Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/9 nk. 15-20
  • Tókamata lokola elakiseli Basakoli ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tókamata lokola elakiseli Basakoli ya Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Banyokwamaki
  • Bamonisaki motema pɛtɛɛ
  • “Basalaki bongo”
  • Bazalaki na makanisi ya kokende liboso
  • Liziba ya elendiseli
  • Molende mpe kozela
  • Tómonisa motema pɛtɛɛ lelo
  • Tósakola Liloba ya Nzambe na mpiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • “Bósakola likambo oyo na bikólo”
    Batelá mokolo ya Yehova na makanisi na yo
  • Tómekola motema molai ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Tóyambola mpo na nkombo ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/9 nk. 15-20

Tókamata lokola elakiseli Basakoli ya Nzambe

“Bandeko, bobila elakiseli na bolɔji mpe mpiko na basakoli, baoyo balobaki na nkombo na [Yehova].”​—YAKOBO 5:10.

1. Nini ezali kosalisa basaleli ya Yehova na kozala na esengo ata ntango bazali konyokwama?

BASALELI ya Yehova bazali kongɛnga na esengo atako ezalela ya mawa epalangani na mokili mobimba na mikolo oyo ya nsuka. Ezali bongo mpamba te bayebi ete bazali kosepelisa Nzambe. Batatoli ya Yehova bazali mpe koyika mpiko kati na minyoko mpe botɛmɛli na ntina na mosala na bango mpamba te bayebi ete bazali konyokwama mpo na ‘boyengebene.’ Yesu Klisto alobaki na bayekoli na ye ete: “Mapamboli epai na bino wana bakotuka bino mpe bakonyɔkɔla bino mpe bakolobela bino mabe yɔnsɔ mpɔ na ngai. Bosepela mpe boyoka esɛngɔ jambi libonja na bino ejali monɛnɛ kati na Likolo. Mpɔ banyɔkɔlaki bongo basakoli baoyo bajalaki liboso na bino.” (Matai 5:10-12) Ya solo, mbala nyonso oyo basaleli ya Nzambe bazali kokutana na komekama na ntina na kondima, bazali kotalela yango ete ezali esengo.​—Yakobo 1:2, 3.

2. Engebene Yakobo 5:10, nini ekoki kosalisa biso na komonisa motema pɛtɛɛ?

2 Moyekoli Yakobo akomaki: “Bandeko, bobila elakiseli na bolɔji mpe mpiko na basakoli, baoyo balobaki na nkombo na [Yehova].” (Yakobo 5:10) W. F. Arndt mpe F. W. Gingrich balimboli liloba ya Greke oyo ebongolami awa na “elakiseli” (hy·poʹdeig·ma) lokola “ndakisa, modɛlɛ, elakiseli, na lolenge ya malamu, lokola eloko oyo ezali kopusa to esengeli kopusa moto na komekola yango.” Lokola emonisami kati na Yoane 13:15, “yango ezali bobele ndakisa te. Ezali kokokana mpenza ya sikisiki.” [Theological Dictionary of the New Testament (Diksionere ya Mateya ya Kondimana ya Sika)] Na bongo, basaleli ya Yehova ya ntango na biso bakoki kokamata basakoli ya sembo lokola elakiseli mpo na oyo etali ‘konyokwama’ mpe ‘komonisa motema pɛtɛɛ.’ Nini tokoki kososola wana tozali koyekola bomoi na bango? Mpe lolenge nini yango ekoki kosalisa biso kati na mosala na biso ya kosakola?

Banyokwamaki

3, 4. Mosakoli Amosa asalaki nini liboso ya botɛmɛli oyo Amasia abimisaki?

3 Basakoli ya Yehova mbala mingi banyokwamaki to bamonisaki bango mpasi. Na ndakisa, na ekeke ya libwa L.T.B., nganga Amasia, mosambeli ya mwana na ngombe atɛmɛlaki makasi mosakoli Amosa. Na lokuta nyonso, Amasia alobaki ete Amosa azalaki kotombokela Yelobama II, na kosakoláká ete mokonzi akokufa na mopanga mpe ete Yisraele ekokende na boombo. Na koyina nyonso, Amasia alobaki na Amosa ete: “Ɛ yɔ momɔni-na-makambo, kima kino mokili na Yuda; lia kwanga wana mpe sakola wana. Nde sakola lisusu na Betele tɛ mpɔ ete oyo ejali esika na bulɛɛ na mokonji mpe ndako na mokonji.” Amosa abangaki te maloba wana ya matumoli, azongisaki nde ete: “Ngai najali mosakoli tɛ, ngai mpe mwana na mosakoli tɛ; kasi najalaki mobateli na bibwɛlɛ mpe mopɛtɔli na njete na mosuke. [Yehova] akamataki ngai nsima na bitɔnga, mpe [Yehova] alobaki na ngai ete, ‘Kɛnda, sakwela bato na ngai Yisalaele.’”​—Amosa 7:10-15.

4 Elimo ya Yehova epesaki Amosa nguya ya kosakola na molende nyonso. Kanisá nini ezalaki mayoki ya Amasia wana Amosa alobaki ete: “Boye yoka liloba na [Yehova], ‘Yɔ olobi ete: “Sakwela Yisalaele tɛ mpe bimisela ndako na Yisaka liloba tɛ.”? Bongo [Yehova] alobi boye ete: “Mwasi na yɔ akojala mwasi na pite kati na mboka, mpe bana babali na yɔ mpe bana basi na yɔ bakokwea na mopanga, mpe mokili na yɔ ekokabolama na nsinga; yɔ mɔkɔ okokufa na mokili mojali na mbindo, mpe Yisalaele akolongolama mokangami sɔlɔ longwa na mokili na ye.”’” Esakweli yango nyonso ekokisamaki. (Amosa 7:16, 17) Oyo nde nsɔni mpo na mopɛngwi Amasia!

5. Bokokani nini tokoki kosala kati na ezalela oyo basaleli ya Yehova ya mikolo na biso bazali na yango mpe oyo ezalaki na mikolo ya mosakoli Amosa?

5 Yango ekokani na ezalela oyo basaleli ya Yehova bazali na yango lelo. Tozali konyokwama mpo ete tozali kosakola nsango ya Nzambe, mpe bato mingi bazali kobimisa maloba ya koyina likoló na mosala na biso ya kosakola. Ezali solo ete ndingisa na biso ya kosakola euti na mateya ya likindó (seminaires) te. Ezali elimo santu ya Yehova nde ezali kopesa biso makasi ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Tokoki kobongola nsango ya Nzambe te soko mpe kolɛmbisa yango te. Nzokande, lokola Amosa, na botosi nyonso tozali kosakola yango atako ezaleli nini bayoki na biso bazali na yango.​—2 Bakolinti 2:15-17.

Bamonisaki motema pɛtɛɛ

6, 7. (a) Nini ezali kobenda likebi na biso kati na esakweli ya Yisaya? (b) Na meko nini basaleli ya Yehova ya mikolo na biso bazali kosala lokola Yisaya?

6 Basakoli ya Nzambe bamonisaki motema pɛtɛɛ. Na ndakisa, Yisaya amonisaki motema pɛtɛɛ, ye oyo asalaki lokola mosakoli ya Yehova na ekeke ya mwambe L.T.B. Nzambe alobaki na ye ete: “Kɛnda mpe loba na bato oyo ete, ‘Boyoka [lisusu mpe lisusu, NW], nde yeba ntina tɛ; bomɔna [lisusu mpe lisusu, NW], nde sɔsɔla tɛ.’ Jalisa motema na bato oyo na mafuta mpe matoi na bango na bojito, jipa mpe miso na bango; ete batala na miso na bango tɛ, bayoka mpe na matoi na bango tɛ, ete basɔsɔla na mitema na bango tɛ ete babongwana tɛ mpe babikisama tɛ.” (Yisaya 6:9, 10) Bato basalaki mpenza bongo. Kasi yango esalaki ete Yisaya atika koloba? Te. Na esika ya kosala bongo, na motema pɛtɛɛ nyonso mpe na molende nyonso asakolaki nsango ya makebisi ya Yehova. Elobeli ya lokótá Liebele na ntina na maloba ya Nzambe oyo matángami awa ezali kopesa likanisi ya “kolandana ya ntango molai” ya makambo oyo mosakoli alobeli, makambo oyo bato bazalaki koyoka “lisusu mpe lisusu.”​—Gesenius’ Hebrew Grammar.

7 Lelo oyo, mayoki ya bato mingi liboso ya nsango malamu ezali lokola oyo bato bazalaki na yango liboso na maloba ya Yehova oyo Yisaya ayebisaki. Nzokande, lokola mosakoli wana ya sembo, tozali kolobela nsango ya Bokonzi “lisusu mpe lisusu.” Tozali kosala yango na molende mpe na motema pɛtɛɛ kozanga kolɛmba mpamba te yango ezali mokano ya Yehova.

“Basalaki bongo”

8, 9. Na makambo nini Mose, mosakoli ya Yehova azali ndakisa kitoko?

8 Mosakoli Mose azalaki ndakisa mpo na oyo etali motema pɛtɛɛ mpe botosi. Aponaki kozala na ngámbo ya Bayisraele oyo bazalaki na boombo, kasi asengelaki kozela na motema pɛtɛɛ nyonso ntango ya kosikwama na bango. Na boumeli ya bambula 40, afandaki na Madiani kino Nzambe asalelaki ye mpo na kobimisa Bayisraele na boombo. Wana Mose mpe ndeko na ye Alona bazalaki liboso ya mokonzi ya Ezipito, balobaki na botosi nyonso mpe basalaki oyo Nzambe asɛngaki bango. Ya solo, “basalaki bongo.”​—Esode 7:1-6; Baebele 11:24-29.

9 Na motema pɛtɛɛ nyonso, Mose ayikaki mpiko na boumeli ya bambula 40 ya mpasi oyo Bayisraele balekisaki na mokili mokauki. Na botosi nyonso, alandaki mpe litambwisi ya Nzambe mpo na oyo etalaki botóngi Mongombo ya Yisraele mpe kosala biloko mosusu oyo bisalelamaki kati na losambo ya Yehova. Mpo na komonisa ete mosakoli alandaki mpenza malako ya Nzambe, tozali kotánga ete: “Mose asalaki engebene nyonso oyo Yehova atindaki ye. Asalaki bongo.” (Exode 40:16, NW) Wana ezali biso kokokisa mosala na biso elongo na lisangá ya Yehova, tiká ete tómikundola botosi ya Mose mpe tósalela toli ya ntoma Paulo oyo ya ‘kotosa bango bazali kokamba biso.’​—Baebele 13:17.

Bazalaki na makanisi ya kokende liboso

10, 11. (a) Nini emonisi ete mosakoli Hosea azalaki na makanisi ya kokende liboso? (b) Lolenge nini tokoki kobatela makanisi ya kokende liboso wana tozali kosolola na bato kati na teritware na biso?

10 Basakoli basengelaki mpenza kozala na makanisi ya kokende liboso wana bazalaki koyebisa nsango ya kosambisa mpe bisakweli oyo bimonisaki bolingo mpe komibanzabanza oyo Nzambe azalaki na yango mpo na bato ya sembo oyo bapalanganaki na Yisraele. Yango ezalaki bongo mpo na Hosea, oyo azalaki mosakoli na boumeli ya bambula koleka 59. Na mpiko mpenza, alandaki kopesa nsango ya Yehova mpe asukisaki búku na ye ya bisakweli na maloba oyo: “Ye nani ajali na mayɛlɛ akosɔsɔla makambo oyo, ye nani ajali na bosɔsɔli, ayebi yango. Jambi njela na [Yehova] ijali sembo mpe basembwi bakotambola na yango. Kasi bapɛngwi bakokwea wana!” (Hosea 14:9) Ntango nyonso oyo Yehova akotika nzela ete tópesa litatoli, tiká ete tózala na makanisi ya kokende liboso mpe tólanda koluka baoyo bakondima na mayele nyonso ngɔlu ya Nzambe.

11 Mpo na ‘koluka bato ya motema malamu,’ tosengeli kolendendela mpe kotalela makambo na makanisi ya kokende liboso. (Matai 10:11) Na ndakisa, soki tobosani esika totyaki fungola na biso, tokoki kolandela matambe na biso mpe koluka na bisika bikeseni epai tozalaki. Tokomona yango bobele soki tosali bongo mbala na mbala. Bobele bongo, tiká ete tólendendela kati na boluki ya bato oyo bakokani na bampate. Oyo nde esengo mpo na biso wana bato yango bazali koyamba nsango malamu kati na teritware oyo esakolami mingi! Mpe oyo nde bosepeli tozali na yango lokola Nzambe azali kopambola mosala na biso kati na mikili epai kuna bipekiseli bizalaki kala kotya ndelo na mosala na biso ya kosakola liboso ya bato banso!​—Bagalatia 6:10.

Liziba ya elendiseli

12. Esakweli nini ya Yoele ezali kokokisama na ekeke oyo ya ntuku mibale, mpe lolenge nini?

12 Maloba ya basakoli ya Yehova makoki kozala na elendiseli monene mpo na biso kati na mosala na biso. Na ndakisa, tótalela esakweli ya Yoele. Ezali na nsango ya kosambisa oyo etalelaki bapɛngwi Bayisraele mpe bato mosusu na ekeke ya libwa L.T.B. Nzokande, Yoele apemamaki mpe na kosakola ete: “Na nsima ekojala ete [ngai Yehova] nakosopa [elimo, NW] na ngai likolo na njoto yɔnsɔ; bana na bino babali mpe bana na bino basi bakosakola, mikolo na bino bakolɔta ndɔtɔ, bilɛngɛ na bino bakomɔna bimɔnɔnɛli. Ata epai na baombo na ngai babali mpe baombo na ngai basi na mikɔlɔ yango nakosopa [elimo, NW] na ngai.” (Yoele 2:28, 29) Yango ekokanaki epai na bayekoli ya Yesu kobanda na Pantekote ya mobu 33 T.B. Mpe oyo nde kokokisama monene ya esakweli wana tozali komona na ekeke oyo ya ntuku mibale! Lelo oyo, tozali na bamilió oyo bazali “kosakola,” to koyebisa nsango ya Yehova​—kati na bango koleka 600 000 bazali kati na mosala ya ntango nyonso lokola babongisi-nzela.

13, 14. Nini ekoki kosalisa bilenge baklisto na kozala na esengo kati na mosala ya kosakola?

13 Basakoli mingi ya Bokonzi bazali bilenge. Ntango nyonso ezalaka pɛtɛɛ te mpo na bango na kosolola na mikóló na ntina na Biblia. Na bantango mosusu balobaka na bilenge basaleli ya Yehova ete: ‘Bozali kobungisa ntango na bino na kosakola,’ mpe ‘ebongaki nde kosala mosala mosusu.’ Na mayele nyonso, bilenge Batatoli ya Yehova bakoki koyanola ete bayokaka mawa ntango moto abimisi makanisi motindo wana. Elenge mosakoli moko ya nsango malamu amonisi ete ezali malamu na kobakisa ete: “Namonaka ete nazwaka matomba mpenza na kosolola na mikóló lokola yo, mpe nasepelaka na yango mingi.” Ya solo, kosakola nsango malamu ezali mosala ya mpamba te. Bomoi ya bato ezali na likámá. Na nzela ya Yoele, Nzambe alobaki makasi ete: “Mpe moto na moto oyo akobeela nkombo na [Yehova] akobika.”​—Yoele 2:32.

14 Bana oyo bazali kobima elongo na baboti na bango kati na mosala ya kosakola Bokonzi basepelaka kozwa lisalisi ya baboti mpo na koyeba komityela mikano bango moko. Mokemoke, bilenge wana bazali kokóla longwa na botángi ya mokapo moko kino kolimbola elikya na bango oyo ezwi moboko kati na Biblia mpe kino kokabola mikanda mibongi epai na bato oyo bamonisi bosepeli. Wana bazali komona bokóli na bango moko mpe lipamboli ya Yehova, bilenge basakoli ya Bokonzi bazali na esengo monene kati na mosala ya kosakola nsango malamu.​—Nzembo 110:3; 148:12, 13.

Molende mpe kozela

15. Lolenge nini ndakisa ya Ezekiele ekoki kosalisa biso na kozongela lisusu molende na biso mpo na mosala ya kosakola Bokonzi?

15 Basakoli ya Nzambe bazalaki mpe ndakisa mpo na oyo etali komonisa molende mpe kozela​—bizaleli oyo tozali na yango mposa kati na mosala na biso lelo oyo. Wana tobandaki koyekola solo ya Liloba ya Nzambe, na ntembe te, topusamaki na molende mpo na kolobela yango na mpiko nyonso. Kasi ekoki kozala ete bambula mingi esili koleka uta tobandaki koyekola solo, mpe tosili kopesa litatoli mbala na mbala kati na teritware na biso mobimba. Ekoki kozala ete sikawa bobele bato moke nde bazali kondima nsango ya Bokonzi. Yango esili kolɛmbisa molende na biso? Soki ezali bongo, tótalela ndakisa ya mosakoli Ezekiele, oyo nkombo na ye elimboli “Nzambe azali kopesa makasi.” Atako Ezekiele akutanaki na bato ya mitema makasi kati na Yisraele ya kala, Nzambe apesaki ye makasi mpe na elobeli ya elilingi akómisaki elongi na ye makasi koleka libangá. Na yango, Ezekiele azalaki na likoki ya kokokisa mosala na ye na boumeli ya bambula mingi mpenza, ezala ete bato bazalaki koyoka to bazalaki koyoka te. Ndakisa na ye emonisi ete biso mpe tokoki kosala sé bongo, mpe ekoki kosalisa biso na kozongela lisusu molende na biso mpo na mosala ya kosakola.​—Ezekiele 3:8, 9; 2 Timoté 4:5.

16. Ezaleli nini ezalaki na Mika tosengeli kolóna yango?

16 Mika oyo asakolaki na ekeke ya mwambe L.T.B., ayebanaki mpe mingi mpo na ezaleli na ye ya motema pɛtɛɛ. Akomaki ete: “Kasi ngai nakotalela [Yehova]; [nakozela] Njambe na kobika na ngai; Njambe na ngai akoyoka ngai.” (Mika 7:7) Elikya ya Mika ezwaki moboko kati na kondima makasi oyo azalaki na yango. Lokola mosakoli Yisaya, Mika ayebaki ete Yehova alingaki kokokisa kozanga ntembe oyo nyonso elakaki Ye. Biso mpe toyebi yango. (Yisaya 55:11) Na yango, tiká ete tólóna ezaleli ya kozela kokokisama ya bilaká ya Nzambe. Mpe tiká ete tósakola nsango malamu na molende nyonso, ata kati na bitúká epai kuna bato bazali kosepela mpenza te na nsango ya Bokonzi.​—Tito 2:14; Yakobo 5:7-10.

Tómonisa motema pɛtɛɛ lelo

17, 18. Bandakisa nini ya ntango ya kala mpe ya mikolo na biso ekoki kosalisa biso na komonisa motema pɛtɛɛ?

17 Basusu kati na basakoli ya Yehova na motema pɛtɛɛ nyonso balendendelaki kati na mosala na bango na boumeli ya bambula mingi, kasi bamonaki te kokokisama ya bisakweli na bango. Nzokande, kolendendela na bango na kozaláká na motema pɛtɛɛ, mbala mingi, wana bazalaki konyokwama, ezali kosalisa biso na koyeba ete tokoki kokokisa mosala na biso. Tokoki lisusu kozwa litomba na ndakisa ya bapakolami ya sembo na ebandeli ya ekeke oyo ya ntuku mibale. Atako elikya na bango ya kokende na likoló ekokisamaki te nokinoki lokola bakanisaki yango, bapesaki nzela te ete kozanga kokokisama ya elikya wana elɛmbisa molende na bango mpo na kosala mokano ya Nzambe ndenge oyo asilaki komonisa bango yango.

18 Na boumeli ya bambula, mingi kati na baklisto wana bazalaki kokabola ntango nyonso Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe moninga na yango Lamuká! (oyo kala ebéngamaki L’Age d’Or mpe na nsima Consolation). Na molende nyonso, bakabolaki bazulunalo wana ya motuya epai na bato na balabála mpe na kotikeláká bango yango na bandako na bango. Ndeko mwasi moko mobangé oyo asukisaki bomoi na ye na mabelé, alukamaki nokinoki na baleki-nzela oyo bamesanaki komona ye kopesa litatoli na balabála. Oyo nde litatoli kitoko apesaki na boumeli ya bambula mingi ya mosala ya sembo, ndenge emonisamaki na makumisi ya baoyo bazalaki komona ye kosakola liboso ya bato banso! Lokola mosakoli ya Bokonzi, okabolaka mbala na mbala Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! na mabɔkɔ ya bato oyo ozali kokutana na bango kati na mosala ya kosakola?

19. Elendiseli nini Baebele 6:10-12 ezali kopesa biso?

19 Tótalela mpe ezaleli ya motema pɛtɛɛ mpe mosala ya sembo ya bandeko oyo bazali kosala kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova. Mingi kati na bango bazali kolanda mibu ya kobotama ntuku libwa to nkámá, kasi bazali naino basakoli oyo bazali kokokisa mikumba na bango na molende nyonso. (Baebele 13:7) Mpe ezali boni mpo na mibangé mosusu oyo bazali na elikya ya kokende na likoló mpe ata basusu kati na “bampate mosusu” oyo mbula na bango ya kobotama esili kopusana mingi? (Yoane 10:16) Bakoki kondimisama ete Nzambe azangi sembo te ete abosana mosala na bango mpe bolingo bazali komonisa mpo na nkombo na ye. Elongo na baninga na bango bilenge bandimi, tiká ete mibangé Batatoli ya Yehova bálendendela na kosala oyo bakoki kosala, wana ezali bango komonisa kondima mpe motema pɛtɛɛ kati na mosala ya Nzambe. (Baebele 6:10-12) Na nsima, ezala na nzela ya lisekwa, lokola ekosalema mpo na basakoli ya ntango ya kala, to na nzela ya kobikisama na “bolózi monene” oyo ezali koya, bakozwa mbano monene ya bomoi ya seko.​—Matai 24:21.

20. (a) Nini osili koyekola na ntina na “elakiseli” ya basakoli? (b) Lolenge nini kozala na motema pɛtɛɛ lokola basakoli ekoki kosalisa biso?

20 Oyo nde elakiseli kitoko basakoli ya Nzambe basili kotikela biso! Mpo ete bayikaki mpiko na bampasi, bamonisaki motema pɛtɛɛ, mpe bamonisaki bizaleli mosusu ya kobanga Nzambe, ntina wana bazwaki libaku kitoko ya koloba na nkombo ya Yehova. Lokola tozali Batatoli na ye na mikolo na biso, tiká ete tózala lokola bango mpe tózwa ekateli lokola mosakoli Habakuku, oyo alobaki ete: “Nakotɛlɛma likolo na esika na ngai, nakomitia likolo na ndako molai; nakotala komɔna sɔkɔ [Nzambe] akoloba nini na ngai.” (Habakuku 2:1) Tiká ete tózala na ekateli motindo moko wana ezali biso komonisa motema pɛtɛɛ mpe kolanda na esengo nyonso koyambola nkombo eleki monene ya Yehova, Mozalisi na biso Monene!​—Nehemia 8:10; Baloma 10:10.

Osimbaki makanisi oyo?

◻ Ndakisa nini ya mpiko mosakoli Amosa atikaki?

◻ Na makambo nini mosakoli Mose azali ndakisa?

◻ Lolenge nini Batatoli ya Yehova ya mikolo na biso bakoki kosala lokola Amosa mpe Yisaya?

◻ Liteya nini basakoli baklisto bakoki kozwa na ezaleli ya Hosea mpe ya Yoele?

◻ Matomba nini tokoki kozwa na ndakisa ya Ezekiele mpe ya Mika?

[Elilingi na lokasa 16]

Atako botɛmɛli ya Amasia ezalaki makasi, elimo ya Yehova epesaki Amosa nguya ya kosakola na mpiko nyonso

[Elilingi na lokasa 18]

Bapakolami ya sembo basili kopesa ndakisa kitoko na komonisáká motema pɛtɛɛ kati na mosala ya Yehova

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto