Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/8 nk. 9-14
  • Yehova azali na makambo makasi te!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova azali na makambo makasi te!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yehova​—Ye oyo ayebi mpenza kosala engebene likambo na likambo kati na mɔlɔ́ngɔ́ mobimba
  • “Kozala na makambo makasi te” ezali elembo ya mayele mauti na Nzambe
  • “Kondima kolimbisa”
  • Ayebi kotalela likambo na likambo ya sika
  • Kozala na makambo makasi te mpo na kosalela bokonzi
  • “Azali na motema ya bwanya”—Kasi atondi na komikitisa
    Pusaná penepene na Yehova
  • Tólóna ezaleli ya kozala na makambo makasi te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mekolá Yehova​—Kozalaka makambo makasimakasi te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Tósepela na bizaleli ya Yehova: akabaka mpe azali makambo makasimakasi te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/8 nk. 9-14

Yehova azali na makambo makasi te!

“Mayɛlɛ mauti na Likolo . . . ejali na boboto.”​—YAKOBO 3:17.

1. Na maloba nini bato mosusu bamonisaki ete Nzambe azali na makambo makasi, mpe yo okanisi nini na lolenge wana ya kotalela Nzambe?

OSAMBELAKA Nzambe ya motindo nini? Okanisaka ete azali Nzambe oyo azali na makambo makasi, alandelaka mibeko na lolenge ya kolekisa ndelo, mpe azalaka bobele ngwi kati na bizaleli na ye? Mpo na John Calvin, moko na bato oyo bakɔtisaki mbongwana mpo na lingomba ya Protestá, ekoki kozala solo ete Nzambe azali mpenza bongo. Calvin alobaki ete Nzambe “azali na mwango moko ya libela mpe oyo ebongwanaka te” mpo na moto moko na moko, asilá kotánga mpo na moko na moko soki akozala na bomoi ya seko kati na esengo to akotungisama seko kati na lifelo ya mɔ́tɔ. Kanisá naino: Soki ezalaki bongo, mbɛlɛ likambo nyonso oyo yo okokaki kosala, ata molende nini oyo okokaki kosala, eloko moko te ekokaki kobongola mwango ya Nzambe na ntina na yo mpe na ntina na mikolo na yo mizali koya liboso. Okobɛlɛma epai na Nzambe motindo wana, oyo azali na makambo makasi?​—Kokanisá na Yakobo 4:8.

2, 3. (a) Tokoki kokokanisa ezaleli ya makambo makasi oyo ezalaka na bibongiseli ya bato na nini? (b) Lolenge nini emonaneli ya likálo ya likoló ya Yehova oyo ezali na Ezekiele emonisi ete ye ayebi kosala engebene likambo na likambo?

2 Oyo nde kobɔndisama tozali na yango, awa eyebi biso ete Nzambe ya Biblia azali na makambo makasi te! Ezali Nzambe te, kasi bato nde bazalaka na mbeba ya kozala ntango nyonso na makambo makasi, mpo ete batambwisami na ezalela na bango ya kozanga kokoka. Bibongiseli ya bato bizali lokola bingbunduka minene oyo ekomemaka biloko mpe ezali mpasi mpo na kobongola nzela na yango. Soki engbunduka monene oyo ekomemaka biloko ezali kobɛlɛma pene na libaku moko oyo ezali na nzela na yango, ekoki kobalolama na ngambo mosusu soko moke te, mpe kotɛlɛmisa yango ezalaka likambo ya mpasi mpenza. Bingbunduka mosusu bizalaka na nguya mingi ya kotambola na boye ete soki ekangisami, liboso ete etɛlɛma, ekotambola naino na ntáká ya koleka kilomɛtɛlɛ moko! Bobele bongo mpe masuwa minene oyo ekomemaka pitɔlɔ́ ekoki kokende kotɛlɛma na libongo oyo ezali liboso na yango na ntáká ya bakilomɛtɛlɛ mwambi, nsima wana bamotɛ́lɛ esilaki kokangama. Ata soki babalwisi yango na nzela mosusu, ekokóba bobele kotambola kino na ntáká ya bakilomɛtɛlɛ misato! Kasi, sikawa, tólobela naino motuka moko ya kokamwa koleka oyo mibale, motuka oyo ezali komonisa ebongiseli ya Yehova.

3 Esili koleka mibu 2 600, Yehova Nzambe apesaki mosakoli Ezekiele emonaneli moko oyo emonisaki ebongiseli na Ye ya likoló esalemi na bikelamu ya elimo. Ezalaki likálo moko monene mpenza mpe ya kokamwisa, “motuka” ya Yehova ye mpenza, motuka oyo ezalaka ntango nyonso na nsé ya litambwisi na ye. Likambo lileki na kobenda likebi ezali bongo lolenge na yango ya kotambola. Yika na yango minene mpe milai ezali na mipanzi minei mpe na miso mingi, na yango ekoki komona bipai binso mpe ekoki kobongola nzela na yango nokinoki, kozanga kotɛlɛma to kobaluka. Mpe, motuka oyo ya monene mozali ata na mokakatano moko te mpo na kotambola, lokola ezali bongo mpo na masuwa monene oyo ekomemaka pitɔlɔ́ to engbunduka oyo ekomemaka biloko. Ekoki kotambola na lombangu motindo moko na mokalikali, ata mpe kobaluka na kosala mbata sémba! (Ezekiele 1:1, 14-28) Yehova akeseni mpenza na Nzambe oyo Calvin ateyaki, bobele bongo mpe likálo na Ye ekeseni na bamasini ya mindɔndɔ́ mingi oyo esalemi na mabɔkɔ ya bato. Yehova ayebi kosala engebene likambo na likambo. Kotalela malamu ezaleli oyo ya Nzambe esengeli kosalisa biso na kobatela ntango nyonso ezaleli ya kosala engebene likambo na likambo mpe kopɛngola ezaleli ya kokamataka bikateli makasi mpe bizangi kobongwana.

Yehova​—Ye oyo ayebi mpenza kosala engebene likambo na likambo kati na mɔlɔ́ngɔ́ mobimba

4. (a) Na ndimbola nini nkombo mpenza ya Yehova emonisi ete azali Nzambe oyo asalaka engebene likambo na likambo? (b) Tángá mwa bankombo ya lokumu epesami na Yehova Nzambe; mpe mpo na nini tokoki koloba ete yango ebongi mpenza?

4 Nkombo mpenza ya Yehova ezali komonisa ezaleli na ye ya kosala engebene likambo na likambo. “Yehova” elimboli mpenza ete “Ye oyo akoyeisaka.” Na ntembe te, yango elimboli ete Yehova amiyeisaka Mokokisi ya bilaká na ye nyonso. Ntango Mose atunaki Nzambe nkombo na ye, Yehova apesaki ndimbola na yango na maloba oyo: “‘Nakomimonisa oyo ekomimonisa ngai ete nazali.’” (Exode 3:14, NW) Libongoli ya Rotherham ebongoli yango polele ete: “Nakokóma lolenge nyonso nasepeli kokóma.” Yehova amimonisaka ete azali, to aponaka kokóma, lolenge nyonso asengeli kokóma mpo na kokokisa mikano mpe bilaká na ye ya sembo. Na yango, azali na ebele ya bankombo ya lokumu ya kokamwa, lokola Mozalisi, Tata, Nkolo Moyangeli, Mobateli na mpate, Yehova na bibele, Ye oyo akoyokaka mabondeli, Mosambisi, Molakisi monene, Mosikoli. Asalaki ete ye moko akóma oyo nyonso na mokano ete akokisa bilaká na ye bitondi na bolingo.​—Yisaya 8:13; 30:20; 40:28; 41:14; Nzembo 23:1; 65:2; 73:28; 89:26; Basambisi 11:27; talá mpe New World Translation, Appendix 1J.

5. Soki ezali solo ete Yehova asalaka engebene likambo na likambo, mpo na nini tosengeli te koloba ete lolenge na ye mpe mitinda na ye ebongwanaka?

5 Kasi, likambo oyo elimboli ete lolenge to mitinda ya Nzambe mibongwanaka? Soko moke te; lokola Yakobo 1:17 elobi yango, “ye ajali na kobongwana tɛ, akoyeisa ata molili mokɛ mpe tɛ.” Bongolabongola ezali nde kati na likambo oyo? Soko moke te. Na ndakisa, moboti nini ya bolingo asalaka mbongwana te na mikumba na ye mpo na litomba ya bana na ye? Na boumeli ya mokolo bobele moko, moboti akoki kozala mopesi toli, molámbi, mobateli na ndako, molakisi, mopesi disipilini, moninga, mekanisiɛ́, lifulumɛ́​—mpe molɔngɔ́ ezali bobele kolandana. Moboti akobongolaka bomoto na ye te na ntango azali kokokisa mikumba oyo; azali bobele engebene likambo na likambo oyo emonani na ntango wana. Na yango, ezali mpe bongo mpo na Yehova, kasi na meko oyo eleki monene. Ndelo ezali te mpo na oyo akoki kosala ete akóma mpo na litomba ya bikelamu na ye. Bozindo ya mayele na ye ezali mpenza ya kokamwa!​—Baloma 11:33.

“Kozala na makambo makasi te” ezali elembo ya mayele mauti na Nzambe

6. Wapi ndimbola mpenza mpe bibéngeli mosusu ya liloba ya Greke oyo Yakobo asaleli mpo na kolobela mayele ya Nzambe?

6 Moyekoli Yakobo asalelaki liloba moko ya kobenda likebi mpo na mayele ya Nzambe oyo aleki bato banso mpo na kosala engebene likambo na likambo. Akomaki ete: “Mayɛlɛ mauti na Likolo . . . ejali na boboto.” (Yakobo 3:17) Liloba ya Greke oyo esalelami awa (e·pi·ei·kesʹ) ezali mpasi mpo na kobongola yango. Babongoli basalelaki maloba lokola “boboto,” “motema mawa,” “boyokani” mpe “limemya.” Biblia Traduction du monde nouveau ebongoli yango ete “raisonnable,” (eyebi kokanisa, ezali na makambo makasi te); maloba na nsé ya lokasa na libongoli ya Lingelesi emonisi ete ndimbola na yango mpenzampenza ezali oyo ete “ezali na masɛngisi mingi te.”a Liloba yango ezali mpe kopesa likanisi ya kozanga kolandela makambo mikemike kati na mitinda mizwami na mikanda kozanga kotalela zingazinga na yango, kozala moto na mindɔndɔ́ te to na makambo makasi te. Mosavá na Biblia William Barclay kati na búku na ye New Testament Words (Maloba ya Kondimana ya Sika) alobi ete: “Likanisi ya moboko mpe ya liboso na ntina na epieikeia [koyeba kokanisa] ezali ete euti epai na Nzambe. Soki Nzambe azalaki ntango nyonso kosɛngisa lotómo na ye, soki Nzambe azalaki kolandela biso bobele engebene mibeko na ye mizangi kobongwana, mbɛlɛ biso tolingaki kozala wapi? Nzambe azali ndakisa oyo eleki monene mpo na oyo etali epieikēs mpe ye oyo akosalelaka bato makambo na epieikeia nyonso.”

7. Lolenge nini Yehova amonisaki ezaleli na ye ya kozala na makambo makasi te kati na elanga ya Edene?

7 Kanisá naino na ntango oyo bato batombokelaki boyangeli ya Yehova. Elingaki kozala mpasi soko moke te mpo na Nzambe ete akoka koboma batomboki misato oyo bazangaki botɔ́ndi, Adama, Eva, mpe Satana! Mbɛlɛ akokaki bongo kopɛngola makambo mingi oyo mayokisi ye motema mpasi! Mpe nani akokaki koloba na ye ete asengelaki te kosalela bosembo lokola esengeli mpenzampenza? Nzokande, Yehova akosalelaka soko moke te ebongiseli na ye ya likoló oyo ekokani na likálo ete ekangama bobele na mibeko ya bosembo mizangi kobongwana, mizangi kotalela likambo na likambo. Yango wana, likálo na ye etambolaki te kozanga boboto likoló na libota ya bato mpe likoló na bilikya nyonso ya bolamu ya bato mpo na mikolo mizalaki koya. Nzokande, Yehova atambwisaki likálo na ye na lombangu lokola oyo ya mokalikali. Nokinoki nsima na botomboki, alobelaki mokano moko mosengelaki kokokana na nsima mpenza, oyo emonisaki motema mawa mpe ezalaki kopesa elikya epai na bakitani nyonso ya Adama.​—Genese 3:15.

8. (a) Bokeseni nini ezali kati na lolenge oyo boklisto ya nkombo mpamba emimonisaka ete ezali na makambo makasi te mpe ezaleli ya Yehova? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova azalaka na makambo makasi te, kasi atako bongo abukaka mpe mitinda na ye te?

8 Nzokande, ezaleli oyo ya Yehova ya kotalela likambo na likambo, elimboli te ete akoki kobuka mitinda na ye. Lelo, mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba bakoki kokanisa ete bazali na makambo makasi te na ntango bazali kokanga miso likoló ya bonsɔ́ni ya bandimi na bango mpo ete bandimi bámona bango mabe te. (Kokanisá na 2 Timoté 4:3.) Yehova akobukaka mibeko na ye te, soko mpe mitinda na ye te. Nzokande, amonisaka boboto, kosaláká engebene likambo na likambo, mpo ete akoka kosalela mitinda na ye na bosembo nyonso mpe na motema mawa nyonso. Amibanzabanzaka ntango nyonso na koyokanisa bosembo na ye mpe nguya na ye na bolingo mpe na mayele oyo ezali na makambo makasi te. Tiká tótalela mitindo misato kati na yango Yehova amimonisi ete azali na makambo makasi te.

“Kondima kolimbisa”

9, 10. (a) Boyokani nini ezali kati na “kondima kolimbisa” mpe kozala na makambo makasi te? (b) Lolenge nini Davidi azwaki litomba na ezaleli ya Yehova ya kolimbisa, mpe mpo na nini?

9 Davidi akomaki ete: “Jambi, yɔ ojali malamu, ɛ [Yehova], mpe okolimbisaka mabe. Otondi na boboto mpɔ na bango yɔnsɔ bakobiangaka nkombo na yɔ.” (Njembo 86:5) Na ntango Makomami ya Liebele mabongolamaki na Greke, liloba “okolimbisaka mabe” ebongolamaki na e·pi·ei·kesʹ, to “koyeba kokanisa.” Ya solo, kondima kolimbisa mpe komonisa motema mawa ekoki kozala lolenge ya ntina mpo na komimonisa moto oyo azali na makambo makasi te.

10 Davidi ye moko mpe ayebaki malamu na meko nini Yehova azali na makambo makasi te mpo na oyo etali kolimbisa mpe komonisa motema mawa. Na ntango Davidi asalaki ekobo elongo na Bata-seba mpe asalaki nyonso mpo ete mobali na ye abomama, ye mpe Bata-seba babongaki mpenza na kozwa etumbu ya liwa. (Deteronome 22:22; 2 Samwele 11:2-27) Soki likambo wana likatamaki na basambisi ya bato, oyo bazalaka na makambo makasi, mbɛlɛ bango mibale balingaki kobomama. Kasi Yehova amimonisaki ete azali na makambo makasi te (e·pi·ei·keiʹa), lokola W. Vine alimboli yango kati na búku na ye Expository Dictionary of Biblical Words (Diksionere ya ndimbola ya maloba ya Biblia) yango “emonisi kotalela likambo moko na ‘boboto nyonso mpe na lolenge ya bokatikati.’” Na ntembe te, kati na makambo oyo mapusaki Yehova na komonisa motema mawa tozali kokuta kobongola mpenza motema oyo basumuki bamonisaki mpe motema mawa oyo Davidi ye moko amonisaki epai na basusu. (1 Samwele 24:4-6; 25:32-35; 26:7-11; Matai 5:7; Yakobo 2:13) Nzokande, na kotalela lolenge Yehova alobi mpo na ye moko kati na Exode 34:4-7, ebongaki mpenza ete Yehova apesa Davidi etumbu. Atindaki mosakoli Natana epai na Davidi na nsango moko ya nguya, mpo na komonisa Davidi ete atyolaki liloba ya Yehova. Davidi abongolaki motema, yango wana akufaki te mpo na lisumu na ye.​—2 Samwele 12:1-14.

11. Lolenge nini Yehova andimaki kolimbisa Manasé?

11 Ndakisa ya Manasé, mokonzi ya Yuda, emonani mpe polele kati na likambo litali kobongola motema, mpamba te, na bokeseni na Davidi, Manasé azalaki mpenza moto mabe uta ntango molai. Ayeisaki misala mabe ya losambo kati na mboka, kati na misala yango ya mabe, tokoki kotánga kopesa bato lokola mbeka. Ekoki mpe kozala ete ye nde azalaki na ngambo monene mpo na liwa ya Yisaya, mosakoli ya sembo oyo ‘abomamaki na mosumani.’ (Baebele 11:37) Mpo na kopesa Manasé etumbu, Yehova atikaki nzela ete amemama na boombo na Babilone. Nzokande, Manasé abongolaki motema kati na bolɔ́kɔ mpe asɛngaki na [Yehova] ete ayokela ye mawa. Mpo ete abongolaki mpenza motema, Yehova andimaki “kolimbisa ye”​—atako mabe oyo asalaki ezalaki monene mingi.​—2 Ntango 33:9-13.

Ayebi kotalela likambo na likambo ya sika

12, 13. (a) Mpo na likambo ya Ninive, mbongwana nini etindaki Yehova na kobongola makanisi na ye? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete Yona azalaki na makambo makasi koleka Yehova Nzambe?

12 Yehova azali komimonisa ete azali na makambo makasi te, na boye ete asepelaka kobongola likambo moko alingaki kosala na kotalela makambo ya sika. Na ndakisa, nsango ya Nzambe epemami oyo Yona azalaki kosakola kati na balabála ya engumba ya kala ya Ninive ezalaki mpenza ya pɛtɛɛ: engumba wana ya nguya esengelaki kobomama nsima ya mikolo 40. Nzokande, makambo mabongwanaki na lolenge ya kokamwa: Bafandi ya Ninive babongolaki mitema.​—Yona, mokapo 3.

13 Bokeseni oyo emonisamaki kati na mayoki ya Yehova mpe oyo ya Yona ntango makambo mabongwanaki esengeli kopesa biso liteya. Yehova abongolaki moke nzela ya likálo na ye ya likoló. Na libaku wana amiyokanisaki na likambo wana, amikómisaki moto oyo alimbisaka masumu, na esika ya kozala “mobali na etumba.” (Esode 15:3) Nzokande, Yona azalaki na makambo makasi. Na esika ya kolanda lolenge likálo ya Yehova ezalaki kotambola, amimonisaki mpenza lokola engbunduka oyo ekomemaka biloko to masuwa monene oyo ekomemaka pitɔlɔ́, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisoló oyo. Lokola asakolaki libebi, esengelaki bongo ete libebi yango eya! Ekokaki kozala ete akanisaki ete akoyokisama nsɔ́ni liboso ya bato ya Ninive soki makambo mabongwani. Nzokande, na motema pɛtɛɛ nyonso, Yehova apesaki epai na mosakoli wana ya motó makasi liteya mpo na oyo etali ezaleli ya kozala na makambo makasi te mpe motema mawa.​—Yona, mokapo 4.

14. Mpo na nini Yehova abongolaki makanisi na ye na likambo ya Ezekiele, mosakoli na ye?

14 Yehova abongolaki mpe makanisi na ye na mabaku mosusu​—ata mpe na makambo mikemike. Na ndakisa, mokolo moko, Yehova atindaki mosakoli Ezekiele ete amonisa likambo moko na nzela ya esakweli. Na makambo oyo azalaki koyebisa ye, amonisaki ete Ezekiele asengelaki kolamba bilei na ye na mɔ́tɔ oyo epelisami na nyɛi ya bato. Ezalaki mpasi mpo ete mosakoli akoka kondima yango; angangaki ete: “Ɛ Nkolo [Yehova]!” mpe asɛngaki Nzambe ete atinda ye kosala likambo wana ya mbindo te. Yehova atalelaki te mayoki ya mosakoli ete ezalaki ya mabe; kasi apesaki Ezekiele nzela na kosalela nyɛi ya bangombe, biloko oyo bisalelamaka mpe mingi lelo oyo mpo na kopelisa mɔ́tɔ kati na mikili mingi.​—Ezekiele 4:12-15.

15. (a) Bandakisa nini emonisi ete Yehova andimaki koyoka bato mpe koyanola na malɔmbɔ na bango? (b) Liteya nini tokoki kozwa mpo na yango?

15 Komikitisa ya Nzambe na biso Yehova ezali mpenza likambo oyo ezali kosimba motema, boye te? (Nzembo 18:35) Aleki mpenza biso mosika; nzokande, na motema pɛtɛɛ nyonso ayokaka bato ya kozanga kokoka mpe mbala mosusu akómaka kino kobongola makanisi na ye engebene likambo na likambo. Apesaki nzela na Abalayama ete abondela Ye na boumeli ya ntango molai mpo na oyo etalaki kobomama ya Sodomo mpe Gomola. (Genese 18:23-33) Bobele bongo, atikaki nzela na Mose ete apesa makanisi na ntina na mokano azalaki na yango ya koboma Bayisraele oyo batombokaki mpe kobimisa libota monene ya bakitani ya Mose na esika na bango. (Exode 32:7-14; Deteronome 9:14, 19; kokanisá na Amosa 7:1-6.) Na bongo, apesi ndakisa ya kokoka epai bato oyo bazali basaleli na ye, baoyo basengeli kondima koyoka basusu na ntango oyo ebongi mpe oyo ekoki na kosala bongo.​—Kokanisá na Yakobo 1:19.

Kozala na makambo makasi te mpo na kosalela bokonzi

16. Mpo na oyo etali lolenge ya kosalela bokonzi, na nini Yehova akeseni na ebele ya bato?

16 Osilá komona ete na ntango bato bazali kozwa bokonzi mingi koleka, basusu bakómaka na makambo makasi, boye te? Nzokande, Yehova oyo azali na bokonzi monene kati na mɔlɔ́ngɔ́ mobimba; azali ndakisa eleki monene mpo na oyo etali kozala na makambo makasi te. Asalelaka ntango nyonso bokonzi na ye na komimonisáká ete azali na makambo makasi te. Na bokeseni na bato, Yehova amitungisaka mpo na bokonzi na ye te, na bongo apusami te na kobatela yango na makasi nyonso​—lokola nde ete kopesa mwa ndambo ya bokonzi na ye epai na basusu ekoki kozala likámá mpo na bokonzi na ye moko. Ya solo, na ntango azalaki bobele ye moko elongo na ekelamu moko kati na mɔlɔ́ngɔ́, Yehova apesaki ye ndambo monene ya bokonzi. Asalaki ete Logos azala “mokonzi wa mosala,” kobanda na ntango wana, abandaki kozalisa biloko nyonso na nzela ya Mwana na ye ya bolingo. (Biyele 8:22, 29-31, Liloba lya Nzambe; Yoane 1:1-3, 14; Bakolose 1:15-17) Na nsima, apesaki ye “bokonji yɔnsɔ . . . na likolo mpe na nse.”​—Matai 28:18; Yoane 5:22.

17, 18. (a) Mpo na nini Yehova atindaki baanzelu na Sodomo mpe na Gomola? (b) Mpo na nini Yehova asɛngaki na baanzelu ete bápesa makanisi mpo na oyo etali lolenge ya kozimbisa Ahaba?

17 Bobele bongo, Yehova apesi ebele ya bikelamu na ye mikumba oyo ye moko akokaki kokokisa yango malamu. Na ndakisa, na ntango ayebisaki Abalayama ete: “Nakokita [na Sodomo mpe Gomola] mpe nakotala sɔkɔ basili kosala pelamɔkɔ nsango ekomi na esika na ngai,” alingaki koloba te ete alingaki kokende kuna ye moko. Nzokande, Yehova amonaki malamu ete apesa ndambo ya bokonzi na ye, na kotindáká baanzelu mpo ete bámemela ye nsango yango. Apesaki bango bokonzi mpo na kokokisa malamu mokumba wana, mpo na koyeba ndenge makambo mazalaki kosalema mpe kozonga mpo na koyebisa ye yango.​—Genese 18:1-3, 20-22.

18 Na libaku mosusu, na ntango Yehova azwaki ekateli ya kokweisa etumbu likoló na Ahaba, mokonzi mabe, Ye abyangaki baanzelu na liyangani kuna na likoló mpe asɛngaki bango ete bápesa makanisi mpo na lolenge ya ‘kozimbisa’ mokonzi wana oyo azalaki mopɛngwi, ete amikɔtisa na etumba oyo esengelaki kotya nsuka na bomoi na ye. Ya solo, Yehova, oyo azali Eutelo ya mayele nyonso, azalaki na mposa ya lisalisi te mpo na koluka koyeba lolenge eleki malamu ya kosala! Nzokande, apesaki baanzelu na ye lokumu na kopesáká bango libaku ya kopesa makanisi mpe na kopesáká ndambo ya bokonzi epai na ye oyo apesaki mokumba ya kosala likambo moko.​—1 Mikonzi 22:19-22.

19. (a) Mpo na nini Yehova atyaka ndelo na mibeko oyo apesaka? (b) Na ndimbola nini Yehova amimonisaka ete azali na makambo makasi te na kotalela oyo ye azali komizela na yango epai na biso?

19 Yehova asalelaka bokonzi na ye te mpo na kotambwisa bikelamu na ye na lolenge ya kolekisa ndelo. Mpo na oyo etali kotambwisa bikelamu na ye, amimonisaka mpenza koleka ete azali na makambo makasi te. Ayebaka malamumalamu kotya ndelo na mibeko oyo apesaka mpe apekisaka basaleli na ye ete ‘báleka makambo makomami te’ na kobakisáká mibeko ya bozito oyo bango moko basali. (1 Bakolinti 4:6; Misala 15:28; kokanisá na Matai 23:4.) Asɛngaka te ete bikelamu na ye bátosa ye bitosela, kasi mingimingi ayebisaka bango makambo oyo makoki mpo na kotambwisa bango, mpe atyaka bango liboso ya lipɔni, komonisáká bango bolamu bozwamaka na botosi mpe matomba mabe mauti na kozanga botosi. (Deteronome 30:19, 20) Na esika ete apusa bato na makasi na kolamwisáká epai na bango liyoki ya komema ngambo, nsɔ́ni, to kobangisa bango, alukaka nde kosimba mitema; alingaka ete bato básalela ye na bolingo ya solo, kasi na makasi te. (2 Bakolinti 9:7) Yehova azali bongo na makambo ‘makasi’ te, mpamba te motema na ye esepelaka na mosala nyonso oyo moto asali yango na molimo na ye mobimba.​—1 Petelo 2:18; Masese 27:11; kokanisá na Mika 6:8.

20. Ezaleli ya Yehova, oyo ya kozala na makambo makasi te ezali kopusa biso na nini?

20 Ezali likambo ya kobenda likebi na komona ete Yehova Nzambe, oyo azali na nguya koleka bikelamu nyonso, azali kosalela soko moke te bokonzi na ye na lolenge ya makasi, asalelaka yango soko moke te mpo na kopusa bato na makasi, boye te? Nzokande, bato, baoyo bazali mpenza mpamba soki tokokanisi bango na Nzambe, na boumeli ya Lisoló ya bato, bakónzaki bazalani na bango. (Mosakoli 8:9) Ya solo, Yehova azali na ezaleli moko ya motuya lokola azali komimonisa ete azali na makambo makasi te, mpe ezaleli wana etindi biso ete tólinga ye mingi. Na nsima, yango ekoki kopusa biso na kolóna biso moko ezaleli yango. Lolenge nini tokoki kolóna yango? Ezali yango tokotalela na lisoló lilandi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na 1769, molimboli na maloba ya nkótá, John Parkhurst alimbolaki liloba yango ete “oyo ezali na mindɔndɔ́ te, oyo ezali na masɛngisi mingi te, eyebi lomeko lokoki, bopɔlɔ, motema pɛtɛɛ.” Basavá mosusu mpe bapesaki ndimbola oyo ete “ezali na mindɔndɔ́ te.”

Okopesa eyano nini?

◻ Lolenge nini nkombo ya Yehova mpe emonaneli ya likálo na ye ya likoló emonisi mpenza ezaleli na ye ya kozala na makambo makasi te?

◻ Kozala na makambo makasi te elimboli nini, mpe mpo na nini yango ezali elembo ya mayele mauti na Nzambe?

◻ Na makambo nini Yehova amonisaki ete asepelaka “kolimbisa”?

◻ Mpo na nini, na mabaku mosusu, Yehova amonaki malamu kobongola makanisi na ye?

◻ Lolenge nini Yehova amimonisi ete azalaka na makambo makasi te na lolenge ya kosalela bokonzi na ye?

[Elilingi na lokasa 10]

Mpo na nini Yehova alimbisaki Manasé, mokonzi mabe?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto