa nzoto kati na bato babalani te.” Na kolakisáká bililingi koleka 9 000 ya kosangisa nzoto kati na bato babalani te, na boumeli na mbula moko, na bangonga oyo bato mingi batalaka televizyó, okoki koloba ete televizyó ezali koteya nini? Barry S. Sapolsky, oyo asalaki elongo na bato mosusu bolukiluki likoló na motó ya likambo “Bililingi ya kosangisa nzoto na bangonga oyo bato mingi batalaka televizyó: kokokanisa longwa na mobu 1979 kino mobu 1989,” ayebisi ete: “Soki bilenge bazali komona na televizyó na boumeli ya mibu mingi wana mibali mpe basi bazali kopesana mapwepwe to kosangisa nzoto, ebele na bankóto ya bililingi wana ekoteya bango ete kosangisa nzoto ezali likambo ya elɛngi, mpe ezali komema ata mpasi moko te.” Ntembe ezali te na likambo oyo ete: Masano oyo mokili ezali kolakisa, ezali koteya na bilenge ete mibeko mizali te, kosala pite ezali mabe te, mpe ete ezali komema mpasi moko te epai na baoyo bazali na motindo ya bomoi oyo ekweisami na Nzambe.—1 Bakolinti 6:18; Baefese 5:3-5.
12. Mpo na nini kominanola ya mokili ezali na makámá, mingimingi mpo na bilenge baklisto?
12 Na mokili, miziki, bafilime, bakasete video mpe televizyó esalemi na motindo boye ete ekoka kolengola mitema ya bilenge. Yango ezali kopalanganisa mateya ya mbindo ya bademó! Kasi yango esengeli kokamwisa biso? Kanisá likoló na yango. Soki mangomba ya lokuta mpe biyangeli ya politiki ezali biteni ya mokili ya Satana—mpe ezali boye solo—tokoki mpenza kokanisa ete kominanola oyo mokili ezali kolendisa ezangi bopusi ya bademó? Ezali mpenza bino bilenge nde bosengeli kokeba ete “mokili oyo mozingi bino moyema bino te na lolenge na yango.”—Baloma 12:2, The New Testament in Modern English, ya J. B. Phillips.
Omitalela yo moko
13. Mpo na nini moto na moto asengeli komitalela?
13 Likambo ya koyeba soki bozali kolanda mateya ya nani etaleli bobele maloba na bino te, kasi etaleli lisusu misala na bino. (Baloma 6:16) Na bongo omituna ete, ‘Makanisi na ngai mpe etamboli na ngai esili kopusama mingi na makambo oyo nazali komona to koyoka na nzela ya myango ya bopanzi nsango ya mokili? Ekoki kozala ete mateya ya bademó mabandi kokɔta kati na bomoi na ngai?’ Mpo na kosalisa yo na kozwa biyano na mituna oyo, talelá epai moko ntango mpe milende oyo ozali kolekisa na koyekola Biblia, na koyangana na makita ya boklisto, mpe na kosolola elongo na bato mosusu na ntina na Bokonzi ya Nzambe mpe, epai mosusu ntango oyo olekisaka na kotala televizyó, na koyoka miziki, na kosangana na masano oyo olingaka mingi, to na makambo mosusu ya lolenge wana. Omitalela na kolongobana nyonso, mpo ete likambo yango ezali monene, ya solo, etaleli bomoi na yo.—2 Bakolinti 13:5.
14. Nini ekosala bopusi likoló na kolɔngɔ́nɔ́ na biso ya elimo, mpe eloko nini tosengeli kobosana yango te?
14 Oyebi malamu ete bilei ya mosuni oyo ozali kolya ezalaka na bopusi likoló na kolɔngɔ́nɔ́ na yo ya nzoto. Bobele bongo, oyo ozali koleisa na yango makanisi mpe motema na yo ezalaka na bopusi likoló na kolɔngɔ́nɔ́ na yo ya elimo. (1 Petelo 2:1, 2) Atako okoki komikosa yo moko na ntina na makambo oyo mazali mpenza kobenda motema na yo, nzokande okoki te kokosa Mosambisi na biso, Yesu Klisto. (Yoane 5:30) Na bongo, omituna ete, ‘Soki Yesu azalaki na mabelé, mbɛlɛ nalingaki kooka nsoni te soki akɔti na ndako na ngai mpe soki ayoki miziki oyo nazali koyoka to soki amoni biloko oyo nazali kotala na televizyó?’ Nzokande, okanisi ete Yesu azali komona te oyo nyonso tozali kosala?—Emoniseli 3:15.
Tɛmɛlá mateya ya bademó
15. Mpo na nini baklisto basengeli kobunda makasi mpo na kotɛmɛla mateya ya bademó?
15 Bopusi oyo bademó bazali kosala likoló na bilenge mpo ete bálanda mateya na bango ezali mpenza makasi. Emonani ete bilimu mabe bazali kolakisa bomoi moko etali kokokisa bamposa nyonso sikawa—kosakana mpe bisengo. Mpo na kosepelisa Nzambe, Mose, na ntango ya kala, aboyaki “bisɛngɔ na masumu bikoumela bobɛlɛ mwa ntango mokɛ” atako akokaki kozala moto monene na ndako ya Farao. (Baɛbɛlɛ 11:24-27) Ezali pɛtɛɛ te mpo na koboya makambo oyo bademó bazali kopesa, yango wana osengeli kobunda makasi mpo na kosala oyo ezali sembo. Yango ezali mpenza solo mpo ete tosangolaki lisumu mpe mitema na biso mizali mbala mingi kobendama na oyo ezali mabe. (Genese 8:21; Baloma 5:12) Na ntina na masenginya ya masumu, ata ntoma Paulo asengelaki kobundisa makasi nzoto na ye moko mpo ete apesa nzela te na mposa ya nzoto ete ezala na bokonzi likoló na ye.—1 Bakolinti 9:27; Baloma 7:21-23.
16. Lolenge nini bilenge bakoki kotɛmɛla bopusi ya komikɔtisa na etamboli ya mbindo?
16 Atako okoki komekama ete “[olanda, NW] ebele mpɔ na kosala mabe,” Nzambe akoki kosalisa yo na kotɛmɛla bopusi ya baninga na yo, mpo ete omekola te etamboli na bango mabe. (Esode 23:2; 1 Bakolinti 10:13) Kasi osengeli koyoka batoli ya Nzambe, kobomba maloba na ye kati na motema na yo. (Nzembo 119:9, 11) Osengeli koyeba ete wana bilenge mibale bamitangoli bango moko, mposa ya kosangisa nzoto ekoki kolamuka mpe komema bango na kobuka mobeko ya Nzambe. Elenge mwasi moko andimaki ete: “Wana nazali ngai moko elongo na moninga na ngai ya mobali, nzoto na ngai elingi ete nasala likambo moko kasi elimo na ngai ezali koloba na ngai ete nasala likambo mosusu.” Na bongo, osengeli koyeba bandelo na yo mpe kobosana te ete motema na yo mozali na bokosi. (Yilimia 17:9) Bómitangola bino moko te. (Masese 18:1) Bótya bandelo na lolenge ya komonisa bolingo na bino. Mpe oyo ezali na ntina mingi, zalá moninga bobele ya baoyo balingaka Yehova mpe baoyo bazali na limemya mozindo mpo na mibeko na ye.—Nzembo 119:63; Masese 13:20; 1 Bakolinti 15:33.
17. Nini ekoki kosalisa bilenge baklisto na kozala na makasi mpo na kotɛmɛla mateya ya bademó?
17 Boyekoli ya mozindo ya mikanda ya boklisto oyo mikomami mpo na kolendisa elimo na yo ekosalisa yo. Na ndakisa, talá búku Les jeunes s’interrogent — Réponses pratiques mpe mokapo oyo elobi ete “Tobunda etumba mpo na kotikala na nzela ya sembo” kati na búku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Tiká ete mateya ya Biblia oyo mapesami na yango makɔta na mozindo kati na makanisi na yo mpe na motema na yo, mpe yango ekolendisa yo. Kobosana soko moke te ete, kati na mokili oyo eyangelami na bademó, kosala oyo ezali sembo ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Na yango, bundá makasi. (Luka 13:24) Yikanisá nguya na yo ya elimo. Komekola bato na bolembu te, soko mpe bato na kobangabanga, baoyo bakolandaka bibele.
Zwá matomba na mateya mauti na Nzambe
18. Wapi matomba mazali kozwama na kolanda mateya mauti na Nzambe?
18 Omikundola lisusu ete, okozanga eloko moko te soki olandi mateya ya Yehova. Alingi yo solo, mpe ezali mpo na ntina yango nde “ajali kolakisa yɔ mpɔ na litomba [na yɔ].” (Yisaya 48:17) Na yango, landá mateya ya Yehova, mpe okopengola kotungisama na lisosoli oyo ebebi, kobungisa limemya na yo moko, zemi oyo ekanamaki te, bamaladi oyo ezwamaka na kosangisa nzoto, to mpasi mosusu ya lolenge yango. Yehova azali kosepela wana basaleli na ye bazali kopesa ye nzela na koyanola na ntembe oyo Satana abimisaki ete bato bakotikala sembo epai na Nzambe te soki bamekami. (Yobo 1:6-12) Soki osepelisi motema ya Yehova na bosembo na yo epai na ye, okobika ntango akoyeisa etumbu likoló na mokili oyo, nzokande baoyo nyonso bazali kotyola mibeko na ye bakokufa.—Masese 27:11; 1 Bakolinti 6:9, 10; 1 Yoane 2:17.
19. Mpo na nini ebongi kozala moninga ya bato oyo bazali na botɔ́ndi mpo na matomba mazali kozwama na mateya mauti na Yehova?
19 Soki okozala moninga ya bato oyo bazali komonisa botɔ́ndi mpo na oyo Yehova asili kosala mpo na bango, okoki koyekola makambo mingi oyo bakutanaki na yango. Mwasi moko oyo kala azalaki moombo ya bilangwiseli mpe oyo amipesaki na pite alobi ete: “Soki nayokelaki Yehova te, mbɛlɛ nasilá kokufa. Mobali nalingaki kobala akufaki na SIDA. Baninga na ngai nyonso ya kala kati na mokili basili kokufa na SIDA to bazali pene na kokufa. Namonaka bango mbala mingi na balabála, mpe nazali kotɔ́nda Yehova mikolo nyonso mpo na mibeko na ye oyo ezali kokamba libota na ye mpe oyo ekosalisaka biso ete tózala ntango nyonso bulee soki totosi mpenza yango. Naino nayoka te esengo, bosepeli mpe mayoki ya libateli lokola oyo nazali na yango sikawa.” Na bosolo nyonso, kolanda mateya ya Yehova ezali ntango nyonso kopesa biso matomba!
Salá liponi ya malamu
20, 21. (a) Nzela nini mibale etyami liboso na bilenge mpo ete bápona moko? (b) Bolamu nini ya seko ekozwama na baoyo bazali kolanda mateya mauti na Nzambe?
20 Bilenge, tozali kolendisa bino ete, Bósala liponi malamu, bópona kosalela Yehova. Na nsima, bókangama makasi na ekateli yango. (Yosua 24:15) Mpo na koloba solo, bokoki kopona bobele moko kati na nzela oyo mibale. Yesu alobaki ete ezali na nzela monene mpe ya polele—oyo ya pɛtɛɛ na kosala makambo oyo olingi. Nzela wana ezali komema na kufa. Nzela mosusu ezali ya nkaká. Ezali nzela moko ya mpasi mpo na kotambola kati na yango na mokili oyo ya mbindo, oyo etambwisami na bademó. Kasi nzela yango ekomema baoyo bazali kolanda yango kino na mokili ya sika mpe ya kitoko oyo Nzambe akosala. (Matai 7:13, 14) Nzela nini okopona? Okolanda mateya ya nani?
21 Yehova atikeli yo bonsomi ya kopona. Azali koluka te kopusa yo na makasi ete osalela ye. Mose, mosakoli ya Nzambe, alobaki ete: “Natii liboso na yɔ bomɔi mpe kufa,” mpe alendisaki ete: “Pɔna bomɔi.” Liponi wana lizali kosalema na “kolinga [Yehova] Njambe na yɔ mpe kotosa mongongo na ye mpe kokangama na ye.” (Dutɛlɔnɔmɛ 29:2; 30:19, 20) Tiká ete opona na bwanya mpenza kolanda mateya mauti na Nzambe mpe ozala na bomoi ezangi nsuka kati na mokili ya sika mpe ya nkembo oyo Nzambe akosala.
Okopesa eyano nini?
◻ Bademó bazali banani, mpe bazali koteya nini?
◻ Lolenge nini bademó bazali kolendisa mateya na bango na mikolo na biso?
◻ Lolenge nini tokoki kotɛmɛla mateya ya bademó?
◻ Matomba nini mazali kozwama na baoyo bazali kolanda mateya mauti na Yehova?
[Elilingi na lokasa 16]
Liboso ya Mpela, baanzelu batomboki mpe bana na bango balendisaki mobulu mpe pite
[Elilingi na lokasa 18]
Mbɛlɛ okooka nsoni soki Yesu akuti yo ozali koyoka nzembo na yo oyo olingaka mingi?