Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/10 nk. 10-15
  • Basaleli ya Nzambe​—⁠Libota libongisami malamu mpe ya esengo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Basaleli ya Nzambe​—⁠Libota libongisami malamu mpe ya esengo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Basaleli ya mikolo na biso bango mpe babongisami
  • Babongisami kasi bazali na esengo
  • Bolingo ebotaka esengo
  • Esengo ndambo uta sikawa
  • Kosalela Jéhovah ezali bolamu ya solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Ndenge ya kozwa esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Esengo na baoyo basalelaka “Nzambe ya esengo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Yehova azali Nzambe oyo ayebi kobongisa makambo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/10 nk. 10-15

Basaleli ya Nzambe​—Libota libongisami malamu mpe ya esengo

“Esengo ezali na bato oyo Yehova azali Nzambe na bango!”​—NZEMBO 144:15, NW.

1, 2. (a) Mpo na nini Yehova azali na lotómo ya kotyela basaleli na ye mitindá? (b) Wapi bizaleli mibale ya Yehova oyo tosengeli mpenza kolinga komekola?

YEHOVA azali Moyangeli ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba, Nzambe mozwi-na-nguya-nyonso, Mozalisi. (Genese 1:1; Nzembo 100:3) Lokola azali na etɛlɛmɛlo wana, azali na lotómo ya kopesa mitindá mitali etamboli malamu mpo na basaleli na ye, mpamba te ayebi oyo eleki malamu mpo na bango. (Nzembo 143:8) Mpe azali Ndakisa na bango Monene oyo basengeli komekola bizaleli na ye. Ntoma moko akomaki ete: “Bózala bamekoli na Nzambe, lokola bana balingami.”​—Baefese 5:1, NW.

2 Ezaleli ya Nzambe oyo tosengeli komekola etaleli bongo lolenge ya kobongisa makambo. Azali ‘Nzambe ya mobulu te.’ (1 Bakolinti 14:33) Soki totali malamumalamu biloko Nzambe azalisaki, topusami na koloba ete azali Moto oyo aleki bato banso mpo na oyo etali kobongisa makambo kati na mɔlɔ́ngɔ́ mobimba. Nzokande, ezaleli mosusu ya Nzambe oyo alingi ete basaleli na ye bámekola ezali bongo esengo na ye, mpamba te azali “Nzambe ya esengo.” (1 Timoté 1:11, NW) Na yango, makoki na ye ya kobongisa makambo etyami esika moko na esengo. Moko eleki mosusu te.

3. Lolenge nini makoló oyo matondi na minzoto mamonisi likoki oyo Nzambe azali na yango ya kobongisa makambo?

3 Nyonso oyo Yehova asalaki, longwa na biloko bileki minene kino na biloko bileki mike, ezali kopesa elembeteli ete ye azali Nzambe oyo ayebi kobongisa makambo. Na ndakisa, tótalela mɔlɔ́ngɔ́ oyo ezali komonana. Ezali na bamiliare ya minzoto. Kasi yango epalangani na lolenge ya mobulu te. George Greenstein, moyekoli ya biloko ya likoló alobi ete “ebongiseli ya minzoto oyo ezali ndakisa.” Minzoto mibongisami na bituluku bibéngami galaxies, bituluku mosusu bizali na bamiliare mingi ya minzoto. Mpe ekanisami ete ba galaxies ezali na motango ya bamiliare mingi! Ba galaxies mpe ebongisami, mingi na yango (kobanda motuya ya moke kino bankóto mingi) esangisami na maboke ya ba galaxies. Mpe ekanisami ete maboke ya ba galaxies ebongisami na bituluku minene bibéngami superamas (maboke ya minene koleka).​—Nzembo 19:1; Yisaya 40:25, 26.

4, 5. Pesá ndakisa oyo emonisi kobongisama kati na biloko bizali na bomoi awa na mabelé.

4 Ebongiseli wana ya kokamwa ya bozalisi ya Nzambe ezali komonana bipai nyonso, bobele te na makoló oyo mazali komonana, kasi ata mpe na mabelé, na biloko na yango mingi oyo bizali na bomoi. Na kotalela nyonso oyo, Paul Davies, molakisi ya physique, akomaki ete bato na mayele bazali “kokamwa” na ntina na “ebongiseli monene mpe ya kokamwa ya biloko oyo bizali komonana.”​—Nzembo 104:24.

5 Tótalela mwa bandakisa ya “ebongiseli oyo ya kokamwa” oyo tozali kokuta kati na biloko bizali na bomoi. Joseph Evans, monganga-mopasóli ya misisa ya bɔɔngɔ́, alobaki na ntina na bɔɔngɔ́ ya moto mpe bansinga oyo etongisi yango ete: “Ndenge biloko yango etyami na molɔngɔ́ kati na bɔɔngɔ́ ezali mpenza likambo ya kokamwa.” Na ntina na ba cellules mike oyo ezali na bomoi, H. J. Shaughnessy, moyekoli ya ba bactéries (bikelamu mikemike ya bomoi) alobaki ete: “Kobongisama ya kokamwa mpe ya kitoko oyo ezali na bikelamu mikemike ya bomoi esalemi mpenza malamu na motindo boye ete yango emonani lokola ete ezali eteni ya ebongiseli ya Nzambe.” Mpe Michael Denton, moto na zébi ebéngami biologie moléculaire alobaki na ntina na code génétique (ADN) oyo ezali kati na cellule ete: “Ebongisami mpenza malamu na boye ete makambo nyonso . . . ya ntina mpo na kokesenisa lolenge ya bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezalaka awa na mabelé . . . ekoki kotyama kati na lutu moke mpe esika monene ekoki kotikala mpo na kotya makambo nyonso oyo mazali kati na mikanda nyonso misilá kokomama.”​—Talá Nzembo 139:16.

6, 7. Ebongiseli ya motindo nini emonisami epai na bikelamu ya elimo, mpe lolenge nini bazali komonisa botɔ́ndi na bango epai na Mozalisi na bango?

6 Yehova asuki te bobele na kobongisa bozalisi na ye oyo bozali komonana, kasi abongisaka mpe bikelamu na ye ya elimo kati na makoló. Danyele 7:10 eyebisi biso ete baanzelu ‘nkóto zomi mbala nkóto zomi batɛlɛmaki liboso ya Yehova.’ Bamilió ya bikelamu ya elimo oyo bazalaki wana, moko na moko azalaki na mosala na ye! Ezali likambo ya kokamwa mpo na kokanisa na ntina na makoki oyo masengeli mpo na kobongisa motango monene wana. Na lolenge lobongi, Biblia elobi ete: “Bosanjola [Yehova] bino banje na ye na likolo, bino boleki na nguya, bino bokotosaka ye, ekoyokaka bino mongongo na ye. Bosanjola [Yehova, bibele ya baanzelu, NW] na ye yɔnsɔ, basali na ye baoyo bakosalaka mokano na ye.”​—Njembo 103:20, 21; Emoniseli 5:11.

7 Misala ya Mozalisi mizali mpenza kitoko mpe mibongisami na lolenge ya kokamwa! Ezali mpenza likambo ya kokamwa te ete bikelamu ya elimo kuna na likoló báloba na limemya nyonso mpe na botosi nyonso ete: “Ee, Yehova, Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpamba te ozalisaki biloko binso, mpe mpo na mokano na yo bizali mpe bisili kozalisama.”​—Emoniseli 4:11, NW.

8. Wapi bandakisa oyo emonisi ete Yehova azali kobongisa basaleli na ye awa na mabelé?

8 Yehova abongisaka mpe basaleli na ye awa na mabelé. Wana ayeisaki Mpela na mikolo ya Noa na mobu 2370 L.T.B., Noa mpe bato mosusu nsambo babikaki na Mpela lokola libota oyo ebongisamaki. Na bobimi oyo esalemaki na mobu 1513 L.T.B., Yehova abimisaki bamilió mingi ya basaleli na ye na boombo longwa na Ezipito mpe apesaki bango mibeko ya sikisiki mpo na kobongisa makambo na bango ya mokolo na mokolo mpe makambo matalaki losambo. Mpe na nsima, wana ekómaki bango na Mokili ya Ndaká, bankóto mingi kati na bango babongisamaki mpo na mosala ya ntina kati na tempelo. (1 Ntango 23:4, 5) Na ekeke ya liboso, masangá ya boklisto mabongisamaki na kolanda litambwisi ya Nzambe: “Apesaki basusu lokola bantoma, basusu lokola basakoli, basusu lokola bapalanganisi ya nsango malamu, basusu lokola babateli mpe balakisi, mpo na kobongisa babulami, mpo na mosala ya kosunga.”​—Baefese 4:11, 12, NW.

Basaleli ya mikolo na biso bango mpe babongisami

9, 10. Lolenge nini Yehova asili kobongisa libota na ye na mikolo na biso?

9 Bobele bongo, Yehova asili kobongisa basaleli na ye na mikolo na biso mpo ete bákoka kosala malamu mosala na ye na eleko na biso​—kosakola nsango malamu ya Bokonzi na ye liboso ete atya nsuka na ebongiseli mabe ya biloko oyo. (Matai 24:14) Tótalela oyo esɛngami na mosala wana ya mokili mobimba mpe ntina ya kozala na ebongiseli malamu. Bamilió ya mibali, basi, mpe bana bazali kobongisama mpo na koteya solo ya Biblia epai na bato mosusu. Mpo na kosunga mosala wana ya kobongisama, ebele ya Biblia mpe mikanda mingi oyo mikolimbolaka Biblia mizali konyatáma. Nimero nyonso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali sikawa konyatáma koleka bamilió 16 kati na nkótá 118, mpe Lamuká! pene na bamilió 13 kati na nkótá 73. Pene na banimero nyonso ezali konyatáma nzela moko na minoko mingi mpo ete na lolenge lobongi basaleli nyonso ya Yehova báyeba makambo motindo moko na ntango bobele moko.

10 Lisusu, koleka masangá 73 000 ya Batatoli ya Yehova kati na mokili mobimba mabongisami mpe mazali koyangana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ mpo na koteyama kati na Biblia. (Baebele 10:24, 25) Kati na mokili mobimba, ezali mpe na mayangani mosusu ya minene​—mayangani ya zongazonga mpe mayangani ya etúká​—mbula na mbula. Ezali lisusu na ebongiseli oyo ezali kati na mokili mobimba mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi ya sika to kobongisa yango, kotonga bandako ya mayangani, bandako ya Betele, mpe bisika ya konyata mikanda mikolimbolaka Biblia. Ezali na biteyelo minene mpo na kobongisama ya balakisi ya Biblia, na ndakisa Galadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower mpo na kobongisa bamisionere mpe Eteyelo ya babongisi-nzela, oyo ezali kotambwisama na bamboka mingi kati na mokili.

11. Litomba nini likozwama na koyekoláká ebongiseli malamu sikawa?

11 Yehova asili mpenza kobongisa libota na ye awa na mabelé mpo ete ‘bákokisa malamu mosala na bango,’ wana bazali kozwa lisungi ya baanzelu na ye! (2 Timoté 4:5; Baebele 1:13, 14; Emoniseli 14:6) Na kolakisáká basaleli na ye kati na nzela ya kobongisama malamu sikawa, Nzambe azali mpe kokokisa eloko mosusu. Basaleli na ye bazali kobongisama malamu mpo ete wana bakobika na nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo, bakosila kobongisama libela mpo na kozala na bomoi kati na mokili ya sika. Na nsima, na lolenge lobongisami malamu na nsé ya litambwisi ya Yehova, bakobanda kobongisa Paladiso na mokili mobimba. Bakosila mpe kobongisama malamu mpo na koteya masɛngami ya sikisiki ya Nzambe mpo na kozala na bomoi epai na bamiliare ya bato oyo bakosekwisama longwa na kufa.​—Yisaya 11:9; 54:13; Misala 24:15; Emoniseli 20:12, 13.

Babongisami kasi bazali na esengo

12, 13. Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova alingi ete libota na ye lizala na esengo?

12 Atako Yehova azali Mosáli monene mpe Mobongisi monene, kasi azangi mayoki te, azali na makambo makasi te, mpe asalaka makambo na kozanga kokanisa te. Na esika ya kozala bongo, azali nde Moto ya mayoki, ya esengo oyo azali komibanzabanza mpo na bolamu na biso. 1 Petelo 5:7, (NW) elobi ete “azali komibanzabanza mpo na bino.” Kati na makambo oyo asili kosala mpo na bato, tokoki komona ete azali komibanzabanza mpe azali na mposa ete basaleli na ye bázala na esengo. Na ndakisa, ntango Nzambe azalisaki mobali mpe mwasi ya kokoka atyaki bango kati na paladiso ya bisengo. (Genese 1:26-31; 2:8, 9) Apesaki bango biloko nyonso bazalaki na yango mposa mpo na kozala na esengo monene. Kasi babungisaki nyonso wana na ntina na botomboki na bango. Lokola matomba mabe ya lisumu na bango, tosangolaki ezaleli ya kozanga kokoka mpe liwa.​—Baloma 3:23; 5:12.

13 Atako sikawa tozali bato bazangi kokoka, tokoki naino kozwa esengo na oyo Nzambe asili kosala. Ezali na biloko mingi oyo bizali kopesa biso bosepeli​—bangomba minene; mabéké kitoko, bibale, mai monene mpe mabongo kitoko matondi na zɛlɔ; fololo ya langi kitoko mpe bitwɛlɛ mosusu oyo ezali na mitindo ndenge na ndenge; bilei mingi ya elɛngi; kolala kitoko ya moi oyo tosepelaka ntango nyonso na kotala; makoló matondi na minzoto oyo tosepelaka kotala na butu; banyama ya ndenge na ndenge mpe bana na bango mpe masano na bango; koyoka miziki oyo ezali kosepelisa motema; mosala ya kosepelisa mpe oyo ezali kopesa litomba; baninga malamu. Ezali polele ete Ye oyo abongisaki makambo wana azali moto ya esengo oyo alingaka ete bato mosusu bázala mpe na esengo.

14. Bokatikati nini Yehova azali kosɛnga wana ezali biso komekola ye?

14 Na yango, ezali te bobele ebongiseli malamu nde Yehova azali kolinga. Alingi mpe ete basaleli na ye bázala na esengo, lokola ye moko azali na esengo. Alingi te ete bábongisa makambo na lolenge eleki ndelo kino ete yango elongola esengo na bango. Basaleli ya Nzambe basengeli kosala ete bokatikati ezala kati na makoki ya kobongisa makambo mpe esengo, lokola ye asalaka yango, mpamba te epai nguya ya elimo santu na ye ezali, esengo mpe ezali wana. Ya solo, Bagalatia 5:22 emonisi ete mbuma ya mibale ya elimo santu ya Nzambe oyo ezali kosala mosala epai na libota na ye ezali bongo “esengo.”

Bolingo ebotaka esengo

15. Mpo na nini bolingo ezali na ntina mingi mpo na esengo na biso?

15 Ezali likambo ya ntina mingi na koyeba ete Biblia elobi ete: “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8, 16) Elobami te ete: “Nzambe azali ebongiseli.” Bolingo ezali ezaleli monene ya Nzambe, mpe esengeli ete basaleli na ye bámekola yango. Yango wana mbuma ya liboso ya elimo na Nzambe oyo etángami na Bagalatia 5:22 ezali bongo “bolingo,” mpe “esengo” elandi yango na nsima. Bolingo ebotaka esengo. Soki tomekoli bolingo ya Nzambe kati na boyokani na biso elongo na basusu, esengo ekolanda nsima, mpo ete bato na bolingo bazali bato na esengo.

16. Lolenge nini Yesu amonisaki ntina ya bolingo?

16 Ntina ya komekola bolingo ya Nzambe emonisami polele kati na mateya ya Yesu. Alobaki ete: “Pelamɔkɔ Tata asili kolakisa ngai, nakosololaka makambo oyo.” (Yoane 8:28) Mingimingi, makambo nini Yesu ateyamaki na yango, oyo ye mpe na ngala na ye ateyaki basusu? Ezalaki bongo mibeko mibale mileki monene oyo ete kolinga Nzambe mpe kolinga bazalani. (Matai 22:36-39) Yesu amonisaki bolingo motindo yango. Alobaki ete: “Nalingi Tata,” komonisáká yango na kosala mokano ya Nzambe kino kufa. Mpe amonisaki bolingo na ye mpo na bato na kokufáká mpo na bango. Ntoma Paulo ayebisaki baklisto oyo bazalaki na Efese ete: ‘Klisto alingaki bino mpe amikabi ye mpenza mpo na bino.’ (Yoane 14:31; Baefese 5:2) Na yango, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Lilako na ngai ejali boye ete bolingana pelamɔkɔ ngai nasili kolinga bino.”​—Yoane 15:12, 13.

17. Lolenge nini Paulo amonisaki ete kozala na bolingo mpo na basusu ezali na ntina mingi?

17 Paulo amonisaki ete bolingo wana ya Nzambe ezali na ntina mingi na kolobáká ete: “Ata nakoloba na maloba na bato mpe na banje nde najangi bolingo najali bobɛlɛ ngonga ekolobaka ngbaa ngbaa to elonja ekolobaka ngbengbele ngbengbele. Ata mpe najali kosakola mpe koyeba makambo yɔnsɔ mabombami mpe makambo yɔnsɔ na mayɛlɛ, ata najali na kondima yɔnsɔ mpɔ na kolongola ngomba, nde sɔkɔ najangi bolingo, najali mpamba. Ata nakopalanganisa yɔnsɔ ejali na ngai mpɔ na kopɛsaka makabo, ata nakopɛsa njoto na ngai mpɔ na kotumbama, nde sɔkɔ najangi bolingo, najui litomba tɛ. . . . Bongo kondima mpe elikia mpe bolingo ijali koumela, yango misato. Nde oyo eleki kati na yango ejali bolingo.”​—1 Bakɔlinti 13:1-3, 13.

18. Nini tokoki kolikya epai na Yehova oyo ekobakisa esengo na biso?

18 Wana tozali komekola bolingo ya Yehova, tokoki kotya motema ete akomonisa bolingo na ye epai na biso, ata soki tosali mabungá, mpo ete azali “Nzambe na mawa mpe na ngɔlu, ayokaka nkanda noki te mpe atondi na motema-boboto mpe na solo.” (Exode 34:6, NW) Wana tosali libungá, soki tobongoli motema na bosembo nyonso, Nzambe akotánga yango te kasi na bolingo nyonso akolimbisa biso. (Nzembo 103:1-3) Ee, “Yehova azali mpenza na bolingo ya motema mpe na mawa.” (Yakobo 5:11, NW) Koyeba yango ezali kopesa biso esengo.

Esengo ndambo uta sikawa

19, 20. (a) Mpo na nini esengo mobimba ekoki te kozwama sikawa? (b) Lolenge nini Biblia emonisi ete tokoki kozala na esengo ndambo na ntango na biso?

19 Nzokande, likoki ezali ya kozala na esengo lelo oyo, lokola tozali kobika na mikolo ya nsuka ya mokili ya mbindo oyo etambwisami na Satana, oyo etondi na mabe, na mobulu, epai bokɔnɔ mpe liwa ezali kotungisa biso? Ya solo, tokoki te komizela ete tózala sikawa na esengo oyo tokozala na yango na mokili ya sika ya Nzambe, lokola Liloba na ye esakoli yango: “Talá nazali kozalisa makoló ya sika mpe mabelé ya sika; mpe makambo na liboso makokanisama te, mpe makoya kati na motema te. Kasi bósepela, bino bato, mpe bózala na esengo libela mpo na yango ezali ngai kozalisa.”​—Yisaya 65:17, 18, NW.

20 Basaleli ya Nzambe bazali na esengo ndambo uta sikawa mpamba te bayebi mokano na ye mpe bazali na boyebi ya sikisiki ya mapamboli kitoko oyo makoya mosika te kati na paladiso oyo ekosalema na mokili na ye ya sika. (Yoane 17:3; Emoniseli 21:4) Yango wana Biblia elobi ete: “Ɛ Yehova na bibele, esengo ezali na moto oyo azali kolikya epai na yo,” “esengo ezali na moto nyonso oyo azali kobanga Yehova, oyo azali kotambola kati na banzela na ye,” “esengo ezali na bato na bopɔlɔ, mpamba te bakosangola mabelé.” (Nzembo 84:12; 128:1; Matai 5:5, NW) Na yango, atako mikakatano oyo tosengeli kokutana na yango lelo oyo, tokoki kozala na esengo mingi. Ata soki makambo mabe makómeli biso, tokokóma mawamawa te lokola ekosalaka baoyo bayebi Yehova te mpe baoyo bazangi elikya ya bomoi ya seko.​—1 Batesaloniki 4:13.

21. Wana basaleli ya Yehova bapesi ntango na bango, makasi na bango mpe biloko na bango, lolenge nini yango ezali komemela bango esengo?

21 Basaleli ya Yehova bazali lisusu na esengo mpamba te bapesaka ntango, nguya, mpe bozwi na bango na koteyáká solo ya Biblia epai na bato mosusu, mingimingi epai na bato oyo bazali ‘komilela mpe komitungisa na ntina na makambo nyonso mabe’ oyo mazali kosalema kati na mokili ya Satana. (Ezekiele 9:4) Biblia elobi: “Esengo ezali na moto oyo azali komibanzabanza mpo na babólá; na mokolo ya mpasi Yehova akobikisa ye. Yehova akobatela ye mpe akotika ye na bomoi. Akobyangama moto na esengo awa na mabelé.” (Nzembo 41:1, 2, NW) Lokola Yesu alobaki yango, “esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.”​—Misala 20:35, NW.

22. (a) Mpo na oyo etali esengo, wapi bokeseni kati na basaleli ya Nzambe mpe baoyo bazali kosalela ye te? (b) Mpo na ntina nini mpenza tosengeli kolikya kozala na esengo?

22 Na bongo, atako basaleli ya Nzambe bakoki te kolikya kozala na esengo mobimba na mokili ya lelo, nzokande bakoki kozwa esengo oyo ezangi epai na baoyo basalelaka Nzambe te. Yehova alobi ete: “Tala, baombo na ngai bakoyemba mpɔ na esɛngɔ na motema, nde bino bokonguluma mpɔ na mpasi na motema, bokolela mpe mpɔ na mikakatano na [elimo, NW].” (Yisaya 65:14) Lisusu, baoyo bazali kosalela Nzambe bazali mpenza na ntina monene ya kozala na esengo sikawa​—bazali na elimo santu oyo “Nzambe azali kopesa epai na baoyo bazali kotosa ye lokola mokonzi.” (Misala 5:32, NW) Mpe tómikundola ete, epai elimo ya Nzambe ezali, esengo mpe ezali wana.​—Bagalatia 5:22.

23. Tokotalela nini na boyekoli na biso ekolanda?

23 Lelo oyo, kati na lisangá ya basaleli ya Nzambe, mokumba monene ekokisami na “mibangé mibali,” bankulutu, oyo bazali kotambwisa masangá, oyo bazali bongo kobakisa esengo kati na libota ya Yehova. (Tito 1:5) Lolenge nini mibali wana basengeli kotalela mikumba na bango mpe boyokani na bango elongo na bandeko na bango ya mibali mpe ya basi? Lisoló na biso lilandi likolobela yango.

Okoyanola lolenge nini?

◻ Lolenge nini bozalisi emonisi ete Yehova azali mobongisi?

◻ Lolenge nini Yehova abongisaki basaleli na ye na ntango ya kala mpe na mikolo na biso?

◻ Bokatikati nini Yehova alingi ete tómonisa yango?

◻ Bolingo ezali na ntina nini mpo na esengo na biso?

◻ Lolenge nini ya esengo tokoki kolikya na mikolo na biso?

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 10]

Likoló: Na boboto ya ROE/Anglo-Australian Observatory, fɔtɔ́ ebimisami na David Malin

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto