Ozalaka na motema pɛtɛɛ?
YEHOVA alobaki na Abalama ete: “Longwa na mokili na yɔ . . . kokɛnda na mokili ekomɔnisa ngai yɔ. Nakojalisa yɔ libota monɛnɛ, mpe nakopambola yɔ, nakojalisa nkombo na yɔ monɛnɛ.” (Genese 12:1, 2) Na ntango wana Abalama azalaki na mibu 75. Atosaki mpe na bwanya nyonso amonisaki motema pɛtɛɛ boumeli ya ntango oyo etikalaki na bomoi na ye, mpe atalelaki Yehova.
Na nsima, Nzambe apesaki elaka oyo epai na Abalayama (Abalama) moto ya motema pɛtɛɛ: “Mpo na mapamboli nakopambola yo, mpe mpo na kofulukisa nakofulukisa yo.” Ntoma Paulo abakisaki boye ete: “Mpe na yango nsima wana Abalayama asilaki komonisa motema pɛtɛɛ, azwaki elaka yango.”—Baebele 6:13-15, NW.
Motema pɛtɛɛ ezali nini? Badiksionere elimboli yango lokola ezaleli ya “kozela eloko moko na motema ya kokita” to komonisa “koyika mpiko kati na matumoli to mitungisi.” Na yango motema pɛtɛɛ na yo etyami na komekama wana osengeli kozela moto moko to eloko moko, to wana batumoli yo to wana otungisami. Kati na makambo motindo yango, moto na motema pɛtɛɛ akobatela kimya na ye; moto na kozanga motema pɛtɛɛ azalaka na motema likolólikoló mpe asilikaka noki.
Mokili na biso oyo mozangi motema pɛtɛɛ
Mingi mpenza kati na ebele ya bingumba, likebi lityami mingi te likoló na motema pɛtɛɛ, kasi nde likoló na bosali makambo mbangumbangu. Mpo na bamilió ya bato oyo bafandi kati na bingumba oyo bitondi na bato, mokolo nyonso mokobandaka wana ngonga ya ntɔ́ngɔ́ ebeti. Yango ezali ebandeli ya bosali makambo mbangumbangu—kokende na esika boye, kokutana na moto boye, kokokisa likambo boye. Ezali bongo likambo ya kokamwa soki bato mingi bakómi nkandankanda mpe bazangi motema pɛtɛɛ?
Omitungisaka mpo na mabungá ya basusu? Albert alobi ete: “Nalingaka te likambo ya kozanga kotosa ngonga.” Bato mingi bakondima ete kozela moto oyo akómi nsima ya ngonga epesaka mpasi, mingi mpenza soki bosengeli kotosa ngonga oyo elakamaki mpo na kokutana. Balobaki na ntina na Nkumu ya Newcastle, moto ya politiki ya ekólo Grande-Bretagne na ekeke ya 18 ete: ‘Abungisaka miniti 30 na ntɔ́ngɔ́ nyonso, akoluka yango na boumeli ya mokolo mobimba ete azongisa yango, kasi bobele mpamba.’ Soki makambo na yo masengelaki kotalela moto motindo wana mikolo nyonso, olingaki komonisa ntango nyonso motema pɛtɛɛ?
Wana ozali kotambwisa motuka, oyokaka nkanda nokinoki, oboyaka kozela to omekaka kokende mbangumbangu? Kati na makambo lolenge yango, mbala mingi kozanga motema pɛtɛɛ ememaka na likámá. Na boumeli ya mobu 1989, kati na oyo ebéngamaki kala Allemagne ya Wɛ́sti, makámá ya mituka koleka 400 000 mamemaki na kozoka mpota to na kufa. Kati na motango wana, likámá moko kati na makámá misato lisalemaki mpo ete motuka yango mozalaki kopota makasi mingi to mpo ete mozalaki kotambola penepene mingi na motuka oyo mozalaki liboso na yango. Na yango, tokoki koloba ete, na meko mosusu, kozanga motema pɛtɛɛ nde ezalaki ntina ya kozoka to ya kufa ya bato koleka 137 000. Oyo nde mbuma mabe euti na kozanga motema pɛtɛɛ!
Ann alobi ete: “Namonaka ete ezali mpasi komonisa motema pɛtɛɛ wana moto moko azali ntango nyonso kokatakata ngai maloba to wana moto moko azali komikumisa mingi.” Karl-Hermann andimaki ete motema pɛtɛɛ na ye etyamaka na komekama wana “bilenge bazangaka limemya epai na mikóló.”
Makambo oyo elongo na mosusu makoki kosala ete ozanga motema pɛtɛɛ. Bongo, lolenge nini okoki kolona motema pɛtɛɛ?
Yehova akoki kolendisa motema pɛtɛɛ na yo
Bato mingi bakanisaka ete motema pɛtɛɛ ezali komonisa kokakatana mpo na kozwa ekateli to bolembu. Nzokande, epai na Yehova, yango ezali elembo ya nguya. Ye moko “ajali na [motema pɛtɛɛ, NW] . . . alingi tɛ ete bamosusu babeba kasi ete bato yɔnsɔ bakoma kobongwana na motema.” (2 Pɛtɛlɔ 3:9) Na yango, mpo na kokólisa ezalela na yo ya motema pɛtɛɛ, osengeli kozala penepene na Yehova mpe kotalela ye na motema na yo mobimba. Koyeisa makasi boyokani na yo elongo na Nzambe ezali mwango bobele moko ya ntina mingi mpo na kokólisa ezaleli ya motema pɛtɛɛ.
Lisusu, koyeba mokano ya Yehova mpo na mabelé mpe mpo na bato ezali na ntina mingi. Abalayama “ajalaki kotalela mboka oyo ejali na miboko [malamu, NW] [Bokonzi ya Nzambe], Njambe ajali motongi mpe mojalisi na yango.” (Baɛbɛlɛ 11:10) Bobele bongo, ezali na ntina mingi kobatela emonaneli ya polele ya bilaka na Nzambe mpe kosepela kotalela Yehova. Bongo okososola ete motema pɛtɛɛ, na esika ete elimbola kokakatana mpo na kozwa ekateli, ezali mpenza nde komema bato epai na losambo ya solo. Na yango, “bokanisa ete [motema pɛtɛɛ, NW] ya Nkolo na biso ejali lokola lobiko.”—2 Pɛtɛlɔ 3:15.
Ezali boni soki makambo matali yo moko nde mazali kotya motema pɛtɛɛ na yo na komekama? Bato bazangi kondima batungisaka mpenza nde yo mingi? Otungisami nde na bokɔnɔ oyo emonani ete eumeli ntango molai? Soki ezali bongo, tyá likebi na oyo moyekoli Yakobo akomaki. Nsima ya kolobela ndakisa oyo basakoli batikaki mpo na oyo etali komonisa motema pɛtɛɛ, amonisaki sɛkɛlɛ́ ya kobatela kimya kati na mitungisi ya makasi. Yakobo alobaki ete: “Mɔkɔ na bino ajali na bolɔji? Tika ete abɔndɛla.”—Yakobo 5:10, 13.
Bondelá solosolo Nzambe mpo na kosɛnga ye ete alendisa motema pɛtɛɛ na yo mpe asalisa yo na kosɛnzɛla elimo na yo kati na komekama. Omibalolá epai na Yehova mbala na mbala, mpe akosalisa yo na koyeba makambo to bizaleli ya basusu oyo ezali kobulunganisa kimya na yo. Kobondela liboso na ntina na makambo oyo makoki kobimisa mikakatano ekosalisa yo na kobatela kimya na yo.
Lolenge malamu ya komitalela mpe ya kotalela basusu
Mpo na kobatela ezaleli ya kimya, osengeli komitalela mpe kotalela basusu na lolenge lobongi. Yango ekoki kosalema na nzela ya boyekoli ya Biblia, mpamba te Biblia ezali komonisa ete bato banso basili kosangola ezalela ya kozanga kokoka mpe na yango bazali na bolembu. Lisusu, boyebi ya Biblia ekosalisa yo na kokóla kati na bolingo. Ezaleli wana ezali na ntina mingi mpo na komonisa motema pɛtɛɛ epai na basusu.—Yoane 13:34, 35; Baloma 5:12; Bafilipi 1:9.
Bolingo mpe mposa makasi ya kolimbisa nokinoki ekoki kokitisa motema na yo ntango otungisami. Soki moto moko azali na mimeseno oyo mizali koyokisa yo nkanda, bolingo ekokundwela yo ete mimeseno na ye nde mizali mabe, kasi moto ye moko te. Kanisá mbala boni bolembu na yo etyaki motema pɛtɛɛ ya Nzambe na komekama mpe etungisaki basusu.
Lisusu, lolenge malamu ya komitalela yo moko ekosalisa yo na kozela na motema pɛtɛɛ nyonso. Na ndakisa, ozalaka na mposa ya kozwa mikumba kati na mosala ya Yehova, nzokande ozali kozwa yango te? Ozali komona ete motema pɛtɛɛ na yo ezali nokinoki kokóma na nsuka na yango? Soki ezali bongo, omikundolá ete kozala motema likolólikoló mingi euti bongo na ezaleli ya lolendo. Salomo alobaki ete: “Moto na motema pɛtɛɛ aleki na malamu moto oyo azali na elimo ya lofundo.” (Mosakoli 7:8, NW) Ya solo, lolendo ezali epekiseli monene mpo na kolona motema pɛtɛɛ. Ezali solo ete moto na komikitisa azalaka na mpasi te mpo na kozela na motema ya kokita, boye te? Na yango, loná komikitisa, mpe okozala na makoki mingi ya kondima na kimya nyonso kokokisama ya likambo moko epusami na nsima.—Masese 15:33.
Motema pɛtɛɛ ezali kopesa mbano monene
Abalayama ayebani mingi mpenza mpo na kondima na ye. (Baloma 4:11) Nzokande, motema pɛtɛɛ ekómisaki kondima na ye makasi. Mbano nini azwaki mpo ete atalelaki Yehova?
Abalayama apesamelaki libaku ete Yehova atyela ye motema mpenza. Nkombo ya Abalayama ekómaki bongo monene mpe bakitani na ye bakómaki libota ya nguya. Mabota nyonso ya mabelé makopambwama na nzela ya mombóto na ye. Abalayama asalelamaki lokola molobeli ya Nzambe mpe ata lokola elilingi ya Mozalisi. Ekokaki kozala na mbano mosusu monene koleka oyo mpo na kondima mpe motema pɛtɛɛ ya Abalayama?
“[Yehova] atondi na mawa mpe na boboto” epai na baklisto oyo bazali koyika mpiko na motema pɛtɛɛ nyonso kati na komekama. (Yakobo 5:10, 11) Bato motindo wana bazali na lisosoli ya peto mpo ete bazali kosala mokano na ye. Boye, mpo na yo, soki okotalela Yehova mpe okoyikela mikakatano mpiko na motema pɛtɛɛ nyonso, motema pɛtɛɛ na yo ekomemela yo ngolu mpe mapamboli ya Yehova.
Motema pɛtɛɛ ezali kosalisa basaleli ya Nzambe mingi kati na makambo makeseni ya bomoi. Basaleli mibale ya Yehova, na nkombo Christian mpe Agnès, bamonaki bosolo ya likambo yango ntango bazwaki ekateli ya kolakana libala. Baumelisaki elaka na bango wana ya kobalana mpo na komonisa limemya epai na baboti ya Christian, baoyo balingaki kozwa ntango mingi mpo na koyeba Agnès malamu. Likambo wana libimisaki matomba nini?
Christian alimboli ete, “Ezalaki bobele na nsima nde tososolaki ete motema pɛtɛɛ na biso ezalaki na ntina mingi mpo na baboti na ngai. Ntango oyo tozelaki na motema pɛtɛɛ nyonso ekataki te boyokani na ngai elongo na mwasi na ngai. Kasi ezalaki nde libangá ya moboko ya kotónga boyokani na biso elongo na baboti na ngai.” Ee, motema pɛtɛɛ ezali kopesa mbano monene.
Motema pɛtɛɛ ezali lisusu koyeisa kimya. Libota mpe baninga na yo bakozala na botɔ́ndi epai na yo mpo ete oswanaka te mpo na makambo nyonso ya mikemike. Kimya mpe bososoli oyo ozali komonisa wana basusu bazali kosala mabungá ekopengwisela yo mikakatano mingi. Lisese moko ya ba Chinois elobi ete: “Motema pɛtɛɛ na ntango ya nkanda ekopengwisela yo mikolo monkáma ya kotungisama.”
Motema pɛtɛɛ ezali mpe kotombola bomoto na yo, na kosalisáká yo ete obatela malamu bizaleli mosusu kitoko oyo ozali na yango. Ekoyeisa kondima na yo makasi, ekopesa yo kimya ya koumela, mpe bolingo na yo ekotengatenga te. Kozala na motema pɛtɛɛ ekosalisa yo na kozala na esengo wana ozali komonisa boboto, malamu, mpe bopɔlɔ. Komonisa ezaleli ya motema pɛtɛɛ ekoyikanisa nguya oyo osengeli kozala na yango mpo na kolona motema molai mpe kolona komipekisa.
Zelá na motema pɛtɛɛ nyonso kokokisama ya bilaka ya Yehova, boye, okondimisama komona mikolo kitoko mizali koya. Lokola Abalayama, tiká ete “na nzela ya kondima mpe ya motema pɛtɛɛ, okoka kosangola bilaka.”—Baebele 6:12.
[Elilingi na lokasa 223]
Boyokani ya penepene elongo na Yehova ekosalisa yo na kozala na motema pɛtɛɛ, na ndakisa ya Abalayama